Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nani akoleisa mokili?

Nani akoleisa mokili?

Nani akoleisa mokili?

EBONGISELI ya ONU mpo na kosilisa nzala na mokili (Programme alimentaire mondial) emonisi ete etikali moke bato milio 800​—mingimingi bana, bakokufa na nzala. Ebongiseli yango emonisi ete likebi oyo mikili mingi ya bozwi ekokaki kotyela likambo yango mpe mbongo oyo bakokaki kobimisa, batye yango na makambo mosusu lokola kosilisa misala ya bateroriste. Lisusu bamaladi oyo epanzanaka ezali kobakisa mpasi yango. Mpo na mikili ya Afrika epai sida ezali kopalangana mingi, zulunalo ya ebongiseli yango (Global School Feeding Report) eyebisi boye: “Baboti mingi bazali kokufa mobesu. Mbala mingi bazali kotika bana oyo bazali kobundana bango moko mpo na kozwa biloko ya kolya, bayebi ata mosala ya bilanga te, mpe balakisá bango te misala mosusu oyo baboti balakisaka bana.”

Ebongiseli yango ezwi mokano ya kokabolaka bilei ata mbala moko na mokolo na biteyelo. Likanisi yango ezali te kaka mpo na kosilisa nzala, kasi mpe mpo na koteya bilenge ndenge oyo bakoki komibatela na maladi ya sida.

Na bisika oyo bamekaki likambo yango, bapesaki bana bilei, balakisaki bango bopɛto mpe makambo mosusu. Emonani mpe ete na bisika oyo bato bazali kolanda batoli oyo bapesaki, motángo ya bato oyo bazali kozwa maladi ya sida ekiti.

Likambo ya mawa ezali ete matomba ya milende oyo bato bazali kosala esilisaka mikakatano nyonso te mpe ezalaka kaka moke. Nzokande Biblia eyebisi biso ete nzala ekosila mpo na libela na mokili mobimba. Nzembo 72:16 elobi boye: “Masango ekotondana na mokili.” Ntango bokonzi ya Nzambe ekoyangela mokili, bato bakoloba na Yehova Nzambe ete: “Otyeli mabelé likebi, mpo na kopesa yango ebele ya biloko; opesi yango bozwi mingi . . . Ozali kobongisa mbuma na yango, mpamba te ezali ndenge yango nde ozali kobongisa mabelé.”​—Nzembo 65:9, NW.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]

WFP/Y. Yuge