Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makamwisi oyo omoná!

Makamwisi oyo omoná!

Makamwisi oyo omoná!

LILOBA “likamwisi” ekoki mpe kolimbola likambo to mosala moko ya monene to ya kokamwa. Biso nyonso tomoná makamwisi ya lolenge wana, oyo esalemaki na Nzambe te.

Lokola bato bayekoli makambo mingi na ndenge biloko oyo Nzambe akelá esalaka, bakómi kosala makambo oyo kala moto akokaki kondima te ete ekoki kosalema. Na ndakisa, soki tozongi mbula nkama na nsima, na ntembe te makambo oyo baordinatɛrɛ, televizyo, basatelite mpe bamasini mosusu ezali kosala lelo, bato mingi ya ntango wana bakoki kondima te ete ekoki kosalema.

Bato mosusu ya siansi, lokola bamoni ete bayebi makambo nyonso te na biloko oyo Nzambe akelá, batyaka lisusu ntembe te ete likambo moko boye akoki kosalema te, kasi basukaka kaka na koloba ete ezali mpasi mpo likambo yango esalema. Na ndenge yango, bazali kotika nzela polele mpo “makamwisi” mosusu esalema.

Ata soki tosaleli liloba “likamwisi” na ndimbola na yango ya liboso, elingi koloba makambo “oyo esalemi na bilimo oyo ezali na nguya oyo eleki mayele mpe nguya ya bato,” tokoki koloba ete mokomoko na biso asilá komona makamwisi. Na ndakisa, tomonaka moi, sanza mpe minzoto; nyonso wana ezali misala ya elimo moko oyo ezali na nguya oyo eleki mayele mpe nguya ya bato, elingi koloba Mozalisi ye moko. Longolá yango, nani akoki kotombola mosapi ete ayebi nzoto ya moto malamumalamu, ndenge bɔɔngɔ esalaka to ndenge mwana abandaka mpe akolaka na libumu ya? Buku moko (The Body Machine) elobi boye: “Nzoto ya moto, oyo makambo na yango nyonso etambwisamaka na bɔɔngɔ, ezali na bankama na bankama ya biyokeli, ezali lokola motuka oyo etambolaka mpe emibongisaka yango moko, lokola ordinatɛrɛ moko oyo esalaka makambo nyonso yango moko.” Nzambe oyo asalá “nzoto ya moto” asalá likambo oyo ekamwisaka biso tii lelo. Ezali mpe na makamwisi mosusu oyo omoná, atako mbala mosusu obengaki yango makamwisi te.

Buku mpe ekoki kozala likamwisi?

Ezali na buku moko te oyo ebimisamá mpe ekabolamá mingi lokola Biblia. Omoni te ete Biblia ezali likamwisi? Tokoki koloba ete Biblia euti na ‘elimo moko oyo ezali na nguya oyo eleki mayele mpe nguya ya bato’? Toboyi te, bato nde bakomaki Biblia, kasi bato yango balobi ete bakomaki nde makanisi ya Nzambe, kasi makanisi na bango moko te. (2 Samwele 23:1, 2; 2 Petelo 1:20, 21) Kanisá naino. Bazali bango nyonso bato soki 40, mpe banda na moto ya liboso tii na oyo ya nsuka, eumelaki mbula koleka 1 600. Bamosusu bazalaki babateli ya mpate, bamosusu basoda, babomi mbisi, basali ya Leta, minganga, banganga-nzambe mpe bakonzi. Kasi, bango nyonso balobelá nsango kaka moko ya elikya, nsango moko ya solo mpe ya sikisiki.

Nsima ya koyekola Biblia malamumalamu, Batatoli ya Yehova bakómá kondima yango, ndenge ntoma Paulo akomaki, “lokola liloba ya bato te, kasi, ndenge yango ezali mpenza, lokola liloba ya Nzambe.” (1 Batesaloniki 2:13) Banda bambula na bambula, mikanda na bango emonisaka boyokani oyo ezali na kati ya mikapo ya Biblia oyo bato bakanisaka ete ezali bongolabongola. Boyokani wana oyo ezali na kati ya mikanda nyonso ya Biblia emonisaka mpe ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. a

Ezali na buku mosusu te oyo balukaki kolimwisa yango lokola Biblia. Atako bongo, Biblia ezali kaka, mpe ebongolamá, na mobimba na yango to ndambo, na minɔkɔ koleka 2 000. Ndenge Biblia ebatelamá malamu mpo elimwa te mpe ndenge likomi ata moko te ebungá, yango ezali komonisa ete Nzambe nde abatelaki yango. Tomoni mpenza ete Biblia ezali likamwisi!

Likamwisi oyo “ezali na bomoi mpe ezali na nguya”

Makamwisi ya kobikisa bato ya maladi mpe ya kosekwisa bakufi oyo ezalaki kosalema kala esalemaka lisusu te lelo oyo. Kasi tozali mpenza na elikya ete na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, makamwisi ya ndenge wana ekosalema lisusu na mabelé mobimba. Makamwisi yango ekosikola mpenza bato na ndenge oyo tokoki kokanisa te lelo oyo.

Nzokande Biblia, oyo ezali mpe likamwisi, ekoki ata lelo oyo kosala makamwisi minene ya kobongola bomoi ya bato. (Talá ndakisa moko na etanda “Nguya ya Liloba ya Nzambe,” na lokasa 8.) Baebele 4:12 elobi boye: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya mpe epeli makasi koleka mopanga nyonso ya mino mibale mpe ekɔtaka tii na kokabola molimo ná elimo, mpe matonga ná mafuta na yango, mpe ezali na likoki ya kososola makanisi mpe mikano ya motema.” Ya solo, Biblia ebongolá bomoi ya bato koleka milio motoba na mokili mobimba, esalisá bango báyeba ntina ya bomoi mpe epesá bango elikya moko kitoko mpo na mikolo ekoya.

Tozali kolendisa yo mpe otika Biblia esala likamwisi na bomoi na yo!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Soki olingi kotalela mikapo yango oyo bato bakanisaka ete ezali bongolabongola mpo omona yo moko boyokani oyo ezali na yango, ezali na ebele ya bandakisa oyo epesami na buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?, mokapo 7, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Etanda/Elilingi na lokasa 7]

ASILAKI KOKUFA TO AZALAKI NAINO NA BOMOI?

Yoane 19:33, 34 elobi ete Yesu asilaki kokufa ntango “moko ya basoda atɔbɔlaki ye mopanzi na likɔnga, mpe na mbala moko makila ná mai ebimaki.” Nzokande, na Babiblia mosusu, Matai 27:49, 50 ezali komonisa ete Yesu azalaki naino na bomoi ntango batɔbɔlaki ye mopanzi. Mpo na nini bokeseni wana?

Mibeko ya Moize elobaki ete ntango bakakisi moto mabe na nzete, ebembe na ye esengelaki te kotikala butu mobimba likoló ya nzete. (Deteronome 21:22, 23) Yango wana, na mikolo ya Yesu, soki moto mabe oyo bakakisi na nzete azali kaka na bomoi tii na mpokwa, bazalaki kobuka ye makolo mpo akufa noki. Lokola moto yango akokaki lisusu kotɛlɛma semba te, akokaki kopema malamu te. Lokola basoda babukaki makolo ya bato mabe mibale oyo bakakisamaki na nzete na pembeni ya Yesu kasi babukaki oyo ya Yesu te, yango emonisi ete bakanisaki ete akufi. Ntango mosusu soda wana atɔbɔlaki ye likɔnga na mopanzi kaka mpo na komindimisa mpenza ete akufi, mpo alamuka te na nsima mpe báloba ete asekwi.

Matai 27:49, 50 emonisi ete makambo elandaki ndenge mosusu. Elobi boye: “Moto mosusu akamataki likɔnga mpe atɔbɔlaki mopanzi na ye, mpe makila ná mai ebimaki. Lisusu Yesu agangaki na mongongo makasi, mpe azongisaki elimo na ye.” Kasi, maloba oyo ekomami na balɛtrɛ etɛngamá ezali te na bamaniskri ya kala ya Biblia. Bato mingi ya mayele oyo balimbolaka makomi ya Biblia bakanisaka ete bazwá maloba yango nde na Evanzile ya Yoane mpe bakɔtisá yango na Matai, kasi na esika oyo ebongi te. Yango wana, na Babiblia mingi batyá yango na bakroshɛ to na baparanteze, ná mwa maloba na nse ya lokasa, to balongolá yango mpenza.

Mikanda ya Makomami ya Grɛki oyo Westcott ná Hort basangisá, oyo basalelaki mingimingi mpo na kobongola Libongoli ya Mokili ya Sika, etyá maloba yango na bakroshɛ mibalemibale. Na nse ya lokasa balimbolá ete maloba yango, “esengeli kozala ete bakomeli nde bakɔtisá yango kokɔtisa.”

Na bongo, ezali polele ete Yoane 19:33, 34 ezali koloba solo mpe ete Yesu asilaki kokufa ntango soda ya Loma atɔbɔlaki ye likɔnga na mopanzi.

[Etanda/Elilingi na lokasa 8]

NGUYA YA LILOBA YA NZAMBE

Baboti ya Detlef bakabwanaki ntango azalaki naino elenge mpe ye akómaki komɛla bangi, masanga mpe komipesa na miziki babengi heavy metal. b Akɔtaki na etuluku moko ya bilenge ya mobulu oyo babengaka skinhead, mpe mosika te mobulu na ye ememaki ye na mabɔkɔ ya bapolisi.

Na 1992, bilenge 60 ya etuluku yango babundaki na bilenge soki 35 ya etuluku mosusu ya bilenge ya mobulu oyo babengaka punkers na restora moko na nɔrdi-ɛsti ya Allemagne. Thomas, elenge moko ya etuluku oyo ebundaki na bango, abɛtamaki mabe mpenza mpe akufaki. Bakangaki Detlef ná baninga na ye mosusu oyo bazalaki bakambi ya etuluku na bango mpe, nsima ya kosambisa bango, kosamba oyo bapanzi-nsango balobelaki mingi, bakatelaki bango etumbu ya bolɔkɔ.

Ntango Detlef abimaki na bolɔkɔ, mwa moke na nsima Batatoli ya Yehova bapesaki ye trakte moko. Motó ya likambo ya trakte yango ezalaki “Mpo na nini bomoi etondi na mikakatano?” Detlef amonaki mbala moko ete makambo oyo bakomaki na trakte yango ezali solo mpe abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Boyekoli yango ebongolaki ye mpenza. Banda 1996, azali Motatoli ya Yehova ya molende mpenza.

Siegfried, oyo azalaki na etuluku oyo ebundaki na etuluku oyo Detlef azalaki, azalaki moninga ya motema ya Thomas, elenge oyo akufaki. Ye mpe na nsima akómaki Motatoli mpe azali sikoyo nkulutu na lisangá. Ntango Siegfried akendaki kosala lisukulu na lisangá oyo Detlef azali (mama ya Thomas mpe ayanganaka ntango mosusu na makita na lisangá yango), Detlef abengaki Siegfried akende kolya na ndako na ye. Soki bakutanaki ndenge wana mbula soki zomi liboso, elingaki kozala benda bika. Kasi lelo oyo, bolingo na bango ya boklisto ezali komonana polele.

Detlef ná Siegfried bazelaka mokolo bakoyamba Thomas ntango akosekwa na paladiso awa na mabelé. Detlef alobi boye: “Soki nakanisi likambo yango, mai ya miso etangaka ngai. Nayokaka mawa mingi mpo na likambo oyo nasalaki.” Mposa na bango mibale ezali ete ntango Thomas akosekwa básalisa ya ayeba Yehova mpe asepela na elikya oyo Biblia ezali kopesa, ndenge bazali kosalisa bato mosusu lelo oyo.

Ya solo mpenza, Liloba ya Nzambe ezali na nguya!

[Maloba na nse ya lokasa]

b Topesi bango bankombo mosusu.

[Elilingi na lokasa 6]

Nzoto ya moto ezali mosala moko ya kokamwa mpenza ya Nzambe

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Anatomy Improved and Illustrated, London, 1723, Bernardino Genga