Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Basakoli oyo bazali kobongola mayele na bango mpe komesana na makambo ya sika

Basakoli oyo bazali kobongola mayele na bango mpe komesana na makambo ya sika

Basakoli oyo bazali kobongola mayele na bango mpe komesana na makambo ya sika

“Nakómaki makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso, mpo ata ndenge nini nakoka kobikisa bamosusu.”​—1 BAKOLINTI 9:22.

1, 2. (a) Makambo nini esalaki ete ntoma Paulo azala mosakoli ya makoki? (b) Ndenge nini Paulo alobelaki lolenge oyo azalaki kotalela mokumba na ye?

 AZALAKI komimona mopaya te, ezala na kati ya bato ya mayele mingi to na kati ya bato mpamba lokola batongi ya bahema. Azalaki kosimba mitema ya bato minene ya Loma mpe bato mpamba ya engumba Filigia na mateya na ye. Makomi na ye ezalaki kobongola Bagrɛki, oyo balingaki bonsomi ya makanisi, mpe Bayuda oyo bazalaki kokangama na bonkɔkɔ na bango. Moto moko te akokaki kokweisa makanisi na ye mpe maloba na ye ezalaki na nguya. Azalaki koluka makambo oyo ekoyokanisa ye na bato nyonso mpo akoka komema bamosusu epai ya Klisto.​—Misala 20:21.

2 Moto yango ezalaki ntoma Paulo, oyo na ntembe te azalaki mosakoli ya makoki, oyo azalaki ntango nyonso kobongola mayele na ye ya kosakola. (1 Timote 1:12) Yesu apesaki ye mokumba ya “komema nkombo [ya Klisto] epai ya bikólo mosusu mpe epai ya bakonzi mpe epai ya bana ya Yisalaele.” (Misala 9:15) Ndenge nini azalaki kotalela mosala yango? Alobaki boye: “Nakómaki makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso, mpo ata ndenge nini nakoka kobikisa bamosusu. Kasi nazali kosala makambo nyonso mpo na nsango malamu, mpo nakóma mosangani na yango elongo na bamosusu.” (1 Bakolinti 9:19-23) Liteya nini tokoki kozwa epai ya Paulo oyo ekoki kosalisa biso tókóma na makoki mingi na mosala na biso ya kosakola mpe ya koteya?

Mobali oyo abongwani akokisi mokumba moko ya mpasi

3. Liboso Paulo abongwana, ndenge nini azalaki kotalela baklisto?

3 Paulo azalaki ntango nyonso moto ya motema molai mpe ya boboto, oyo abongaki mpo na mokumba oyo azwaki? Soki moke te! Molende ya mabe oyo Saulo (oyo bakómaki kobenga Paulo na nsima) azalaki na yango mpo na Lingomba ya Bayuda ekómisaki ye monyokoli monene ya bayekoli ya Klisto. Ntango azalaki naino elenge, andimaki báboma Setefano. Na nsima, Paulo abandaki kolukaluka baklisto bipai nyonso. (Misala 7:58; 8:1, 3; 1 Timote 1:13) Akobaki “kokanela mpe koluka koboma bayekoli ya Nkolo.” Nsima ya konyokola bandimi na Yelusaleme, alingaki kokende tii na Damasi.​—Misala 9:1, 2.

4. Mbongwana nini Paulo asengelaki kosala mpo na kokokisa mokumba na ye?

4 Ekoki kozala ete Paulo azalaki koyina baklisto makasi ndenge wana mpamba te azalaki mpenza kokanisa ete bakokɔtisa mateya ya bapakano na Lingomba ya Bayuda mpe bakobebisa yango. Kutu, Paulo azalaki “Mofalisai,” elingi koloba “moto oyo atyami pembeni.” (Misala 23:6) Kanisá naino mpasi oyo Paulo asengelaki koyoka ntango bayebisaki ye ete Nzambe aponi ye mpo na kosakola nsango malamu ata mpe epai ya Bapakano! (Misala 22:14, 15; 26:16-18) Bafalisai bazalaki kolinga ata kolya te esika moko na bato oyo bazalaki kotalela lokola basumuki. (Luka 7:36-39) Na ntembe te, ezalaki pɛtɛɛ te mpo Paulo abongola lolenge na ye ya kotalela makambo mpe ayokanisa yango na mokano ya Nzambe, oyo alingi ete bato ya ndenge nyonso bábika.​—Bagalatia 1:13-17.

5. Ndenge nini tokoki komekola Paulo na mosala na biso ya kosakola?

5 Biso mpe tokoki kokutana na makambo oyo ekosɛnga tósala lokola Paulo. Lokola na teritware na biso tozali kokutana na bato ya mikili mpe ya minɔkɔ ndenge na ndenge, tosengeli kosala makasi mpo na kotalela makanisi na biso mpe kotika kokanisela bato mosusu mabe. (Baefese 4:22-24) Tóyeba to te, esika tokolaki mpe ndenge oyo babɔkɔlaki biso nde esalaka ete tótalela bato na lolenge boye to boye. Yango ekoki kosala ete tókóma na ezaleli ya koponapona mpe ya koboya komesana na bato mosusu. Soki tolingi kolonga na mosala na biso ya koluka mpe kosalisa bampate, tosengeli kolongola makanisi ya ndenge wana. (Baloma 15:7) Yango mpenza nde Paulo asalaki. Andimaki mokumba wana ya mpasi ya kosakola epai ya bato ya lolenge nyonso. Bolingo etindaki ye akolisa makoki na ye ya koteya, ndakisa oyo tosengeli mpenza kolanda. Na yango, soki totaleli ndenge “ntoma epai ya bikólo mosusu” azalaki kosala mosala na ye, tokomona ete azalaki kosakola mpe koteya na likebi, azalaki mpe kotalela makanisi ya bato mosusu mpe azalaki kosalela mayele mingi ya koteya. a​—Baloma 11:13.

Mosakoli oyo azalaki kobongola mayele na ye ya koteya

6. Ndenge nini Paulo azalaki kotya likebi na makambo oyo bayoki na ye bayebaki, mpe yango ezalaki kobota mbuma nini?

6 Paulo azalaki ntango nyonso kotya likebi na bindimeli mpe makambo oyo bayoki na ye bayebaki. Ntango azalaki kosolola na Mokonzi Agilipa II, Paulo ayebaki ete mokonzi ‘ayebi malamumalamu mimeseno nyonso mpe bantembe nyonso na kati ya Bayuda.’ Na yango, lokola Paulo ayebaki bindimeli ya Agilipa, aponaki kolobela kaka makambo oyo mokonzi ayebaki malamu mpenza. Makanisi ya polelepolele oyo Paulo azalaki kobimisa na kondima nyonso etindaki Agilipa aloba ete: “Na mwa ntango moke okondimisa ngai nakóma moklisto.”​—Misala 26:2, 3, 27, 28.

7. Ndenge nini Paulo amonisaki ete azali komitya na esika ya bato mosusu ntango azalaki kosakola na Lisitila?

7 Paulo azalaki mpe komesana na makambo ya sika. Talá ndenge asalaki ntango azalaki koluka kopekisa ebele ya bato na engumba Lisitala ete básambela ye ná Balanaba te lokola banzambe. Na ntango wana, bazalaki kotalela bato oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Likaonia lokola bato oyo batángá mingi te mpe ya biyambayamba. Ndenge Misala 14:14-18 emonisi yango, Paulo alobelaki biloko kitoko oyo Nzambe akelá, oyo bazalaki komona mpe kosepela na yango mpo na kosalisa bato yango bámona bonene ya Nzambe ya solo. Ezalaki mpasi te mpo bato yango bákanga ntina ya makambo oyo alobaki, mpe na ntembe te makambo yango ‘epekisaki bibele wana ya bato ete bápesa mbeka te’ mpo na Paulo ná Balanaba.

8. Ndenge nini Paulo amonisaki ete azalaki kondima bokeseni ya makanisi atako azalaki ntango mosusu kosilika?

8 Kasi, Paulo azalaki moto ya kokoka te mpe azalaki ntango mosusu kosilika. Na ndakisa, na libaku moko, ntango balobelaki ye mabe mpe basambwisaki ye atako asalaki mabe moko te, akatelaki Moyuda moko na nkombo Ananiasi mangala. Kasi, ntango bayebisaki Paulo ete afingi nganga-nzambe monene kozanga ete ayeba, asɛngaki mbala moko bolimbisi. (Misala 23:1-5) Na Atene, ‘ayokaki nkanda na kati na ye na ndenge amonaki ete engumba yango etondá na bikeko.’ Kasi, ntango azwaki maloba na Ngomba Ale, Paulo amonisaki te ete azali na nkanda. Ntango asololaki na bato ya Atene na esika na bango ya masolo, alobelaki nde makambo oyo ekoyokanisa ye ná bango, na ndakisa etumbelo ya mbeka “Epai ya Nzambe oyo ayebani te” mpe atángaki maloba ya powɛti moko ya mboka na bango.​—Misala 17:16-28.

9. Ndenge nini Paulo amonisaki ete ayebaki kosimba makanisi ya bato ya ndenge nyonso?

9 Paulo ayebaki mpenza kosimba makanisi ya bato ya ndenge nyonso. Azalaki kotalela mimeseno mpe makambo mosusu ya bato oyo etindaka bango bátalela makambo na lolenge boye to boye. Ntango akomelaki baklisto ya Loma, ayebaki malamu ete bafandi na mboka-mokonzi ya ekólo oyo elekaki na nguya na ntango wana. Likambo ya ntina mingi oyo alobelaki na mokanda na ye ezalaki ete nguya ya Klisto ya kosikola bato elongi nguya oyo lisumu ya Adama ezalaki na yango likoló ya bato. Alobaki na baklisto ya Loma mpe ya zingazinga ya Loma na maloba oyo ekokaki kosimba mitema na bango.​—Baloma 1:4; 5:14, 15.

10, 11. Ndenge nini Paulo azalaki kopona bililingi oyo bayoki na ye bayebi malamu? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

10 Paulo azalaki kosala nini ntango alingi kolimbwela bato mateya ya mozindo ya Biblia? Ntoma Paulo azalaki na momeseno ya kosalela bililingi oyo eyebanaki malamu, oyo bato nyonso bakokaki kokanga ntina na yango, mpo na kolimbola mateya ya makasi ya Biblia. Na ndakisa, Paulo ayebaki ete bato ya Loma bayebaki malamu momeseno oyo ezalaki na Ampire ya Loma mobimba ya kozwa bato mosusu na boombo. Kutu, ekoki kozala ete bato mingi na kati ya baoyo akomelaki mikanda na ye bazalaki baombo. Yango wana, asalelaki boombo lokola elilingi mpo na kolimbola likambo ya ntina mingi oyo azalaki koteya bango, ete moto akoki kopona kozala moombo ya lisumu to ya boyengebene.​—Baloma 6:16-20.

11 Buku moko oyo elimbolaka Biblia elobi boye: “Na Loma, nkolo akokaki kopesa moombo na ye bonsomi ntango asepeli, to mpe moombo akokaki kofuta nkolo na ye mpo na kosomba bonsomi. Moto akokaki mpe kolongwa na boombo soki nkolo na ye akabi ye lokola moombo epai ya nzambe moko.” Moombo oyo azwi bonsomi akokaki kokoba kosala epai ya nkolo na ye mpo na lifuta. Na ntembe te, Paulo azalaki kokanisa momeseno wana ntango akomaki ete moto azali na bonsomi ya kopona nkolo oyo ye alingi kotosa: lisumu to boyengebene. Baklisto ya Loma balongwaki na boombo ya lisumu mpe bakómaki baombo ya Nzambe. Bazalaki na bonsomi ya kosalela Nzambe, kasi soki bango moko basepeli, bakokaki kokoba kosalela lisumu, nkolo na bango ya kala. Elilingi wana oyo moto nyonso akokaki kokanga ntina na yango ekokaki kotinda baklisto wana ya Loma bámituna boye: ‘Nkolo nini ngai naponi kosalela?’ b

Tólanda ndakisa ya Paulo

12, 13. (a) Milende nini tosengeli kosala mpo na kosimba mitema ya bato ndenge na ndenge? (b) Wapi likambo oyo omonaka ete ekoki kosalisa mpenza mpo na kosakola nsango malamu epai ya bato ya ndenge nyonso?

12 Lokola Paulo, biso mpe tosengeli kozalaka na likebi, koyebaka kobongola lolenge na biso ya koteya mpe kosalela mayele ndenge na ndenge mpo na kosimba mitema ya bato ya ndenge nyonso. Mpo na kosalisa bayoki na biso bákanga ntina ya nsango malamu, tosengeli te kosukaka kaka na kokende kotala bango, koyebisa bango nsango oyo tobongisaki liboso to kotikela bango mikanda oyo elimbolaka Biblia. Tosalaka makasi mpo na koyeba bamposa na bango, makambo oyo basepelaka na yango mpe oyo basepelaka na yango te mpe makambo oyo ezali kobangisa bango mpe lolenge oyo batalelaka bato mosusu. Atako yango esɛngaka kokanisa mpe kosala milende mingi, basakoli ya Bokonzi na mokili mobimba bazali kolɛmba te kosala yango. Na ndakisa, biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Hongrie elobi boye: “Bandeko bamemyaka mimeseno mpe lolenge ya bomoi ya bato ya bikólo mosusu mpe basɛngaka bato yango te ete bákóma kolanda mimeseno ya Hongrie.” Batatoli ya mikili mosusu mpe basalaka kaka bongo.

13 Na ekólo moko na Extrême-Orient, bato mingi bamibanzabanzaka mingi mpo na bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto na bango, kotángisa bana mpe kobɔkɔla bango. Basakoli ya Bokonzi ya ekólo yango basalaka makasi bálobela mingi makambo wana na esika ya kolobela ndenge makambo ebebi na mokili mobimba to makambo mosusu ya bomoi. Ndenge moko, basakoli ya bingumba ya minene na États-Unis bamonaki ete bato mosusu ya bakartye na bango bamitungisaka mingi mpo na makambo lokola kanyaka, mituka eleki ebele na babalabala mpe bazali koboma bato. Batatoli basalelaka makambo wana mpo na kobanda masolo ya Biblia na bato. Bateyi ya solosolo ya Biblia basalaka nyonso ete na likambo nyonso oyo baponi kolobela, bábimisa kaka makanisi ya malamu, oyo ekolendisa, bámonisa litomba ya kosalela mitinda ya Biblia lelo oyo mpe elikya kitoko oyo Nzambe azali kopesa mpo na mikolo ezali koya.​—Yisaya 48:17, 18; 52:7.

14. Lobelá ndenge oyo tokoki koyokanisaka mateya na biso na bamposa ya bato mpe makambo oyo bakutanaka na yango.

14 Ekozala mpe malamu tóbongolaka lolenge ya kosolola na bato na mosala na biso ya kosakola, mpamba te mimeseno ya bato, bakelasi oyo batángá mpe bindimeli na bango ekeseni. Makambo oyo tokoloba na bato oyo bandimaka ete Mozalisi azali kasi bandimaka Biblia te ekeseni na oyo tokoloba na baoyo bandimaka te ete Nzambe azali. Ntango tozali kokabola mikanda, makambo oyo tokoloba na moto oyo amonaka ete mikanda nyonso ya losambo ezali mpo na kobenda bato na mangomba, ekeseni na ndenge oyo tokoloba na moto oyo andimaka mateya ya Biblia. Ntango tozali kosolola na bato oyo batángá mingi ná baoyo batángá mingi te, tosengeli mpe kotalela lolenge oyo moto na moto atalelaka makambo. Bateyi ya malamu basalelaka makanisi mpe bililingi oyo eyokani na likambo oyo bazali kolobela.​—1 Yoane 5:20.

Tósalisa basakoli ya sika

15, 16. Mpo na nini mposa ezali makasi ya kopesa basakoli ya sika formasyo?

15 Paulo azalaki kaka te koluka kobongisa lolenge na ye moko ya koteya. Amonaki mpe ete esengeli kopesa formasyo epai ya basakoli ya sika lokola Timote mpe Tito, mpo bango mpe bákóma basakoli ya solosolo. (2 Timote 2:2; 3:10, 14; Tito 1:4) Lelo mpe ndenge moko, mposa ya kopesa mpe kozwa formasyo ezali makasi.

16 Na 1914, basakoli ya Bokonzi bazalaki soki 5 000 na mokili mobimba; lelo oyo, bato ya sika soki 5000 bazali kozwa batisimo pɔsɔ na pɔsɔ! (Yisaya 54:2, 3; Misala 11:21) Ntango bato ya sika babandi kosangana na lisangá ya boklisto mpe bakómi na mposa ya kobanda kosakola, esengeli bápesa bango formasyo mpe bátambwisa bango. (Bagalatia 6:6) Esengeli mpenza tólanda lolenge oyo Nkolo na biso Yesu azalaki kosala mpo na koteya bayekoli na ye mpe kopesa bango formasyo. c

17, 18. Ndenge nini tokoki kosalisa moto ya sika akakatanaka te ntango azali kosakola nsango malamu?

17 Yesu atyaki bantoma na ye te mbala moko liboso ya bato ebele mpe ayebisi bango bábanda koloba. Amonisaki bango liboso ntina ya mosala ya kosakola mpe alendisaki bango bálɛmba te kobondelaka mpo na mosala na bango. Na nsima, apesaki bango makambo misato mpo na kosalisa bango: moninga ya mosala, teritware mpe nsango oyo basengelaki kosakola. (Matai 9:35-38; 10:5-7; Malako 6:7; Luka 9:2, 6) Biso mpe tokoki kosala bongo. Ezala tozali kosalisa mwana na biso moko, moyekoli ya Biblia to moto moko oyo atikaki kosakola na boumeli ya mwa ntango, ebongi tósala makasi tópesa ye formasyo ndenge wana.

18 Bato ya sika bazali mpenza na mposa ya lisalisi mpo bákakatanaka te ntango bazali kosakola nsango ya Bokonzi. Okoki kosalisa bango na kobongisa mpe komeka mwa lisolo moko ya mokuse mpe ya kitoko? Ntango bobimi na mosala ya kosakola, yo nde osengeli kobanda kosakola na ndako ya liboso, mpo ye amona ndenge yo ozali kosala. Okoki kolanda ndakisa ya Gideona, oyo alobaki na basoda oyo akendaki na bango etumba ete: “Bosengeli kotala ngai, mpe bokosala lokola ngai.” (Basambisi 7:17, NW) Na nsima, okotikela mosakoli ya sika apesa litatoli. Pesá ye longonya mpo na milende oyo asali, mpe soki esengeli, okoki koyebisa ye makambo oyo asengeli kobongisa.

19. Ekateli nini ozalaka na yango ntango ozali kosala makasi mpo na ‘kokokisa mosala na yo ya ministre malamumalamu’?

19 Mpo na ‘kokokisa mosala na biso ya ministre malamumalamu,’ tozali na ekateli ya kobongolaka lolenge na biso ya koteya mpe tosengeli kopesa basakoli ya sika formasyo mpo bango mpe bákóma kosala bongo. Soki totali ntina ya mosala na biso, elingi koloba kopesa bato boyebi ya solosolo ya Nzambe oyo ememaka na lobiko, tokomona ete ebongi tóbomaka nzoto mpo na kokóma “makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso, mpo ata ndenge nini [tókoka] kobikisa bamosusu.”​—2 Timote 4:5; 1 Bakolinti 9:22.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na bandakisa oyo ezali komonisa ete Paulo azalaki komonisa bizaleli wana na mosala na ye ya kosakola, talá Misala 13:9, 16-42; 17:2-4; 18:1-4; 19:11-20; 20:34; Baloma 10:11-15; 2 Bakolinti 6:11-13.

b Ndenge moko mpe, ntango azalaki kolimbola boyokani ya sika oyo Nzambe asalaki na “bana” na ye bapakolami na elimo, Paulo asalelaki maloba ya mibeko oyo batángi na ye na Ampire ya Loma bayebaki malamu mpenza. (Baloma 8:14-17) Buku Santu Paulo na Loma (na Lingelesi) elobi boye: “Momeseno ya kozwa bana ya bato mosusu lokola bana na yo ebandaki mpenzampenza nde na Loma, mpe ezalaki na boyokani na lolenge oyo Baloma bazalaki kotalela libota.”

c Lelo oyo, programɛ Babongisi-nzela bazali kosalisa basusu ebongisami na masangá nyonso ya Batatoli ya Yehova. Programɛ yango esalelaka mayele ya mosala mpe formasyo ya basakoli ya ntango nyonso mpo na kosalisa basakoli oyo bakɔmeli naino te.

Ozali koyeba lisusu?

• Ndenge nini tokoki komekola Paulo na mosala na biso ya kosakola?

• Mbongwana nini emonani ete tosengeli kosala na makanisi na biso?

• Ndenge nini tokoki kosala ete nsango na biso ezalaka ntango nyonso ya kolendisa?

• Basakoli ya sika basengeli na nini mpo bákakatanaka te na mosala ya kosakola?

[Mituna ya boyekoli]

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]

Ntoma Paulo azalaki na likebi, ayebaki kobongola lolenge na ye ya koteya mpe azalaki kosalela mayele ndenge na ndenge ntango azali kosakola mpe koteya

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 31]

Yesu apesaki bayekoli na ye makambo misato ya ntina mingi: moninga ya mosala, teritware mpe nsango oyo basengelaki kosakola

[Bililingi na lokasa 28]

Paulo azalaki kosimba mitema ya bato ya ndenge nyonso mpamba te ayebaki kobongola lolenge na ye ya koteya

[Elilingi na lokasa 30]

Basakoli ya solosolo batalelaka mimeseno mpe makambo mosusu nyonso ya bayoki na bango

[Elilingi na lokasa 31]

Basakoli oyo babongolaka mayele na bango basalisaka basakoli ya sika bámibongisa mpo na mosala ya kosakola