Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biblia ya Berleburg

Biblia ya Berleburg

Biblia ya Berleburg

NA BAMBULA ya 1600 mpe ya 1700, bandimi mosusu ya Lingomba ya Luther na Allemagne basalaki mwa lingomba moko oyo ebengamaki Lingomba ya Pietisme. Bato bakómaki kotyola mpe konyokola bandimi ya lingomba yango mpo na kondima na bango. Bato mwa mingi ya mayele ya Lingomba ya Pietisme bakimaki minyoko mpe bakendaki kofanda na Berleburg, mboka moko oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 150 na nɔrdi ya Francfort-sur-le-Main. Le comte Casimir von Wittgenstein Berleburg, moto moko monene na mboka yango oyo azalaki na limemya mingi mpo na makambo ya Nzambe andimaki báfanda na mboka wana. Lokola bato wana oyo bazalaki bateyi mpe bato ya mayele bafandaki na Berleburg, basalelaki libaku wana mpo na kobongola Biblia oyo ebengamaka Biblia ya Berleburg. Ndenge nini basalaki mosala yango?

Johann Haug azalaki moko na bato oyo bakendaki kofanda na Berleburg; ye atikaki engumba Strasbourg mpo bakonzi ya mangomba ya engumba wana balingaki ye ata moke te. Haug azalaki moto ya mayele mingi mpe ayebaki mibeko ya lokota malamu mpenza. Ayebisaki bato mosusu ya mayele na Berleburg ete azali na mposa ya “kobongola Biblia oyo ekozala mpenza sembo, kobongisa bisika oyo Luther abongolaki malamu te na Biblia na ye, mpe kobongola maloba na kolanda ndimbola na yango mpenza mpe makanisi ya Liloba ya Nzambe.” (Die Geschichte der Berlenburger Bibel [Lisolo ya Biblia ya Berleburg]) Mokano na ye ezalaki ete abimisa Biblia oyo ezali na banoti, na maloba na nse ya nkasa mpe na bandimbola mpe oyo, ata moto oyo ayekolá mingi te, akoki kotánga yango. Bato mingi ya mayele na mikili mosusu ya Mpoto bandimaki kosalisa Haug mpe asalaki mosala yango na boumeli ya mbula 20. Biblia ya Berleburg ebandaki kobima na mobu 1726. Lokola babakisaki banoti ebele na Biblia yango mpo na kolimbola makambo, Biblia yango mobimba ezalaki na bavolimi mwambe.

Biblia ya Berleburg ezali na mwa makambo oyo ekoki kobenda likebi na biso. Na ndakisa, Exode 6:2, 3 elobi boye: “Na nsima Nzambe alobaki na Moize mpe ayebisaki ye ete: Ngai nazali NKOLO! Mpe nabimelaki Abalayama/Yisaka mpe Yakobo/lokola Nzambe oyo akoká na makambo nyonso: kasi mpo na nkombo na ngai YEHOVA bayebaki ngai na yango te.” Noti moko elimboli boye: “Nkombo YEHOVA . . . , nkombo oyo ekabolami/to/esakolami.” Nkombo ya Nzambe, Yehova, ezali mpe na maloba na nse ya lokasa oyo ezali kolimbola Exode 3:15 mpe Exode 34:6.

Na bongo, Biblia ya Berleburg ezali na kati ya ebele ya Babiblia na monɔkɔ ya Allemand oyo esaleli nkombo Yehova na makomi, na maloba na nse ya lokasa, mpe na bandimbola. Biblia mosusu ya sika oyo ezali kokumisa nkombo ya Nzambe ezali Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu, ebimisami na Batatoli ya Yehova.