Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mobembo na bottom na esanga ya Saba

Mobembo na bottom na esanga ya Saba

Mobembo na bottom na esanga ya Saba

SABA ezali esanga moko oyo eyangelami na Pays-Bas. Na ntango ya kala, bapunzi oyo bazalaki kotambola na bamasuwa na Mbu ya Caraïbes bazalaki komibomba na esanga kuna. Lelo oyo, esanga yango ya moke, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 240 na ɛsti ya Porto-Rico, ezali na bato 1 600, mpe bato 5 kati na bango bazali Batatoli ya Yehova. Kasi, baministre yango ya molende bazali koluka biloko ya kopunza te. Bazali nde koluka na molende mpenza bato oyo bazali na “ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.”​—Misala 13:48.

Nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe eteyamaki mpo na mbala ya liboso na esanga yango mokolo ya 22 Yuni 1952, ntango Sibia, masuwa moko ya bamisionɛrɛ Batatoli ya Yehova, esemaki na libongo ya Saba. (Matai 24:14) Nsima ya kobima na masuwa, bamisionɛrɛ yango Gust Maki ná Stanley Carter, bamataki na mwa nzela moko ya mabanga minene koleka 500 oyo balandisá lokola sikalie, tii na Bottom, mboka-mokonzi ya Saba. a Na boumeli ya bankama ya bambula, bato bazalaki kosalela kaka mwa nzela wana mpo na kokóma na bisika bato bazali.

Lapolo ya liboso ya mosala ya kosakola na Saba ebimaki na Annuaire des Témoins de Jéhovah 1966. Lapolo yango emonisaki ete Motatoli moko kaka azalaki kosakola na esanga yango. Na nsima, libota moko bautaki na Canada bakendaki kosakola nsango malamu kuna na boumeli ya bambula mingi. Eumeli mingi te, Russel ná mwasi na ye Kathy, oyo bazwá pansiɔ, bautaki na États-Unis mpe bakendaki na Saba mpo na kosakola. Tóyoka lisolo na bango.

Mobembo na Saba

Ntango ngai ná mwasi na ngai tokitaki na mpɛpɔ, Ronald oyo azalaki Motatoli kaka moko ya esanga yango na bambula ya 1990, ayambaki biso. Ayaki kozela biso na libándá ya mpɛpɔ. Asepelaki mpenza na mwa liboke ya ndunda oyo tomemelaki ye, mpo batɛkaka ndunda na esanga yango te. Tokɔtaki na motuka moko mpe tomataki malɛmbɛmalɛmbɛ tii na nsɔngɛ ya Ngomba Scenery, oyo kala ezalaki volcan.

Totɛlɛmaki na mboka Hell’s Gate mpe Ronald akendaki kotala na etanda ya mayebisi ya mboka soki liyebisi mpo na kobengisa bato na lisukulu ya bato nyonso ezalaki naino wana. Tosepelaki na komona ete ezalaki wana. Ntango azongaki na motuka, tokobaki mobembo tii na Windwardside, mboka monene ya esanga yango. Mboka yango ezali soki na mɛtrɛ 400 likoló ya nivo ya mai monene. Ndenge nkombo na yango elimboli na Lingelesi, mopɛpɛ ebɛtaka makasi na esika yango. Ntango totikaki balabala mpe tokɔtaki na mwa nzela moko ya moke oyo ememaka tii na ndako ya Ronald, tomonaki makomi ya langilangi likoló ya ekɔtelo ya ndako; bakomá Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova.

Ntango tozalaki kolya na midi, natunaki Ronald motuna oyo etindaki biso tósala mobembo mpo na kokende kotala ye: “Ndenge nini yo okómaki mosakoli awa na Saba?”

Ronald alobaki ete: “Ntango tosilisaki kotonga filiale ya Porto-Rico na 1993, ngai ná mwasi na ngai tosepelaki kotikala basakoli na mboka mopaya. Kala, tosalaká mobembo moko na Saba elongo na ndeko mosusu ná mwasi na ye oyo bazalaki babongisi-nzela mpe bayebisaki biso ete esanga yango ezali na bato 1400 kasi ezali ata na Motatoli ya Yehova moko te. Yango wana toyebisaki bandeko ya komite ya filiale ya Porto-Rico ete tozali na mposa ya kokende na Saba.

“Makambo etambolaki malamu, mpe tozwaki ndingisa ya kokende. Kasi, mbula mibale na nsima, mwasi na ngai akómaki kobela makasi mpe tozongaki na Californie. Nsima ya liwa na ye, nazongaki lisusu na Saba. Ngai nalingaka te soki nabandi likambo moko, nasukisa yango te.”

Kosakola ndako na ndako na Saba

Ndako ya Ronald, oyo eumelá bambula nkama, ekómaki mpe kosalelama lokola Ndako ya Bokonzi. b Ntango tozalaki komɛla ti mpe komibongisa mpo na kobima mosala ya kosakola, mwa mbula moke ebɛtaki mpe epɔlisaki kuku oyo ezalaki kaka libándá. Na nsima, tobimaki na mosala ya kosakola ndako na ndako na Bottom, atako likoló ezalaki naino na mwa mapata ya mbula. Na ndako nyonso, Ronald azalaki kopesa bato mbote mpe kobenga moto na moto na nkombo na ye. Tozalaki kobanda lisolo na likambo moko oyo eutaki kosalema na mboka. Bato mingi bayebi Ronald mpe mosala na ye, mpe bazwaka mikanda oyo elimbolaka Biblia kozanga kokakatana.

Soki moto ameseni na bato ya mboka te, ezali mpasi mpo ayeba lisusu bisika ya bato oyo basepelaki na nsango ya Bokonzi. Mpo na nini? Ronald alobaki boye: “Mobeko ya mboka esɛngi ete bandako nyonso ezala na langi ndenge moko.” Mpe ntango natalaki, namonaki ete ezali ya solo, mpo ndako nyonso na Saba ezali mpɛmbɛ mpe nsamba na yango motane.

Na nsuka ya lisolo mokomoko, tozalaki kobenga moto oyo tosololi na ye aya koyoka lisukulu ya bato banso mokolo ya lomingo na Ndako ya Bokonzi. Soki Ronald azali na mobembo te, asalaka lisukulu ya bato banso pɔsɔ nyonso. Lelo oyo, bayekoli ya Biblia bazali 17 na Saba. Bato 20 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto na 2004. Atako motuya yango ekoki komonana moke, ezali komonisa ete moto moko na kati ya bato mokama ya Saba azalaki na Ekaniseli yango!

Ya solo, Batatoli ya Yehova bazali kosala nyonso ekoki na bango mpo na koyebisa ebele ya bato nsango ya Nzambe oyo ezali nsango ya lobiko. Ezala na bisanga ya mike lokola Saba to na mikili ya minene, Batatoli ya Yehova bazali kokokisa na bosembo mpenza etinda ya “kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.”​—Matai 28:19.

Na mawa, mobembo na biso ekómaki na nsuka. Ntango tozalaki komata na mpɛpɔ, topɛpaki esanga Saba mbote na mosika. Tokobosana te mobembo na biso Saba mpe ntango oyo tolekisaki na Bottom!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Emonani ete bapunzi wana bapesaki mboka yango nkombo Bottom (nse) mpo bakanisaki ete ezali na nse ya libulu ya volcan.

b Mokolo ya 28 Sɛtɛmbɛ 2003, bandeko oyo bautaki na etúká ya Floride, na États-Unis, bakendaki na Saba mpe babongisaki ndako moko oyo ezali pembeni ya ndako ya Ronald, yango ezali sikoyo Ndako ya Bokonzi.

[Karte na lokasa 10]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

PORTO-RICO

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 10]

Na nsima: www.sabatourism.com