Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bósepela ndenge bozali baklisto!

Bósepela ndenge bozali baklisto!

Bósepela ndenge bozali baklisto!

“Moto oyo azali komikumisa, tiká ete amikumisa na kati ya Yehova.”​—1 BAKOLINTI 1:31.

1. Ndenge nini bato mingi bakómi kotalela losambo?

 NA MIKOLO euti koleka, mopanzi-nsango moko oyo alobelaka makambo ya mangomba amonisaki ndenge oyo bato mingi bakómi kotalela losambo na bango. Alobaki boye: “Lelo oyo, mbongwana monene oyo tozali komona ezali te ete losambo yango moko ebongwani; ezali nde ete bato mingi bazali lisusu kokipe makambo ya Nzambe te.” Abakisaki ete bato mingi “bandimaka ete Nzambe azali . . . kasi bakipaka ye te.”

2. (a) Mpo na nini tokoki kokamwa te ete bato mingi bazali lisusu kokipe makambo ya Nzambe te? (b) Ndenge bato mingi bazali lisusu komipesa te na makambo ya Nzambe ezali na likama nini mpo na baklisto ya solo?

2 Ndenge oyo bato bakómi kotalela losambo ezali likambo ya kokamwa te mpo na bato oyo bayekolaka Biblia. (Luka 18:8) Kutu, bazalaki koyeba ete bato bakokóma ndenge wana. Banda kala, mangomba ya lokuta ekosaka bato mpe ekokisaka bamposa na bango te. (Emoniseli 17:15, 16) Nzokande, ndenge bato mingi bazali lisusu komipesa te na makambo ya Nzambe ezali likama mpo na baklisto ya solo. Ekozala mabe mingi soki kondima na biso na solo ya Biblia elɛmbi mpe tobungisi molende na biso na mosala ya Nzambe. Yesu akebisaki baklisto ya ekeke ya liboso oyo bazalaki kofanda na Laodikia mpo na ezaleli wana ya kozala mɔtɔ te, mpiɔ te na maloba oyo: “Ozali mpiɔ te mɔtɔ mpe te. Nalingaki ozala to mpiɔ to mɔtɔ. . . . Ozali mwa molunge kaka.”​—Emoniseli 3:15-18.

Tóyeba malamu soki tozali banani

3. Baklisto bakoki kosepela na makambo nini oyo bazali na yango?

3 Mpo baklisto bákóma te kotalela makambo ya Nzambe bongobongo, basengeli koyeba malamu soki bazali banani mpe basengeli kosepela na nkombo na bango. Lokola tozali basaleli ya Yehova mpe bayekoli ya Klisto, Biblia ekoki komonisa biso soki tozali mpenza banani. Tozali “batatoli” ya Yehova, “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe” na mosala ya koyebisa bato “nsango malamu.” (Yisaya 43:10; 1 Bakolinti 3:9; Matai 24:14) ‘Tolinganaka’ biso na biso. (Yoane 13:34) Baklisto ya solo bazali bato oyo “makoki na bango ya kososola, lokola bazali kosalela yango, eteyami mpo na kokesenisa ná mabe ná malamu.” (Baebele 5:14) Tozali “miinda na mokili.” (Bafilipi 2:15) Tosalaka makasi ete “etamboli na [biso] ezalaka malamu na kati ya bikólo.”​—1 Petelo 2:12; 2 Petelo 3:11, 14.

4. Ndenge nini mosambeli ya Yehova akoki koyeba soki azali nani te?

4 Basambeli ya solo ya Yehova bayebi mpe malamu soki bazali banani te. “Bazali bato ya mokili te,” ndenge Nkolo na bango Yesu Klisto azalaki moto ya mokili te. (Yoane 17:16) Bakabwani na bato ya “bikólo” oyo bazali “na kati ya molili na makanisi, mpe batangwi mosika na bomoi oyo ezali ya Nzambe.” (Baefese 4:17, 18) Yango wana, bayekoli ya Yesu ‘baboyaka ezaleli ya kotyola Nzambe mpe bamposa ya mokili mpe bafandaka na makanisi malamu mpe na boyengebene mpe na ezaleli ya kokangama na Nzambe na kati ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.’​—Tito 2:12.

5. Toli ya ‘komikumisa na kati ya Yehova’ elimboli nini?

5 Lokola toyebi malamu soki tozali banani mpe boyokani nini tozali na yango na Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba, ‘tomikumisaka na kati ya Yehova.’ (1 Bakolinti 1:31) Komikumisa ya ndenge nini? Biso baklisto ya solo tosepelaka lokola Yehova azali Nzambe na biso. Tolandaka toli oyo: “Tiká ete ye oyo akomikumisaka, amikumisa na likambo oyo ete asosoli mpe ayebi ete ngai [ Yehova] nakosalaka boboto mpe kosambisa-sembo mpe boyengebene kati na mokili.” (Yilimia 9:24) ‘Tomikumisaka’ mpo toyebi Nzambe mpe azali kosalela biso mpo na kosalisa bato mosusu.

Makambo oyo ekoki kosala ete tóbosana ete tozali baklisto

6. Mpo na nini bato mosusu bazalaka na mokakatano ya koyeba malamumalamu mpe kobosana te ete bazali baklisto?

6 Ya solo, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te koyeba malamumalamu mpe kobosana te ete tozali baklisto. Elenge moko oyo akolaki na libota ya baklisto alobi ete na ntango moko boye alɛmbaki na elimo: “Ntango mosusu, nazalaki koyeba te mpo na nini nazali Motatoli ya Yehova. Nabotamaki na kati ya solo. Ntango mosusu nazalaki komona lokola nde lisangá ya Yehova ezali kaka lingomba moko na kati ya mangomba mosusu oyo toyebi.” Bamosusu bakoki kotika ete bavedɛti, makambo bazali komona na televizyo mpe oyo bazali kotánga na mikanda, mpe makanisi ya bato ya mokili ekóma kotambwisa bomoto na bango. (Baefese 2:2, 3) Na bantango mosusu, baklisto mosusu bakoki kokakatana mpe kotalela lisusu makambo oyo bamonaka malamu mpe mikano na bango.

7. (a) Komitalela nini ebongi mpo na baklisto? (b) Na likambo etali komitalela, likama ezalaka wapi?

7 Tokoki nde koloba ete komituna mituna ezalaka ntango nyonso mabe? Te. Mbala mosusu oyebi ete ntoma Paulo alendisaki baklisto bámitalelaka ntango alobaki boye: “Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima, bókoba kotala soki bozali ndenge nini.” (2 Bakolinti 13:5) Na maloba yango, ntoma Paulo azalaki kolendisa baklisto bálukaka koyeba bolɛmbu nyonso oyo ebandi kokola na mitema na bango mpe básalaka oyo esengeli mpo na kosilisa yango. Mpo moklisto ayeba soki azali na kati ya kondima, asengeli kotalaka soki maloba mpe misala na ye eyokani na makambo oyo andimaka. Nzokande, komitalela na ndenge ya mabe, elingi koloba komituna mpo na nini tozali baklisto to komituna soki ekoleka malamu te tókata boyokani na Yehova to na lisangá ya boklisto, ebongi te mpe ekoki koboma na elimo. a Tólinga te ete ‘kondima na biso ebeba lokola masuwa oyo epanzani.’​—1 Timote 1:19.

Biso mpe tokoki kokakatana

8, 9. (a) Moize alobaki nini oyo emonisi ete azalaki kokakatana? (b) Yehova alobaki na Moize nini ntango azalaki kokakatana? (c) Ozali koyoka ndenge nini ntango otángi maloba ya kolendisa ya Yehova?

8 Baklisto oyo na bantango mosusu bakómaki komituna mituna basengeli nde kokanisa ete basalaki mabe? Te! Kutu, bakoki kolendisama na koyeba ete kokakatana ndenge wana ebandi lelo te. Makambo ya ndenge wana ekómelaki mpe batatoli ya sembo ya Nzambe na ntango ya kala. Tózwa ndakisa ya Moize, oyo azalaki na kondima makasi mpe na bosembo, mpe amipesaki mpenza epai ya Nzambe. Ntango Moize azwaki mokumba oyo akanisaki ete akokoka yango te, akakatanaki mpe atunaki boye: “Ngai nani?” (Exode 3:11) Na ntembe te na motema na ye azalaki koloba ete, ‘Nazali moto mpamba!’ to ‘Nakokoka te!’ Makambo mingi ya bomoi na ye ekokaki kotinda ye akanisa ete akokoka mokumba wana te: Azalaki moto ya Yisalaele, ekólo oyo ezalaki na boombo. Bato ya ekólo na ye baboyaki ye. Azalaki molobi ya malamu te. (Exode 1:13, 14; 2:11-14; 4:10) Azalaki mobateli ya mpate, mosala oyo Baezipito bazalaki koyina mpenza. (Genese 46:34) Tokoki kokamwa te soki amonaki ete akokoka te kobikisa libota ya Nzambe oyo ezalaki na boombo!

9 Mpo na kolendisa Moize, Yehova alakaki ye makambo mibale: “Ngai nakozala na yo elongo, mpe oyo ekozala elembo mpo na yo ete ngai natindi yo: Esili yo kobimisa bato na Ezipito okosambela Nzambe na likoló ya ngomba oyo.” (Exode 3:12) Nzambe ayebisaki mosaleli na ye oyo azalaki kokakatana ete Ye moko akozala na ye ntango nyonso. Lisusu, Yehova amonisaki ete akolongola mpenza bato na ye na boombo. Na bankama ya bambula oyo elandaki, Nzambe azalaki mpe kolaka bato na ye ete akosunga bango. Na ndakisa, liboso Bayisalaele bákɔta na Mokili ya Ndaka, Nzambe alobaki na bango na nzela ya Moize ete: “Zalá makasi mpe na mpiko. . . . [Yehova] Nzambe na yo akokendaka na yo elongo. Ye akozanga kosunga yo te mpe akotika yo te.” (Deteronome 31:6) Yehova alakaki mpe Yosua boye: “Moto moko te akokoka kotɛlɛma liboso na yo mikolo nyonso ya bomoi na yo. . . . Nakozala na yo elongo. Nakotika yo te mpe nakolongwa na yo te.” (Yosua 1:5) Alaki mpe baklisto boye: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.” (Baebele 13:5) Tosengeli kosepela ndenge tozali baklisto mpamba te tozali na Mosungi ya makasi!

10, 11. Nini esalisaki Asafa abungisa te ndenge malamu ya kotalela mosala na ye mpo na Yehova?

10 Mbula soki nkama mitano nsima ya Moize, Molevi moko, nkombo na ye Asafa, akomaki ete abandaki komituna soki kozala sembo ezali mpenza na ntina. Asafa azalaki kosalela Nzambe atako azalaki mpe na mikakatano mpe azalaki komekama; kasi azalaki komona ete bato mosusu oyo bazalaki kotyola Nzambe bazalaki kokóma bato minene mpe bazalaki na bomoi ya malamu. Asafa ayokaki ndenge nini? Alobaki boye: “Nazalaki penepene ya kopɛngola [makolo] na ngai, matambe na ngai malingaki koselimwa. Zambi nazalaki na zuwa epai ya bato ya zoba, wana emonaki ngai esengo ya bato mabe.” Akómaki komituna soki kozala mosambeli ya Yehova ezali na ntina. Asafa alobaki boye: “Solo, ezali bobele mpamba ete napɛtoli motema na ngai mpe nasukoli mabɔkɔ na ngai kati ya sembo! Zambi ngai nazali kotungisama mokolo na mokolo.”​—Nzembo 73:2, 3, 13, 14.

11 Asafa asalaki nini ntango azalaki kotungisama ndenge wana? Asalaki nde lokola likambo moko ezali te? Te. Ayebisaki yango epai ya Nzambe na nzela ya libondeli, ndenge ekomami na Nzembo 73. Asafa azongelaki makanisi ya malamu ntango akendaki na tempelo. Kuna, asosolaki ete kosalela Nzambe ezali bomoi oyo eleki malamu. Lokola alendisamaki na elimo, asosolaki ete Yehova ayinaka mabe mpe ete na ntango oyo ebongi, akopesa bato mabe etumbu. (Nzembo 73:17-19) Lokola Asafa azongelaki makanisi ya malamu, asepelaki lisusu na mokumba na ye na mosala ya Yehova. Alobaki na Nzambe boye: “Nazali na yo esika moko mikolo nyonso; yo okangi lobɔkɔ na ngai ya mobali. Okotambolisaka ngai na toli na yo, mpe na nsima okoyamba ngai na nkembo na yo.” (Nzembo 73:23, 24) Asafa asepelaki lisusu na Nzambe na ye.​—Nzembo 34:2.

Bayebaki malamu soki bazali banani

12, 13. Tángá bato oyo Biblia elobeli oyo bazalaki kosepela ndenge bazalaki basambeli ya Nzambe.

12 Likambo moko oyo ekoki kosalisa biso tóbosana te ete tozali baklisto ezali koyekola ndakisa ya basambeli ya Nzambe oyo, ata na kati ya mikakatano, bazalaki kosepela na boyokani na bango na Nzambe mpe komekola kondima na bango. Tózwa ndakisa ya Yozefe, mwana ya Yakobo. Azalaki naino elenge ntango batɛkaki ye lokola moombo mpe bamemaki ye na Ezipito, mosika mpenza na tata na ye oyo azalaki kobanga Nzambe mpe mosika na libota na ye oyo bakokaki kolendisa mpe kosunga ye. Na Ezipito, Yozefe azalaki na moto te oyo ye akokaki kotuna toli, mpe akutanaki na mikakatano oyo ekokaki kobebisa etamboli malamu na ye mpe ezaleli na ye ya kotyela Nzambe motema. Nzokande, asalaki makasi abosana te ete azali mosaleli ya Nzambe, mpe akangamaki na makambo oyo ayebaki ete ezali sembo. Azalaki kosepela lokola azalaki mosambeli ya Yehova atako afandaki na kati ya bato mabe, mpe azalaki koyoka nsɔni te mpo na komonisa makanisi na ye.​—Genese 39:7-10.

13 Mbula nkama mwambe na nsima, elenge mwasi moko Moyisalaele oyo bamemaki na mboka mopaya mpe akómaki moombo ya Namana, mokonzi ya basoda ya Sulia, abosanaki te ete azali mosambeli ya Yehova. Ntango azwaki libaku ya kopesa litatoli na ntina na Yehova, akakatanaki te mpe alobaki ete Elisa azali mosakoli ya Nzambe ya solo. (2 Mikonzi 5:1-19) Bambula mingi na nsima, Mokonzi Yosiya, atako azalaki naino elenge mpe afandaki na kati ya bato mabe, abandaki mosala monene ya kolongola losambo ya lokuta na ekólo, abongisaki tempelo ya Nzambe, mpe azongisaki bato epai ya Yehova. Ayokelaki kondima mpe losambo na ye nsɔni te. (2 Ntango, mokapo 34 mpe 35) Ntango bamemaki Danyele ná baninga na ye misato na Babilone, kuna babosanaki te ete bazali basaleli ya Yehova mpe batikalaki sembo ata ntango bamekamaki makasi. Tomoni mpenza ete bazalaki kosepela ndenge bazalaki basaleli ya Yehova.​—Danyele 1:8-20.

Tómikumisa na ndenge tozali baklisto

14, 15. Komikumisa na ndenge tozali baklisto elimboli nini?

14 Basaleli wana ya Nzambe balongaki mpamba te bazalaki kosepela na boyokani na bango na Nzambe. Ezali boni mpo na biso lelo oyo? Komikumisa mpo tozali baklisto elimboli nini?

15 Ya liboso, yango elimboli kozala na botɔndi mpo tozali bato oyo bazali komema nkombo ya Yehova, baoyo azali kopambola mpe kondima. Nzambe ayebi malamu banani bazali bato na ye. Ntoma Paulo, oyo azalaki na eleko oyo bato mingi bazalaki koloba ete bazali basaleli ya Nzambe, akomaki boye: “Yehova ayebi baoyo bazali bato na ye.” (2 Timote 2:19; Mituya 16:5) Yehova asepelaka na “baoyo bazali bato na ye.” Alobi boye: “Ye oyo azali kosimba bino, azali kosimba mbuma ya liso na ngai.” (Zekalia 2:8, NW) Ezali polele ete Yehova alingaka biso. Yango wana, boyokani na biso ná ye esengeli kosimbama na bolingo makasi oyo tozali na yango mpo na ye. Paulo akomaki boye: “Soki moto alingaka Nzambe, moto yango ayebani epai na ye.”​—1 Bakolinti 8:3.

16, 17. Mpo na nini baklisto, bilenge mpe mikóló, bakoki kosepela na libula na bango ya elimo?

16 Bilenge oyo bakoli na lisangá ya Yehova basengeli komitalela malamu mpo na koyeba soki bomoto na bango ya boklisto ezali kokóma makasi mpe esimbami na boyokani na Nzambe. Basengeli te kotalelaka kaka kondima ya baboti na bango. Mpo na mosaleli mokomoko ya Nzambe, Paulo akomaki boye: “Epai ya nkolo na ye moko nde atɛlɛmaka to akweaka.” Yango wana, abakisaki ete: “Mokomoko na biso akozongisa monɔkɔ mpo na ye moko epai ya Nzambe.” (Baloma 14:4, 12) Moto akoki te kokóma moninga ya solosolo ya Yehova soki azali kosambela ye kaka mpo baboti na ye basambelaka ye.

17 Batatoli ya Yehova bazalaka na bileko nyonso. Babandaki na moto ya sembo Abele, eleki sikoyo mbula soki nkóto motoba tii na “ebele ya bato” lelo oyo, mpe bakokoba na ebele ya basambeli ya Yehova oyo bakozwa bomoi ezangi nsuka. (Emoniseli 7:9; Baebele 11:4) Biso tozali nsima mpenza na molɔngɔ molai ya bato oyo basambelaka Yehova na bosembo banda kala. Talá libula monene ya elimo tozali na yango!

18. Ndenge nini mitinda mpe mibeko oyo tolandaka ekesenisaka biso na bato ya mokili?

18 Bomoto na biso ya boklisto esangisi mitinda, bizaleli, mibeko, mpe makambo mosusu oyo emonisaka ete tozali baklisto. Yango nde “Nzela,” to lolenge ya bomoi kaka moko ya malamu mpe oyo esepelisaka Nzambe. (Misala 9:2; Baefese 4:22-24) Baklisto ‘batalelaka malamumalamu makambo nyonso’ mpe ‘bakangamaka makasi na oyo ezali malamu’! (1 Batesaloniki 5:21) Tozali komona malamu bokeseni monene oyo ezali kati na baklisto ya solo mpe bato ya mokili oyo bapesi Nzambe mokɔngɔ. Yehova azali komonisa polele bokeseni oyo ezali kati na losambo ya solo mpe oyo ya lokuta. Na nzela ya mosakoli Malaki, alobaki boye: “Bokozonga mpe bokososola kati na moyengebene mpe moto mabe, kati na ye oyo akosalelaka Nzambe mpe ye oyo akosalelaka Nzambe te.”​—Malaki 3:18.

19. Ezaleli nini baklisto ya solo bakokóma na yango ata mokolo moko te?

19 Lokola ezali na ntina mingi tómikumisa na kati ya Yehova na mokili oyo etondi na mobulungano mpe eyebi te epai ezali kokende, nini ekoki kosalisa biso tósepelaka na Nzambe na biso mpe tóbosana te ete tozali baklisto? Tokozwa makanisi mingi ya ntina na lisolo oyo elandi. Ntango ozali koyekola yango, kobosana likambo oyo te: Ata mokolo moko te baklisto ya solo bakokóma bato oyo bakipaka makambo ya Nzambe te.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Awa tozali kolobela nde bomoto na biso ya boklisto. Mpo na bato mosusu oyo bakoki kozala na maladi ya motó, esengeli báluka lisalisi ya minganga.

Ozali koyeba lisusu?

• Ndenge nini baklisto ‘bamikumisaka na kati ya Yehova’?

• Ndakisa ya Moize mpe ya Asafa eteyi yo nini?

• Banani oyo Biblia elobi ete bazalaki kosepela na mosala na bango mpo na Nzambe?

• Komikumisa mpo na bomoto na biso ya boklisto ezali kosɛnga nini?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 14]

Moize akakatanaki na ntango moko

[Bililingi na lokasa 15]

Bato mingi ya ntango ya kala bazalaki kosepela na bomoto na bango ya basaleli ya Nzambe