Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Omikokanisaka na bato mosusu?

Omikokanisaka na bato mosusu?

Omikokanisaka na bato mosusu?

NANI oyo amoná naino te moto moko oyo aleki ye na kitoko, oyo bato mosusu balingaka ye mingi, aleki na mayele, ezala na kelasi to na makambo mosusu? Ntango mosusu tomonaka ete bato mosusu bazali nzoto malamu to bazali na mosala ya malamu, makambo na bango etambolaka malamu to mpe bazali na baninga ebele. Bakoki kozala na biloko ebele, na mbongo mingi, mituka oyo ebimi sika, mpe bazali ntango nyonso na esengo. Ntango tomonaka makambo wana, tolukaka nde komikokanisa na bango? Tosengeli kaka komikokanisa na bato mosusu? Mpo na nini moklisto asengeli koboya komikokanisa na bato mosusu? Ndenge nini tokoki kosepela na ndenge tozali mpe na oyo tozali na yango, kozanga ete tómikokanisa na bato mosusu?

Mpo na nini mpe na makambo nini tomikokanisaka na bato mosusu

Ntina ya liboso oyo bato bamikokanisaka na basusu ezalaka mpo balukaka koyeba to kobakisa valɛrɛ na bango. Mbala mingi moto ayokaka esengo soki ayebi ete ye mpe akoki kosala makambo oyo bato mosusu bazali kosala. Ntina mosusu oyo bato bamikokanisaka na basusu ezali ete yango esalisaka bango bámona soki bazali lokola bato mosusu, elingi koloba báyeba makambo oyo bakoki kosala mpe oyo bakoki kosala te. Yango wana, totalaka makambo oyo bato mosusu basali. Soki tomoni ete tokokani na bato mosusu na makambo mingi mpe bato yango bazali kokokisa mikano mosusu oyo bamityelaki, tomonaka ete biso mpe tokoki kokokisa mikano ya ndenge wana.

Mbala mingi, bato bamikokanisaka na baoyo bazali na bango makambo ndenge moko​—basi na basi to mobali na mobali, bato ya mbula moko, bato oyo basalaka mosala moko to mpe bato oyo bayebani. Esalemaka mingi te tómikokanisa na moto oyo tokeseni na ye na makambo mingi. Na maloba mosusu, ezali mwa mpasi elenge mwasi amikokanisa na vɛdɛti moko, kasi akosala yango na moninga na ye kelasi; mpe ezali mwa mpasi vɛdɛti moko amikokanisa na elenge moko ya mwasi.

Bato bamikokanisaka na basusu na makambo nini? Na makambo to bizaleli oyo bato mingi basepelaka na yango; ekoki kozala mayele, kitoko ya nzoto, bozwi, bilamba. Kasi, tolukaka komikokanisa na bato mosusu na makambo oyo esepelisaka biso. Ezali mwa mpasi tólula mbongo ya kala oyo moninga moko abombaka, ata soki azali na yango ebele ndenge nini, lobá se soki biso moko mpe tolukaka mbongo ya kala mpo tóbombaka.

Komikokanisa epesaka bato makanisi ndenge na ndenge, bamosusu bakómaka komitungisa na makanisi, bamosusu balulaka bato, bamosusu mpe balukaka kokóma lokola bato mosusu to koleka bango to mpe koyina bango. Makanisi mosusu wana ezali mabe, mpe ebongi na baklisto te.

Komikokanisa na bato mpo na koleka bango

Bato mingi oyo bamikokanisaka na basusu mpo na ‘koleka’ bango bazalaka na elimo ya kowelana. Balingaka koleka basusu, mpe bazalaka na esengo te soki bamoni naino te ete baleki bango mpenza. Kofanda na bato ya ndenge wana ezalaka esengo te. Ezalaka mpe mpasi kozala moninga ya bato ya ndenge wana. Bato ya ndenge wana bazalaka na komikitisa te; balandaka mpe te toli ya Biblia oyo ezali kolendisa biso tólinga bazalani na biso, mpamba te ezaleli na bango ekoki kotinda bato mosusu bákanisa ete bazali na ntina te mpe bazali na nse.​—Matai 18:1-5; Yoane 13:34, 35.

Koluka komonisa bato mosusu ete ‘bazali na nse’ ezali mpe lolenge mosusu ya kofinga bango. Mokomi moko alobaki boye: “Makambo oyo tokokaka kosala te epesaka biso mpasi mingi soki tomoni bato oyo bazali lokola biso bazwi biloko oyo tozali koluka.” Na bongo, mposa ya koleka basusu ebotaka likunya, nkanda mpe koyina bato mosusu mpo na biloko, bozwi, mosala, lokumu na bango, mpe mbongo na bango. Yango ebakisaka lisusu mposa mabe wana ya koluka koleka basusu. Biblia epekisi ‘kobimisa kowelana.’​—Bagalatia 5:26.

Bato ya likunya balukaka kokitisa makambo ya basusu mpo na kobomba nsɔni na bango. Yango ekoki komonana lokola likambo moke, kasi soki bakebi te mpe batiki ezaleli wana te, bakoki kosala likambo ya mabe mpenza. Tótalela masolo mibale na Biblia oyo ezali kolobela likunya.

Ntango Yisaka azalaki kofanda na mboka ya Bafilistia, Nzambe apambolaki ye mpe akómaki na “bitonga ya bampate mpe ya bantaba mpe bitonga ya bangɔmbɛ mpe basali mingi, boye Bafilistia [ bakómaki koyokela ye likunya mpo na, NW] biloko na ye.” Mpo na yango, bazipaki mabulu ya mai oyo Abalayama, tata ya Yisaka atimolaki, mpe mokonzi na bango alobaki na Yisaka alongwa na mboka na bango. (Genese 26:1-3, 12-16) Likunya na bango ezalaki mabe mpenza. Bazalaki koyoka mabe lokola Yisaka azalaki na bomɛngo na mboka na bango.

Bankama ya bambula na nsima, Davidi akómaki elombe na bitumba. Basi ya Yisalaele bayembelaki ye boye: “Saulo abomi nkóto na ye, nde Davidi abomi nkóto zomi.” Atako bakumisaki mpe Saulo, amonaki ete ndenge bakokanisaki ye na Davidi, bakitisaki ye, mpe ayokelaki Davidi zuwa. Kobanda wana, akómaki kokanela Davidi. Mwa moke na nsima, alukaki koboma Davidi mpo na mbala ya liboso. Talá mabe oyo likunya ekoki komema!​—1 Samwele 18:6-11.

Yango wana, soki tozali komikokanisa na bato mosusu mpe tokómi koyokela bango zuwa mpo na makambo oyo bazali kosala to bolamu oyo bazali na yango, tókeba! Makanisi mabe wana eyokani te na makanisi ya Nzambe. Liboso ya kolobela ndenge oyo tokoki kolonga makanisi wana, tótalela naino eloko mosusu oyo komikokanisa ebimisaka.

Komitalela mpe kosepela ndenge tozali

Esalamaka mpenza te tóbanda komituna ete: ‘Nazali mayele, kitoko, nayebi mosala malamu, nazali nzoto malamu, bato babangaka ngai, balingaka ngai’? Nzokande, mokomi moko alobaki boye, “Kozanga ete tóyeba yango, mituna ya ndenge wana eyelaka biso na bɔɔngɔ mpe tozwaka biyano oyo ekoki kosepelisa biso to te.” Moto oyo ayebaka te makambo nini akokoka kosala akoki komituna mituna ya ndenge wana kozanga ete aluka koleka basusu to koyokela bango likunya. Asukaka kaka na komitalela ye moko. Kosala bongo ezali mabe te. Nzokande, ndenge malamu ya kosala yango ezali koluka te komikokanisa na bato mosusu.

Mpo na bantina mingi, biso nyonso tozali na makoki ndenge moko te. Ekozala kaka na bato oyo tokomona ete baleki biso na makambo mosusu. Yango wana, na esika ya koyokela bango zuwa, tosengeli komitalela na kolanda mibeko ya sembo ya Yehova oyo esalisaka biso na kokesenisa mabe ná malamu. Yehova asepelaka na moto na moto ndenge azali. Alukaka te kokokanisa biso na bato mosusu. Ntoma Paulo apesaki toli oyo: “Tiká moto na moto ameka mosala na ye moko ndenge ezali, mpe na yango akozwa ntina ya komikumisa na oyo etali ye moko mpenza, kasi na komikokanisáká na moto mosusu te.”​—Bagalatia 6:4.

Ndenge ya kolonga likunya

Lokola biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, tosengeli ntango nyonso kobunda mpo na kolonga elimo ya likunya. Tokoki koyeba ete Biblia elobi na biso boye: “Mpo na kopesana lokumu bózala bato ya liboso,” kasi kosalela yango ezalaka pɛtɛɛ te. Paulo ayebaki ete nzoto na ye ezalaki kobenda ye na masumu. Mpo akwea te, azalaki “kobɛtabɛta nzoto [na ye] makofi mpe kokómisa yango lokola moombo.” (Baloma 12:10; 1 Bakolinti 9:27) Mpo na biso, yango ekoki kolimbola kolonga mposa ya koleka bato mosusu mpe kolona makanisi ya malamu. Tosengeli kobondelaka Yehova asalisa biso ‘tókanisa mpo na biso moko te koleka ndenge oyo esengeli kokanisa.’​—Baloma 12:3.

Likambo mosusu esalisaka biso ezali koyekola Biblia mpe komanyola yango. Na ndakisa, kanisá makambo oyo Nzambe alaki kosala na paladiso. Bato nyonso bakozala na kimya, na nzoto kolɔngɔnɔ, bilei ekozala beboo, bandako ya kitoko mpe misala ya malonga. (Nzembo 46:8, 9; 72:7, 8, 16; Yisaya 65:21-23) Tokanisi mpenza ete moto moko akoluka koleka basusu? Te. Ntina ya kosala yango ekozala te. Ya solo, Yehova alobi te ndenge makambo nyonso ekozala, kasi tokoki mpenza kokanisa ete moto nyonso akozala na makoki ya kosala mosala oyo alingaka. Moto mosusu akolinga koyekola astronomi, moto mosusu koyema. Moto akoyokela moninga likunya mpo na nini? Makambo oyo bato mosusu bakosala ekopesa biso mposa ya kosala lisusu malamu koleka, kasi ekotinda biso te tóyokela bango likunya. Makanisi ya mabe nyonso wana ekozala lisusu te.

Soki tolingi mpenza bomoi ya ndenge wana, ezali malamu tólona bizaleli malamu banda sikoyo! Ata na moi ya lelo tozali kokima makama mingi mpamba te tozali na kati ya paladiso ya elimo. Lokola na mokili ya sika bato bakozala na mposa ya koleka basusu te, tosengeli kobwaka ezaleli yango banda sikoyo.

Yango elingi nde koloba ete komikokanisa na bato mosusu ezalaka kaka mabe? To ezali na bantango oyo tokoki komikokanisa na basusu?

Komikokanisa ya malamu

Bato mingi bamilukelaki mawa mpe mpasi ya makanisi mpo balukaki komikokanisa na basusu; kasi ezalaki na ntina te básala bongo. Na likambo yango, yoká toli oyo ntoma Paulo apesaki: “Bózala nde bamekoli ya baoyo na nzela ya kondima mpe na motema molai bazali kozwa libula ya bilaka.” (Baebele 6:12) Soki tozali kosala makasi ya kolona bizaleli malamu lokola ya basaleli ya Yehova ya ntango ya kala, tokobuka mbuma malamu. Ya solo, ntango tozali koluka komekola bango, tokoki mpe mwa moke komikokanisa na bango. Kasi, ekosalisa biso tómona bandakisa oyo tokoki kolanda mpe esika nini tosengeli kobongisa.

Tózwa ndakisa ya Yonatana. Tokoki koloba ete makambo mingi ekokaki kotinda ye akóma na zuwa. Lokola Yonatana azalaki mwana ya liboso ya Mokonzi Saulo, ekoki kozala ete liboso azalaki kokanisa ete ye nde akokóma mokonzi, kasi Yehova aponaki Davidi, elenge oyo azalaki leki ya Yonatana ya mbula soki 30. Na esika Yonatana ayokela Davidi likunya mpe nkanda, akómaki moninga na ye mpe asungaki ye lokola mokonzi oyo Yehova ye moko aponaki. Yonatana azalaki mpenza moto ya Nzambe. (1 Samwele 19:1-4) Atako tata na ye Saulo azalaki komona Davidi lokola mbanda, Yonatana ayebaki ete Yehova nde aponaki ye mpe andimaki mokano na Ye; amikokanisaki na Davidi te, mpe amitunaki te: “Mpo na nini Davidi asengeli kozwa bokonzi kasi ngai te?”

Na lisangá, tosengeli soki moke te koyokaka lokola nde bandeko mosusu bazali koluka kobɔtɔla biso mikumba to kozwa esika na biso. Kowelana ezali na esika te na kati ya lisangá. Baklisto oyo bakɔmeli na elimo bazalaka na boyokani malamu na basusu, babatelaka bomoko, mpe balingaka bandeko; kasi bawelanaka bango na bango te. Francesco Alberoni, moto moko ya mayele na sosioloji, alobaki boye: “Bolingo etambolaka nzela moko te na likunya. Soki tolingi moto, tokosepela na bolamu na ye, soki azali kolonga na mosala na ye to azali na esengo, biso mpe tokozala na esengo.” Yango wana, soki ndeko moko azwi mokumba na lisangá, likambo ya malamu oyo tokoki kosala ezali kosepela mpo na yango. Yango nde Yonatana asalaki. Lokola ye, biso mpe tokozwa mapamboli mingi soki tozali komemya bandeko oyo bazali kokokisa na bosembo mikumba na ebongiseli ya Yehova.

Tosengeli kosepela na ndakisa malamu oyo bandeko na biso baklisto bazali kopesa. Soki tozali komikokanisa na bango na ndenge ya malamu, tokoluka komekola kondima na bango. (Baebele 13:7) Kasi soki tokebi te, na esika tómekola bango, tokobanda kowelana na bango. Soki tomoni ete ndeko moko oyo tosepelaka na ye aleki biso mpe tokómi koloba mabe mpo na ye to kotɔnga ye, na esika tómekola ye, tokobanda nde koyokela ye zuwa.

Moto moko te oyo azali moto ya kozanga kokoka akoki kozala ndakisa oyo eleki malamu. Yango wana, Biblia elobi na biso boye: “Bókóma bamekoli ya Nzambe, lokola bana balingami.” Ebakisi mpe boye, “Klisto mpe anyokwamaki mpo na bino, kotikeláká bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.” (Baefese 5:1, 2; 1 Petelo 2:21) Tosengeli kosala makasi mpo na komekola bizaleli malamu ya Yehova mpe ya Yesu lokola bolingo, boboto, motema mawa mpe komikitisa. Tosengeli kozwa ntango ya kotalela bizaleli ya basusu, mikano na bango mpe ndenge na bango ya kosala makambo. Komikokanisa ya ndenge wana ekobongisa bomoi na biso, ekoki kosalisa biso tólanda nzela ya malamu, tózala na kimya, mpe tokóma baklisto oyo bakɔmeli. (Baefese 4:13) Soki tosali makasi ya kolanda ndakisa na bango ya kokoka, na ntembe te tokozala na ntango te ya komikokanisa na bato.

[Elilingi na lokasa 29]

Mokonzi Saulo ayokelaki Davidi likunya

[Elilingi na lokasa 231]

Yonatana azalaki kotalela Davidi lokola mbanda na ye te atako azalaki mokóló na ye