Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tóbatela bomoto na biso ya boklisto

Tóbatela bomoto na biso ya boklisto

Tóbatela bomoto na biso ya boklisto

“[Yehova] alobi ete, Bino bozali batatoli na ngai.”​—YISAYA 43:10.

1. Yehova abendaka bato ya ndenge nini epai na ye?

 NTANGO ozali na Ndako ya Bokonzi, bwaká naino miso epai na epai. Ozali komona banani? Mbala mosusu okomona bilenge oyo bazali koyekola na likebi mpo na kozwa bwanya oyo ezali na Biblia. (Nzembo 148:12, 13) Na ntembe te, okomona mpe batata ya mabota bazali kosala makasi mpo na kosepelisa Nzambe atako bafandi na mokili oyo etondi na makambo oyo ezali kobebisa mabota. Mbala mosusu mpe okomona mpe mibange oyo bamipesi na Yehova oyo bazali koyika mpiko, atako bamaladi ezali kotungisa bango. (Masese 16:31) Bato nyonso wana balingaka Yehova mingi. Yehova mpe amonaki malamu kobenda bango bákóma baninga na ye. Mwana ya Nzambe alobaki boye: “Moto moko akoki koya epai na ngai te soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.”​—Yoane 6:37, 44, 65.

2, 3. Mpo na nini ekoki kozala mpasi mpo tóbosana te bomoto na biso ya boklisto?

2 Oyokaka esengo te ya kozala na kati ya bato oyo Yehova asepelaka na bango mpe oyo apambolaka? Kasi, na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza” oyo tozali, kobatela ntango nyonso na makanisi bomoto na biso ya boklisto ezali likambo ya pɛtɛɛ te. (2 Timote 3:1) Yango ezali mpasi mingimingi mpo na bilenge oyo bazali kobɔkwama na baboti oyo bazali baklisto. Moko na bilenge yango alobaki boye: “Atako nazalaki kokende na makita, namityelaki mpenza mikano ya elimo te mpe, lokuta mabe, nalonaki mpenza mposa ya kosalela Yehova te.”

3 Bamosusu bazali na mposa ya kosalela Yehova, kasi baninga ya mabe, makambo ya mokili, mpe bamposa ya mabe ekoki kobenda bango. Makambo ya ndenge wana ekoki mokemoke kotinda biso tóbosana bomoto na biso ya boklisto. Na ndakisa, lelo oyo bato mingi bazali kokanisa ete mibeko ya Biblia esilá ngala mpe esengeli kobosana yango. (1 Petelo 4:4) Bamosusu mpe bazali kokanisa ete kosambela Nzambe ndenge azali kosɛnga ezali mpenza na ntina te. (Yoane 4:24) Na mokanda oyo Paulo akomelaki Baefese, alobaki ete mokili ezali na “elimo,” to ezaleli oyo bato mingi bazali komonisa. (Baefese 2:2) Elimo yango ezali kotinda bato bálanda makanisi ya mokili oyo eyebi Yehova te.

4. Yesu alobaki nini oyo ezali komonisa ete ezali na ntina mingi tóbatela bomoto na biso ya boklisto?

4 Kasi, lokola tozali basaleli ya Yehova oyo bamipesi, toyebi ete ekozala likama mpo na mokomoko na biso, elenge to mokóló, soki abosani bomoto na ye ya boklisto. Kaka mitinda ya Yehova mpe makambo oyo azali kosɛnga biso nde emonisaka bomoto ya solo ya boklisto. Ebongi ezala bongo mpamba te Nzambe akelá biso na elilingi na ye. (Genese 1:26; Mika 6:8) Biblia ezali kokokanisa bomoto na biso ya boklisto na bilamba oyo, ntango tolati yango, bato nyonso bazali komona yango. Mpo na ntango na biso, Yesu alobaki boye: “Talá! Nazali koya lokola moyibi. Esengo na moto oyo azali ekɛngɛ mpe azali kobatela bilamba na ye ya likoló, mpo atambola bolumbu te mpe bátala nsɔni na ye te.” a (Emoniseli 16:15) Tótika te ete mokili ya Satana ebebisa bizaleli mpe etamboli na biso ya baklisto. Soki te, tokobungisa “bilamba” na biso. Likambo ya ndenge wana ekozala mawa mpe nsɔni mingi.

5, 6. Mpo na nini kopikama na elimo ezali na ntina mingi?

5 Moto oyo abosanaka te ete azali moklisto amonisaka yango mpe na ndenge oyo azali kotambwisa bomoi na ye. Na ndenge nini? Soki mosaleli moko ya Yehova akómi kobosana soki azali nani, nsukansuka makambo mosusu ekoki kobanda kobenda likebi na ye, akoyeba te nzela nini mpe mikano nini asengeli kolanda. Biblia ezali kokebisa biso mbala mingi na likambo ya kozala na mitema mibale. Moyekoli Yakobo alobaki boye: “Moto oyo azali kobɛta ntembe azali lokola mbonge moko ya mbu oyo ezali komemama na mopɛpɛ mpe kotindikama epai na epai. Ya solo, moto wana akanisa te ete akozwa eloko epai ya Yehova; azali moto ya mitema mibale, apikamá te na kati ya banzela na ye nyonso.”​—Yakobo 1:6-8; Baefese 4:14; Baebele 13:9.

6 Ndenge nini tokoki kobatela bomoto na biso ya boklisto? Nini ekosalisa biso tómonaka ete kozala basambeli ya Oyo-Aleki-Likoló ezali mpenza libaku malamu? Tosɛngi yo otalela makambo oyo elandi.

Lendisá mpenza bomoto na yo ya boklisto

7. Mpo na nini ezali malamu kosɛnga na Yehova atalela biso?

7 Kolisáká ntango nyonso boyokani na yo na Yehova. Eloko eleki motuya mpo na moklisto ezali boyokani na ye na Nzambe. (Nzembo 25:14; Masese 3:32) Soki tobandi komituna mituna mpo na bomoto na biso ya boklisto, tosengeli kotalela nokinoki soki boyokani na biso ná Nzambe ezali malamu mpe makasi. Mokomi ya nzembo asɛngaki likambo ya malamu oyo: “Ee [Yehova], meká ngai mpe sosolá ngai, tángá motema na ngai mpe makanisi na ngai.” (Nzembo 26:2) Mpo na nini ezali na ntina mingi Nzambe atalela biso? Mpamba te biso moko tokoki te kotalela malamumalamu makanisi mpe bamposa oyo ezali na mitema na biso. Kaka Yehova nde akoki mpenza koyeba motema na biso, elingi koloba mikano, makanisi, mpe mayoki na biso.​—Yilimia 17:9, 10.

8. (a) Litomba nini tokoki kozwa soki Yehova ameki biso? (b) Lisalisi nini ozali na yango mpo na kokola na elimo?

8 Ntango tolobi na Yehova ete atalela biso, tozali nde kosɛnga ye ameka biso. Akoki kotika makambo mosusu ekómela biso mpo na komonisa makanisi na biso mpe ndenge motema na biso ezali. (Baebele 4:12, 13; Yakobo 1:22-25) Tosengeli kondima komekama ya ndenge wana mpamba te epesaka biso libaku ya komonisa soki tozali mpenza sembo epai ya Yehova. Yango ekoki komonisa soki tozali “bato oyo bakoki na makambo nyonso mpe babongi na makambo nyonso, kozangáká eloko te.” (Yakobo 1:2-4) Mpe komekama yango ekoki kosalisa biso tókola na elimo.​—Baefese 4:22-24.

9. Moto asengeli nde koluka koyeba bosolo ya mateya ya Biblia kaka soki motema na ye esepeli? Limbolá.

9 Luká omona yo moko bosolo ya mateya ya Biblia. Soki boyebi na biso ya Biblia ezali likolólikoló, yango ekoki komema biso tóbosana ete tozali basaleli ya Yehova. (Bafilipi 1:9, 10) Moklisto mokomoko: elenge to mokóló, asengeli komindimisa ete makambo oyo andimaka ezali mpenza mateya ya solo ya Biblia. Paulo alendisaki baninga na ye bandimi na maloba oyo: “Bótalelaka malamumalamu makambo nyonso; bókangama makasi na oyo ezali malamu.” (1 Batesaloniki 5:21) Bilenge oyo baboti na bango bazali basaleli ya Nzambe basengeli koyeba ete bakoki te kozala baklisto ya solo na kondima ya baboti na bango. Davidi, tata ya Salomo, alendisaki ye ‘ayeba Nzambe ya tata na ye mpe asalela ye na motema malamu mpe na molimo ya botosi.’ (1 Ntango 28:9) Esengelaki te ete Salomo atala kaka ndenge oyo tata na ye alendisaki kondima na ye epai ya Yehova. Ye moko asengelaki koyeba Yehova, mpe asalaki yango. Abondelaki Nzambe boye: “Pesá ngai [sikoyo] mayele mpe boyebi ete nalekaleka liboso ya libota oyo.”​—2 Ntango 1:10.

10. Mpo na nini ezali mabe te kotuna mituna na bosembo mpe na makanisi ya malamu?

10 Kondima ya makasi etongamaka na boyebi. Paulo alobaki boye: “Kondima eutaka na likambo oyo eyokami.” (Baloma 10:17) Alingaki koloba nini? Alingaki koloba ete soki tozali koyekola Liloba ya Nzambe, tokolendisa kondima mpe elikya na biso epai ya Yehova, na bilaka na ye, mpe na ebongiseli na ye. Soki tozali kotuna mituna ya sembo mpo na mateya ya Biblia, yango ekoki kosalisa biso tózwa biyano oyo ekolendisa kondima na biso. Lisusu, na Baloma 12:2, Paulo apesi toli oyo: “Bómindimisa bino moko nini wana mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” Ndenge nini tokoki kosala yango? Na nzela ya “boyebi ya sikisiki ya solo.” (Tito 1:1) Elimo ya Yehova ekoki kosalisa biso tókanga ntina ata ya makambo ya makasi. (1 Bakolinti 2:11, 12) Soki ezali na likambo moko oyo tozali kokanga ntina na yango te, tosengeli kobondela Nzambe asalisa biso. (Nzembo 119:10, 11, 27) Yehova alingi biso tóyeba Liloba na ye, tóndima yango, mpe tótosa yango. Asepelaka ntango tozali kotuna mituna na bosembo mpe na makanisi ya malamu.

Zalá na ekateli ya kosepelisa Nzambe

11. (a) Mposa nini oyo moto nyonso azalaka na yango ekoki kokóma motambo mpo na biso? (b) Ndenge nini tokoki kozwa makasi ya koboya kolanda makambo ya baninga?

11 Luká kosepelisa Nzambe, kasi bato te. Moto nyonso alukaka kozala na kati ya bato oyo bazali na bizaleli oyo asepelaka na yango. Moto nyonso alingaka kozala na baninga, mpe soki bato mosusu bandimi biso, toyokaka malamu. Ntango moto azali kokola, ata mpe ntango akómi mokóló, azalaka na mposa makasi ya kolanda makambo ya baninga, mposa wana etindaka ye asala lokola bato mosusu to aluka kosepelisa bango. Kasi, baninga balukaka ntango nyonso bolamu na biso te. Ntango mosusu balukaka kaka bato oyo bakolanda bango mpo na kosala makambo ya mabe. (Masese 1:11-19) Mbala mingi moklisto oyo akómi kolanda baninga ya mabe alukaka kobomba bomoto na ye. (Nzembo 26:4) Ntoma Paulo apesaki likebisi oyo: “Bólanda bizaleli ya bato ya mokili oyo té.” (Baloma 12:2, Bible na Lingala ya lelo oyo) Yehova apesaka biso makasi oyo tosengeli na yango mpo na kolonga mposa nyonso ya kolanda makambo ya baninga.​—Baebele 13:6.

12. Toli nini mpe ndakisa ya nani ekoki kolendisa biso mpo tótika te kotyela Nzambe motema?

12 Ntango mposa ya kolanda makambo ya baninga ekómi kotinda biso tóbosana ete tozali baklisto, ezali malamu tóbosana te ete kozala sembo epai ya Nzambe ezali na ntina koleka makanisi ya bato to banzela oyo bato mingi bazali kolanda. Maloba ya Exode 23:2 ezali na toli ya malamu mpenza mpo na biso: “[Okolanda] ebele mpo na kosala mabe te.” Ntango bana ya Yisalaele mingi bazangaki kondima ete Yehova akoki kokokisa makambo oyo alakaki, Kalebe aboyaki na motema moko kolanda makanisi ya bato ebele. Azalaki mpenza na kondima ete bilaka ya Nzambe ekozanga te kokokisama, mpe ezaleli wana ememelaki ye ebele ya mapamboli. (Mituya 13:30; Yosua 14:6-11) Yo mpe okoboya kolanda makanisi ya bato mpo na kobatela boninga na yo ná Nzambe?

13. Mpo na nini ezali malamu mingi tóluka báyeba biso ete tozali baklisto?

13 Luká báyeba yo ete ozali moklisto. Likambo oyo balobaka ete ndenge malamu ya komibatela ezali kokanga mabɔkɔ te ezali solo na oyo etali bomoto na biso ya boklisto. Na ntango ya Ezela, ntango bato batɛmɛlaki Bayisalaele ya sembo mpo bátika kosala mokano ya Yehova, bango balobaki boye: “Biso tozali baombo ya Nzambe ya [likoló] mpe ya mokili.” (Ezela 5:11) Soki tozali kobanga bato oyo bazali koloba mabe mpo na biso, yango ekoki kopekisa biso tósala eloko moko. Koluka kosepelisa moto nyonso ekosala ete na nsuka tósala eloko ya malonga te. Yango wana, tóbangaka bato te. Ezalaka ntango nyonso malamu koyebisa bato polele ete ozali Motatoli ya Yehova. Na limemya nyonso, kasi mpe na kobanga te, okoki kolimbola makambo oyo omonaka malamu, oyo ondimaka mpe oyo otosaka, mpe makanisi na yo lokola moklisto. Yebisá bato polele ete ozali na mokano ya kotosa mibeko ya sembo ya Yehova na etamboli na yo. Monisá polele ete okoki te kokakola bosembo na yo epai ya Nzambe. Monisá ete osepelaka na mitinda oyo olandaka. (Nzembo 64:10) Komimonisa ete ozali moklisto ya sembo ekoki kopesa yo makasi, kobatela yo, ata mpe kotinda bato mosusu báluka koyeba Yehova mpe basaleli na ye.

14. Tosengeli nde kolɛmba nzoto ntango bazali kosɛka to kotɛmɛla biso? Limbolá.

14 Ya solo, bato mosusu bakoki kosɛka to mpe kotɛmɛla yo. (Yuda 18) Soki bato mosusu baboyi koyokela yo ntango ozali kosala makasi mpo na kolimbola bango makambo oyo otosaka, kolɛmba nzoto te. (Ezekiele 3:7, 8) Yebá ete ata soki osali makasi ndenge nini, okolonga te kondimisa bato oyo bazali na mposa ya kondima te. Kanisá lisolo ya Falao. Bolɔzi moko te to likamwisi moko te, ata kobomama ya mwana na ye ya liboso, endimisaki Falao ete Moize azalaki koloba na nkombo ya Yehova. Yango wana, kotika te ete kobanga bato epekisa yo kosalela Yehova. Kotyela Nzambe elikya mpe kozala na kondima ekoki kosalisa biso tólongola kobanga.​—Masese 3:5, 6; 29:25.

Zwá mateya na makambo eleká mpe bongisá avenire

15, 16. (a) Libula na biso ya elimo ezali nini? (b) Litomba nini tokozwa soki tozali komanyola na libula na biso ya elimo ntango tozali kotánga Liloba ya Nzambe?

15 Batelá libula na yo ya elimo. Baklisto bakozwa litomba soki bazali komanyola na libula na bango ya elimo ntango bazali kotánga Liloba ya Nzambe. Libula yango esangisi makambo lokola solo ya Liloba ya Nzambe, elikya ya bomoi ya seko, mpe lokumu ya kozala bamonisi ya Nzambe na mosala ya kosakola nsango malamu. Omonaka esika na yo na kati ya Batatoli na ye, bato oyo apesi libaku malamu ya kosakola Bokonzi, mosala oyo ezali kobikisa bato? Kobosana te ete Yehova ye moko nde alobi: “Bino bozali batatoli na ngai.”​—Yisaya 43:10.

16 Okoki komituna mituna oyo: ‘Valɛrɛ nini napesaka na libula yango ya elimo? Kosala mokano ya Nzambe ezali na esika ya liboso na bomoi na ngai mpo na komonisa ete nazwaka libula yango na valɛrɛ? Nasepelaka nde na libula yango mingi mpe nasalaka makasi nalonga komekama nyonso oyo ekoki komema ngai nabungisa yango?’ Libula na biso ya elimo ekoki mpe kosalisa biso tómiyoka ete tozali mpenza na kimya ya elimo oyo moto akoki kozwa kaka na ebongiseli ya Yehova. (Nzembo 91:1, 2) Soki tokanisi makambo minene oyo ebongiseli ya Yehova ekutani na yango na mikolo na biso, tokondima mpenza ete moto moko te to eloko moko te ekoki kolimwisa basaleli ya Yehova awa na mabelé.​—Yisaya 54:17; Yilimia 1:19.

17. Longola kotalela libula na biso ya elimo, tosengeli mpe kosala nini?

17 Ya solo, tosengeli kosuka kaka te na kotalela libula na biso ya elimo. Mokomoko na biso asengeli koluka kokóma moninga mpenza ya Nzambe. Paulo asalaki mosala makasi mpo na kolendisa kondima ya baklisto ya Filipi; kasi, na nsima akomelaki bango boye: “Na yango, balingami na ngai, se ndenge botosaka ntango nyonso, kaka te na ntango oyo ngai nazali, kasi mingi lisusu sikoyo na ntango oyo ngai nazali te, bókoba kosala mpo na lobiko na bino moko na kobanga mpe na kolɛnga.” (Bafilipi 2:12) Tokoki kotya motema epai ya moto mosusu te mpo na lobiko na biso.

18. Ndenge nini makambo ya lisangá esalisaka biso tómona mpenza ete tozali baklisto?

18 Omipesa na makambo ya lisangá. Balobaka ete “mosala etongaka bomoto.” Lelo oyo, baklisto bazwi mokumba ya ntina mingi ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Paulo alobaki boye: “Lokola ngai nazali, ya solo mpenza, ntoma epai ya bikólo mosusu, nazali kopesa nkembo na mosala na ngai ya ministre.” (Baloma 11:13) Mosala ya kosakola ekesenisaka biso na bato ya mokili, mpe ntango tozali kosala yango, emonisaka malamumalamu ete tozali baklisto. Soki tozali komipesa na makambo ya lisangá, na ndakisa koyangana na makita, kotonga bandako ya losambo, kosala milende mpo na kosalisa baoyo bazali na mikakatano, mpe makambo mosusu ya ndenge wana, ekoki kosalisa biso tómona mpenza ete tozali baklisto.​—Bagalatia 6:9, 10; Baebele 10:23, 24.

Soki tozali mpenza na bomoto ya boklisto, tokozwa mapamboli

19, 20. (a) Kozala moklisto ememeli yo matomba nini? (b) Totalelaka nini mpo na koyeba bomoto na biso ya solosolo?

19 Kanisá naino ebele ya mapamboli oyo tozali kozwa mpo tozali baklisto ya solo. Tozali na lokumu monene ya koyebana epai ya Yehova. Mosakoli Malaki alobaki boye: “Baoyo batosaki [Yehova] balobanaki moto na moninga na ye mpe [Yehova] ayokamelaki bango, ɛɛ ayokaki bango. Mpe mokanda ya kokanisa ekomamaki liboso na ye mpo na baoyo bazalaki kotosa [Yehova] mpe kobanga nkombo na ye.” (Malaki 3:16) Nzambe akoki kobenga biso baninga na ye. (Yakobo 2:23) Bomoi na biso ezali na ntina mpe tozali na mikano ya malamu mpe ya solosolo. Tozali mpe na elikya ya bomoi ya seko.​—Nzembo 37:9.

20 Kobosana te ete Nzambe nde ayebi bomoto na yo mpe valɛrɛ na yo mpenza, kasi yango etaleli te ndenge oyo bato bazali komona yo. Bato mosusu bakoki kotalela yo na kolanda makanisi ya bato. Kasi, bolingo ya Nzambe mpe komibanzabanza na ye mpo na biso nde emonisaka valɛrɛ na biso ya solosolo; tozali bato na ye. (Matai 10:29-31) Na nsima, bolingo na biso mpo na Nzambe ekoki kosalisa biso tóyebaka ntango nyonso ete tozali baklisto mpe kolakisa biso ndenge oyo ebongi kotambwisa bomoi na biso. “Soki moto alingaka Nzambe, moto yango ayebani epai na ye.”​—1 Bakolinti 8:3.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba yango ezali kotinda biso tókanisa mosala ya kapita ya ngomba ya tempelo na Yelusaleme. Kapita yango azalaki kotambola na tempelo mpo na kotala soki Balevi oyo bazalaki kokɛngɛla na butu bazali mpenza kosala to nde balali mpɔngi. Soki akuti mokɛngɛli azali kolala, bazalaki kobɛta ye fimbo mpe bakokaki kolongola ye bilamba mpe kotumba yango mpo ayoka nsɔni.

Ozali koyeba lisusu?

• Mpo na nini ezali na ntina mingi baklisto bábatela bomoto na bango ya boklisto?

• Ndenge nini tokoki kolendisa bomoto na biso ya boklisto?

• Ntango tozali na mokakatano ya kopona nani tosengeli kosepelisa, makambo nini ekoki kosalisa biso tózwa ekateli ya malamu?

• Ndenge nini koyeba ntango nyonso ete tozali baklisto ekoki kobongisa avenire na biso?

[Mituna ya boyekoli]

[Bililingi na lokasa 21]

Komipesa na makambo ya lisangá ekoki kosalisa biso tómona mpenza ete tozali baklisto