Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bomoi moko ya esengo atako bampasi

Bomoi moko ya esengo atako bampasi

Lisolo ya bomoi

Bomoi moko ya esengo atako bampasi

YA AUDREY HYDE

Soki nakanisi bambula koleka 63 oyo nalekisi na mosala ya ntango nyonso​—⁠mbula 59 oyo nalekisi na biro monene ya Batatoli ya Yehova​—⁠nakoki koloba ete bomoi na ngai ezali bomoi moko ya esengo. Ya solo, ezalaki mpenza mpasi komona ndenge mobali na ngai ya liboso azalaki kokufa malɛmbɛmalɛmbɛ mpo na kanser mpe komona ndenge mobali na ngai ya mibale akufaki na maladi mabe ya Alzheimer. Kasi bótika nayebisa bino ndenge nabatelaki esengo na ngai atako bampasi wana.

NALEKISAKI bomwana na ngai na fɛrmɛ oyo ezalaki pene na engumba moke ya Haxtun, na esobe oyo ezali na nɔrdi-ɛsti ya Colorado, pene na ndelo ya Nebraska. Kati na bana motoba oyo Orille ná Nina Mock babotaki, ngai nazalaki mwana ya mitano. Russell, Wayne, Clara, ná Ardis babotamaki kati na mobu 1913 mpe mobu 1920, mpe ngai nabotamaki na mobu oyo elandaki. Curtis abotamaki na mobu 1925.

Na mobu 1913, mama na biso akómaki Moyekoli ya Biblia, nkombo oyo bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana. Na nsima, biso nyonso kati na libota, tokómaki Batatoli.

Bomoi moko ya kitoko na esobe yango

Tata na biso azalaki moto moko oyo azalaki kolinga te kotikala nsima na makambo. Tozalaki na miinda ya kura na bandako na biso nyonso oyo ezalaki na fɛrmɛ, eloko oyo ezalaki mpenza komonana mingi te na mikolo wana. Tozalaki mpe kosepela na biloko oyo fɛrmɛ na biso ezalaki kobimisa​—⁠maki oyo bansoso na biso moko ezalaki kobota, mpe miliki, krɛmɛ, mpe manteka oyo bangɔmbɛ na biso moko ezalaki kobimisa. Tozalaki kosalela bampunda mpo na mosala ya bilanga mpe tozalaki kolona mbuma babengi fraise ná mbala, blé mpe masangu.

Tata na biso alingaki ete biso nyonso tóyeba kosala mosala. Balakisaki ngai mosala ya bilanga, liboso kutu nakɔta kelasi. Nazali lisusu kokanisa ntango oyo nazalaki kosala mikala na kongo na kati ya elanga na biso na eleko ya molunge, na nse ya moi makasi. Nazalaki komituna: ‘Nakosilisa kosala mikala yango?’ Mitoki ezalaki kokita ngai na nzoto, mpe banzoi ezalaki koswa ngai. Na bantango mosusu, nazalaki komiyokela mawa mpo bilenge mosusu bazalaki kosala mosala makasi boye lokola biso te. Kasi, ezali solo ete soki nakanisi bomwana na ngai, nasepelaka ndenge balakisaki biso kosala mosala.

Biso nyonso tozalaki na mosala ya kosala. Ardis ayebaki mosala ya kobimisa miliki ya bangɔmbɛ koleka ngai; na yango mosala na ngai ezalaki ya kotya bopɛto na bandako ya bampunda, kolongola bosɔtɔ na pau. Ata bongo, biso mpe tozalaki kominanola mpe kosakana. Ngai ná Ardis, tozalaki kosakana na ndembo ya base-ball na ekipi ya mboka oyo tozalaki kofanda. Ngai nazalaki kobwaka ndembo yango, to nazalaki kobɛta na esika ya misato, mpe Ardis azalaki kobɛta na esika ya liboso.

Kongɛnga ya minzoto na butu ezalaki mpenza kitoko na esobe yango. Ebele wana ya minzoto ezalaki kotinda ngai kokanisa Yehova Nzambe, Mozalisi na biso. Atako nazalaki mwana moke, nakokaki kokanisa Nzembo 147:4, oyo ezali koloba boye: “Ye [Yehova] akotánga motuya na minzoto na likoló, akobyanga yango nyonso na nkombo na yango.” Na boumeli ya ebele ya babutu yango, Judge, mbwa na biso, azalaki kokɔtisakɔtisa motó na ye na elamba na ngai mpe azalaki kaka elongo na ngai. Mbala mingi, na nsima ya nzanga, nazalaki kofanda na ekɔtelo ya ndako na biso mpe nazalaki kosepela komona bilanga ya blé oyo eteli naino te wana mopɛpɛ ezalaki kopɛpa likoló na yango, ezalaki kosala ete bilanga yango ya blé emonana lokola kongɛnga ya palata ntango moi ezali kobɛta yango.

Ndakisa malamu ya mama na biso

Mama azalaki mwasi moko oyo azalaki koboma nzoto mpo na biso. Tata azalaki ntango nyonso mokonzi malamu ya libota, mpe mama azalaki koteya biso ndenge ya komonisa limemya epai ya tata. Na mobu 1939, tata mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Toyebaki ete tata azalaki kolinga biso mingi, atako azalaki kosalisa biso misala makasi mpe azalaki kobondelabondela biso te. Mbala mingi, na eleko ya mpiɔ, tata azalaki kokangisa bampunda mibale na motuka ya kobenda mpe azalaki kotya biso na kati mpe yango ezalaki komema biso. Tozalaki kosepela mingi ntango banɛjɛ ezalaki kopanzana!

Kasi, ezali mama nde moto alakisaki biso kolinga Nzambe mpe komemya Biblia. Toyekolaki ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova mpe ye nde azali Liziba ya bomoi. (Nzembo 36:9; 83:18) Toyekolaki mpe ete mibeko oyo Nzambe apesá biso, ezali te mpo na kolongola biso esengo, kasi ezali mpo na litomba na biso. (Yisaya 48:17) Mama azalaki ntango nyonso koyebisa biso ete tozali na mosala moko ya ntina oyo tosengeli kokokisa. Toyekolaki ete Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.”​—⁠Matai 24:⁠14.

Na mikolo yango, ntango nazalaki kokóma na ndako, wana nauti na kelasi mpe mama azali te na ndako, nazalaki koluka ye. Mokolo mosusu, wana nazalaki na mbula soki motoba to nsambo, nakutaki ye na ndako ya banyama. Bongo mbula ebandaki kobɛta makasi. Tozalaki na etazɛ ya likoló, na esika ya kobomba matiti, mpe natunaki ye soki Nzambe azalaki koyeisa Mpela mosusu. Akitisaki ngai motema, alobaki ete Nzambe alaká ete akoboma lisusu mabelé na mpela te. Nazali lisusu kokanisa mbala mingi oyo nazalaki kokima mpo na kokende na libulu ya kobombana, oyo ezalaki na nse ya ndako yango, mpo mipɛpɛ makasi ezalaki koleka mbala na mbala.

Mama azalaki kobima na mosala ya kosakola liboso kutu ete nabotama. Etuluku ya bato oyo bazalaki koyangana na ndako na biso, bango nyonso bazalaki na elikya ya kozala na bomoi elongo na Klisto na likoló. Atako kosakola ndako na ndako ezalaki mokakatano mpo na mama, bolingo na ye mpo na Nzambe esilisaki kobanga oyo azalaki na yango. Atikalaki sembo tii na mokolo ya liwa na ye, na mokolo ya 24 Novɛmbɛ 1969, wana azalaki na mbula 84. Nalobelaki ye na litoi ete: “Mama, ozali kokende na likoló, mpe okozala elongo na bato oyo oyebani na bango.” Nazalaki na esengo mingi kozala elongo na mama na mokolo yango mpe komonisa ye ete nazalaki kondima elikya yango! Alobaki na ngai na boboto mpenza ete: “Malamu mingi, mwana na ngai.”

Tobandi kosakola

Na mobu 1939, Russell akómaki mobongisi-nzela, nkombo oyo Batatoli ya Yehova babengaka basakoli ya ntango nyonso. Asalaki mosala ya mobongisi-nzela na Oklahoma mpe na Nebraska tii na mobu 1944 ntango babengaki ye akende kosala na biro monene ya Batatoli ya Yehova (oyo babengaka Betele), na Brooklyn, na etúká ya New York. Nabandaki mosala ya mobongisi-nzela na mokolo ya 20 Sɛtɛmbɛ 1941, mpe nasalaki na bisika mingi: na Colorado, Kansas, mpe Nebraska. Bambula oyo nasalaki mosala ya mobongisi-nzela ezalaki bambula ya esengo mpenza, ezalaki kaka te mpo nasalisaki bato mosusu báyeba Yehova, kasi mpo ngai moko mpe nayekolaki kotyela ye motema.

Na ntango oyo Russell abandaki mosala na ye ya mobongisi-nzela, Wayne azalaki na inivɛrsite, na nɔrdi-ɛsti ya États-Unis, nsima ya kosala mosala ya mosuni mpo na mwa ntango. Na nsima, babengisaki ye na Betele. Asalaki na boumeli ya mwa bambula na Fɛrmɛ ya Bokonzi, pene na Ithaca, na etúká ya New York. Kuna, bazalaki kolona biloko ya kolya mpo na libota moke oyo ezalaki kosala na fɛrmɛ mpe mpo na bato 200 oyo bazalaki kosala na Betele ya Brooklyn. Wayne asalelaki makoki na ye mpe mayele na ye na mosala ya Yehova tii na liwa na ye na mobu 1988.

Ardis, ndeko na ngai ya mwasi, abalaki James Kern, mpe babotaki bana mitano. Ardis akufaki na mobu 1997. Clara, ndeko na ngai mosusu ya mwasi, azali kaka sembo na mosala ya Yehova tii lelo, mpe ntango nazwaka konje, nakendaka kotala ye na Colorado, epai afandaka. Curtis, leki na biso ya mobali, ayaki na Betele ya Brooklyn na katikati ya bambula 1940. Azalaki kokumba motuka mpo na kokende kotika bisaleli mpe kozwa biloko ya kolya na Fɛrmɛ ya Bokonzi. Atikalaki kobala te, akufaki na mobu 1971.

Mposa na ngai​—⁠Kosala na Betele

Bayaya na ngai ya mibali basilaki kokende na Betele, mpe mposa na ngai ezalaki ya kokende kosala mpe kuna. Nandimi ete ndakisa na bango ya malamu esalaki ete nabengisama na Betele. Koyoka ndenge mama azalaki kolobela lisolo ya ebongiseli ya Nzambe, mpe komona ngai moko na miso kokokisama ya bisakweli ya Biblia oyo etali mikolo ya nsuka, yango ekolisaki epai na ngai mposa ya kokende kosala na Betele. Nasalaki ndai epai ya Yehova kati na libondeli ete soki apesi ngai nzela ya kosala na Betele, nakolongwa kuna te, longola kaka soki mikumba ya boklisto esɛngi nalongwa.

Nakómaki na Betele na mokolo ya 20 Yuni 1945, mpe bapesaki ngai mosala ya kotya bopɛto na bashambre. Nazalaki kotya bopɛto na bashambre 13, oyo ezalaki na bambeto 26 ya kotanda mokolo na mokolo, bakisa mpe kotya bopɛto na bakulware, na baeskalye, mpe na maninisa. Mosala yango ezalaki makasi. Mikolo nyonso, ntango nazalaki kosala, nazalaki koloba ngai moko na nse ya motema ete: ‘Ya solo, olɛmbi, kasi ozali na Betele, ndako ya Nzambe!’

Ntango nabandaki mosala na ngai sika na Betele, likambo moko ya nsɔni mpenza ekómelaki ngai. Lokola nakolaki na mboka, nayebaki te ete mesa ya komema biloko ezalaki masini moko ya moke oyo etombolaka biloko longwa na etaze moko kino na etaze mosusu. Mokolo moko, nayokaki telefone eleli, ndeko moko alobi ete: “Okosepela kokitisela biso mesa ya komema biloko?” Na mbala moko, moto oyo abengaki, akataki telefone, nayebaki likambo ya kosala te. Kasi na nsima, namikundolaki ete moko ya bandeko oyo bafandaka na etaze oyo natyaka bopɛto, mosala na ye ezali ya kotya bilei ná masanga na mesa. Na bongo, nabɛtaki na shambre na ye mpe nalobaki na ye ete: “Bazali kosɛnga yo okita na kuku.”

Nabalani ná Nathan Knorr

Banda mobu 1920, bazalaki kosɛnga na bandeko ya Betele, oyo bazalaki na mposa ya kobala, ete bálongwa na Betele mpo na kokende kosala mosala ya Bokonzi na bisika mosusu. Kasi na ebandeli ya bambula 1950, bandeko oyo basalaki na Betele mwa bambula ebele, bapesaki bango nzela ya kobala mpe kotikala. Lokola na ntango yango Nathan H. Knorr, oyo azalaki kokamba mosala ya Bokonzi na mokili mobimba, amonisaki ete azali kosepela na ngai, nalobaki boye na nse ya motema: ‘Sikoyo, namoni moto moko oyo akotikala!’

Nathan azalaki na mikumba mingi na oyo etali kokɛngɛla mosala oyo Batatoli ya Yehova bazalaki kosala na mokili mobimba. Na bongo, azalaki mpenza kolobela ngai makambo polele, azalaki komonisa ngai bantina oyo mpo na yango nasengelaki kokanisa malamumalamu liboso ya kondima ye na libala. Na mikolo wana, azalaki kosala mibembo mingi mpo na kotala bafiliale ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba mpe mbala mingi kobima na ye ezalaki kozwa bapɔsɔ ebele. Bongo azalaki komonisa ngai polele ete tokobandaka kozala esika moko te na boumeli ya ntango molai.

Lokola nazalaki elenge, makanisi na ngai ezalaki ya kobala na eleko ya prɛnta mpe kokende na bisanga ya Pacifique ya Hawaï mpo na kolekisa ntango ya bopemi nsima ya libala. Nsukansuka, tobalanaki eleko ya mpiɔ, na mokolo ya 31 Yanuali 1953, mpe tolekisaki bopemi na biso nsima ya libala na mokolo yango ya pɔsɔ nsima ya nzanga mpe na mokolo ya lomingo na etúká ya New Jersey. Tozongelaki mosala na mokolo ya yambo. Kasi, nsima ya pɔsɔ moko, tolekisaki bopemi ya nsima ya libala oyo ezwaki pɔsɔ mobimba.

Moninga oyo azalaki mosali ya molende

Nathan azalaki na mbula 18 ntango ayaki na Betele na mobu 1923. Azwaki formasyo ya malamu epai ya baasalá-kala lokola Joseph F. Rutherford, oyo azalaki kokamba mosala ya Batatoli, ná Robert J. Martin, oyo azalaki mokambi ya mosala ya konyata mikanda. Ntango ndeko Martin akufaki na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1932, Nathan akómaki mokambi ya mosala ya konyata mikanda. Na mbula oyo elandaki, ndeko Rutherford azwaki Nathan azala elongo na ye ntango akendaki kotala bafiliale ya Batatoli ya Yehova na Mpoto. Na sanza ya Yanuali 1942 ntango ndeko Rutherford akufaki, Nathan apesamelaki mokumba ya kokɛngɛla mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba.

Nathan azalaki mobali moko oyo ayebaki komona mosika, ntango nyonso azalaki kozwa bibongiseli na kotalela bokoli ya mosala na mikolo oyo ezalaki koya. Bandeko mosusu bamonaki ete ezali malamu te kozwa bibongiseli yango, mpamba te nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo emonanaki ete ekómi mpenza pene. Kutu ndeko moko, oyo amonaki Nathan azali kosala bibongiseli yango, atunaki ye ete: “Nini yango ozali kosala, ndeko Knorr? Ozali na kondima te?” Azongisaki ete: “Nazali na kondima, kasi soki nsuka eyei nokinoki te ndenge tozali kokanisa, tokozanga eloko moko te.”

Likambo oyo ezalaki mpenza mposa makasi ya Nathan ezalaki ya kosala eteyelo moko mpo na bamisionɛrɛ. Yango wana, na mokolo ya 1 Febwali 1943, eteyelo mpo na bamisionɛrɛ efungwamaki na fɛrmɛ monene, epai Wayne, ndeko na ngai ya mobali, azalaki kosala na ntango yango. Atako eteyelo yango esɛngaki koyekola Biblia na mozindo na boumeli ya basanza soki mitano, Nathan asalaki nyonso mpo ete bayekoli bázala mpe na ntango ya kominanola. Na bambula ya ebandeli ya eteyelo yango, azalaki kobɛta ndembo elongo na bango, kasi na nsima atikaki kobɛta noki akozoka mpe azanga koyangana na mayangani ya etúká na eleko ya molunge. Asepelaki nde kozala arbitre. Bayekoli bazalaki kosepela mingi ntango azalaki kobongola na ndenge na ye mibeko ya lisano mpo na kolongisa bayekoli oyo bautaki na bamboka mosusu.

Kosala mibembo elongo na Nathan

Nsukansuka, nabandaki kosala mibembo elongo na Nathan. Nazalaki kosepela mingi ntango nazalaki kopesana masolo ná basali ya Betele mpe bamisionɛrɛ. Namonaki ngai moko na miso bolingo na bango mpe bokangami na bango epai ya Nzambe mpe nayekolaki makambo oyo basalaka mokolo na mokolo mpe bomoi na bango na bamboka oyo batindaki bango. Na boumeli ya bambula mingi, nazalaki kaka kozwa mikanda oyo bandeko bazalaki kokoma mpo na komonisa botɔndi na bango mpo na bantango oyo tolekisaki elongo.

Soki nakanisi mibembo oyo tosalaki, namikundolaka makambo mingi. Na ndakisa, ntango tokendeki na mboka Pologne, ngai moko namonaki bandeko basi mibale bazalaki koyebisana makambo na matoi. Natunaki bango ete: “Mpo na nini bozali koyebisana makambo na matoi?” Basɛngaki bolimbisi, bamonisaki ngai ete, ntango mosala ya Batatoli ya Yehova epekisamaki na mboka Pologne mpe wana bapolisi bazalaki kotya na bandako ya bato bamasini oyo ezwaka mingongo, banda ntango wana bamesanaki koyebisana makambo na matoi.

Ndeko mwasi Adach azalaki moko kati na bandeko mingi oyo basalaki mosala na Pologne na ntango ya epekiseli. Azalaki kolata nsuki oyo basi babakisaka na motó. Mokolo moko alongolaki yango mpe alakisaki ngai lipipi ya mpota oyo monyokoli moko azokisaki ye. Nayokaki mpasi mingi na motema na komona ngai moko na miso bilembo ya minyoko makasi oyo bandeko na biso ya mibali mpe ya basi bayikelaki mpiko.

Longola Betele, esika mosusu oyo nalingaka mingi ezali bongo mboka Hawaï. Nazali komikundola liyangani oyo tosalaki kuna na engumba ya Hilo na mobu 1957. Ezalaki likambo moko monene, mpe motángo ya bayangani elekaki motángo ya Batatoli nyonso ya engumba yango. Kutu guvɛrnɛrɛ apesaki Nathan fungola ya kokɔta na engumba yango. Bato mingi bayaki koyamba biso, balatisaki biso bafololo.

Liyangani mosusu ya kosepelisa mpenza esalemaki na engumba Nuremberg, na Allemagne, na mobu 1955, esalemaki na esika oyo basoda ya Hitler bazalaki kosala bangalasisi na bango. Eyebani malamu ete Hitler alapaki ndai ya kosilisa Batatoli ya Yehova na Allemagne, kasi talá sikoyo libándá wana ya masano etondaki mɛkɛ na Batatoli ya Yehova! Nakokaki kokanga mai ya miso te. Ebaelo ezalaki mpenza monene mpe ezalaki na rido moko ya monene mpenza oyo esimbamaki na makonzi 144 ya minene. Nazalaki na estrade mpe nakokaki komona ebele ya bato koleka 107 000, oyo bazalaki koyoka. Na esika oyo nazalaki na estrade, ezalaki mpasi mingi mpo nakoka komona bato oyo bazalaki na molɔngɔ ya nsuka.

Tomonaki bosembo ya bandeko ya Allemagne mpe makasi oyo Yehova apesaki bango na ntango ya minyoko oyo bazwaki na boyangeli ya Nazi. Yango elendisaki ekateli na biso ya kokangama makasi na Yehova mpe ya kotikala sembo epai na ye. Nathan asalaki lisukulu ya nsuka, mpe na nsuka na yango, apesaki bandeko mbote ya bokabwani na kopɛpa lobɔkɔ. Na mbala moko, bango mpe bapesaki ye mbote ya bokabwani na kopɛpa matambala na bango. Matambala yango ezalaki komonana lokola elanga moko kitoko ya bafololo.

Likambo mosusu oyo nakobosana yango te ezali mobembo oyo tosalaki na mboka Portugal na sanza ya Desɛmbɛ 1974. Toyanganaki na likita ya liboso oyo Batatoli basalaki na engumba Lisbon, nsima wana mosala na biso ya kopesa litatoli endimamaki na mibeko ya leta. Epekisamaki na boumeli ya mbula 50! Atako na ntango wana, basakoli ya Bokonzi bazalaki kaka 14 000  na mboka yango, bato koleka 46 000 bazalaki wana mpo na makita mibale oyo esalemaki. Mai ya miso ebimaki ngai ntango bandeko balobaki ete: “Tokobombana lisusu te. Tozwi bonsomi.”

Banda na ntango oyo nazalaki kosala mibembo elongo na Nathan tii lelo, nasepelaka kopesa litatoli ya libaku malamu​—⁠na mabándá ya mpɛpɔ, na barestora​—⁠mpe nasepelaka kopesa litatoli na balabala. Nazalaka ntango nyonso na mikanda mpo na komilɛngɛla kopesa litatoli. Mokolo moko, ntango tozalaki kozela mpɛpɔ oyo eumelaki na kokóma, mwasi moko atunaki ngai soki nazalaki kosala wapi. Yango epesaki ngai nzela ya kosolola na ye mpe bato mosusu oyo bazalaki zingazinga bazalaki kolanda lisolo. Mosala ya Betele mpe mosala na ngai ya kosakola nde esali ete nazanga makambo ya kosala te mpe nazala na esengo mingi.

Maladi mpe bilendiseli ya nsuka

Na mobu 1976, Nathan abɛlaki maladi ya kanser, mpe ngai, elongo na basangani ya libota ya Betele, tosalisaki ye ayikela yango mpiko. Atako kolɔngɔnɔ na ye ya nzoto ezalaki se kobeba, tozalaki kobengisa na shambre na biso bandeko ndenge na ndenge oyo bazalaki na ntango yango na Brooklyn mpo na kozwa formasyo, bandeko oyo bautaki na bafiliale ya mokili mobimba. Nazali lisusu kokanisa bandeko oyo bayaki kotala biso: Don ná Earlene Steele, Lloyd ná Melba Barry, Douglas ná Mary Guest, Martin ná Gertrud Poetzinger, Pryce Hughes, mpe bamosusu mingi. Mbala mingi bazalaki kobɛtɛla biso masolo ya makambo oyo ezalaki koleka na bamboka na bango. Masolo oyo emonisaki ndenge bandeko na biso batikalaki ngwi na ntango ya bipekiseli; masolo yango ezalaki mpenza kosimba motema na ngai.

Ntango Nathan amonaki liwa na ye ekómi pene, akómaki kopesa ngai batoli ya malamu oyo ekosalisa ngai nayika mpiko ntango nakotikala ngai moko. Alobaki boye: “Libala na biso ezalaki libala moko ya esengo. Bato mingi bazali na libala lokola oyo ya biso te.” Likambo oyo esalaki ete libala na biso ezala ya esengo ezali mayele ya koyeba kokanisa oyo Nathan azalaki na yango. Na ndakisa, ntango tozalaki kokutana na bato ndenge na ndenge na mibembo oyo tozalaki kosala, azalaki koloba na ngai ete: “Audrey, soki na bantango mosusu nayebisi yo te ete moto boye nkombo na ye Songolo, ezali kaka mpo nabosani nkombo na ye.” Nazalaki kosepela mingi ndenge azalaki koyebisa ngai yango liboso.

Nathan akundwelaki ngai ete: “Nsima ya liwa, elikya na biso ezali kokokisama solosolo, mpe tokozala na mpasi lisusu te.” Na nsima, alendisaki ngai na maloba oyo: “Talá liboso, mpo kuna nde mbano na yo ezali. Komitungisa mpo na bomoi oyo eleká te​—⁠atako makambo oyo eleká ekobanda kozongelaka yo na makanisi. Malɛmbɛmalɛmbɛ, okobanda kobosana yango. Kominona te lokola omemi ngambo mpe kozala mawamawa te. Sepelá na makambo ya esengo mpe mapamboli oyo ozwaki. Nsima ya mwa ntango, okomona ete kokanisa makambo oyo eleká epesaka esengo. Kokanisa makambo oyo eleká ezali likabo Nzambe apesá biso.” Abakisaki ete: “Zalá na mosala ya kosala​—⁠na bomoi na yo, luká eloko oyo okoki kosala mpo na bato mosusu. Yango ekosalisa yo ozala na esengo na bomoi.” Nsukansuka, na mokolo ya 8 Yuni 1977, Nathan asukisaki bomoi na ye awa na mabelé.

Nabalani ná Glenn Hyde

Nathan ayebisaki ngai boye: nakokaki kozala na bomoi na kokanisáká makambo oyo eleká to nakokaki komisalela bomoi mosusu ya sika. Na bongo, na mobu 1978, nsima ya kokende kofanda na Fɛrmɛ ya la Société Watchtower na Wallkill, na etúká ya New York, nabalanaki ná Glenn Hyde, mobali moko ya kitoko mingi, ya kimya mpe ya boboto. Liboso akóma Motatoli, azalaki kosala na masuwa ya basoda, na ntango oyo États-Unis ezalaki kobunda ná Japon.

Glenn azalaki kotambola na masuwa babengi PT (patrol torpedo) mpe azalaki kosala na esika oyo bamasini ezalaki. Mpo na makɛlɛlɛ ya bamasini, matoi na ye ekómaki koyoka lisusu malamu te. Nsima ya etumba, akómaki kosala mosala ya koboma mɔtɔ. Na boumeli ya bambula mingi, azalaki kolɔta bandɔtɔ ya nsɔmɔ mpo na makambo oyo amonaki na ntango ya etumba. Ayekolaki solo ya Biblia na nzela ya sɛkrɛtɛrɛ na ye, oyo azalaki kopesa ye litatoli ya libaku malamu.

Na nsima, na mobu 1968, babengisaki Glenn na Betele, na Brooklyn, mpo na kosala mosala ya koboma mɔtɔ. Bongo ntango Fɛrmɛ ya la Société Watchtower ezwaki bamasini na yango ya koboma mɔtɔ, batindaki ye kuna na mobu 1975. Na nsima, maladi ya Alzheimer enyokolaki ye makasi. Mbula zomi nsima ya kobalana ná ye, Glenn akufaki.

Ndenge nini nakokaki koyikela likambo yango mpiko? Toli ya bwanya oyo Nathan apesaki ngai, na ntango oyo ayebaki ete alingi kokufa, ebɔndisaki ngai lisusu. Nakobaki kotánga makambo oyo akomelaki ngai, oyo nakosala ntango nakotikala ngai moko. Tii lelo, nasalelaka toli wana mpo na kolendisa bandeko oyo babalani na bango bakufi, bango mpe babɔndisamaka na toli wana ya Nathan. Ɛɛ, ezali malamu kotala liboso ndenge ye alendisaki ngai.

Bondeko ya solosolo

Mingimingi, ezali baninga ya motema kati na libota ya Betele nde basalisaki ngai nazala na bomoi moko ya malamu mpe ya esengo. Moko oyo nakoki mpenza kobosana te ezali ndeko mwasi Esther Lopez, oyo azwaki lipɔlɔmi na mobu 1944 na kelasi ya misato ya Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Azongaki na Brooklyn na sanza ya Febwali 1950 mpo na kosala mosala ya kobongola mikanda na biso, oyo elimbolaka Biblia, na monɔkɔ ya Espagnol. Mbala mingi, ntango Nathan azalaki kosala mibembo, Esther azalaki moninga na ngai mpenza ya motema. Ye mpe azali na Fɛrmɛ ya la Société Watchtower. Sikoyo lokola azali na mbula koleka 90, kolɔngɔnɔ na ye ya nzoto ebandi kolɛmba mpe lopitalo na biso ezali kosalisa ye.

Kati na libota na biso mpenza, kaka Russell ná Clara nde bazali naino na bomoi. Russell azali na mbula koleka 90 mpe azali kosala na Betele ya Brooklyn na bosembo mpenza. Azalaki kati na bandeko ya liboso oyo bapesamelaki nzela ya kotikala na Betele nsima ya kobala. Na mobu 1952, abalanaki ná ndeko mwasi Jean Larson, oyo azalaki mpe kosala na Betele. Max, ndeko mobali ya Jean Larson, ayaki na Betele na mobu 1939 mpe na mobu 1942 akitanaki Nathan lokola mokɛngɛli na mosala ya konyata mikanda. Max azali kokoba kokokisa mikumba mingi na Betele, bakisa mpe kosalisa Helen, mwasi na ye ya bolingo, oyo azali konyokwama na maladi ya sclérose.

Soki nakanisi bambula koleka 63 oyo nalekisi na mosala ya ntango nyonso mpo na Yehova, nakoki mpenza koloba ete bomoi na ngai ezali mpenza bomoi moko ya esengo. Betele ekómá ndako na ngai, mpe nazali kokoba kosala awa na esengo na motema. Napesi baboti na ngai longonya na ndenge balakisaki biso ntina ya koyeba kosala mosala mpe ndenge bakolisaki na mitema na biso mposa ya kosalela Yehova. Kasi eloko mpenza oyo ezali kosala ete bomoi ezala na esengo ezali bondeko ya solosolo oyo tozali na yango mpe elikya ya kozala na bomoi elongo na bandeko na biso ya mibali mpe ya basi na paladiso awa na mabelé, kosalela Yehova, Mozalisi na biso Monene mpe Nzambe ya solo kaka moko, seko na seko.

[Elilingi na lokasa 24]

Mokolo ya libala ya baboti na ngai na Yuni 1912

[Elilingi na lokasa 24]

Kobanda na lobɔkɔ ya mwasi: Russell, Wayne, Clara, Ardis, ngai, mpe Curtis na 1927

[Elilingi na lokasa 25]

Natɛlɛmi katikati ya Frances ná Barbara McNaught, ntango tozalaki babongisi-nzela na 1944

[Elilingi na lokasa 25]

Na Betele na 1951. Kobanda na lobɔkɔ ya mwasi: Ngai, Esther Lopez, mpe semeki na ngai ya mwasi Jean

[Elilingi na lokasa 26]

Ngai ná Nathan mpe baboti na ye

[Elilingi na lokasa 26]

Ngai ná Nathan na 1955

[Elilingi na lokasa 27]

Ngai ná Nathan na Hawaï

[Elilingi na lokasa 29]

Ngai ná Glenn, mobali na ngai ya mibale