Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Bakendaki na masuwa na Sipele”

“Bakendaki na masuwa na Sipele”

“Bakendaki na masuwa na Sipele”

EZALI na maloba wana nde mokanda ya Misala ebandisi lisolo ya makambo oyo bamisionɛrɛ baklisto: Paulo, Balanaba, mpe Yoane Malako, bakutanaki na yango ntango bakendaki na Sipele soki na mobu 47 T.B. (Misala 13:⁠4) Lokola ezalaki na ntango wana, ndenge moko mpe lelo, Sipele ezali esika moko ya ntina mingi na ɛsti ya Mbu ya Méditerranée.

Baloma bazalaki na mposa makasi ya kozwa esanga yango, mpe na mobu 58 L.T.B., yango ekómaki na nse ya boyangeli na bango. Liboso bázwa yango, lisolo ya Sipele ezalaki na makambo ndenge na ndenge. Bafenisia, Bagrɛki, Baasulia, Baperse, mpe Baezipito bayangelaki yango. Bato oyo basalaki etumba babengi croisade, Ba-Franc, mpe Ba-Vénitien bayangelaki yango na Moyen Âge, mpe na nsima Ba-Ottoman bayangelaki yango. Na mobu 1914, Grande-Bretagne ezwaki esanga yango mpe eyangelaki yango tii na mobu 1960, mbula oyo esanga yango ezwaki lipanda.

Lelo oyo, eloko oyo ezali kokɔtisa mbongo mingi ezali turisme, kasi na mikolo ya Paulo, bozwi ya Sipele ezalaki kouta na bomɛngo ya mabelé, oyo Baloma bazalaki kozwa mpo na kotondisa bakɛsi ya Loma. Ezali banda kala nde bamonaki kwivre na esanga yango, mpe bakanisaka ete na nsuka ya boyangeli ya Baloma, batimolaki batone 250 000 ya kwivre. Nzokande, kaka mpo na konyangola bakwivre, bakompanyi esilisaki bazamba minene mingi. Ntango Paulo akómaki kuna, bazamba mingi ya esanga yango esilaki kolimwa.

Sipele na nse ya boyangeli ya Baloma

Buku Encyclopædia Britannica, elobi ete Jules César nde apesaki Sipele epai ya Ezipito mpe, nsima na ye, Marc Antoine. Kasi na boyangeli ya Augusite, Sipele epesamaki epai ya Loma mpe eyangelamaki​—⁠ndenge Luka, mokomi ya Misala, alobelaki yango malamu​—⁠na prokonsili, oyo azalaki moto ya boyangeli ya Loma. Selegiusi Paulusi azalaki prokonsili ntango Paulo azalaki kosakola kuna.​—⁠Misala 13:⁠7.

Boyokani ya kimya oyo babengi Pax Romana, oyo Loma esɛngisaki na mokili mobimba, esalaki ete bakompanyi oyo etimolaka mabanga ya ntalo na Sipele ekóma mingi mpe makambo ya mombongo etambola mpenza malamu. Mbongo mosusu ezalaki kokɔta na nzela ya basoda ya Loma mpe ya ebele ya bandimi ya bamboka mosika oyo bazalaki koya kokumisa Aphrodite, nzambe oyo azalaki nkolo ya esanga wana. Yango esalaki ete babalabala ya sika, mabongo, mpe bandako minene ya kitoko etongama. Grɛki ezalaki monɔkɔ ya Leta, mpe bato mingi bazalaki kosambela Aphrodite, Apollo, mpe Zeusi, bakisa mpe emperɛrɛ ya Loma. Bato bazalaki na bozwi mpe bazalaki na bomoi moko ya malamu mpe bazalaki kominanola na masano ndenge na ndenge.

Wana nde lolenge ya bomoi Paulo akutaki kuna ntango akendaki na Sipele koteya bato makambo etali Klisto. Nzokande, losambo ya boklisto ekɔtaki na Sipele liboso kutu ete Paulo akóma kuna. Lisolo ya Misala eyebisi biso ete, nsima ya liwa ya Setefano, moklisto ya liboso oyo akufaki liwa ya martiru, baklisto mosusu ya ekeke ya liboso bakimaki na Sipele. (Misala 11:19) Balanaba, moninga ya Paulo, azalaki moto ya Sipele, mpe lokola ayebaki malamu esanga yango, ntembe ezali te ete ye nde moto azalaki kolakisa Paulo nzela na mobembo wana mpo na kosakola.​—⁠Misala 4:36; 13:⁠2.

Ndenge makambo elekaki na mobembo ya Paulo

Ezali pɛtɛɛ te komonisa ndenge makambo elekaki na mobembo ya Paulo na Sipele. Nzokande, bato ya arkeoloji bayebi malamumalamu ndenge babalabala etongamaki na eleko ya boyangeli ya Loma. Na kotalela ndenge geografi ya esanga yango ezali, mbala mingi, ata babalabala minene oyo bazali kotonga lelo ezali kolanda kaka banzela oyo bamisionɛrɛ ya ekeke ya liboso bazalaki koleka.

Paulo, Balanaba, mpe Yoane Malako bakamataki masuwa na Selesia mpe bakendaki na libongo ya Salamini. Lokola Pafosi nde ezalaki mboka-mokonzi mpe esika libongo monene ezalaki, mpo na nini bango bakendaki na Salamini? Ezali mpo Salamini ezalaki na bokula ya ɛsti ya mbu, kaka kilomɛtrɛ 200 nde ekabolaki yango na Selesia, oyo ezalaki kati na esanga. Na nse ya boyangeli ya Baloma Pafosi nde ekómaki mboka-mokonzi na esika ya Salamini, kasi ata bongo Salamini etikalaki esika oyo makambo ya kominanola, ya kelasi mpe ya mombongo ezalaki mingi na esanga yango. Bayuda mingi bazalaki kofanda na Salamini, mpe bamisionɛrɛ babandaki “kosakola liloba ya Nzambe na basinagoga ya Bayuda.”​—⁠Misala 13:⁠5.

Lelo oyo, eloko etikali na Salamini ezali kaka bitika. Atako bongo, biloko oyo bato ya arkeoloji bazali kokundola ezali komonisa ete, na ntango ya kala, engumba yango ezalaki na lokumu mpe na bozwi mingi. Esika ya zando, esika oyo makambo ya politiki mpe ya losambo ezalaki kosalema, mbala mosusu yango nde ezalaki esika ya koyangana oyo elekaki monene mpenza na boyangeli ya Loma na bisika nyonso oyo bakundolá na etúká ya Méditerranée. Bitika na yango, banda na ntango ya Kaisala Augusite, emonisi ete ezalaki na bapavema ya kitoko ya bakaro oyo ezalaki na bililingi ndenge na ndenge, bandako ya ngalasisi, bapisini ya kitoko, libándá ya masano mpe ndako monene ya masano, malita ya kitoko, mpe esika monene ya kosala bateyatre oyo ezalaki na bisika ya kofanda 15 000! Ezali mpe na bitika ya tempelo monene ya Zeusi oyo ezalaki pembeni wana.

Kasi Zeusi abatelaki engumba te ete ebebisama te na koningana ya mabelé. Na mobu 15 L.T.B., koningana moko monene ya mabelé ebebisaki, tóloba, Salamini mobimba, atako na nsima Augusite atongaki yango lisusu. Salamini ebebisamaki lisusu na koningana ya mabelé oyo esalemaki na mobu 77 T.B., mpe batongaki yango lisusu. Na ekeke ya minei, Salamini ebebisamaki na koningana ya mabelé oyo ezalaki kosalema mbala na mbala, mpe etikalá kozwa lisusu te lokumu na yango ya kala. Na eleko ya Moyen Âge, libongo na yango ebebaki mpe basundolaki yango.

Toyebi te ndenge oyo bato ya Salamini bayambaki nsango oyo Paulo asakwelaki bango. Kasi, Paulo asengelaki mpe kosakola epai ya bato mosusu. Mpo na kolongwa na Salamini, bamisionɛrɛ bazalaki na nzela misato ya kopona: moko ezalaki na bokula ya nɔrdi ya mbu, ekatisi bangomba ya Kyrenia; mosusu na ngámbo ya wɛsti, ekatisi esobe ya Mesaoria eleki na eteni monene ya esanga yango; mpe ya misato elandi bokula ya sudi ya mbu.

Bato balobaka ete Paulo alandaki nzela ya misato. Yango ekatisi bisika kitoko ya bafɛrmɛ, oyo ezali na mabelé ya motane. Bakilomɛtrɛ soki 50 na ngámbo ya sudi-wɛsti, nzela yango ekei penepene na engumba ya Larnaca liboso ya kobaluka na ngámbo ya nɔrdi mpo na kokɔta na kati.

“Kokatisa esanga wana mobimba”

Balabala monene ezalaki kokóma nokinoki na engumba ya kala ya Ledra. Lelo oyo, na esika yango, batongá engumba Nicosia, oyo ezali mboka-mokonzi. Bilembeteli nyonso, oyo ezalaki komonisa engumba wana ya kala, esilá kolimwa. Kasi bifelo ya Venise oyo etongamaki na ekeke ya zomi na motoba ezingi ntei ya Nicosia, oyo katikati na yango, tozali kokuta nzela moko ya moke oyo bato balekaka mingi, oyo babengi Ledra. Toyebi te soki Paulo alekaki na nzela ya Ledra to te. Biblia eyebisi biso kaka ete ‘bakatisaki esanga wana mobimba.’ (Misala 13:⁠6) Buku Ndenge Wycliffe amonisi lisolo ya geografi ya mikili oyo elobelami na Biblia (na Lingelesi) elobi ete “mbala mosusu maloba wana emonisi ete batalaki mpenza Bayuda nyonso oyo bazalaki na Sipele.”

Mposa ya Paulo ezalaki ya kosakolela ebele ya bato oyo bazalaki na Sipele. Na yango, ekoki kozala ete alandaki nzela moko ya sudi longwa na Ledra koleka Amathus mpe Kourion​—⁠bingumba minene mibale oyo etondaki na bato ndenge na ndenge.

Kourion ezalaki na esika etombwaná longwa na mbu, na esika oyo ekiti tii na mabongo oyo ezali na nse. Engumba kitoko wana ya Bagrɛki ná Baloma ebebisamaki kaka na koningana ya mabelé oyo ebebisaki Salamini na mobu 77 T.B. Ezali mpe na bitika ya tempelo oyo basalaki mpo na Apollo banda na mobu 100 T.B. Libándá ya masano ekokaki koyamba bato 6 000. Bomoi ya malamu oyo bato mingi bazalaki na yango na Kourion ekoki komonana na bapavema kitoko ya bakaro oyo ezalaki na bililingi ndenge na ndenge, ata na bandako minene oyo bato bamitongelaki bango moko.

Kokende na Pafosi

Banda na Kourion nzela kitoko wana emati na ngámbo ya wɛsti, eleki na etúká oyo epai vinyo ezalaki kouta, ezali komata mokemoke tii, na mbala moko, ekiti na esika oyo egumbamagumbamá tii na esika oyo ezali na mabongo ya mabangamabanga. Na kotalela masapo ya Bagrɛki, ezali na esika wana nde mbu ebotaki nzambe-mwasi Aphrodite.

Aphrodite azalaki moko ya banzambe ya Bagrɛki oyo ayebanaki mingi na Sipele mpe bazalaki kosambela ye mingi tii na ekeke ya mibale ya T.B. Pafosi ezalaki esika monene oyo bazalaki kosambela Aphrodite. Fɛti moko monene ezalaki kosalema kuna na eleko nyonso ya prɛnta mpo na lokumu na ye. Bandimi bazalaki kouta na Asie Mineure, na Ezipito, na Grɛsi, mpe na Perse, mpo na koya na bafɛti yango. Ntango Sipele ezalaki na nse ya boyangeli ya Ba-Ptolemée, bato ya Sipele babandaki kosambela Ba-Falao.

Pafosi ezalaki mboka-mokonzi ya Sipele na boyangeli ya Loma mpe esika bokonzi ya prokonsili ezalaki, mpe ezalaki kuna nde bazalaki kosala mbongo ya kwivre. Yango mpe ebebisamaki na koningana ya mabelé oyo esalemaki na mobu 15 L.T.B., mpe Augusite apesaki mbongo mpo bátonga lisusu engumba yango, kaka ndenge asalaki mpo na Salamini. Biloko oyo batimolaki emonisi ete, na ekeke ya liboso, bato bazalaki na bomoi moko ya bozwi na Pafosi​—⁠babalabala ezalaki minene na engumba yango, bandako minene ya kitoko oyo bato bamitongelaki bango moko, biteyelo ya kolakisa miziki, bisika ya kosala ngalasisi, mpe ndako monene ya masano.

Yango nde Pafosi epai oyo Paulo, Balanaba, mpe Yoane Malako bakendaki, mpe ezalaki wana nde Selegiusi Paulusi​—⁠“mobali moko ya mayele”​—⁠“alukaki makasi mpenza koyoka liloba ya Nzambe” atako nganga-nkisi Elimasi azalaki kotɛmɛla bango makasi. Prokonsili “akamwaki na mateya ya Yehova.”​—⁠Misala 13:6-12.

Nsima ya kosilisa malamumalamu mosala na bango ya kosakola na Sipele, bamisionɛrɛ bakóbaki mosala na bango na Asie Mineure. Mobembo wana ya liboso ya misionɛrɛ oyo Paulo asalaki, ezalaki likambo moko ya ntina mingi mpo na kopalanganisama ya boklisto ya solo. Buku Mibembo ya Santu Paulo na Grɛki ya Ɛsti (na Lingelesi) ebengi yango “ebandeli ya solosolo ya mosala ya boklisto mpe ya . . . mosala ya Paulo lokola misionɛrɛ.” Buku yango ebakisi boye: “Lokola Sipele ezali na esika oyo banzela ya mbu ekutaná, banzela oyo ezali komema na Sulia, na Asie Mineure, mpe na Grɛsi, yango emonanaki lokola ete ezalaki ebandeli mpo na mosala ya misionɛrɛ.” Kasi yango ezalaki kaka ebandeli. Bikeke ntuku mibale na nsima, mosala ya misionɛrɛ mpo na baklisto ezali kaka kokoba, mpe ekoki solo kolobama ete nsango malamu ya Bokonzi ya Yehova esili mpenza kokóma na “esika eleki mpenza mosika na mabelé.”​—⁠Misala 1:⁠8.

[Karte na lokasa 20]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

SIPELE

NICOSIA (Ledra)

Salamini

Pafosi

Kourion

Amathus

Larnaca

BANGOMBA YA KYRENIA

ESOBE YA MESAORIA

BANGOMBA YA TROODOS

[Elilingi na lokasa 21]

Lokola atondaki na elimo santu, Paulo abomaki miso ya nganga-nkisi Elimasi ntango azalaki na Pafosi