Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Armagedona: Ebandeli ya mokili moko ya esengo

Armagedona: Ebandeli ya mokili moko ya esengo

Armagedona: Ebandeli ya mokili moko ya esengo

LILOBA “Armagedona” euti na liloba ya Liebele Hala-Magedona to “Ngomba ya Megido.” Liloba yango ezali na Emoniseli 16:16 oyo elobi: “Bayanganisaki bango na esika oyo ebengami na Liebele ete Hala–Magedona.” Banani bayanganisami na Armagedona mpe mpo na nini? Mwa moke liboso, na Emoniseli 16:14, totángaka boye: “Bakonzi ya mabelé mobimba oyo efandami” bayanganisami “mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” Na ntembe te, maloba wana ebimisi mituna mosusu ya ntina mingi. Epai wapi “bakonzi” yango bazali kobunda? Bazali kobunda na nani mpe mpo na nini? Ndenge bato mingi bakanisaka, bakonzi yango bakosalela bibundeli oyo ebomaka bato ebele na mbala moko? Bato bakobika na Armagedona? Tiká Biblia epesa biyano na mituna yango.

Maloba “Ngomba ya Megido” elimboli ete etumba ya Armagedona ekosalema na ngomba moko na Moyen-Orient? Te. Ya liboso, ngomba ya ndenge wana ezali te; na esika Megido ezalaki, kaka libondo moko ya mabelé ya bolai ya mɛtrɛ soki 20 nde etikalá. Lisusu, esika yango ezali monene te mpo na koyanganisa “bakonzi [nyonso] ya mabelé mpe mampinga na bango.” (Emoniseli 19:19) Kasi, Megido ezali esika oyo bitumba mingi ya makasi ezalaki kosalema na Moyen-Orient. Na yango, liloba Armagedona ezali komonisa etumba moko ya makasi, oyo ekozala na molongi kaka moko.​—Talá etanda “Megido—Elilingi ebongi mpenza,” na lokasa 5.

Armagedona ekoki te kozala kaka etumba kati na bikólo ya mokili, mpamba te Emoniseli 16:14 elobi ete “bakonzi ya mabelé mobimba oyo efandami” basangani esika moko mpo na “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” Yilimia alobaki na esakweli moko ete “babomami na [Yehova]” bakozala “longwa na molelo moko ya mokili kino molelo mosusu ya mokili.” (Yilimia 25:33) Na yango, Armagedona ezali etumba ya bato te, oyo ekosuka kaka na esika moko boye na Moyen-Orient. Ezali nde etumba ya Yehova mpe ekosalema na mokili mobimba.

Kasi, tomoni ete na Emoniseli 16:16 babengi Armagedona “esika.” Na Biblia, liloba “esika” ekoki kolimbola ezaleli moko boye; mpe awa, elingi koloba ete mokili mobimba ekosangana esika moko mpo na kotɛmɛla Yehova. (Emoniseli 12:6, 14) Na Armagedona, bikólo nyonso ya mokili ekosangana esika moko mpo na kobunda na ‘mampinga oyo ezali na likoló’ oyo etambwisami na Yesu Klisto, “Mokonzi ya bakonzi mpe Nkolo ya bankolo.”​—Emoniseli 19:14, 16.

Tokoloba boni mpo na baoyo balobaka ete Armagedona ekozala etumba ya bibundeli, oyo ekoboma bato ebele na mbala moko, to ete monzoto moko ekotutana na mabelé? Nzambe ya bolingo akoki mpenza kopesa nzela ete likambo ya nsɔmɔ boye ekómela bato mpe mabelé, efandelo na bango? Te. Alobi polele ete asalaki mabelé “mpamba te” kasi “asalaki yango mpo bato báfanda wana.” (Yisaya 45:18, NW; Nzembo 96:10) Na Armagedona, Yehova akoboma mokili oyo na mɔtɔ te. Kasi, ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabelé.’​—Emoniseli 11:18.

Ntango nini Armagedona ekoya?

Na boumeli ya bikeke, bato bapesaki makanisi ndenge na ndenge mpo na koluka eyano na motuna oyo: ntango nini Armagedona ekoya? Soki totaleli mokanda ya Emoniseli ná mikanda mosusu ya Biblia, ekoki kosalisa biso tóyeba ntango oyo etumba yango ekosalema. Emoniseli 16:15 emonisi boyokani kati na Armagedona mpe koya ya Yesu lokola moyibi. Yesu asalelaki mpe elilingi yango mpo na kolimbola ndenge akoya mpo na kobebisa ebongiseli ya makambo oyo.​—Matai 24:43, 44; 1 Batesaloniki 5:2.

Ndenge kokokisama ya bisakweli ya Biblia emonisi yango, tozali na mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo bandá 1914. a Eleko oyo Yesu abengaki “bolɔzi monene” ezali ntango oyo mikolo ya nsuka ekosuka. Biblia eyebisi te soki eleko yango ekoumela ntango boni, kasi bampasi oyo ekozala na ntango yango ekoleka bampasi nyonso oyo ebimá na mokili. Bolɔzi yango monene ekosuka na Armagedona.​—Matai 24:21, 29.

Lokola Armagedona ezali “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” moto moko te akoki kozongisa yango nsima. Yehova asilá ‘kobongisa ntango’ oyo etumba yango ekobanda. “Ekoumela mingi te.”​—Habakuku 2:3.

Etumba ya sembo ya Nzambe ya boyengebene

Kasi, mpo na nini Nzambe akobunda etumba ya mokili mobimba? Armagedona ezali na boyokani na moko ya bizaleli na ye oyo eleki monene: boyengebene. Biblia elobi ete: “[Yehova] alingi sembo.” (Nzembo 37:28) Asili komona makambo nyonso ya mabe oyo ezali kosalema na mokili. Yango ezali kotumola nkanda na ye ya boyengebene. Na yango, aponi mwana na ye mpo abunda etumba moko ya sembo mpo na kosukisa ebongiseli mobimba ya makambo mabe.

Kaka Yehova nde akoki kobunda etumba ya sembo mpe koboma kaka bato oyo babongi kobomama, mpe kobatela bato ya sembo na bisika nyonso oyo bakozala. (Matai 24:40, 41; Emoniseli 7:9, 10, 13, 14) Lisusu, kaka ye nde azali na lotomo ya koyangela mabelé mobimba, mpamba te ye moto akelá yango.​—Emoniseli 4:11.

Yehova akosalela banguya nini mpo na kobunda na banguna na ye? Toyebi te. Toyebi kaka ete azali na makoki nyonso ya koboma bikólo nyonso ya mabe. (Yobo 38:22, 23; Sefania 1:15-18) Kasi, basaleli ya Nzambe awa na mabelé bakobunda te. Emonaneli oyo ezali na Emoniseli mokapo 19 emonisi ete kaka mampinga ya likoló nde ekobunda etumba yango elongo na Yesu Klisto. Moklisto moko te awa na mabelé akobunda.​—2 Ntango 20:15, 17.

Nzambe ya bwanya azali kopesa likebisi na bisika nyonso

Ekozala boni mpo na bato oyo bakobika? Ya solo, moto nyonso te nde akokufa na Armagedona. Ntoma Petelo alobaki ete: “Yehova . . . alingi te moto ata moko abomama kasi alingi nde bato nyonso bákóma na kobongola motema.” (2 Petelo 3:9) Ntoma Paulo mpe alobaki ete “mokano [ya Nzambe] ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.”​—1 Timote 2:4.

Mpo na kokokisa mokano yango, Yehova azwi bibongiseli mpo “nsango malamu ya bokonzi” esakolama na mokili mobimba, na bankama ya minɔkɔ. Bato ya bisika nyonso bazali kopesamela likoki ya kobika. (Matai 24:14; Nzembo 37:34; Bafilipi 2:12) Baoyo bazali kondima nsango malamu bakoki kobika na Armagedona mpe kozala na bomoi ya libela mpe ya kokoka na mabelé oyo ekobongwana paladiso. (Ezekiele 18:23, 32; Sefania 2:3; Baloma 10:13) Yango nde tokoki mpenza kolikya epai ya Nzambe oyo azali bolingo, boye te?​—1 Yoane 4:8.

Nzambe ya bolingo akoki kobunda?

Kasi, bato mingi bamitunaka: mpo na nini Nzambe oyo azali bolingo akoki koboma ebele ya bato bongo? Tózwa ndakisa ya ndako oyo etondi na binsekwa. Omoni te ete, mpo na kobatela libota na ye, nkolo-ndako ya malamu asengeli koboma binsekwa yango?

Ndenge moko mpe, soki etumba ya Armagedona ekosalema, ezali mpo Yehova alingaka bato mingi. Nzambe azali na mokano ya kokómisa mabelé oyo paladiso mpe komemela bato bomoi ya kokoka mpe kimya, mpe “moto moko akobangisa bango te.” (Mika 4:3, 4; Emoniseli 21:4) Kasi, nini ekokómela bato oyo bazali kobebisa kimya ya bazalani na bango? Nzambe akolongola “binsekwa” yango, elingi koloba bato mabe, mpo na bolamu ya bayengebene.​—2 Batesaloniki 1:8, 9; Emoniseli 21:8.

Bitumba mingi oyo ezali kosopa makila lelo oyo, ezali kouta na boyangeli ya bato ya kozanga kokoka mpe na kowelana mpo na koluka matomba ya bikólo na bango. (Mosakoli 8:9) Lokola baguvɛrnema ya bato ezali koluka lokumu mingi, bazali koboya mpenza kotosa Bokonzi ya Nzambe. Eloko moko te emonisi ete bakotika bokonzi na bango mpe bakopesa yango epai ya Nzambe mpe Klisto. (Nzembo 2:1-9) Na yango, biyangeli yango esengeli kolongwa mpo na kotika nzela mpo na Bokonzi ya sembo ya Yehova oyo ekotambwisama na Klisto. (Danyele 2:44) Etumba ya Armagedona esengeli kosalema mpo ekata mpo na libela soki nani mpenza azali na lotomo ya koyangela mabelé mpe bato.

Likambo oyo Yehova akosala na Armagedona ekozala mpo na bolamu ya bato. Lokola makambo ya mokili oyo ezali se kobeba, kaka boyangeli ya Nzambe ya kokoka nde ekokokisa bamposa nyonso ya bato. Kaka bokonzi na ye nde ekomemela bato kimya mpe bomengo ya solosolo. Makambo ya mokili elingaki kozala ndenge nini soki Nzambe akangaki mabɔkɔ mpo na libela? Koyina, mobulu mpe bitumba elingaki te kokoba kotungisa bato ndenge kaka ezali kosalema na bambula nyonso oyo bato bazali koyangela? Etumba ya Armagedona ezali likambo eleki malamu mpo na bato!​—Luka 18:7, 8; 2 Petelo 3:13.

Etumba oyo ekosukisa bitumba nyonso

Armagedona ekosala eloko oyo etumba moko te esalá, elingi koloba kosukisa bitumba nyonso. Biso nyonso tozelaka mokolo oyo bitumba ekozala lisusu te, boye te? Nzokande, milende nyonso oyo bato basali mpo na kosilisa bitumba elongi te. Lokola milende nyonso oyo bato basali mpo na kosilisa bitumba ezali kolonga te, yango emonisi bosolo ya maloba ya Yilimia oyo: “Ɛ [Yehova], nayebi ete nzela ya moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” (Yilimia 10:23) Mpo na makambo oyo Yehova akosala, Biblia elaki ete: “Akosukisa bitumba kino na nsuka ya mokili. Abukibuki litimbo mpe akatikati likonga; atumbi mpe makalo kati na mɔtɔ.”​—Nzembo 46:8, 9.

Ntango bikólo ekosalela bibundeli na yango ya mabemabe mpo na kobunda mpe bakosala makambo oyo ekoki kobebisa mokili, Mozalisi ya mabelé akoyeisa libebi na etumba oyo Biblia ebengi Armagedona! (Emoniseli 11:18) Na yango, etumba yango ekokokisa elikya oyo basaleli ya Nzambe bazalaka na yango banda kala. Ekomonisa mpenza ete Yehova, Nkolo ya mabelé, azali na lotomo ya koyangela bikelamu na ye nyonso.

Na yango, bato oyo balingaka boyengebene basengeli kobanga Armagedona te. Kutu, ezali nde kopesa elikya. Etumba ya Armagedona ekolongola mabe nyonso na mabelé mpe ekofungola nzela mpo na ebongiseli ya sembo ya makambo ya sika, oyo ekotambwisama na Bokonzi ya Masiya. (Yisaya 11:4, 5) Na esika Armagedona ezala libebi ya nsɔmɔ ya mokili, ekozala nde ebandeli ya mokili moko ya esengo mpo na bayengebene oyo bakofanda na paladiso awa na mabelé libela na libela.​—Nzembo 37:29.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, mokapo 11, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Etanda/Elilingi na lokasa 5]

MEGIDO​—ELILINGI EBONGI MPENZA

Megido ezalaki esika malamu mpo na makambo mingi, na wɛsti ya lobwaku ya Yizelele, na nɔrdi ya Yisalaele, esika oyo mabelé ezalaki kobota malamu. Bato ya mimbongo mpe basoda ya mikili mingi bazalaki koleka kaka na esika yango. Yango wana, Megido ekómaki esika ya bitumba makasi. Na buku na ye (Cities of the ­Biblical World​—Megiddo), profɛsɛrɛ Graham Davies akomaki boye: “Bato ya mimbongo mpe bapaya ya bipai nyonso bazalaki koleka na engumba ya Megido . . . kasi baoyo bazalaki makasi, bazalaki kobɔtɔla esika yango; yango wana bazalaki kokóma makasi na mombongo mpe na bitumba. Na yango, tokoki kokamwa te ete mpo na kozwa esika yango . . . esengelaki kobunda makasi mpe, soki balongi, esengelaki kobatela yango makasi mpo bato mosusu bázwa yango te.”

Lisolo ya Megido ebandaki eleki lelo mbula soki 3 500, ntango mokonzi ya Ezipito, Thutmose III, alongaki bakonzi ya Kanana. Ekobaki tii na 1918, ntango Edmund Allenby, mokonzi monene ya basoda ya Angleterre, alongaki basoda ya Turquie. Ezali na Megido nde Nzambe asalisaki Mosambisi Balaka alonga Yabini, mokonzi ya Kanana. (Basambisi 4:12-24; 5:19, 20) Mosambisi Gideona mpe alongaki Bamidyani kaka na esika yango. (Basambisi 7:1-22) Babomaki mpe mokonzi Ahazia ná mokonzi Yosiya na esika yango.​—2 Mikonzi 9:27; 23:29, 30.

Ebongi mpenza ete Armagedona ezwa nkombo ya esika yango, mpamba te bitumba mingi ya makasi ezalaki kosalema wana. Ezali elilingi ebongi mpenza mpo na komonisa ndenge Nzambe akolonga banguna na ye nyonso.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

[Elilingi na lokasa 7]

Na mokili mobimba, bato bazali kozwa makebisi mpe likoki ya kobika na Armagedona

[Elilingi na lokasa 7]

Armagedona ekozala ebandeli ya mokili moko ya esengo