Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

‘Bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda’

‘Bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda’

‘Bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda’

“Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli . . . , koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda.”​—⁠MATAI 28:19, 20.

1. Lisolo nini elekaki kati na moyekoli Filipo mpe mobali moko ya Etiopia?

 MOBALI moko ya Etiopia azalaki kosala mobembo mpo na kokende na Yelusaleme. Kuna asambelaki Yehova, Nzambe oyo ye azalaki kolinga. Emonani polele ete azalaki mpe kolinga Liloba ya Nzambe oyo epemami. Ntango azalaki kozonga, afandaki na kati ya likalo na ye mpe azalaki kotánga mokanda ya mosakoli Yisaya; ezali na ntango yango nde Filipo, moyekoli ya Klisto, akutanaki na ye. Filipo atunaki Moetiopia yango ete: “Ozali mpenza koyeba makambo oyo ozali kotánga?” Mobali yango azongisaki ete: “Ndenge nini nakoki koyeba yango mpenza, soki moto alakisi ngai te?” Filipo abandaki kosalisa moyekoli wana oyo azalaki na mposa mpenza ya koyeba Makomami mpo akóma moyekoli ya Klisto.​—⁠Misala 8:26-39.

2. (a) Na nini eyano oyo Moetiopia apesaki ezali mpenza na ntina? (b) Tokotalela mituna nini oyo ezali na boyokani na etinda ya Klisto ya kokómisa bato bayekoli?

2 Eyano oyo Moetiopia apesaki ezali mpenza na ntina. Alobaki ete: ‘Ndenge nini nakoki koyeba, soki moto alakisi ngai te.’ Ɛɛ, azalaki na mposa ya moto oyo akolakisa ye, moto oyo akomonisa ye nzela. Maloba yango emonisi mpenza ntina ya liteya moko ya sikisiki oyo Yesu akɔtisaki kati na etinda na ye ya kokómisa bato bayekoli. Liteya yango ezali nini? Mpo na kozwa eyano, tiká tótalela lisusu maloba ya Yesu oyo ezali na Matai mokapo 28. Lisolo ya liboso etalelaki mituna oyo: mpo na nini? mpe epai wapi? Sikoyo, tokotalela mituna mosusu mibale oyo ezali na boyokani na etinda ya Klisto ya kokómisa bato bayekoli; mituna yango ezali oyo: nini? mpe ntango nini?

“Koteyáká bango bátosa makambo nyonso”

3. (a) Ndenge nini moto akómaka moyekoli ya Yesu Klisto? (b) Kokómisa bato bayekoli ezali kosɛnga koteya nini lisusu?

3 Tosengeli koteya nini mpo na kosalisa bato mosusu bákóma bayekoli ya Klisto? Yesu apesaki bayekoli na ye etinda oyo: “Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisáká bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda.” (Matai 28:19, 20) Na yango, tosengeli koteya makambo oyo Klisto apesaki etinda. * Kasi nini ekosalisa mpo na koyeba ete moto oyo bateyi makambo oyo Yesu atindaki akosuka kaka te na kokóma moyekoli, kasi akotikala nde mpenza moyekoli? Moko ya makambo ya ntina oyo ekoki kosalisa emonisami na liponi malamu ya maloba oyo Yesu asalelaki. Tósimba likambo oyo, ye alobaki te ete: ‘Bóteya bango makambo nyonso oyo napesaki bino etinda.’ Kasi, alobaki nde boye: ‘Bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesaki bino etinda.’ (Matai 19:17) Yango esɛngi nini?

4. (a) Kotosa etinda elimboli nini? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge toteyaka moto atosa makambo oyo Klisto apesaki etinda.

4 Kotosa etinda elimboli “koyokanisa bomoi na yo” na etinda yango​—⁠elingi koloba, kolanda, to kobatela etinda yango. Na bongo, ndenge nini toteyaka moto atosa, to alanda, makambo oyo Klisto apesaki etinda? Tózwa ndakisa ya moto oyo alakisaka ndenge ya kokumba mituka, ntango azali koteya bayekoli na ye báyeba kotosa mibeko ya nzela. Ntango bazali na kelasi, molakisi yango akoki koteya bayekoli na ye mibeko ya nzela. Nzokande, mpo na koteya bayekoli na ye ndenge ya kotosa mibeko yango ya nzela, asengeli kozala elongo na bayekoli na ye mpe kosalisa bango, ntango bango moko bazali koyekola kokumba mpe wana bazali kosala makasi na kosalela makambo oyo bayekolaki. Ndenge moko mpe, ntango toyekolaka Biblia elongo na bato, toteyaka bango makambo oyo Klisto apesaki etinda. Nzokande, biso mpe tosengeli kozala elongo na bango mpe kosalisa bango wana bazali kosala makasi na kosalela malako ya Klisto na bomoi na bango ya mokolo na mokolo mpe na mosala ya kosakola. (Yoane 14:15; 1 Yoane 2:⁠3) Na yango, mpo na kokokisa malamumalamu etinda ya Klisto ya kokómisa bato bayekoli, esɛngi ete biso moko tózala bateyi mpe bato oyo basalisaka. Soki tosali bongo, tokomonisa ete tozali kolanda ndakisa ya Yesu mpe ya Yehova ye moko.​—⁠Nzembo 48:14; Emoniseli 7:⁠17.

5. Mpo na nini moto oyo tozali koyekola Biblia elongo na ye akoki kokakatana mpo na kotosa etinda ya Klisto, oyo ya kokómisa bato bayekoli?

5 Koteya bato bátosa makambo oyo Yesu apesaki etinda esɛngi lisusu kosalisa bango bátosa etinda yango ya kokómisa bato bayekoli. Likambo yango ekoki kobangisa bato mosusu oyo tozali koyekola Biblia elongo na bango. Ata soki kala bazalaki basangani ya mangomba ya boklisto, oyo kati na yango bazalaki komonisa molende, ekoki kozala ete bateyi kati na mangomba na bango wana ya kala bateyaki bango ata moke te mosala ya kokende mpe ya kokómisa bato bayekoli. Bakambi mosusu ya mangomba bandimaka polele ete mangomba ya boklisto elongi ata moke te na likambo etali koteya bandimi na bango kopalanganisa nsango malamu. Ntango alobelaki etinda ya Yesu, oyo ya kokende na mokili mpe kosalisa bato ya ndenge nyonso ete bákóma bayekoli, John R. W. Stott, moto ya mayele na kolimbola Biblia, alobaki ete: “Mbeba monene koleka, oyo esali ete baklisto oyo bateyaka Evanzile bálonga te kopalanganisa nsango malamu lelo, ezali mpo tozangi kotosa makambo oyo esɛngami na etinda yango.” Abakisaki ete: “Tolingaka kosakola evanzile kaka na monɔkɔ. Ntango mosusu tomonanaka lokola bato oyo bazali na libongo, oyo bazali kaka kobelela epai ya bato oyo bazali kozinda na mai. Tozali kokita na mai te mpo na kobikisa bango. Tozali kobanga kopɔla na mai.”

6. (a) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Filipo ntango tozali kosalisa moyekoli moko ya Biblia? (b) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali komibanzabanza mpo na moyekoli moko ya Biblia ntango abandi kosangana sika na mosala ya kosakola?

6 Soki moto oyo tozali koyekola Biblia elongo na ye azalaki kala na lingomba oyo basangani na yango “babangaka kopɔla na mai,” na elobeli ya elilingi, ekoki kozala mokakatano mpo na ye kolongola bobangi ya mai mpe kotosa etinda ya Klisto, oyo ya kokómisa bato bayekoli. Azali na mposa ya lisalisi. Na yango, tosengeli kozala motema molai na ntango tozali kolakisa ye mpe koteya ye makambo oyo ekokolisa mayele na ye mpe ekotinda ye na kosalela yango, kaka ndenge mateya ya Filipo efungolaki makanisi ya Moetiopia mpe etindaki ye azwa batisimo. (Yoane 16:13; Misala 8:35-38) Lisusu, mposa na biso ya koteya bayekoli ya Biblia ete bátosa etinda ya kokómisa bato bayekoli etindaka biso tózala elongo na bango mpe kosalisa bango ntango babandi kobima na mosala ya kosakola Bokonzi.​—⁠Mosakoli 4:9, 10; Luka 6:⁠40.

“Makambo nyonso”

7. Koteya bato ‘bátosa makambo nyonso’ esɛngi lisusu koteya bango bakomandema nini?

7 Tosukaka te kaka na koteya bayekoli ya sika ete bákómisa bato bayekoli. Yesu alakisaki biso tóteya bato ete “bátosa makambo nyonso” oyo ye apesaki etinda. Bakomandema mibale oyo eleki monene​—⁠elingi koloba, kolinga Nzambe mpe kolinga mozalani, ezali mpenza na kati ya makambo yango. (Matai 22:37-39) Ndenge nini tokoki koteya moyekoli moko ya sika ete atosa bakomandema yango?

8. Pesá ndakisa oyo ezali komonisa ndenge moyekoli ya sika akoki koteyama etinda oyo ya komonisa bolingo.

8 Tókanisa lisusu ndakisa ya moto oyo azali koyekola kokumba motuka. Ntango moyekoli yango azali kotambwisa motuka, wana molakisi na ye azali pembeni na ye, moyekoli yango azali koyekola kaka na koyoka molakisi na ye te, kasi mpe na kotala ndenge bakumbi-mituka mosusu bazali kosala. Na ndakisa, molakisi akoki kobenda likebi ya moyekoli na komonisa ye mokumbi-motuka mosusu oyo azali kolekisa na boboto mpenza moninga mosusu akɔta na nzela; to azali komonisa ye mokumbi-motuka mosusu oyo azali kokitisa miinda ya motuka na ye na bonkonde mpenza mpo aboma te miso ya baninga oyo bazali koya liboso na ye; to azali komonisa ye mokumbi-motuka mosusu oyo azali kosalisa moninga oyo motuka ekufi. Bandakisa wana ezali koteya moyekoli makambo ya ntina oyo akoki kosalela ntango ye moko azali kokumba motuka. Ndenge moko mpe, moyekoli ya sika oyo abandi kotambola na nzela oyo ezali komema na bomoi, ayekolaka makambo kaka epai ya molakisi na ye te, kasi lisusu na bandakisa ya malamu oyo azali komona epai ya bandeko mosusu na lisangá.​—⁠Matai 7:13, 14.

9. Ndenge nini moyekoli ya sika ayekolaka eloko babengi kotosa etinda ya komonisa bolingo?

9 Na ndakisa, moyekoli moko ya Biblia akoki komona moboti oyo azali kobɔkɔla bana kaka ye moko, ndenge azali kosala makasi mpo na komema bango na Ndako ya Bokonzi. Akoki komona ndeko mwasi moko oyo azali konyokwama na makanisi, kasi azangaka te koya na makita atako maladi na ye wana; to mobange mwasi moko, oyo mobali na ye akufá, kasi azali komema mibange mosusu na makita nyonso na motuka; to elenge moko oyo azali kosangana na mosala ya kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi. Moyekoli yango ya Biblia akoki komona ndenge nkulutu moko ya lisangá azali kopesa ndakisa na mosala ya kosakola na bosembo mpenza, atako azali na mikumba mingi na lisangá. Akoki komona Motatoli moko oyo akɔtá ndako mpo na mikakatano ya kolɔngɔnɔ ya nzoto, kasi oyo azali liziba ya bilendiseli ya elimo mpo na moto nyonso oyo akei kotala ye. Moyekoli yango akoki komona mobali moko ná mwasi na ye oyo bazali kosala mbongwana makasi na bomoi na bango mpo na kosalisa baboti na bango oyo bakómi mibange. Ntango azali komona baklisto wana ya boboto, oyo basalisaka bato mosusu mpe oyo babongi kotyelama motema, moyekoli ya sika azali koyekola na kotala ndakisa na bango, eloko nini babengi kotosa etinda oyo Klisto apesaki ya kolinga Nzambe mpe bazalani, mingimingi bandeko na biso baklisto. (Masese 24:32; Yoane 13:35; Bagalatia 6:10; 1 Timote 5:4, 8; 1 Petelo 5:2, 3) Na ndenge wana, mosangani nyonso ya lisangá ya boklisto akoki​—⁠mpe asengeli​—⁠kozala moteyi mpe moto oyo asalisaka.​—⁠Matai 5:⁠16.

“Tii na bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo”

10. (a) Tii ntango nini tokokoba mosala ya kokómisa bato bayekoli? (b) Ndakisa nini Yesu apesaki mpo na oyo etali kokokisa mikumba?

10 Tii ntango nini tosengeli kokoba mosala ya kokómisa bato bayekoli? Tii na boumeli ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo. (Matai 28:20) Tokokokisa mpenza etinda wana ya Yesu na boumeli ya ntango wana? Biso nyonso lokola lisangá na mokili mobimba, tozwi ekateli ya kokokisa yango. Na bambula eleki, tosepelaki kopesa ntango na biso, makasi na biso mpe nyonso oyo tozali na yango, mpo na koluka bato oyo ‘bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.’ (Misala 13:48) Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali kosala mwayene ya bangonga koleka milio misato mokolo na mokolo na mbula mobimba kati na mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli na mokili mobimba. Tosalaka bongo mpo tozali kolanda ndakisa ya Yesu. Ye alobaki ete: “Bilei na ngai ezali nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.” (Yoane 4:34) Yango ezali mpe mposa na biso mpenza. (Yoane 20:21) Eloko biso tolingi ezali kaka te kobanda mosala oyo bapesi biso; kasi nde kosilisa yango.​—⁠Matai 24:13; Yoane 17:⁠4.

11. Nini ekómeli bandeko na biso mosusu ya mibali mpe ya basi oyo bazali baklisto, mpe nini tosengeli komituna?

11 Nzokande likambo ya mawa, tozali komona ete bandeko na biso mosusu balɛmbi na elimo mpe, na yango, balɛmbisi mosala na bango to batiki kokokisa etinda ya Klisto, oyo ya kokómisa bato bayekoli. Ndenge nini tokoki kosalisa bango ete bázongela lisusu misala ya lisangá mpe bázongela lisusu kosangana na mosala ya kokómisa bato bayekoli? (Baloma 15:1; Baebele 12:12) Lolenge oyo Yesu asalisaki bantoma na ye, wana balɛmbaki mpo na mwa ntango moke, emonisi oyo tokoki kosala lelo.

Tómonisa ete tozali komibanzabanza

12. (a) Mwa moke liboso ya liwa ya Yesu, bantoma na ye basalaki nini? (b) Ndenge nini Yesu atalelaki bantoma na ye atako bamonisaki bolɛmbu makasi?

12 Na nsuka ya mosala ya Yesu awa na mabelé, ntango liwa na ye ekómaki pene, bantoma “basundolaki ye mpe bakimaki.” Kaka ndenge Yesu asakolaki: ‘bapanzanaki moto na moto na ndako na ye.’ (Malako 14:50; Yoane 16:32) Ndenge nini Yesu atalelaki baninga na ye oyo balɛmbaki na elimo? Mwa moke nsima ya lisekwa na ye, Yesu ayebisaki bayekoli na ye mosusu ete: “Bóbanga te! Bókende, bópesa nsango na bandeko na ngai, ete bákende na Galilai; mpe kuna bakomona ngai.” (Matai 28:10) Atako bantoma bamonisaki bolɛmbu makasi, Yesu azalaki kaka kobenga bango “bandeko na ngai.” (Matai 12:49) Azalaki kaka kotyela bango motema. Na ndenge yango, Yesu amonisaki ezaleli ya koyokela bato mawa mpe ya kolimbisa, ndenge Yehova mpe ayokelaka bato mawa mpe alimbisaka. (2 Mikonzi 13:23) Ndenge nini tokoki komekola Yesu?

13. Ndenge nini tosengeli kotalela baoyo balɛmbi na elimo?

13 Tosengeli komonisa mpenza ete tozali komibanzabanza mpo na baoyo balɛmbisi mosala to batiki kosangana na mosala ya kosakola. Tozali naino kokanisa misala oyo bandeko wana basalaki na bolingo na mikolo eleki​—⁠bamosusu basalaki yango na boumeli ya bambula ebele. (Baebele 6:10) Ya solo, tozali koyoka bango mposa mpenza. (Luka 15:4-7; 1 Batesaloniki 2:17) Kasi, ndenge nini tokoki komonisa ete tozali komibanzabanza mpo na bango?

14. Na komekola Yesu, ndenge nini tokoki kosalisa moto oyo alɛmbi?

14 Yesu ayebisaki bantoma oyo balɛmbaki ete bákende na Galilai mpe kuna bakomona ye. Boye tokoki koloba Yesu abengaki bango na likita moko ya ntina. (Matai 28:10) Ndenge moko mpe lelo oyo, tolendisaka baoyo balɛmbi na elimo ete báyangana na makita ya lisangá ya boklisto, mpe ekoki kosɛnga na biso kolendisa bango ndenge wana mbala na mbala. Libyangami oyo epesamaki epai ya bantoma ebotaki mbuma, mpo “bayekoli zomi na moko bakendaki na Galilai na ngomba oyo Yesu alakaki bango bákutana.” (Matai 28:16) Oyo nde esengo tozalaka na yango ntango bandeko oyo balɛmbi na elimo bandimi libyangami na biso mpe bazongeli lisusu kosangana na makita ya boklisto!​—⁠Luka 15:⁠6.

15. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu na likambo etali koyamba bato oyo balɛmbi, oyo bayei na esika oyo toyanganaka?

15 Tokosala nini ntango moklisto moko oyo alɛmbi ayei na Ndako ya Bokonzi? Yesu asalaki nini ntango amonaki bantoma na ye, oyo kondima na bango elɛmbaki mpo na mwa ntango moke, bakómi na esika oyo asɛngaki bango bákutana? “Yesu apusanaki mpe asololaki na bango.” (Matai 28:18) Atalaki bango na mosika te, kasi apusanaki nde penepene na bango. Kanisá kobɔndisama oyo bantoma bazwaki ntango Yesu asalaki bongo! Biso mpe tópusana penepene na bato oyo balɛmbi, oyo bazali kosala makasi ya kozongela lisangá ya boklisto mpe tóyamba bango na esengo.

16. (a) Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yesu asalaki epai ya bayekoli na ye? (b) Ndenge nini tokoki kotalela bato oyo balɛmbi ndenge Yesu atalelaki bango? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

16 Yesu asalaki lisusu nini? Ya liboso, ayebisaki bango boye: “Bokonzi nyonso epesameli ngai.” Ya mibale, apesaki bango mokumba oyo: “Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli.” Ya misato, apesaki bango elaka oyo: “Nazali elongo na bino mikolo nyonso.” Kasi likambo nini omoni, oyo Yesu asalaki te? Apamelaki bayekoli te mpo na bolɛmbu mpe ntembe oyo bazalaki na yango. (Matai 28:17) Ndenge oyo ye asalaki ebotaki mbuma? Ɛɛ. Eumelaki te, bantoma bakómaki lisusu “koteya mpe kosakola nsango malamu.” (Misala 5:42) Soki tozali komona mpe kotalela bato oyo balɛmbi na kolanda ndakisa ya Yesu, biso mpe tokoki kozwa matomba oyo ekolendisa kati na masangá na biso. *​—⁠Misala 20:35.

“Nazali elongo na bino mikolo nyonso”

17, 18. Makanisi nini ya kolendisa ezali kati na maloba ya Yesu, oyo ete: “Nazali elongo na bino mikolo nyonso”?

17 Maloba ya nsuka ya etinda ya Yesu, oyo ete: “Nazali elongo na bino mikolo nyonso,” ezali na makanisi oyo ezali kolendisa baoyo nyonso bazali kosala makasi mpo na kokokisa etinda ya Klisto, oyo ya kokómisa bato bayekoli. Ezala botɛmɛli nini oyo banguna bakoki kobimisa mpo na mosala na biso ya kosakola Bokonzi mpe ezala makambo nini oyo bato bakoki kokosela biso, tosengeli kobanga ata moke te. Mpo na nini? Yesu, Motambwisi na biso, oyo azali na ‘bokonzi nyonso na likoló mpe na mabelé,’ azali elongo na biso mpo na kosunga biso!

18 Elaka ya Yesu, oyo ete: “Nazali elongo na bino mikolo nyonso” ezali mpe liziba ya libɔndisi monene. Wana tozali kosala makasi mpo na kokokisa etinda ya Klisto, oyo ya kokómisa bato bayekoli, mikolo nyonso ezalaka kaka ya esengo te, mikolo mosusu ezalaka mpe ya mawa. (2 Ntango 6:29) Bamosusu kati na biso bazali kati na mawa ntango moto moko oyo bango balingaka mingi akufi. (Genese 23:2; Yoane 11:33-36) Bamosusu bazali kobunda na bobange, wana kolɔngɔnɔ mpe makasi ya nzoto ebandi kokita. (Mosakoli 12:1-6) Bamosusu mpe bazali konyokwama makasi na makanisi. (1 Batesaloniki 5:14) Mpe mingi kati na biso bazali kobunda na mikakatano ya nkita. Kasi, atako mikakatano wana, tozali kokokisa mosala na biso, mpamba te Yesu azali elongo na biso “mikolo nyonso,” ata mpe na mikolo ya mpasi mingi koleka kati na bomoi na biso.​—⁠Matai 11:28-30.

19. (a) Etinda ya Yesu, oyo ya kokómisa bato bayekoli, ezali na malako nini kati na yango? (b) Nini ezali kosalisa biso na kokokisa etinda ya Klisto?

19 Lokola tomoni na lisolo oyo mpe na lisolo ya liboso, etinda ya Yesu, oyo ya kokómisa bato bayekoli, etaleli makambo mingi. Yesu ayebisaki biso mpo na nini mpe epai wapi tosengeli kokokisa etinda na ye. Ayebisaki biso mpe nini tosengeli koteya mpe tii ntango nini tosengeli kosala yango. Ya solo, kokokisa etinda monene wana ezali mokakatano. Kasi lokola Klisto azali kosunga biso na bokonzi oyo azali na yango mpe lokola azali elongo na biso, tokoki kokokisa etinda yango! Ondimi yango?

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 3 Buku moko emonisi ete Yesu alobaki te: ‘kobatisáká bango mpe koteyáká bango,’ kasi nde “kobatisáká bango . . . koteyáká bango.” Na yango, etinda ya kobatisa mpe ya koteya ezali “makambo mibale . . . oyo elandani esika moko te.” Nzokande, “koteya ezali likambo oyo ezali kokoba, oyo ebandaka liboso ya batisimo . . . mpe elandaka nsima ya batisimo.”

^ par. 16 Makambo mosusu oyo ezali komonisa ndenge ya kotalela mpe kosalisa bato oyo balɛmbi ezwami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali 2003, nkasa 15-18.

Okopesa eyano nini?

• Ndenge nini toteyaka bato mosusu bátosa makambo oyo Yesu apesaki etinda?

• Makambo nini moyekoli ya sika akoki koyekola epai ya bandeko mosusu kati na lisangá?

• Tokoki kosala nini mpo na kosalisa baoyo balɛmbi na elimo?

• Elendiseli nini mpe libɔndisi nini tozwi na elaka ya Yesu, oyo ete: “Nazali elongo na bino mikolo nyonso”?

[Mituna ya boyekoli]

[Bililingi na lokasa 15]

Tosengeli kozala bateyi mpe bato oyo basalisaka

[Bililingi na lokasa 17]

Moyekoli ya sika ayekolaka makambo ya ntina na komona ndakisa ya bandeko mosusu