Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makanisi ya ntina na mokanda ya mibale ya Ntango

Makanisi ya ntina na mokanda ya mibale ya Ntango

Liloba ya Yehova ezali na bomoi

Makanisi ya ntina na mokanda ya mibale ya Ntango

NTANGO babandaki kokoma Mokanda ya Mibale ya Ntango, Salomo azalaki mokonzi na Yisalaele. Mokanda yango esuki na maloba oyo Sirise, mokonzi ya Perse, alobaki na bayuda oyo bazalaki na boombo na Babilone: “[Yehova] alakisi . . . ngai ete natongela ye ndako na Yelusaleme oyo ezali kati na Yuda. Ye nani kati na bino oyo azali moto kati na bato nyonso na ye, tiká ete [Yehova], Nzambe na ye azala na ye. Tiká ete abuta [na Yelusaleme]!” (2 Ntango 36:23) Nganga Ezela asilisaki kokoma buku yango na mobu 460 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Buku yango elobeli makambo oyo esalemaki na boumeli ya mbula 500, banda na 1037 L.T.B. tii na 537 L.T.B.

Ekateli oyo Sirise azwaki epesaki Bayuda nzela ya kozonga na Yelusaleme mpe kozongisa losambo ya Yehova. Nzokande, bambula ebele oyo balekisaki na boombo na Babilone ebebisaki mpenza makambo. Bato yango oyo bautaki na boombo bayebaki lisolo ya ekólo na bango te. Mokanda ya Mibale ya Ntango eyebisaki bango na mokuse mpe polele makambo oyo esalemaki na ntango oyo bakonzi ya libota ya Davidi bazalaki koyangela. Lisolo yango ezali mpe na ntina mingi mpo na biso, mpamba te ezali komonisa mapamboli oyo moto akoki kozwa soki azali kotosa Nzambe ya solo mpe mabe oyo ekoki kokómela ye soki azangi botosi epai na ye.

MOKONZI MOKO ATONGELI YEHOVA NDAKO

(2 Ntango 1:1–9:31)

Yehova apesaki Mokonzi Salomo bwanya mpe boyebi, biloko oyo asɛngaki, mpe abakiselaki ye bozwi ná lokumu. Mokonzi atongelaki Yehova ndako moko ya kitoko mingi na Yelusaleme mpe bato “bazalaki na esengo na mitema.” (2 Ntango 7:10) Salomo alekaki “mikonzi nyonso ya mokili na mosolo mingi mpe na boyebi.”​—2 Ntango 9:22.

Nsima ya koyangela Yisalaele mbula 40, ‘Salomo alalaki [esika moko] na batata na ye mpe Lehobama, mwana na ye akómaki mokonzi na esika na ye.’ (2 Ntango 9:31) Ezela alobelaki te ndenge Salomo atikaki losambo ya solo. Mabe ya mokonzi oyo alobelaki ezali kaka ete asombaki bampunda ebele na Ezipito mpe abalaki mwana ya Falao. Emonani ete Ezela aponaki kolobela kaka makambo ya kolendisa.

Biyano na mituna ya Biblia:

2:14—Mpo na nini makambo oyo balobi awa mpo na libota ya mosali ya misala ya mabɔkɔ ekeseni na oyo ezali na 1 Mikonzi 7:14? Mokanda ya Liboso ya Mikonzi elobi ete mama ya mosali ya misala ya mabɔkɔ azalaki ‘mwasi-akufelá-mobali ya libota ya Nafatali’ mpamba te abalaki mobali ya libota wana. Nzokande, ye moko azalaki moto ya libota ya Dani. Nsima ya liwa ya mobali na ye, abalaki mobali moko ya Tulo mpe babotaki na ye mosali ya misala ya mabɔkɔ wana.

2:18; 8:10—Bavɛrsɛ wana elobi ete bakapitɛni oyo batindaki lokola bakɛngɛli mpe baoyo bazalaki likoló ya bato ya misala ya makasi bazalaki 3 600 bakisá 250, nzokande, 1 Mikonzi 5:16; 9:23 elobi ete bazalaki 3 300 bakisá 550. Mpo na nini bokeseni wana? Ekoki kozala ete bokeseni yango euti na ndenge ya kokabola bato yango. Ekoki kozala ete Mokanda ya Mibale ya Ntango ezali kokesenisa bato 3 600 oyo bazalaki Bayisalaele te ná Bayisalaele 250 oyo bazalaki bakapitɛni, nzokande Mokanda ya Liboso ya Mikonzi ekesenisi bato 3 300 oyo bazalaki likoló na bato ná bakonzi na bango 550. Kasi, na mikanda yango nyonso mibale, motángo ya bakapitɛni yango nyonso ezali 3 850.

4:2-4, NW​—Mpo na nini basalelaki bikeko ya bangɔmbɛ lokola makonzí oyo esimbaki saani ya ebende? Na Biblia, bangɔmbɛ ezalaka elembo ya makasi. (Ezekiele 1:10; Emoniseli 4:6, 7) Elilingi ya bangɔmbɛ oyo basalelaki ebongaki mpenza mpamba te bangɔmbɛ 12 ya kwivre ememaki ebakata ya “saani” wana oyo ezalaki na kilo ya tɔni 30. Kosalela bikeko ya bangɔmbɛ lokola makonzí emonisi te ete babukaki mobeko ya mibale oyo epekisaki kosala bikeko mpo na losambo.​—Exode 20:4, 5.

4:5—Saani ya ebende ekokaki kokɔtisa litre ya mai boni? Soki saani yango etondi, ekokaki kokɔtisa bata nkóto misato to litre 66 000 ya mai. Nzokande, bazalaki kotondisa yango tii na likoló te. Mokanda ya liboso ya 1 Mikonzi 7:26 (NW) elobi boye: “[Saani yango] esimbaki bata nkóto mibale [44 000 litres].”

5:4, 5, 10—Biloko nini ya tabenakle bamemaki na tempelo ya Salomo? Eloko kaka moko ya hema ya koyangana oyo bamemaki na tempelo ya Salomo ezalaki sanduku. Ntango basilisaki kotonga tempelo, balongolaki tabenakle na Gibona mpe bayaki na yango na Yelusaleme, mpe ekoki kozala ete etikalaki kuna.​—2 Ntango 1:3, 4.

Mateya mpo na biso:

1:11, 12. Yehova amonaki na libondeli oyo Mokonzi Salomo asalaki ete kozwa bwanya mpe boyebi ezalaki mpenza mposa ya motema na ye. Yango emonisi ete mabondeli oyo tosalaka epai ya Nzambe emonisaka mposa ya motema na biso. Ekozala malamu tótalelaka makambo oyo tozali kosɛnga na mabondeli.

6:4. Botɔndi mpo na motema-boboto mpe bolamu ya Yehova esengeli kotinda biso tókumisa Yehova, elingi koloba tósanzola ye na bolingo mpe na botɔndi.

6:18-21. Atako ezali na ndako moko te oyo ekoki kokoka na Nzambe, tempelo ezalaki esika ya losambo ya Yehova. Lelo oyo, Bandako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova ezali bisika ya losambo ya solo.

6:19, 22, 32. Yehova akokaki koyoka mabondeli ya moto nyonso, banda na mokonzi tii na moto oyo aleki moke na Yisalaele, ezala ata mopaya oyo abondeli ye na motema sembo. a​—Nzembo 65:2.

MOLƆNGƆ YA BAKONZI YA LIBOTA YA DAVIDI

(2 Ntango 10:1–36:23)

Bokonzi ya Yisalaele ekabwanaki na mibale: Bokonzi ya mabota zomi na nɔrdi mpe bokonzi ya mabota mibale, Yuda mpe Benyamina, na sudi. Banganga-nzambe mpe balevi ya Yisalaele mobimba batye kondimana oyo ekólo mobimba esalaki na Nzambe liboso ya bolingo ya bikólo, mpe batikali sembo epai ya Lehobama, mwana ya Salomo. Mwa moke koleka mbula 30 nsima ya kosilisa kotonga tempelo, babɔtɔli biloko ya motuya oyo ezalaki na kati na yango.

Na kati ya bakonzi 19 oyo bakitanaki Lehobama, 5 bazalaki sembo, 3 babandaki malamu, kasi na nsima bakómaki mabe, mpe moko atikaki etamboli na ye ya mabe. Baoyo batikali, basalaki mabe na miso ya Yehova. b Ezela alobeli mingi makambo oyo mikonzi mitano oyo batyaki elikya na bango epai na Yehova basalaki. Na ntembe te, masolo ya Hizikiya oyo azongisaki lisusu misala ya tempelo mpe ya Yosiya oyo abongisaki fɛti moko ya monene ya Elekeli elendisaki mpenza Bayuda oyo bazalaki na mposa ete losambo ya Yehova ezongisama na Yelusaleme.

Biyano na mituna ya Biblia:

13:5—Maloba “kondimana ya mungwa” elimboli nini? Lokola mungwa ebatelaka biloko ebeba te, bazalaki kosalela yango lokola elembo ya biloko oyo eumelaka libela na libela mpe ebongwanaka te. Na yango, “kondimana ya mungwa” emonisi kondimana ya libela.

14:2-5; 15:17—Mokonzi Asa alongolaki “bisika ya likoló” nyonso? Emonani ete alongolaki yango nyonso te. Ekoki kozala ete Asa alongolaki kaka bisika ya likoló epai bazalaki kosambela banzambe ya lokuta, kasi te epai bazalaki kosambela Yehova. Ekoki mpe kozala ete batongaki lisusu bisika ya likólo na nsuka ya boyangeli ya Asa. Yango nde mwana na ye Yosafata alongolaki. Atako bongo, bisika ya likoló elongolamaki nyonso te, ata tii na boyangeli ya Yosafata.​—2 Ntango 17:5, 6; 20:31-33.

15:9; 34:6—Ntango Bokonzi ya Yisalaele ekabwanaki, libota ya Simeona eponaki kozala na ngámbo nini? Lokola libota ya Simeona ezwaki libula ya mwa biteni ya mabelé na kati ya Yuda, libota yango ezalaki mpenzampenza na kati ya teritware ya Bokonzi ya Yuda mpe Benyamina. (Yosua 19:1) Nzokande, na makambo ya losambo mpe ya politiki, libota yango emityaki na ngámbo ya Bokonzi ya nɔrdi. (1 Mikonzi 11: 30-33; 12:20-24) Yango wana, bazalaki kotánga Simeona na kati ya Bokonzi ya mabota zomi.

16:13, 14—Batumbaki ebembe ya Asa? Te, bapelisaki “mɔtɔ monene mingi” wana te mpo na kotumba ebembe ya Asa, kasi nde mpo na kotumba biloko ya nsolo malasi.

35:3—Yosiya autaki na Sanduku ya bulɛɛ oyo amemaki na tempelo wapi? Biblia eyebisi te soki moko ya bakonzi ya mabe oyo balekaki liboso na ye nde abimisaki yango na tempelo to soki Yosiya nde amemaki yango esika mosusu ntango bazalaki kosala mosala monene ya kobongisa tempelo, mpo na kobatela yango ebeba te. Nsima ya Salomo, balobeli sanduku yango kaka mbala moko wana, ntango Yosiya amemaki yango na tempelo.

Mateya mpo na biso:

13:13-18; 14:11, 12; 32:9-23. Tozwi liteya moko monene na likambo ya kotyela Yehova motema.

16:1-5, 7; 18:1-3, 28-32; 21:4-6; 22:10-12; 28:16-22. Kosala boyokani na bapaya to bato oyo bazali bandimi te esukaka mabe mpenza. Tokomonisa bwanya soki tozali koboya kosala boninga na mokili.​—Yoane 17:14, 16; Yakobo 4:4.

16:7-12; 26:16-21; 32:25, 26. Lolendo etindaki Mokonzi Asa akóma na ezaleli ebongi te na bambula ya nsuka ya bomoi na ye. Uziya abungisaki bokonzi na ye likoló ya lolendo. Hizikiya asalaki mpenza bozoba, mpe ntango mosusu lolendo nde ekosaki ye, ntango alakisaki bantoma ya mokonzi ya Babilone bozwi na ye. (Yisaya 39:1-7) Biblia elobi boye: “Lolendo eyaka liboso ya kokwea, mpe elimo ya enzombo liboso ya kobɛta libaku.”​—Masese 16:18, NW.

16:9. Yehova asalisaka baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye, mpe azalaka ntango nyonso pene ya kosalela nguya na ye mpo na kobundela bango.

18:12, 13, 23, 24, 27. Lokola Mikaya, tosengeli kozala na mpiko mpe na molende ntango tozali koyebisa bato makambo ya Yehova mpe mikano na ye.

19:1-3. Ata ntango tosali makambo oyo esepelisi ye te, Yehova amonaka mpe makambo na biso ya malamu.

20:1-28. Tokoki kozala na elikya ete soki tobondeli Yehova na komikitisa mpenza ete atambwisa biso, akozanga te komimonisa epai na biso.​—Masese 15:29.

20:17. Mpo na ‘komona elonga ya Yehova’, tosengeli ‘kotɛlɛma esika moko’ mpe kopesa mpenza mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi ya Nzambe. Na esika ya koluka kobunda biso moko, tosengeli ‘koningana te’ mpe kotyela Yehova motema na biso mobimba.

24:17-19; 25:14. Losambo ya bikeko ezalaki mpenza motambo mpo na Yoasa mpe mwana na ye Amasia. Lelo oyo, losambo ya bikeko ekoki mpe kobenda moto, mingimingi soki ebombani nsima ya ezaleli ya kolula biloko ya bato to ya bolingo ya ekólo.​—Bakolose 3:5; Emoniseli 13:4.

32:6, 7. Biso mpe tosengeli kozala na mpiko mpe makasi wana ‘tolati molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe’ mpe tozali kobunda etumba ya elimo.​—Baefese 6:11-18.

33:2-9, 12, 13, 15, 16. Moto akomonisa ete abongoli mpenza motema soki atiki etamboli ya mabe mpe asali mpenza makasi mpo na kosala malamu. Soki moto abongoli mpenza motema, ezala asalaki mabe ya koleka lokola Mokonzi Manase, Yehova akolimbisa ye.

34:1-3. Makambo ya mabe oyo ekómelaki biso na bomwana esengeli te kopekisa biso tóyeba Nzambe mpe tósalela ye. Ekoki kozala ete bizaleli ya malamu oyo Yosiya azalaki na yango na bomwana, azwaki yango epai ya nkɔkɔ na ye Manase oyo abongolaki motema. Ezala bongo to te, bizaleli malamu oyo Yosiya azwaki ebimisaki mbuma malamu na nsima. Ekoki mpe kozala ndenge moko mpo na biso.

36:15-17. Yehova azalaka na motema mawa mpe na motema molai. Nzokande, motema mawa mpe motema molai na ye ezali na nsuka. Mpo bato bábika ntango Yehova akosukisa ebongiseli ya mabe oyo, basengeli kondima nsango malamu oyo ezali kosakolama.

36:17, 22, 23. Maloba ya Yehova ezangaka te kokokisama.​—1 Mikonzi 9:7, 8; Yilimia 25:9-11.

Mokanda moko etindi ye asala

Totángaka na 2 Ntango 34:33 boye: “Yosiya alongolaki mpe biloko nyonso ya bosoto na mokili mobimba [oyo ezalaki] ya bato ya Yisalaele. Asalisaki nyonso baoyo bazalaki na Yisalaele ete básalela [Yehova], Nzambe na bango.” Nini mpenza etindaki Yosiya asala bongo? Ntango Safana oyo azalaki sekrɛtɛrɛ amemelaki Mokonzi Yosiya mokanda ya Mibeko ya Yehova oyo autaki komona, Mokonzi asɛngaki bátángela ye yango na mongongo makasi. Makambo oyo Yosiya ayokaki esimbaki motema na ye mpe, na molende mpenza, atombolaki losambo ya pɛto bomoi na ye mobimba.

Kotángaka liloba ya Nzambe mpe komanyola na makambo oyo tozali kotánga ekoki kozala mpenza na bopusi epai na biso. Omoni te ete komanyola na masolo ya bakonzi ya libota ya Davidi ezali kolendisa biso tólanda ndakisa ya baoyo batyelaki Yehova motema mobimba mpe tókima etamboli ya baoyo batyelaki ye motema te? Mokanda ya Mibale ya Ntango ezali kolendisa biso tómipesa kaka na Nzambe ya solo mpe tótikala sembo epai na ye. Ya solo mpenza, nsango ya mokanda yango ezali na bomoi mpe na nguya.​—Baebele 4:12.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na mituna oyo etali mokolo bafungolaki tempelo mpe mateya mosusu oyo tokoki kozwa na libondeli oyo Salomo asalaki mokolo wana, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 2005, nkasa 28-31.

b Mpo na koyeba ndenge bakonzi ya Yuda balandanaki, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto 2005, lokasa 12.

[Elilingi na lokasa 18]

Oyebi mpo na nini ebongaki mpenza básalela bikeko ya ngɔmbɛ lokola makonzi oyo esimbaki saani ya ebende?

[Bililingi na lokasa 21]

Atako Yosiya azwaki mpenza lisalisi ya malamu te na bomwana, ntango akolaki azalaki sembo epai ya Yehova