Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Davidi, moto oyo motema ya Nzambe esepelaki na ye, azalaki nde konyokola bato oyo akangi na etumba ndenge bato mosusu bakanisaka ntango batángi 2 Samwele 12:31 mpe 1 Ntango 20:3?

Te. Davidi akómisaki nde Baamona oyo akangaki na etumba baombo. Ndenge bavɛrsɛ yango ebongolami na Babiblia mosusu nde esalaki ete makambo oyo Davidi asalaki etalelama na ndenge ya mabe.

Ntango Babiblia yango ezali kolobela makambo oyo Davidi asalaki Baamona, ezali komonisa ye lokola moto ya motema mabe mpe ya nko. Na ndakisa, Biblia King James, elobi boye na 2 Samwele 12:31: “Abimisaki bato oyo bazalaki kuna, mpe atyaki bango na basii, na bitimweli ya ebende, mpe na bipasola ya ebende, mpe alekisaki bango na etumbelo ya biliki: mpe asalaki bongo na bingumba nyonso ya bana ya Amona.” Lisolo oyo ezali na 1 Ntango 20:3 elobi mpe kaka ndenge moko.

Nzokande, Samuel Rolles Driver, molimboli moko ya Biblia, alobaki ete “ndenge oyo Biblia ezali komonisa biso bomoto mpe bizaleli ya Davidi,” emonisi te ete Davidi akokaki kosala bato makambo na nko. Yango wana, maloba na nse ya lokasa na The Anchor Bible elobi boye: “Davidi akabolaki bakangami ya etumba na bituluku mpo na kosalisa bango misala oyo ekomemela ye bozwi ya bamboka oyo alongaki. Bakonzi nyonso oyo bazalaki kolonga bikólo mosusu bazalaki kosala bongo.” Ndenge moko mpe, Adam Clarke alobaki boye: “Ndimbola ya likambo yango ezali ete Davidi akómisaki bato baombo mpe asalisaki bango mosala ya kokata biloko na sii, kosala bitimweli ya ebende, to kotimola mabanga, . . . mpe kopasola banzete, mpe kobɛta babiliki. Vɛrsɛ yango elobaki te ete bazalaki kokata bato na sii, to na likwangola, to na epasola, mpe yango eyokanaki te na makambo oyo Davidi asalaki Baamona.”

Mabongoli mingi ya sika ezali kobongola bavɛrsɛ yango polele mpe ezali komonisa malamumalamu ete tosengeli te kokanisa ete Davidi azalaki konyokola bato lokola banyama. a Talá ndenge Bible na lingala ya lelo oyo ebongoli vɛrsɛ yango: “David akamati bato ya kuna, apesi bango misala ya makasi; misala ya kopasola pe kobongisa mabanga, ya kokata banzete na epasola, pe ya kotumba babrike. Asali ndenge moko po na bavile nyonso ya ba-Amonite.” (2 Samwele 12:31) “David akamati bato ya kuna, apesi bango misala ya makasi; misala ya kopasola pe kobongisa mabanga, ya kokata banzete na epasola. Asali ndenge moko po na bavile nyonso ya ba-Amonite.” (1 Ntango 20:3) Ndenge oyo Libongoli ya Mokili ya Sika ebongoli vɛrsɛ yango eyokani na ndenge oyo bato ya mayele ya mikolo na biso bazali kolimbola likambo yango: “Bato oyo bazalaki na kati, abimisaki bango mpo atya bango na mosala ya kokata mabanga na sii mpe kosalela bisaleli ya ebende oyo epeli mpe bipasola ya ebende mpe akómisaki bango babɛti biliki.” (2 Samwele 12:31) “Bato oyo bazalaki na kati abimisaki bango mpe asalisaki bango misala ya kokata mabanga na sii mpe ya kosalela bisaleli ya ebende oyo epeli mpe bipasola; Davidi asalaki bongo na bingumba nyonso ya bana ya Amona.”​—1 Ntango 20:3, NW.

Davidi anyokolaki te Baamona oyo alongaki na etumba mpe abomaki bango te na ndenge moko ya nsɔmɔ. Asalelaki bango te makambo na nko ndenge bikólo mingi na mikolo na ye bazalaki kosala bato oyo bakangi na bitumba.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Soki balongoli kaka lɛtrɛ moko na maloba yango ya Liebele, esika yango ekoki kotángama boye: “atyaki bango na kati ya sii” to “akatakataki bango na sii.” Lisusu, liloba “etumbelo ya babiliki” ekoki mpe kolimbola “masini ya kobɛta biliki.” Masini ya ndenge wana ezali moke mingi mpo moto ata ya ndenge nini akɔta na kati.