“Bókende mpe bókómisa bato bayekoli”
“Bókende mpe bókómisa bato bayekoli”
“Bokonzi nyonso epesameli ngai na likoló mpe na mabelé. Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli.”—MATAI 28:18, 19.
1, 2. (a) Mosala nini Yesu apesaki na bayekoli na ye? (b) Tokotalela mituna nini oyo etali etinda ya Yesu?
NA MOKOLO moko ya prɛnta ya mobu 33 T.B., na Yisraele, bayekoli ya Yesu bayanganaki na ngomba moko na Galilai. Etikalaki moke, Nkolo na bango, oyo asekwaki, amata na likoló; kasi liboso ya komata, azalaki na likambo moko ya ntina mpo na koyebisa bango. Yesu azalaki na mosala ya kopesa bango. Mosala yango nini? Ndenge nini bayekoli na ye batalelaki mosala yango? Mpe ndenge nini mosala yango etaleli mpe biso lelo oyo?
2 Makambo oyo Yesu alobaki ekomami na Matai 28:18-20: “Bokonzi nyonso epesameli ngai na likoló mpe na mabelé. Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisáká bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda. Mpe, talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” Yesu asalelaki maloba “bokonzi nyonso,” “bikólo nyonso,” “makambo nyonso,” mpe “mikolo nyonso.” Etinda na ye wana esangisi makambo minei oyo ebimisi mwa mituna ya ntina, oyo na mokuse ekoki kotunama boye: mpo na nini? epai wapi? nini? mpe ntango nini? Tiká tótalela mituna yango mokomoko. *
“Bokonzi nyonso epesameli ngai”
3. Mpo na nini tosengeli kotosa etinda ya kokómisa bato bayekoli?
3 Libosoliboso, mpo na nini tosengeli kotosa etinda ya kokómisa bato bayekoli? Yesu alobaki ete: “Bokonzi nyonso epesameli ngai na likoló mpe na mabelé. Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli.” Liloba “na yango” emonisi ntina monene oyo mpo na yango tosengeli kotosa etinda oyo wana. Ezali mpo Yesu, moto oyo apesaki etinda yango, azali na “bokonzi nyonso.” Bokonzi oyo Yesu azali na yango ezali likoló ya nini mpe ya nani?
4. (a) Bokonzi oyo Yesu azali na yango ezali likoló ya nini mpe ya nani? (b) Ndenge nini tosengeli kotalela etinda ya kokómisa bato bayekoli awa toyebi ete Yesu azali na bokonzi ya ndenge wana?
4 Yesu azali na bokonzi likoló ya lisangá na ye, mpe banda mobu 1914 akómaki mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe oyo eutaki kotyama sika. (Bakolose 1:13; Emoniseli 11:15) Azali mokonzi ya baanzelu mpe, lokola azali mokonzi na bango, azali kotambwisa limpinga ya bankama ya bamilio ya baanzelu na likoló. (1 Batesaloniki 4:16; 1 Petelo 3:22; Emoniseli 19:14-16) Tata na ye apesaki ye nguya ya kobebisa nyɛɛ “guvɛrnema nyonso mpe bokonzi nyonso mpe nguya” oyo ezali kotɛmɛla mitinda ya boyengebene. (1 Bakolinti 15:24-26; Baefese 1:20-23) Bokonzi oyo Yesu azali na yango esuki kaka na bato ya bomoi te. Azali lisusu “mosambisi ya bato ya bomoi mpe ya bakufi” mpe Nzambe apesá ye nguya ya kosekwisa baoyo bakufá. (Misala 10:42; Yoane 5:26-28) Ya solo, tosengeli te kozwa na lisɛki etinda oyo euti epai ya Moto oyo bapesi ye bokonzi oyo eleki monene ndenge wana. Na yango, tozali kotosa mpe komemya na motema moko etinda ya Klisto oyo ya ‘kokende mpe kokómisa bato bayekoli.’
5. (a) Ndenge nini Petelo atosaki maloba ya Yesu? (b) Lokola Petelo atosaki malako ya Yesu, lipamboli nini azwaki?
5 Ntango abandaki mosala na ye ya kosakola awa na mabelé, Yesu ateyaki bayekoli na ye polele ete kondima bokonzi oyo azali na yango mpe kotosa mitindo na ye ememaka mapamboli. Mokolo moko, ayebisaki Petelo, oyo azalaki moluki-mbisi, ete: “Pusá tii na esika oyo ezali mozindo, mpe bókitisa minyama na bino mpo na kokanga mbisi.” Petelo ayebaki mpenza ete mbisi ezalaki na esika wana te, yango wana ayebisaki Yesu ete: “Molakisi, butu mobimba tomoni mpasi mpe tozwi eloko te.” Ata bongo, Petelo abakisaki na komikitisa mpenza ete: “Kasi na etinda na yo nakokitisa minyama.” Nsima ya kotosa etinda wana ya Klisto, Petelo akangaki “bambisi ebele mpenza.” Lokola yango elekelaki ye, Petelo “akweaki na mabɔlɔngɔ ya Yesu, kolobáká ete: ‘Longwá penepene na ngai, mpamba te ngai nazali moto ya masumu, Nkolo.’ ” Kasi Yesu azongisaki ete: “Tiká kobanga. Banda sikoyo okobanda kokanga bato na bomoi.” (Luka 5:1-10; Matai 4:18) Liteya nini tozwi na lisolo oyo?
6. (a) Lisolo ya bambisi oyo bantoma bakangaki na ndenge ya likamwisi emonisi ete Yesu azali kosɛnga botosi ya ndenge nini? (b) Ndenge nini tokoki komekola Yesu?
6 Ezali te liboso ya kokanga bambisi na ndenge wana ya likamwisi nde Yesu apesaki Petelo, André, mpe bantoma mosusu mosala ya ‘kokóma baluki-bato,’ kasi ezalaki nde na nsima. (Malako 1:16, 17) Yango emonisi polele ete Yesu asɛngaki bango te ete bátosa ye kaka mpo na kotosa. Amonisaki bango ntina mpenza oyo mpo na yango basengelaki kotosa ye. Lokola batosaki etinda ya Yesu ya kokitisa minyama na bango mpe bazwaki matomba mingi, kaka bongo mpe kotosa etinda ya Yesu ya ‘kokanga bato’ ekopesa mapamboli mingi. Na motema moko, bantoma basalaki oyo Yesu alobaki. Lisolo yango esukisi boye: “Bazongisaki masuwa na mokili, mpe basundolaki biloko nyonso mpe balandaki ye.” (Luka 5:11) Lelo oyo, ntango tozali kolendisa bato mosusu ete básangana na mosala ya kokómisa bato bayekoli, tozali bongo komekola Yesu. Tosɛngisaka bato te ete básala kaka oyo tozali koyebisa bango, kasi tomonisaka bango nde bantina mpenza oyo mpo na yango basengeli kotosa etinda ya Klisto.
Bantina ya solosolo mpe bizaleli oyo esengeli
7, 8. (a) Bantina nini mosusu euti na Makomami, oyo ezali kotinda biso na kosangana na mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli? (b) Vɛrsɛ nini mpenza etindaka yo okoba kosangana na mosala ya kosakola? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
7 Lokola tozali kondima bokonzi oyo Klisto azali na yango, tozali kosangana na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli. Bantina nini mosusu euti na Makomami, oyo ezali kotinda biso na kosala mosala wana mpe oyo tokoki komonisa epai ya bato oyo tolingi ete básangana na biso na kosala misala ya malamu? Tótalela maloba oyo elandi, oyo Batatoli mingi ya sembo na mikili ndenge na ndenge balobaki, mpe tómona ndenge bavɛrsɛ oyo epesami, ezali kosimba maloba na bango.
8 Ndeko mobali Roy, oyo azwaki batisimo na mobu 1951, alobi boye: “Ntango napesaki bomoi na ngai epai na Yehova, napesaki elaka ete nakosalela ye seko. Nakokokisa maloba na ngai.” (Nzembo 50:14; Matai 5:37) Ndeko mwasi Heather, oyo azwaki batisimo na mobu 1962, alobi boye: “Ntango nakanisaka nyonso oyo Yehova asaleli ngai, mposa na ngai ezalaka ya komonisela ye botɔndi na ngai na kosalela ye na bosembo.” (Nzembo 9:1, 9-11; Bakolose 3:15) Ndeko mwasi Hannelore, oyo azwaki batisimo na mobu 1954, alobi boye: “Ntango nyonso oyo tozali kati na mosala ya kosakola, baanzelu bazalaka wana mpo na kosunga biso—oyo nde libaku kitoko!” (Misala 10:30-33; Emoniseli 14:6, 7) Ndeko mwasi Honor, oyo azwaki batisimo na mobu 1969, alobi boye: “Ntango ngonga oyo Yehova akosambisa bato ekokóma, nakolinga te moto moko kati na bazalani na ngai afunda Yehova ná Batatoli na ye ete basalaki bopɔtu mpe aloba ete: ‘Bakebisaki ngai ata mokolo moko te!’ “ (Ezekiele 2:5; 3:17-19; Baloma 10:16, 18) Ndeko mobali Claudio, oyo azwaki batisimo na mobu 1974, alobi boye: “Ntango tozali kati na mosala ya kosakola, ‘miso ya Nzambe’ ezali kotala biso mpe tozali ‘esika moko na Klisto.’ Kanisá naino likambo ya boye! Ntango tozalaka kati na mosala ya kosakola, tozalaka elongo na Baninga na biso oyo baleki baninga nyonso.”—2 Bakolinti 2:17. *
9. (a) Lisolo ya bambisi oyo Petelo ná bantoma mosusu bakangaki emonisi nini na ntina na ezaleli oyo esengeli kotinda biso tótosa Klisto? (b) Lelo oyo, ezaleli nini esengeli kotinda biso na kotosa Nzambe mpe Klisto, mpe mpo na nini?
9 Lisolo ya bambisi oyo bantoma bakangaki na ndenge ya likamwisi ezali mpe komonisa biso ezaleli oyo esengeli kotinda biso tótosa Klisto—ezaleli yango nde bolingo. Ntango Petelo alobaki na ye ete: “Longwá penepene na ngai, mpamba te ngai nazali moto ya masumu,” Yesu alongwaki te mpe alobaki na Petelo te ete azali moto ya masumu. (Luka 5:8) Yesu apamelaki kutu Petelo te na ndenge asɛngaki ye alongwa penepene na ye. Na esika ya kosala bongo, Yesu azongisaki na boboto mpenza ete: “Tiká kobanga.” Kobanga wana ya mabe elingaki kozala ezaleli moko ya mabe mpo na kotosa Klisto. Kutu, Yesu ayebisaki Petelo ete akokómisa ye ná baninga na ye baluki-bato. Lelo oyo, biso mpe ndenge moko, tobangisaka bato te, tomemisaka bango ngambo te mpe tolukaka te koyokisa bango nsɔni mpo na kopusa bango na makasi ete bátosa Klisto. Kaka botosi ya solosolo, oyo euti na bolingo ya moto mpo na Nzambe mpe mpo na Klisto nde esepelisaka motema ya Yehova.—Matai 22:37.
“Bókómisa bato bayekolina bikólo nyonso”
10. (a) Likambo nini etali etinda ya Yesu, oyo ya kokómisa bato bayekoli, ezalaki mokakatano monene mpo na bayekoli na ye? (b) Ndenge nini bayekoli batalelaki etinda yango ya Yesu?
10 Motuna ya mibale oyo tokoki kotuna mpo na oyo etali etinda ya Klisto ezali oyo: Epai wapi mosala ya kokómisa bato bayekoli esengeli kosalema? Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.” Na ntango ya kala, liboso ete Yesu abanda mosala na ye, soki bato ya bikólo mosusu bayei na Yisalaele kosalela Yehova, bazalaki koyambama malamu. (1 Mikonzi 8:41-) Yesu ye moko asakolaki mingimingi epai ya Bayuda, kasi ayebisaki sikoyo bayekoli na ye ete bákende epai ya bato ya bikólo nyonso. Ya solo, esika ya koluka mbisi, to teritware ya kosakola, ya bayekoli na ye ezalaki naino kaka mwa “etima” moke—elingi koloba kaka ekólo ya Bayuda—kasi nokinoki eyaki kokóma “mbu” mobimba, elingi koloba bikólo nyonso. Mbongwana yango ezalaki mokakatano monene epai ya bayekoli, kasi ata bongo batosaki na motema moko etinda ya Yesu. Naino mbula 30 ekokaki te nsima ya liwa ya Yesu, ntoma Paulo akomaki ete nsango malamu esilaki kosakolama epai ya Bayuda kaka te, kasi mpe na “bozalisi nyonso oyo ezali na nse ya likoló.”— 43Bakolose 1:23.
11. Uta ebandeli ya ekeke ya ntuku mibale, ndenge nini ‘bisika ya koluka mbisi’ eyei monene?
11 Na mikolo na biso, teritware ya kosakola mpe eyei monene ndenge wana. Na ebandeli ya ekeke ya ntuku mibale, ‘bisika ya koluka mbisi’ esukaki kaka na mwa bamboka. Ata bongo, bayekoli ya Klisto oyo bazalaki na ntango wana balandaki ndakisa ya baklisto ya ekeke ya liboso mpe na molende mpenza bayeisaki teritware na bango monene, teritware epai bazalaki kosakola. (Baloma 15:20) Na ebandeli ya bambula 1930, bazalaki kokómisa bato bayekoli na mikili soki nkama moko. Lelo oyo, ‘bisika ya koluka mbisi’ oyo tozali na yango, ekómi tii na mikili 235.—Malako 13:10.
“Uta na minɔkɔ nyonso”
12. Mokakatano nini elobelami na esakweli oyo ezali na Zekalia 8:23?
12 Mokakatano ya kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso etaleli kaka bonene ya teritware te, kasi etaleli lisusu minɔkɔ oyo bato balobaka. Na nzela ya mosakoli Zekalia, Yehova asakolaki ete: “Na mikolo yango, ekozala ete bato zomi uta na minɔkɔ nyonso ya bikólo bakosimba makasi, ɛɛ, bakosimba makasi eteni ya nse ya elamba ya moto oyo azali Moyuda, bakoloba ete: ‘Tokokende elongo na bino, mpo toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.’ ” (Zekalia 8:23, NW) Na kokokisama monene ya esakweli wana, “moto oyo azali Moyuda” ezali batikali ya baklisto bapakolami, nzokande “bato zomi” ezali “ebele ya bato.” * (Emoniseli 7:9, 10; Bagalatia 6:16) Ebele wana ya bato, oyo bazali mpe bayekoli ya Klisto, bafandi na bikólo mingi, mpe kaka ndenge Zekalia amonisaki yango, bazali koloba minɔkɔ ndenge na ndenge. Lisolo ya basaleli ya Nzambe na mikolo na biso ezali nde komonisa kokokisama ya likambo wana? Ɛɛ, ezali mpenza bongo.
13. (a) Na oyo etali minɔkɔ, mbongwana nini esalemi epai ya basaleli ya Nzambe na mikolo na biso? (b) Lokola mposa ya bilei ya elimo ezali kobakisama se kobakisama na minɔkɔ ndenge na ndenge, moombo ya sembo asali nini? (Talá mpe etanda “Mikanda mpo na bato oyo bakufá miso.”)
13 Na mobu 1950, kati na Batatoli ya Yehova 5 na mokili mobimba, kaka Batatoli 3 kati na bango nde monɔkɔ na bango ezalaki Lingelesi. Na mobu 1980, motángo wana ekitaki, kati na Batatoli 5, kaka Batatoli 2 nde monɔkɔ na bango ezalaki Lingelesi, nzokande lelo oyo, kati na Batatoli 5, kaka Motatoli 1 nde monɔkɔ na ye ezali Lingelesi. Lokola bato mingi bakómi koloba minɔkɔ mosusu koleka Lingelesi, moombo ya sembo mpe ya mayele asali nini mpo na mbongwana wana etali minɔkɔ? Akómi kobimisa bilei ya elimo na minɔkɔ mingi koleka. (Matai 24:45) Na ndakisa, na mobu 1950 mikanda na biso ebimisamaki na minɔkɔ 90, kasi lelo oyo, motángo wana emati soki na minɔkɔ 400. Likebi makasi oyo batyaki sikoyo epai ya bato ya minɔkɔ ndenge na ndenge ebimisaki matomba? Ɛɛ! Pɔsɔ na pɔsɔ na mbula mobimba, mwayene ya bato soki 5 000 ‘uta na minɔkɔ nyonso’ bazali kokóma bayekoli ya Klisto! (Emoniseli 7:9) Mpe bokoli yango ezali kaka kokende liboso. Na mikili mosusu, “minyama” ezali kokanga bambisi ebele mpenza!—Luka 5:6; Yoane 21:6.
Mosala oyo ezali kopesa mbano—Okosangana na yango?
14. Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo bafandi na teritware na biso, oyo bayebi monɔkɔ na biso te? (Talá mpe etanda “Monɔkɔ ya bababa mpe mosala ya kokómisa bato bayekoli.”)
14 Lokola bato mingi bazali kotika bamboka na bango mpe bazali kokende na mikili mingi, etinda ya kokómisa bato ya ‘minɔkɔ nyonso’ bayekoli, ekómi mpenza mokakatano na mikili yango. (Emoniseli 14:6) Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo bafandi na teritware na biso, oyo bayebi monɔkɔ na biso te? (1 Timote 2:4) Na maloba ya elilingi, tokoki kosalela bisaleli oyo ebongi mpo na kokanga mbisi. Ebongi tópesa bato wana mikanda oyo ekomami na monɔkɔ oyo bango balobaka. Soki likoki ezali, Motatoli moko oyo alobaka monɔkɔ na bango akoki kokende kotalaka bango. (Misala 22:2) Kosala bongo ekómi sikawa pɛpɛlɛ, mpamba te Batatoli mingi bayekoli koloba minɔkɔ mosusu mpo na kosalisa bapaya bákóma bayekoli ya Klisto. Balapolo ezali komonisa ete kosalisa bato ndenge wana ezali mpenza kopesa mbano.
15, 16. (a) Bandakisa nini ezali komonisa ete kosalisa bato oyo balobaka monɔkɔ ya bapaya epesaka mbano? (b) Mituna nini tokoki komituna na oyo etali kosala na teritware ya bato oyo balobaka monɔkɔ ya bapaya?
15 Tótalela bandakisa mibale oyo euti na mboka Pays-Bas, epai mosala ya kosakola Bokonzi na ndenge oyo ebongisami malamu ezali kosalema na minɔkɔ 34. Ndeko mobali moko ná mwasi na ye, oyo bazali Batatoli, basepelaki kokende kosala mosala ya kokómisa bato bayekoli epai ya bato oyo batiká mboka na bango, oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya polonais. Lokola bato bamonisaki mpenza bosepeli, ndeko mobali yango amonaki malamu ete, pɔsɔ nyonso, alongolaka mokolo moko na mikolo na ye ya mosala mpo azwa ntango ya koyekola Biblia elongo na bango. Eumelaki te, ndeko mobali yango ná mwasi na ye, bakómaki kotambwisa boyekoli ya Biblia koleka 20 pɔsɔ na pɔsɔ. Bandeko yango balobaki boye: “Mosala na biso ya kosakola epesi biso esengo mingi.” Ntango bato bayekoli solo na monɔkɔ na bango mpe motema na bango etindi bango na komonisa botɔndi, baoyo bakómisi bato yango bayekoli bazalaka mpenza na esengo. Na ndakisa, na likita moko oyo esalemaki na monɔkɔ ya vietnamien, mobange mobali moko atɛlɛmaki mpe asɛngaki nzela ya koloba. Wana mpisoli ezalaki kobima ye na miso, ayebisaki Batatoli boye: “Matɔndi mingi mpo na milende oyo bozali kosala mpo na koyekola monɔkɔ na ngai ya mpasi. Nazali na botɔndi mpenza na ndenge nayekoli makambo mingi ya kitoko oyo ezali na Biblia na bobange na ngai.”
16 Na yango, likambo ya kokamwa ezali te na komona ete bato oyo bazali na masangá oyo esalelaka minɔkɔ ya bapaya bazali mpenza kozwa mbano mingi. Ndeko mobali moko ná mwasi na ye, oyo bazali bato ya Grande-Bretagne, balobaki boye: “Kosakola na teritware ya bato oyo balobaka monɔkɔ ya bapaya ezali moko ya mabaku oyo epesaki biso esengo mingi koleka na boumeli ya mbula 40 oyo tolekisi na mosala ya Bokonzi.” Yo mpe okoki kozwa bibongiseli mpo osangana na mosala yango oyo epesaka esengo? Soki ozali naino kotánga kelasi, okoki koyekola monɔkɔ moko ya bapaya mpo na kosangana na mosala yango na mikolo ezali koya? Soki okosala bongo, yango ekofungolela yo nzela ya bomoi moko ya esengo, oyo etondi na mapamboli. (Masese 10:22) Mpo na nini te kosolola likambo yango elongo na baboti na yo?
Tóbongolaka ndenge na biso ya koteya
17. Ndenge nini tokoki kosolola na bato mingi lisusu kati na teritware ya lisangá na biso?
17 Ya solo, mikumba mpe makambo na bomoi ezali kopesa nzela te na mingi kati na biso na kobwaka “minyama” na biso na bateritware oyo bato balobaka minɔkɔ ya bapaya. Ata bongo, na teritware ya lisangá na biso, tokoki kosolola na bato mingi lisusu koleka. Ndenge nini? Soki tozali kobongola ndenge na biso ya koteya, kasi nsango oyo tozali koteya te. Na bisika ebele, bato bakómi kofanda mingi na bandako oyo ezalaka mpasi mpo na kokɔta. Bato mosusu bazalaka te na bandako na bango ntango tozali kosakola ndako na ndako. Lokola ezali bongo, tokoki kobwaka “minyama” na biso na bantango ekeseni mpe na bisika ekeseni. Soki tosali bongo, tokomonisa ete tozali komekola Yesu. Ye asalaki nyonso mpo na kosolola na bato na bisika ndenge na ndenge.—Matai 9:9; Luka 19:1-10; Yoane 4:6-15.
18. Ndenge nini mosala ya kopesa litatoli na bisika ndenge na ndenge ezali kopesa matomba? (Talá mpe etanda “Kokómisa bato bayekoli na bisika ya mosala.”)
18 Na bamboka mosusu na mokili, kolanda bato na bisika nyonso oyo bakoki kozala mpo na kopesa bango litatoli ezali lolenge moko ya malamu mingi mpo na kokómisa bango bayekoli. Bandeko oyo bamesani na mosala ya kokómisa bato bayekoli batyaka mpenza likebi na mosala ya kopesa litatoli na bisika ndenge na ndenge. Longola mosala ya kosakola ndako na ndako, lelo oyo basakoli bapesaka litatoli na mabándá ya mpɛpɔ, na babiro, na bamagazini, na baparkingi, na bisika ya kozela bisi, na babalabala, na baparke, na mabongo, mpe na bisika ndenge na ndenge. Na Hawaï, ebele ya Batatoli oyo bauti kozwa batisimo sika bayokaki litatoli mpo na mbala ya liboso na bisika ya ndenge wana. Kobongola lolenge na biso ya koteya esalisaka biso tókokisa malamumalamu etinda ya Yesu, oyo ya kokómisa bato bayekoli.—1 Bakolinti 9:22, 23.
19. Makambo nini ezali kati na etinda oyo Yesu apesi biso, oyo tokotalela na lisolo elandi?
19 Mosala oyo Yesu apesaki ya kokómisa bato bayekoli esuki kaka te na komonisa biso mpo na nini mpe epai wapi tosengeli kosala yango, kasi emonisi mpe nini tosengeli kosakola mpe kino ntango nini tosengeli kokoba kosala yango. Makambo mibale oyo ya nsuka, oyo ezali kati na etinda oyo Yesu apesi biso, ekotalelama na lisolo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 2 Na lisolo oyo, tokotalela mituna mibale ya liboso. Na lisolo oyo ekolanda, tokotalela mituna mibale mosusu oyo etikali.
^ par. 8 Bantina mosusu oyo etindaka biso tósakola ezwami na Masese 10:5; Amosa 3:8; Matai 24:42; Malako 12:17; Baloma 1:14, 15.
^ par. 12 Mpo na koyeba makambo mosusu etali kokokisama ya esakweli wana, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 2001, lokasa 12, mpe buku Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi 2, lokasa 408, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Ozali lisusu koyeba?
• Bantina nini mpe ezaleli nini esengeli kotinda biso tósangana na mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli?
• Basaleli ya Yehova bakómi tii wapi lelo na mosala na bango oyo Yesu apesaki bango ya kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso?
• Ndenge nini tokoki ‘kobongola ndenge ya koluka mbisi,’ mpe mpo na nini tosengeli kosala bongo?
[Mituna ya boyekoli]
[Etanda/Bililingi na lokasa 10]
Mikanda mpo na bato oyo bakufá miso
Ndeko Albert azali moklisto oyo azali nkulutu mpe mosaleli ya ntango nyonso, oyo afandi na États-Unis. Ye akufá miso. Lokola asalelaka mikanda oyo elimbolaka Biblia, oyo ezali na ekomeli ya Braille, yango ezali kosalisa ye malamumalamu lisusu na mosala na ye ya kosakola mpe na mikumba na ye ya mokɛngɛli ya mosala. Ndenge nini azali kokokisa mikumba na ye kati na lisangá?
Ndeko James, oyo azali mokɛngɛli-mokambi, alobi boye: “Na lisangá na biso, naino tózwa te mokɛngɛli ya mosala, oyo azali na makoki, lokola ndeko Albert.” Na États-Unis, ndeko Albert azali moko kati na bato soki 5 000 oyo bakufá miso, oyo basili kozwa mikanda oyo elimbolaka Biblia na ekomeli ya Braille na monɔkɔ ya Lingelesi mpe ya Espagnol na boumeli ya bambula. Kutu banda mobu 1912, moombo ya sembo asili kobimisa mikanda koleka nkama moko na ekomeli ya Braille. Na lisalisi ya bamasini ya sika, Batatoli ya Yehova bazali lelo konyata mpe kobimisa bamilio ya mikanda ya ekomeli ya Braille mbula na mbula na minɔkɔ koleka zomi mpe bazali kokabola yango na mikili koleka 70. Oyebi moto moko oyo akoki kozwa litomba na mikanda oyo elimbolaka Biblia, oyo ebimisami mpo na bato oyo bakufá miso?
[Etanda/Elilingi na lokasa 11]
Monɔkɔ ya bababa mpe mosala ya kokómisa bato bayekoli
Ebele ya Batatoli na mokili mobimba, bakisa mpe ebele ya bilenge ya molende, bayekoli monɔkɔ ya bababa mpo na kosalisa bababa bákóma bayekoli ya Klisto. Litomba na yango ezali ete, kaka na mboka Brésil, bababa 63 bazwaki batisimo na mbula oyo euti koleka kala mingi te mpe, na mboka yango, Batatoli 35 oyo bazali bababa, bazali sikoyo bapalanganisi ya nsango malamu ya ntango nyonso. Na mokili mobimba, masangá mpe bituluku ya monɔkɔ ya bababa eleki 1 200. Na mboka Russie, ezali na zongazonga kaka moko ya monɔkɔ ya bababa mpe zongazonga yango nde eleki monene na mokili mobimba; yango ezwi Russie mobimba!
[Etanda na lokasa 12]
Kokómisa bato bayekoli na bisika ya mosala
Ntango Motatoli moko akendaki kotala bato na babiro na bango ya mosala na mboka Hawaï, akutanaki na mokambi ya kompanyi moko ya transport. Atako azalaki na mosala mingi, mobali yango andimaki koyekola Biblia kati na biro na ye na boumeli ya miniti 30 na pɔsɔ. Mokolo nyonso ya misato na ntɔngɔ, ayebisaka bato na ye ya mosala ete babengaka ye te na telefone mpo akoka kolanda boyekoli na likebi. Mbala moko na pɔsɔ, motatoli mosusu na Hawaï ayekolaka Biblia ná nkolo ya esika oyo babongisaka sapato. Boyekoli esalemaka na mesa ya esika yango, epai ayambaka bakiliya. Ntango kiliya akɔti, Motatoli alongwe, apusani mwa pembeni. Ntango kiliya akei, bazongeli boyekoli.
Soki Batatoli oyo bakutanaki na mokambi ya kompanyi wana mpe na nkolo ya esika wana ya kobongisa basapato, ezali mpo bazwaki likanisi ya kobwaka “minyama” na bango na bisika ekeseni. Na teritware ya lisangá na bino, ezali na bisika oyo okoki kokanisa komona bato oyo ezalaka mpasi kokuta bango na bandako?
[Elilingi na lokasa 12]
Okoki kosala na teritware oyo bato balobaka monɔkɔ ya bapaya?