Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda batindelaki Noa

Mokanda batindelaki Noa

Mokanda batindelaki Noa

“NDEKO na ngai ya bolingo, Noa, natángá mbala mingi lisolo na yo kati na Biblia mpe ndenge otongaki masuwa oyo ebikisaki yo ná libota na yo na Mpela.”

Wana ezali maloba ya ebandeli oyo ezali na mokanda oyo Minnamaria, elenge mwasi moko ya mbula 15, akomaki mpo na momekano ya bana-kelasi ya mbula 14 tii 21. Ebongiseli ya Misala ya posita ya Finlande, Lisangá ya balakisi ya monɔkɔ ya Finnois mpe Ebongiseli ya Finlande oyo etalelaka makambo etali mikanda nde ebongisaki momekano yango. Bana-kelasi basengelaki kokoma mokanda moko oyo ezali kolobela buku moko. Mokanda yango esengelaki kotindama epai ya nkolo ya buku yango to epai ya moto moko oyo buku yango elobeli. Balakisi baponaki mikanda koleka 1 400 oyo bana-kelasi bakomaki mpe batindaki yango epai ya bato oyo babongisaki momekano yango. Na nsima, bato oyo babongisaki momekano baponaki mokanda oyo elekaki mikanda nyonso oyo ekozwa lifuti ya liboso, na nsima baponaki mikanda zomi oyo ekozwa lifuti ya mibale, mpe baponaki lisusu mikanda zomi oyo ekozwa lifuti ya misato. Minnamaria asepelaki mingi ndenge mokanda na ye etyamaki na etuluku ya misato.

Mpo na nini Minnamaria, mwana-kelasi oyo azali kaka na mbula 15, akomelaki Noa, moto oyo azalaki na bomoi esili koleka bambula soki 5 000? Alobi boye: “Eloko ya liboso oyo eyaki na makanisi na ngai ezali Biblia. Nameseni mpenza na bato oyo Biblia elobeli. Natángá masolo na bango mbala mingi mpe na miso na ngai bakómá lokola nde bazali na bomoi. Naponaki Noa mpamba te bomoi na ye ezali na makambo mingi ya kosepelisa mpe ekeseni na oyo ya ngai.”

Mokanda Minnamaria atindelaki Noa esuki na maloba oyo: “Tii lelo ozali ndakisa malamu na likambo etali kondima mpe botosi. Bomoi na yo elendisaka bato nyonso oyo batángaka Biblia ete básala makambo oyo ezali na boyokani na kondima na bango.”

Mokanda ya elenge oyo atángaka Biblia emonisi mpenza ete Biblia “ezali na bomoi mpe ezali na nguya” likoló ya bomoi ya bato nyonso, ezala bilenge to mikóló.​—⁠Baebele 4:⁠12.