Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nzambe azali mobandisi ya bampasi oyo tozali komona?

Nzambe azali mobandisi ya bampasi oyo tozali komona?

Nzambe azali mobandisi ya bampasi oyo tozali komona?

NTANGO mwana na ye ya mwasi ya mokóló azalaki konyokwama na bampota makasi na bɔɔngɔ, Marion asalaki likambo oyo bato mingi kati na biso bakokaki mpe kosala. * Abondelaki Nzambe mpo asalisa ye. Marion alobi ete: “Oyo ezalaki mbala ya liboso namiyoka ete nabulungani makasi mpe moto ya kosalisa ngai azali te.” Na nsima, ntango mpasi ya mwana na ye ekómaki makasi koleka, Marion abandaki komituna soki mpenza Nzambe azali. Amitunaki ete: “Mpo na nini likambo ya boye?” Azalaki koyeba te ndenge nini Nzambe ya bolingo, oyo amibanzabanzaka mpo na bato, akokaki kosundola ye boye.

Marion azali kaka ye moko te na kokutana na likambo ya boye. Na mokili mobimba, ebele ya bato bamimonaki lokola ete Nzambe asundoli bango na ntango oyo bazalaki mpenza na mposa ete asalisa bango. Nsima ya kobomama ya mwana mobali ya mwana na ye, Lisa alobaki boye: “Nazali kaka komituna motuna oyo: ‘Mpo na nini NZAMBE atiki nzela na makambo ya mabe?’ Kondima oyo nandimelaka Nzambe ezali lisusu te ndenge nazalaki kondimela ye kala.” Ndenge moko mpe, mwasi moko, nsima ya komona ndenge babomaki mwana na ye ya mobali kozanga ntina, alobaki boye: “Nzambe abɔndisaki ngai te na likambo oyo ekómelaki ngai. Amonisaki elembo ata moko te ete azali komibanzabanza mpo na ngai to azali koyokela ngai mawa.” Abakisaki ete: “Nakolimbisa Nzambe ata moke te.”

Bato mosusu mpe bazalaka na mayoki mabe ya ndenge wana epai ya Nzambe ntango bazali komona makambo oyo ezali kosalema na mokili. Bazali komona bamboka oyo etondi na bobola ná kozanga bilei, bato oyo bazali na elikya ata moko te, oyo bakimá mboka na bango mpo na bitumba, ebele ya bana oyo motángo na bango eyebani te, oyo sida ekómisá bango bitike, mpe bamilio ya bato oyo bazali konyokwama na bamaladi mosusu. Ntango bato mingi bazali komona makambo wana mpe makambo mosusu ya ndenge wana, bazali koloba ete ezali foti ya Nzambe mpo azali kosala eloko te mpo na kosilisa yango.

Kasi, likambo ya koyeba yango oyo: tosengeli kopesa Nzambe foti te mpo na bampasi oyo ezali konyokola bato. Kutu, ezali na makambo mingi oyo endimisi biso ete, etikali moke, Nzambe atya nsuka na bampasi oyo ezali kozwa bato. Tosɛngi yo, tángá lisolo oyo elandi mpo omona ete Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na biso.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 2 Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.