Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Elembo ya bolingo, kondima mpe botosi

Elembo ya bolingo, kondima mpe botosi

Elembo ya bolingo, kondima mpe botosi

MWA 16 Mai 2005 na ntɔngɔ, mokolo ezalaki kitoko na ferme ya Watchtower na Wallkill, na etúká ya New York. Babongisaki pelouse ná bafololo malamu, mpe matanga ya mbula oyo ebɛtaki na butu ezalaki kongɛngisa yango. Libata moko ná bana na yango mwambe bazalaki konyanya pembenipembeni ya mwa liziba moko oyo ezalaka wana. Bapaya bakamwaki makasi na kitoko ya esika yango. Bazalaki kosolola na mongongo ya nse lokola nde balingi te makɛlɛlɛ na bango ebebisa kimya oyo ezalaki na ntɔngɔ wana.

Bapaya yango bazalaki Batatoli ya Yehova oyo bautaki na bikólo 48. Kasi, bayaki te mpo na kotala kitoko ya esika yango. Bayaki kotala makambo oyo ezalaki na kati ya ndako moko ya biliki ya motane oyo bautaki kobakisa na Betele ya Wallkill, na États-Unis. Ntango bakɔtaki na ndako yango, bakamwaki lisusu, atako kuna ezalaki kimya te lokola na libándá.

Bapaya yango bazalaki na likoló mpe bazalaki kotala bamasini oyo ezalaki na nse. Masini mitano ya minene ezalaki na eteni moko ya ndako oyo ezali na bonene ya mabándá 6 ya ndembo. Na esika yango nde babimisaka Babiblia, babuku, mpe bazulunalo. Barulo ya papye ya minene, oyo mokomoko na yango ezali na kilo 1 700, ebalukaka mbangu lokola bapine ya motuka oyo ezali kokima mbangu makasi. Rulo mokomoko ya papye ya kilomɛtrɛ 23 ekoki kosila na boumeli ya miniti 25 mpamba. Na ntango wana, masini etyaka encre, ekaukisaka yango mpe eyeisaka papye malili; bagumbaka yango mpo ekóma bazulunalo, oyo na nsima elekaka na vitesi makasi tii na esika oyo batyaka yango na bakartɔ mpo bátinda yango na masangá. Bamasini mosusu ebimisaka bakaye ya babuku, oyo ekendeke mbangu kozela na depo moko tii ntango ekotindama na esika bakangisa yango mpo ekóma babuku (atelier de reliure). Ordinatɛrɛ nde esalaka misala nyonso wana.

Ntango bapaya yango balongwaki na esika banyataka mikanda, bakendaki na esika bakangisaka mikanda. Na esika yango, bamasini esalaka mokolo na mokolo babuku ya bizipeli ya makasi mpe Babiblia soki 50 000. Basangisaka bakaye ya buku esika moko mpe bakataka bansonge na yango. Na nsima, batyaka bizipeli. Batyaka babuku oyo basilisi kosala na bakartɔ. Bamasini ekangaka yango, etyaka baadrɛsi likoló na yango mpe etyaka yango na bapalɛti. Bakɔtaki mpe na esika oyo basalaka mpe bakangaka babuku ya bizipeli ya pɛtɛpɛtɛ soki 100 000 mokolo na mokolo. Wana mpe, ezali na ebele ya bamasini oyo esalaka elongo mpe na molɔngɔ, mpe na vitesi ya makasi, mpo na kobimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia.

Bamasini yango oyo esalaka na vitesi makasi mpe na ntoki ezali mpenza biloko ya kokamwa oyo emonisi bokoli ya mayele ya bato ya siansi. Ndenge tokomona yango, ezali mpe komonisa bolingo, kondima, mpe botosi ya basaleli ya Nzambe. Kasi, mpo na nini mpenza imprimerie elongwe na Brooklyn, na etúká ya New York, mpe ekei na Wallkill?

Ntina mpenzampenza ezali mpo mosala ya konyata mikanda mpe ya kotinda yango na masangá ekóma kosalema esika moko, mpo mosala ezala lisusu makasi te. Na boumeli ya bambula ebele, mosala ya konyata mpe kotinda babuku ezalaki kosalema na Brooklyn, mpe oyo ya bazulunalo na Wallkill. Kosangisa yango esika moko ekokaki kokitisa motángo ya bandeko oyo bazalaki kosala kuna mpe kopesa nzela ya kosalela na ndenge ebongi makabo oyo bandeko bazali kopesa mpo na mosala ya Nzambe. Lisusu, lokola bamasini oyo ezalaki na Brooklyn ekómaki ya kala, basalaki komande ya masini mibale ya sika ya MAN Roland Lithoman na Allemagne. Bamasini yango ezali minene mingi mpe elingaki kokoka te na imprimerie ya Brooklyn.

Yehova azali kopesa mabɔkɔ

Mosala ya konyata mikanda ezalaka ntango nyonso mpo na kotombola mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Banda tobandá mosala yango, emonani polele ete Yehova azali kopambola yango. Kobanda na 1879 tii na 1922, bakompanyi oyo enyataka mikanda nde ezalaki kobimisa babuku na biso. Na 1922, tobandaki kofutela ndako moko ya etazi mitano na balabala Concord nimero 18, na Brooklyn mpe tosombaki bamasini mpo na konyata babuku. Na ntango wana, bato mosusu bandimaki te ete bandeko bakokoka mosala yango.

Moko ya bato yango ezalaki prezida ya kompanyi moko oyo ezalaki konyata mikanda na biso mingi. Ntango ayaki kotala esika yango, alobaki boye: “Bozali na bamasini ya kitoko mpenza, kasi bozali na moto moko te oyo ayebi kosalela yango. Nsima ya sanza motoba, bamasini yango nyonso ekobeba; mpe bokomona ete kaka bato oyo bazalaki konyatela bino mikanda liboso nde babongi mpo na mosala yango.”

Robert J. Martin, ndeko oyo azalaki mokɛngɛli ya imprimerie na ntango wana alobaki boye: “Emonanaki lokola makambo oyo alobaki ezali solo, kasi abosanaki ete Nkolo azali; mpe akotika biso te. . . . Eumelaki te, tokómaki kobimisa babuku.” Na boumeli ya mbula 80 oyo elandaki, Batatoli ya Yehova babimisi ebele ya mikanda na bamasini ya bango moko.

Na likita ya nsuka ya mbula ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania oyo esalemaki mwa 5 Ɔkɔtɔbɛ 2002, bapesaki liyebisi moko ete Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimi ete misala ya konyata mikanda elongwa na biro ya filiale ya Étas-Unis mpe ekende na Wallkill. Tosalaki komande ya masini mibale ya sika, oyo basengelaki kopesa biso na Febwali 2004. Bandeko basengelaki kosala plan ya imprimerie mpe koyeisa monene lopango na yango nsima ya sanza 15, liboso bamasini ya sika eya. Na nsima, basengelaki kotonga esika mpo na bamasini ya kokangisa mikanda mpe mpo na mosala ya kotinda mikanda na masangá na boumeli ya sanza libwa. Bato mosusu bandimaki te ntango bayokaki programɛ yango: bamonaki ete ekosimba te. Kasi, bandeko bayebaki ete na lipamboli ya Yehova, ekosimba.

“Basalaki na esengo mpe na bomoko”

Lokola bandeko bayebaki ete basaleli ya Yehova bakomipesa bango moko, babandaki mosala yango. (Nzembo 110:3) Lokola mosala ezalaki monene, esengelaki bandeko mosusu bápesa bandeko ya Betele mabɔkɔ na mosala yango. Bandeko koleka 1 000 ya États-Unis mpe ya Canada, oyo bayebi malamu mosala ya kotonga bandako, bandimaki koya kolekisa pɔsɔ moko to mibale, ata tii sanza misato na mosala yango. Babengaki bandeko mosusu oyo bazali basali ya bolingo malamu na mosala ya kotonga mpo na koya kopesa mabɔkɔ na mosala yango. Bakomite ya botongi esalisaki mpe mingi.

Mpo na bandeko mingi, koya kosala na Wallkill esɛngaki kobungisa mbongo mingi mpo na mobembo mpe ntango oyo bakokaki kosalela mpo na misala na bango ya mosuni. Kasi, bamipesaki na esengo nyonso. Mpo na kopesa bisika ya kolala mpe biloko ya kolya na ebele ya bandeko wana oyo bayaki mpo na kotonga, bandeko ya Betele bazwaki libaku ya komipesa na mosala wana ya kotonga. Longola misala na bango oyo basalaka pɔsɔ na pɔsɔ, bandeko koleka 535 ya Betele ya Brooklyn, ya Patterson mpe ya Wallkill bazalaki koya kosala mosala yango mokolo ya pɔsɔ. Soki basaleli ya Nzambe bapesaki lisungi nyonso wana, ezakaki kaka mpo Yehova atyaki mabɔkɔ na mosala yango.

Bandeko mosusu bapesaki makabo ya mbongo. Na ndakisa, bandeko bazwaki mokanda ya Abby, mwana moko ya mbula 9. Akomaki boye: “Nazali kosepela mingi na misala nyonso oyo bozali kosala mpo na kobimisa babuku ya kitoko. Mosika te, nakoya kotala bino. Tata alobi ete tokoya na mbula oyo ezali koya. Nakolata makarɔ mpo bóyeba ngai. Natindi mwa dolare 20 oyo mpo na imprimerie ya sika. Ezalaki mwa mbongo na ngai ya kolya mikate, kasi nasepeli kotindela bino yango.”

Ndeko mwasi moko akomaki boye: “Natindeli bino mwa likabo ya bikɔti oyo ngai moko natongi na mabɔkɔ na ngai. Nakosepela bópesa bikɔti yango na bandeko oyo bazali kosala mosala na Wallkill. Natángaki na buku moko oyo elobelaka bileko ete malili ekozala makasi mbula oyo. Nayebi te soki ezali solo. Kasi, nayebi ete misala mingi na Wallkill ekosalema libándá, mpe nalingi ete bandeko na ngai bábatela mitó na bango na malili. Nazali na makoki te oyo bandeko bazali koluka, kasi nayebi kotonga bilamba, yango wana nasepeli kosalela likoki yango mpo na kopesa likabo oyo nakoki.” Atindaki bikɔti 106.

Basilisaki kotonga imprimerie yango na dati mpenza oyo etyamaki. John Larson, mokɛngɛli ya imprimerie alobaki boye: “Bandeko basalaki mosala yango na esengo mpe na bomoko. Nani akoki kotya ntembe ete Yehova azalaki kopambola mosala yango? Mosala yango esalemaki nokinoki mpenza. Nazali koyeba lisusu ndenge natɛlɛmaki na kati ya pɔtɔpɔtɔ na sanza ya Mai 2003 mpo na kotala ndenge bandeko bazalaki kosala fondasyo ya ndako. Kaka mwa basanza na nsima, natɛlɛmaki lisusu kaka na esika yango mpe nazalaki kotala ndenge masini ezalaki kobimisa mikanda.”

Molulu ya bofungoli

Molulu ya bofungoli imprimerie ya sika mpe bandako mosusu misato ya kolala esalemaki na Wallkill Mwayambo, 16 Mai 2005. Bandeko ya Betele ya Patterson, ya Brooklyn mpe ya Canada bazalaki kolanda molulu yango na nzela ya bilili. Bato nyonso oyo bayanganaki na molulu yango bazalaki 6 049. Theodore Jaracz, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, oyo azalaki kokamba likita yango, alobelaki na mokuse lisolo ya mosala ya konyata mikanda. Na nzela ya mituna-lisolo mpe bilili, ndeko John Larson mpe John Kikot, oyo bazali basangani ya komite ya filiale balobelaki lisolo mobimba ya mosala ya kotonga mpe ya konyata mikanda na États-Unis. John Barr, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisolo ya nsuka mpe apesaki imprimerie mpe bandako ya kolala misato ya sika na mabɔkɔ ya Yehova.

Na boumeli ya pɔsɔ oyo elandaki, Bandeko ya Betele ya Patterson mpe ya Brooklyn bazwaki libaku ya kokende kotala yango. Bandeko nyonso oyo bakendeki bazalaki 5 920.

Ndenge nini totalelaka imprimerie?

Na lisukulu na ye, ndeko Barr amonisaki bayoki ete eloko oyo tozali kotalela na motuya na imprimerie ezali te bamasini na yango. Bato nde bazali na ntina mingi. Mikanda oyo tonyataka wana ezali kobikisa bomoi ya bato.

Masini mokomoko ya sika ekoki konyata batrakte milio moko na ngonga moko mpamba! Nzokande, trakte moko kaka ekoki kobongola mpenza bomoi ya moto. Na ndakisa, na 1921, ekipi moko ya mibali oyo babongisaka banzela ya engbunduka na Afrika ya Sudi bazalaki kosala mosala na bango na nzela moko ya engbunduka. Moko na bango, Christiaan, amonaki eteni moko ya lokasa elali na nse ya bibende ya nzela ya engbunduka. Ezalaki moko ya batrakte na biso. Christiaan atángaki yango na mposa makasi. Akimaki mbangu epai ya bokilo na ye mpe ayebisaki ye na esengo mpenza ete: “Lelo nazwi solo!” Mwa moke na nsima, bango mibale batindaki mokanda mpo na koyeba makambo mingi lisusu. Filiale ya Afrika ya Sudi etindelaki bango mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia. Mibali yango bayekolaki, bazwaki batisimo, mpe babandaki kosakwela bato mosusu solo ya Biblia. Yango esalisaki bato mingi bándima solo. Ya solo, na ebandeli ya bambula 1990, bana ya bato wana mibale koleka nkama moko bazalaki Batatoli ya Yehova; matomba wana nyonso eutaki kaka na trakte moko oyo mobali wana alɔkɔtaki na nzela ya engbunduka.

Ndeko Barr alobaki ete mikanda oyo tobimisaka, ememaka bato na solo, esalisaka bango bátikala na kati ya solo, epesaka bango molende mpe esalaka ete baklisto nyonso bázala na bomoko. Mpe likambo eleki ntina, mikanda oyo biso nyonso tokabolaka, epesaka Nzambe na biso Yehova nkembo.

Ndenge nini Yehova atalelaka imprimerie?

Ndeko Barr asɛngaki mpe bayangani bátalela imprimerie ndenge Yehova atalelaka yango. Ata soki imprimerie ezali te, Yehova akoki kotambwisa mosala na ye. Akoki kosalela mabanga mpo na kosakola nsango malamu! (Luka 19:40) Lisusu, lolenge oyo bamasini esalemá ezali likambo monene te na miso ya Yehova. Mpamba te ye nde akelá molɔ́ngɔ́. (Nzembo 147:10, 11) Yehova ayebi balolenge eleki malamu ya kobimisa mikanda, oyo eleki mayele ya bato mosika. Kasi, eloko nini mpenza ya motuya oyo Yehova azali komona na imprimerie? Na ntembe te, atalaka na imprimerie yango nde bizaleli malamu ya basaleli na ye, elingi koloba bolingo, kondima mpe botosi na bango.

Ndeko Barr apesaki ndakisa moko mpo na komonisa ndenge bolingo emonisami. Mwana moko ya mwasi asaleli baboti na ye gato. Na ntembe te, baboti na ye bakosepela. Ya solo, ata soki gato yango ezali kitoko to te, eloko oyo ekosepelisa baboti ezali nde bolingo oyo mwana na bango amonisi. Ndenge moko mpe, ntango Yehova azali kotala imprimerie oyo ya sika, azali komona te ndako mpe bamasini. Azali komona yango libosoliboso lokola elembo ya bolingo mpo na nkombo na ye.​—Baebele 6:10.

Lisusu, ndenge kaka Yehova amonaki masuwa ya Noa lokola elembo ya kondima na ye, azali mpe komona imprimerie oyo lokola elembo ya kondima na biso. Kondima na likambo nini? Noa azalaki na kondima ete oyo Yehova alakaki ekokokisama. Tozali na kondima ete tozali na mikolo ya nsuka, ete nsango malamu ezali nsango oyo eleki ntina oyo ezali kosakolama na mabelé, mpe ezali mpenza na ntina ete bato báyoka yango. Toyebi ete nsango ya Biblia ekoki kobikisa bato.​—Baloma 10:13, 14.

Na ntembe te, Yehova azali mpe komona imprimerie oyo lokola elembo ya botosi na biso. Ndenge toyebi, mokano na ye ezali ete nsango malamu esakolama na mokili mobimba liboso ete nsuka eya. (Matai 24:14) Imprimerie oyo ná mosusu oyo ezali na bamboka mosusu, ekosala mpenza mosala mpo na kokokisa etinda yango.

Ya solo, bolingo, kondima mpe botosi oyo basaleli ya Yehova bamonisi na kosangisa mbongo, kotonga mpe kotambwisa imprimerie oyo, bazali mpe komonisa yango na molende oyo bazali kosala na bisika nyonso mpo na kosakola solo epai ya bato nyonso oyo bakoyoka yango.

[Etanda/Bililingi na lokasa 11]

NDENGE IMPRIMERIE YA ÉTATS-UNIS EKOLI

1920: Bazalaki konyata bazulunalo na bamasini ya liboso, oyo ezalaki na balabala Myrtle nimero 35, na Brooklyn.

1922: Imprimerie ekómi na ndako moko ya etazi mitano na balabala Concord nimero 18. Babandi konyata babuku.

1927: Imprimerie ekei na ndako ya sika oyo batongaki na balabala Adams nimero 117.

1949: Babakisi ndako mosusu ya etazi mwambe.

1956: Imprimerie ya balabala Adams ekómaki lisusu monene ntango batongaki ndako ya sika na balabala Sands nimero 77.

1967: Batongaki ndako ya etazi libwa, yango esalaki ete imprimerie yango ekóma monene mbala zomi koleka oyo ya liboso.

1973: Batongaki imprimerie ya mibale na Wallkill, libosoliboso mpo na kobimisa bazulunalo.

2004: Misala nyonso ya konyata mikanda, kobongisa yango, mpe kotinda yango na masangá ekómi kosalema na Wallkill.