Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Moto nyonso ya mayele akosala na boyebi”

“Moto nyonso ya mayele akosala na boyebi”

“Moto nyonso ya mayele akosala na boyebi”

MPOSA ya kotambwisama na Biblia, Liloba ya Nzambe, “eleki mposa ya wolo, ata ya wolo mingi malamu.” (Nzembo 19:​7-10) Mpo na nini? Mpamba te ‘mibeko ya oyo azali na bwanya [Yehova] ezali liziba na bomoi; mpo na kolongwa na mitambo ya kufa.’ (Masese 13:14) Soki tosaleli toli ya Makomami, yango ekosuka kaka na kobongisa bomoi na biso te, kasi ekosalisa mpe biso tókwea te na mitambo oyo etyaka bomoi na biso na likama. Ezali mpenza na ntina mingi ete tóluka koyeba Makomami mpe tósalela makambo oyo tozali koyekola!

Na Masese 13:​15-25, Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala, apesaki toli oyo ezali kosalisa biso tósala na boyebi mpo tózala na bomoi moko ya molai mpe ya malamu koleka. * Asaleli masese moko ya mikusemikuse mpo na komonisa ndenge Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso mpo bato básepela na biso, tótikala sembo na mosala na biso ya kosakola, tótalelaka disipilini na ndenge ya malamu mpe tóponaka baninga na biso malamu. Alobeli mpe bwanya oyo tokomonisa soki totikeli bana na biso libula mpe soki tozali kopesa bango disipilini na bolingo.

Bososoli malamu esalaka ete bato básepela na biso

Salomo alobi boye: “Bososoli malamu esalaka ete moto andimama, kasi nzela ya bato ya bokosi ezali mpasi.” (Masese 13:​15NW) Mokanda moko elobi ete na monɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia, maloba “bososoli malamu,” to mayele ya malamu, “elimboli kozala na bokɛngi, koyeba kokesenisa makambo mpe kopesa makanisi ya malamu.” Ekozala mpasi te mpo bato básepela na moto oyo azali na bizaleli ya boye.

Talá ndenge Paulo asalelaki bososoli epai ya Filemona, moninga na ye moklisto, ntango azongisaki Onezime, moombo ya Filemona oyo akimaki mpe akómaki moklisto na nsima. Paulo asɛngaki Filemona ayamba Onezime malamu, ndenge kaka akokaki koyamba ye moko ntoma Paulo. Kutu, Paulo asɛngaki afuta nyongo nyonso oyo Onezime akokaki kozala na yango epai ya Filemona. Ya solo, Paulo akokaki kosalela bokonzi na ye mpe kopesa Filemona etinda ete asala likambo oyo asɛngaki ye. Kasi aponaki kosilisa likambo yango na mayele mpe na bolingo. Na ndenge yango, Paulo alikyaki ete Filemona akondima kosala likambo yango, mpe akosala kutu koleka. Biso mpe tosengeli kosala ndenge wana epai ya baninga na biso baklisto, boye te?​—⁠Filemona 8-21.

Nzokande, nzela ya bato ya bokosi ezalaka “mpasi.” Na ndenge nini? Moto moko ya mayele alobi ete liloba oyo esalelami na esika oyo elimboli “makasi to elendá, mpe esalelami wana mpo na kolobela makambo makasi ya bato mabe. . . . Moto oyo akangamá na banzela na ye ya mabe, ya motema makasi mpe atyaka mpenza likebi te na mateya malamu oyo basusu bapesaka ye, azali nde kolanda nzela ya libebi.”

Salomo alobi lisusu boye: “Moto nyonso ya mayele akosala na boyebi, kasi moto ya zoba akopalanganisa bozoba.” (Masese 13:​16NW) Moto yango ya mayele azali moto moko ya mayele mabe te. Awa batye mayele esika moko na boyebi mpe bamonisi ete ezali epai ya moto ya ekɛngɛ, moto oyo akanisaka malamu liboso asala likambo boye to boye. Moto ya mayele, soki bakoseli ye makambo, to ata soki bafingi ye, abalolaka lolemo na ye liboso aloba. Abondelaka mpe asalaka makasi amonisa mbuma ya elimo santu mpo asilika koleka ndelo te. (Bagalatia 5:​22, 23) Moto ya ekɛngɛ apesaka nzela te ete moto mosusu to likambo moko oyo ekómeli ye etambwisa ye. Kasi amipekisaka mpe aboyaka koswana, likambo oyo ekómelaka mbala mingi bato oyo basilikaka nokinoki ntango basali bango mabe.

Moto ya mayele asalaka mpe na boyebi ntango azwaka bikateli. Ayebi ete ezali mpasi moto asala misala malamu soki alandi kaka makanisi oyo eyeli ye na motó to soki alandi kaka bamposa ya motema na ye, to kaka mpo bilandalanda. Yango wana, azwaka ntango ya kotalela malamumalamu likambo oyo akutani na yango. Alukaka koyeba makambo nyonso oyo ndenge ezali mpe alukaka koyeba nini akoki kosala. Na nsima, alukalukaka na Makomami mpo na koyeba mibeko to mitinda ya Biblia oyo etali likambo yango. Nzela ya moto ya ndenge wana ezalaka kaka alima.​—⁠Masese 3:​5, 6NW.

“Motindami ya sembo akobikisa”

Biso Batatoli ya Yehova tozwi mokumba ya kosakola nsango oyo euti na Nzambe. Maloba ya lisese oyo elandi ezali kosalisa biso tótikala sembo ntango tozali kokokisa mokumba na biso. Elobi boye: ‘Momemi-nsango mabe akokwea na mabe nde motindami ya sembo akobikisa.’​—⁠Masese 13:⁠17.

Awa, balobeli mingimingi bizaleli ya momemi-nsango. Bongo soki moto oyo amemi nsango abongoli to abebisi yango na nko? Bakokatela ye etumbu, boye te? Kanisá naino Gehazi, mosaleli ya mosakoli Elisa, oyo na lokoso na ye, apesaki nsango ya lokuta epai ya Naamana, mokonzi ya basoda ya Sulia. Maladi ya maba oyo Naamana abikaki na yango ekómaki epai ya Gehazi. (2 Mikonzi 5:​20-27) Bongo soki motindami azali lisusu sembo te mpe atiki mpenza kosakola nsango yango? Biblia elobi boye: “[Soki] yo olobi te mpo na kokebisa moto mabe ete abongwa na nzela na ye, moto mabe yango akokufa na mabe na ye, nde [ngai Yehova] nakotuna mpo na makila na ye na lobɔkɔ na yo.”​—⁠Ezekiele 33:⁠8.

Kasi motindami ya sembo abikisaka ye moko mpe bato oyo bazali koyoka ye. Paulo alendisaki Timote boye: “Kebá ntango nyonso mpo na yo moko mpe mpo na mateya na yo. Kangamá na makambo yango, mpamba te na kosaláká bongo okobikisa ná yo moko ná baoyo bazali koyoka yo.” (1 Timote 4:16) Kanisá ndenge mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na bosembo mpenza ezali kobikisa bato. Ezali kofungola miso ya bato ya mitema sembo mpe ezali komema bango na solo oyo ezali kopesa bango bonsomi. (Yoane 8:32) Ata soki bato baboyi koyoka nsango yango, momemi-nsango ya sembo ‘akobikisa mpenza molimo na ye moko.’ (Ezekiele 33:⁠9) Tóbosanaka te kokokisa mokumba na biso ya kosakola. (1 Bakolinti 9:16) Mpe tókeba ntango nyonso ete ‘tósakola liloba,’ tólɛmbisa makasi na yango te to tóluka te kobakisela yango pilipili ná mungwa mpo na kosepelisa bato.​—⁠2 Timote 4:⁠2.

‘Ye oyo atosaka mpamela akumisamaka’

Moto ya ekɛngɛ asengeli nde koboya toli oyo bapesi ye mpo na kosalisa ye? Masese 13:18 elobi boye: “Bobola mpe nsɔni ezali epai na ye oyo akoboya [disipilini, NW]; nde ye oyo akotosa mpamela akokumisama.” Tokomonisa ete tozali na bwanya soki tozali kondima ata mpamela oyo tosɛngaki te. Toli malamu ekoki kosalisa biso mingi na ntango oyo tomoni te ete tozali na mposa na yango. Koyoka toli ya ndenge wana ekoki kobatela biso na bampasi ya motema mpe kosalisa biso tókima makambo oyo ekomemela biso mawa. Koboya koyoka mpamela ekomemela biso nsɔni.

Ntango bapesaka biso longonya oyo ebongi, yango epesaka biso makasi mpe elendisaka mpenza. Kasi tosengeli mpe komizela na kozwa mpamela mpe kondima yango. Talá naino mikanda mibale oyo ntoma Paulo akomelaki Timote. Atako mikanda yango epesaki Timote longonya mpo na bosembo na ye, kasi etondi mpe na batoli mpo na ye. Paulo apesaki elenge mobali yango batoli mingi na makambo etali kokangama na kondima mpe kozala na lisosoli malamu, ndenge ya kozala na bato na kati ya lisangá, kokolisa ezaleli ya kokangama na Nzambe mpe kosepela na oyo azali na yango, koteya basusu, kotɛmɛla bapɛngwi mpe kokokisa mosala na ye ya kosakola. Bilenge ya lisangá basengeli koluka mpe kondima toli oyo euti na bandeko oyo bayebi makambo mingi.

‘Tambolá na bato ya bwanya’

Mokonzi ya mayele alobi boye: “Mposa oyo [ekokisami, NW] epesi elɛngi na motema; nde bato ya zoba bakoboya kolongwa epai na mabe.” (Masese 13:19) Mokanda moko elobi boye na ntina etali ndimbola ya lisese oyo: “Ntango mokano moko to mposa moko ekokisami, moto, na mobimba na ye, atondaka na esengo . . . Kokokisa mokano na yo epesaka esengo mingi mpenza, yango wana kolongwa na mabe ezali mpenza eloko ya mabe mpenza mpo na bazoba. Basalelaka kaka banzela mabe mpo na kokokisa bamposa na bango, mpe soki batiki mabe, bakozanga esengo mpo bakokokisa bamposa na bango lisusu te.” Ezali mpenza na ntina mingi tózalaka na bamposa ya malamu!

Baninga na biso babongolaka mpenza makanisi na biso, makambo oyo tolingaka mpe oyo toboyaka! Salomo alobi likambo moko oyo ezalaka solo ntango nyonso, alobi boye: “Ye oyo akotambola na bato ya [bwanya, NW] akozala na [bwanya, NW] nde motamboli elongo na bazoba akobukana.” (Masese 13:20) Ya solo, bato oyo tolekisaka ntango elongo na bango, ezala na masano, na internet mpe na mikanda oyo totángaka, babongolaka ndenge bomoto na biso ezali sikoyo mpe ndenge ekozala na mikolo ekoya. Ezali mpenza na ntina mingi ete tóponaka baninga na biso malamu!

“Akotika libula”

Mokonzi ya Yisalaele alobi boye: “Mabe [elandaka, NW] bato ya masumu, nde malamu ekozongisamela bayengebene.” (Masese 13:21) Koluka boyengebene epesaka mbano, mpamba te Yehova amibanzabanzaka mpo na bayengebene. (Nzembo 37:25) Nzokande, tosengeli koyeba ete “ntango mpe likambo ekanami te” ekómelaka biso nyonso. (Mosakoli 9:​11NW) Nini tokoki kosala mpo na komibongisa mpo na makambo oyo ekanamaka te?

Salomo alobi boye: “Moto malamu akotika libula epai ya bana ya bana na ye.” (Masese 13:22a) Baboti batikelaka mpenza bana na bango libula monene soki bazali kosalisa bango báyeba Yehova mpe bákóma na boyokani malamu elongo na ye! Kasi, soki likoki ezali, ekozala mpe malamu kozwa bibongiseli mpo libota etikala na biloko soki moboti moko akufi mbalakaka, boye te? Na bisika mingi, batata bakoki kozwa bibongiseli na bakompanyi ya asiransi, kosala testama mpe kobomba mwa bongo.

Bongo tokoloba nini mpo na libula ya bato mabe? Salomo alobi lisusu boye: “Bozwi ya moto mabe [ebombami mpo na, NW] moyengebene.” (Masese 13:22b) Longolá matomba nyonso oyo ezali kozwama lelo, likambo yango ekosalema mpenza ntango Yehova akokokisa elaka na ye ya kosala ‘likoló ya sika mpe mabelé ya sika’ oyo kati na yango “boyengebene ekofanda.” (2 Petelo 3:13) Bato mabe bakolongolama mpe “bato ya bopɔlɔ [bakozwa, NW] mokili.”​—⁠Nzembo 37:⁠11.

Moto ya ekɛngɛ asalaka na boyebi ata ntango azali na biloko mingi te. Masese 13:23 elobi ete: “Bilei malamu ezali na elanga ya babola nde [ezali na moto oyo abomami, NW] mpo na kozanga kosambisama na sembo.” Mosala makasi mpe mapamboli ya Nzambe nde esalaka ete babola bákóma na biloko mingi. Nzokande ntango bosembo ezali te, ekateli ya mabe ekoki kosilisa bozwi ya moto.

“Akolandela ye na disipilini”

Bato ya kozanga kokoka bazalaka na mposa ya disipilini mpe basengeli kozwa yango banda bomwana. Mokonzi ya Yisalaele alobi boye: “Ye oyo aboyi fimbo [azali koyina, NW] mwana na ye, kasi ye oyo alingi ye [akolandela ye ná disipilini, NW].”​—⁠Masese 13:⁠24.

Fimbo ezali elembo ya bokonzi. Na Masese 13:​24, emonisi bokonzi oyo baboti bazali na yango. Na mokapo oyo, kosalela fimbo elimboli kaka te kobɛta mwana. Kasi elimboli kosembola mwana, ezala na ndenge nini. Na bantango mosusu, kopamela mwana na boboto ekoki mpo na kosembola ye atika ezaleli moko ya mabe. Mwana mosusu, esɛngaka ntango mosusu kopamela ye makasi. Masese 17:10 (NW) elobi ete: “Mpamela ekɔtaka mingi epai ya moto ya mayele koleka kobɛta zoba mbala nkama.”

Disipilini ya baboti esengeli kopesama ntango nyonso na bolingo mpe na bwanya mpo na litomba ya mwana. Moboti oyo azali na bolingo akangaka miso na mabunga ya mwana na ye te. Kasi alukaka yango mpo na kolongola yango liboso ezwa misisa makasi. Atako bongo, moboti oyo azali na bolingo alandaka toli oyo ya Paulo: “Bino, batata, bósilikisaka bana na bino te, kasi bókoba kobɔkɔla bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.”​—⁠Baefese 6:⁠4.

Bongo soki moboti azali kotika mwana asala nyonso alingi mpe azali kosembola ye te na ndenge esengeli? Na mikolo ekoya, bakopesa ye matɔndi mpo na ndenge azalaki kotika mwana asala nyonso oyo alingi? Te! (Masese 29:21) Biblia elobi boye: “Mwana oyo atikami epai na ye moko akokómisa mama na ye na nsɔni.” (Masese 29:15) Soki baboti bazali koboya kosalela bokonzi oyo bazali na yango, yango emonisi ete bazali komibanbanza mpo na bana na bango te to bazangi bolingo. Kasi soki basaleli bokonzi yango na boboto mpe bakangami na yango, ekomonisa ete bazali komibanzabanza mpo na bana na bango mpe balingi bango.

Moto ya ekɛngɛ mpe ya sembo oyo asalaka na boyebi ya solosolo akopambwama. Salomo alobi na biso boye: “Moyengebene [azali kolya tii akotondisa, NW] motema na ye; nde libumu ya bato mabe ekozanga.” (Masese 13:25) Yehova ayebi oyo ezali malamu mpo na biso na makambo nyonso ya bomoi: na makambo na biso ya libota, na boyokani na biso na bato, na mosala na biso ya kosakola, to ntango bapesi biso disipilini. Mpe soki tozali kosalela malamu toli oyo ezali na kati ya Liloba na ye, tokozala mpenza na bomoi ya malamu koleka.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 3 Mpo na lisolo oyo elobeli Masese 13:​1-14, talá nkasa 21-25 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 2003.

[Elilingi na lokasa 28]

Moto ya mayele, soki bakoseli ye makambo, abalolaka lolemo na ye liboso aloba

[Elilingi na lokasa 29]

Mosakoli ya Bokonzi oyo azali sembo amemelaka bato bolamu mingi

[Elilingi na lokasa 30]

Atako tolendisamaka ntango bapesi biso longonya, tosengeli mpe kondima kosembolama

[Elilingi na lokasa 31]

Moboti oyo azali na bolingo akangaka miso na mabunga ya mwana na ye te