Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Une bonne nouvelle pour des gens de toutes nations

Une bonne nouvelle pour des gens de toutes nations

Une bonne nouvelle pour des gens de toutes nations

MWA buku oyo ozali komona awa ebimaki na Mayangani ya Etúká, “Tambolá elongo na Nzambe,” oyo Batatoli ya Yehova basalaki na 2004/2005. Ebimeli moko ya mwa buku yango ezali na nkasa 96 oyo ezali na nsango moko ya mokuse na minɔkɔ 92, banda na monɔkɔ ya Afrikaans tii na monɔkɔ ya Zande, mpe ebongisami mpo na kosalisa basakoli bákoka kopalanganisa nsango malamu epai ya bato ebele. (Matai 24:14) Masolo oyo elandi ezali komonisa matomba ya kosalela mwa buku yango.

• Nsima ya kozwa mwa buku yango na liyangani ya etúká, libota moko ya Batatoli bakendeki kotambola na baparke misato ya ekólo na bango. Kuna, bakutanaki na bato oyo bautaki na Inde, na Pays-Bas, na Pakistan mpe na Philippines. Tata ya libota yango alobi boye: “Atako bato yango nyonso bazalaki koloba mwa Lingelesi, lokola bazalaki mosika mpenza na mboka na bango, basepelaki mpenza ntango tolakisaki bango nsango oyo ekomami na monɔkɔ ya mboka na bango. Bamonaki mpenza ete tozali kosala mosala na biso na mokili mobimba mpe ete tozali na bomoko.”

• Motatoli moko alakisaki moninga na ye ya mosala oyo autaki na Inde mwa buku yango. Asepelaki mpenza komona minɔkɔ nyonso oyo ezali na kati ya buku yango mpe atángaki nsango yango na monɔkɔ na mboka na ye. Yango ememaki bango na masolo mingi lisusu ya Biblia. Moninga mosusu ya mosala oyo autaki na Philippines akamwaki komona monɔkɔ ya mboka na ye na mwa buku yango mpe akómaki na mposa ya koyeba makambo mingi lisusu na ntina ya Batatoli ya Yehova.

• Na Canada, mwasi moko oyo autaki na ekólo Népal andimaki koyekola Biblia na Motatoli moko na telefone, kasi azalaki kolinga te ndeko mwasi yango akende kotala ye na ndako na ye. Nzokande, ntango Motatoli yango ayebisaki ye ete ezali na mwa buku moko oyo ezali na nsango moko oyo ekomami na monɔkɔ ya Népali, asepelaki mpe abengaki ye na ndako na ye. Alingaki amona ye moko na miso nsango yango na monɔkɔ ya mboka na ye. Banda mokolo wana, bakómá koyekola na ndako ya mwasi yango.