Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kosala na lisangá oyo esalelaka monɔkɔ ya bapaya

Kosala na lisangá oyo esalelaka monɔkɔ ya bapaya

Kosala na lisangá oyo esalelaka monɔkɔ ya bapaya

NTOMA Yoane akomaki boye: “Namonaki anzelu mosusu azali kopumbwa na katikati ya likoló, mpe azalaki na nsango malamu ya seko mpo na kosakola lokola nsango ya esengo epai ya baoyo bazali kofanda na mabelé, mpe epai ya bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso.” (Emoniseli 14:6) Emonaneli yango ezali kokokisama na ndenge nsango malamu ya Bokonzi ezali kosakolama na minɔkɔ ndenge na ndenge na mokili mobimba. Mingi kati na minɔkɔ yango elobamaka na bapaya, bato oyo batiká mikili na bango mosika mpo na kokende kofanda epai mosusu. Bato yango bazali koyoka nsango malamu na lisalisi ya Batatoli ya Yehova ya molende oyo bayekoli minɔkɔ ya bapaya.

Yo mpe ozali kati na Batatoli oyo bazali kosala na lisangá moko oyo esalelaka monɔkɔ ya bapaya? To ozali kokana kosala yango? Mpo na kolonga, osengeli kozala na bolingo mpe na makanisi ya malamu. Lokola ozali na mokano ya kosalisa bato mosusu báyekola solo ya Liloba ya Nzambe, emonisi ete olingi Nzambe mpe bazalani na yo. (Matai 22:37-39; 1 Bakolinti 13:1) Koluka kosalisa bato mosusu báyeba Nzambe ezali mposa ya malamu koleka mposa ya kozwa baninga oyo bazali bato ya mboka mosusu, koyeba bilei ya mboka na bango mpe mimeseno na bango. Obangaka koyekola monɔkɔ ya bapaya? Boye, kozala na makanisi ya malamu ekosalisa yo mingi. James, oyo ayekolaki monɔkɔ ya Japonais alobi boye: “Kobanga monɔkɔ oyo olingi koyekola te.” Koyeba ete bato mosusu bayekolaki monɔkɔ yango mpe balongaki, ekoki kosalisa yo ozonga nsima te mpe obatela makanisi ya malamu. Kasi, ndenge nini okoki koyekola monɔkɔ mosusu? Nini ekosalisa yo omesana na lisangá oyo esalelaka monɔkɔ yango? Mpe osengeli kosala nini mpo otikala makasi na elimo?

Tyá makanisi na yo na koyekola

Ezali na ndenge mingi ya koyekola monɔkɔ moko. Moto na moto, azala mwana-kelasi to molakisi, azalaka na ndenge na ye ya koyekola to ya koteya monɔkɔ moko. Kasi, bana-kelasi mingi bamonaka ete kozala na molakisi oyo ateyaka malamu mpe kozala bana-kelasi mingi te esalisaka mpo na koyekola monɔkɔ nokinoki mpe kozanga mpasi. Kotánga Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe koyoka bakasɛti oyo ezali na monɔkɔ oyo ozali koyekola ekosalisa yo oyeba maloba mingi ya monɔkɔ yango mpe maloba oyo tosalelaka na lisangá. Longola yango, koyoka radio, kolanda televizyo, mpe kotala bakasɛti-video oyo ezali na monɔkɔ yango ekosalisa yo omesana na monɔkɔ yango mpe oyeba mimeseno ya bato oyo balobaka yango. Koyekola mwa ntango moke mokolo na mokolo ebimisaka matomba mingi koleka koyekola bangonga mingi kasi mikolo nyonso te.

Koyekola monɔkɔ ya sika ezali lokola koyekola kobɛta mai. Moto akoki te koyeba kobɛta mai soki asuki kaka na kotánga mokanda oyo ezali kolimbola ndenge ya kosala yango. Asengeli kokɔta na mai. Ezali mpe bongo mpo na koyekola monɔkɔ moko. Ezali mpasi koyeba monɔkɔ yango kaka na kotánga. Osengeli kosolola na bato oyo balobaka monɔkɔ yango, koyoka bango ntango bazali koloba mbala nyonso oyo ozwi libaku ya kosala yango. Makita mpe mosala ya kosakola ekoki kosalisa yo mingi na likambo yango. Mbala mingi, okoki kosalela maloba oyo ozali koyekola ntango obimi na mosala ya kosakola. Midori, ndeko moko oyo azali koyekola monɔkɔ ya Chinois alobi boye: “Tokoki kozala na mwa kobanga, kasi bato oyo tozali kokutana na bango na mosala ya kosakola bakomona ete biso Batatoli tosalaka milende. Yango ekoki kotinda bango báyoka biso. Ntango mosusu esɛngaka kaka koloba na monɔkɔ na bango ete, ‘Nasepeli kokutana na yo’, mpe okomona ete elongi na ye etondi na esengo!”

Makita ya boklisto mpe esalisaka mingi. Na makita nyonso, salá makasi opesaka ata eyano moko. Ata soki na ebandeli motema na yo ezali kobɛta, kolɛmba te. Bandeko na kati ya lisangá bazali na mposa ete oyeba monɔkɔ yango! Monifa, ndeko moko oyo azali koyekola monɔkɔ ya Coréen, alobi boye: “Nazali mpenza na botɔndi epai ya ndeko mwasi oyo afandaka pene na ngai na makita mpe akomelaka ngai ndimbola ya maloba mosusu. Bolingo mpe motema molai na ye esalisi ngai mpenza.” Wana ozali koyeba maloba ya monɔkɔ yango, okoki kobanda kokanisa na monɔkɔ yango—okobanda kokanga mbala moko ntina ya makambo oyo ozali koyoka na esika obongolaka liloba mokomoko.

Mokano na yo ya liboso esengeli kozala ya “kobimisa maloba oyo ezali pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina.” (1 Bakolinti 14:8-11) Atako bato bakoseka yo te, bafoti mingi to elobeli na yo ekoki kosala ete bátya likebi te na nsango oyo omemeli bango. Kotya likebi na ndenge ya kobenga maloba mpe gramɛrɛ ya monɔkɔ yango ekosalisa yo okóma te na mimeseno oyo ekozala mpasi mpo na kotika yango. Mark, ndeko oyo ayekolaki Swahili, alobi boye: “Sɛngá bato oyo balobaka monɔkɔ yango malamu básembolaka yo soki osali foti ya monene, mpe kobosana te kopesa bango mersi!” Kasi, kozwa bango ngonga mingi te mpe kolɛmbisa bango te. Atako okoki kosɛnga ndeko moko atala soki okomi malamu, yo moko mpe osengeli kosala makasi mpo na kobongisa masolo na yo mpe biyano na yo na maloba oyo oyebi mpe oyo otalaki na diksionɛrɛ. Yango ekosala ete oyeba monɔkɔ yango noki mpe ekosalisa yo oloba kozanga kokakatana.

Kende ntango nyonso liboso

Monifa alobi boye: “Koyekola monɔkɔ ya sika ezali likambo ya mpasi koleka makambo nyonso oyo nasalá. Na bantango mosusu nayokaka mposa ya kotika. Kasi nakanisaka ndenge moto oyo nayekolaka na ye Biblia asepelaka mingi koyoka solo na mwa Coréen oyo namekaka koloba mpe esengo oyo bandeko bayokaka soki nasali mwa milende.” Liteya ezali ete kotika te ntango okutani na mwa mokakatano. Mokano na yo ezali ete okóma na likoki ya koteya bato solo ya Biblia oyo ekobikisa bango. (1 Bakolinti 2:10) Yango wana, koyekola monɔkɔ mosusu mpo na koteya Biblia esɛngaka kotya makanisi nyonso mpe kosala molende. Wana ozali koyeba mokemoke, koluka te komikokanisa na bato mosusu. Bato nyonso oyo bazali koyekola monɔkɔ moko bakolaka ndenge moko te. Kasi, ezali malamu oyebaka soki ozali kokende liboso. (Bagalatia 6:4) Joon, ndeko moko oyo azali koyekola monɔkɔ ya Chinois, alobi boye: “Koyekola monɔkɔ ezali lokola komata baeskalye. Ntango ozali komona lokola nde otɛlɛmi esika moko, okokamwa ete osili koyeba makambo mingi.”

Koyekola monɔkɔ esukaka te. Yango wana, kómisá yango likambo ya esengo, kolikya te ete okoyeba koloba yango malamumalamu. (Nzembo 100:2) Okozanga te kosala bafoti. Yango ezangaka te ntango moto azali koyekola. Ntango moklisto moko abandaki kosakola na monɔkɔ ya Italien, atunaki moto oyo asololaki na ye ete, “Oyebi kɔmbɔ ya bomoi?” Alingaki nde koloba “ntina ya bomoi.” Motatoli moko oyo azalaki koyekola monɔkɔ ya Polonais asɛngaki bandeko na lisangá báyemba mbwa na esika ya kosɛnga bango báyemba nzembo. Ndeko moko oyo azalaki koyekola monɔkɔ ya Chinois alingaki kolobela mbeka ya Yesu, kasi lokola abongolaki kaka mwa moke ndenge ya kobenga liloba yango, ekómaki lokola nde asɛngi bayoki bázala na kondima na bibliotɛkɛ ya Yesu. Malamu ya kosala bafoti ezali ete soki balakisi yo ndenge ya malamu ya koloba liloba yango okobosana yango lisusu te.

Kosala na bandeko ya lisangá

Ezali kaka monɔkɔ te nde ekesenisaka bato. Mbala mingi makambo lokola mimeseno, loposo, mpe bikólo ekesenisaka mpe bato. Kasi, bato bakoki kolonga makambo wana nyonso. Moto moko ya mayele oyo ayekolaka mangomba ya bato ya Chine oyo bafandaka na Mpoto amonaki ete Lingomba ya Batatoli ya Yehova ezali mpo na bato ya “bikólo nyonso.” Amonaki ete Batatoli “bakabolaka bikólo te, mpe ete monɔkɔ ezali kaka esaleli mpo na koyeba liloba ya Nzambe.” Kosalela mitinda ya Biblia nde esalisaka baklisto ya solo bálonga makambo nyonso oyo ekesenisaka bato. Mpo na bato oyo balati ‘bomoto ya sika, Mogrɛki azali te Moyuda mpe te, mopaya azali te.’—Bakolose 3:10, 11.

Yango wana, bandeko nyonso na lisangá basengeli kosala makasi mpo na kolendisa bomoko. Yango ezali kosɛnga na moto andima ete bato mosusu mpe bazali na lolenge na bango ya kokanisa, komonisa mayoki, mpe ya kosala makambo. Okoki kosala ete bokeseni ekabola bino te soki ozali koluka te ete makambo esalema kaka na ndenge na bino. (1 Bakolinti 1:10; 9:19-23) Luká kosalela makambo ya malamu oyo ezali na mimeseno ya bato mosusu. Kobosana te: bolingo ya solosolo nde sɛkɛlɛ ya boyokani mpe bomoko ya solosolo.

Masangá mingi oyo esalelaka monɔkɔ ya bapaya ebandaka naino na mwa bituluku; mbala mingi ezalaka na bandeko oyo bazali koyekola monɔkɔ ya sika, mpe bandeko mosusu oyo bayekoli solo sika. Yango wana, mikakatano ebimaka mingi na bituluku yango koleka na masangá. Na yango, baklisto oyo bakɔmeli basengeli kolukaka kobatela kimya na lisangá. Kozala na bolingo mpe boboto ezala na maloba to na misala esalisaka mpo bato ya sika bákola na elimo.

Bandeko oyo bandimaka kopesa lisangá ya monɔkɔ ya bapaya mabɔkɔ basengeli koluka te ete basusu bákokisa makambo nyonso ndenge oyo bango bazali kokanisa. Rick, nkulutu moko na lisangá ya monɔkɔ ya bapaya alobi boye: “Ekoki kozala ete Batatoli mosusu oyo bayekoli solo sika bayebi te kobongisa makambo lokola bandeko ya masangá oyo basalelaka monɔkɔ oyo elobamaka na mboka yango. Kasi, mbala mingi bandeko ya ndenge wana, oyo bazali makasi te na kobongisa makambo, bazalaka na bolingo mpe esengo mingi. Mpe bato mingi ya sika bazali koya na lisangá.” Soki ozali komipesa na makambo ya lisangá mpe ozali kosala nyonso oyo okoki, okosalisa mingi lisangá, ata ntango ozali naino koyekola monɔkɔ. Soki bandeko nyonso ya lisangá bazali kopesana mabɔkɔ, lisangá ekokende liboso.

Zalá ntango nyonso makasi na elimo

Ndeko moko oyo akendaki sika na lisangá ya monɔkɔ ya bapaya ayokaki mama moko azali kosalisa mwana na ye mpo na kobongisa eyano. Mwana alobaki boye: “Mama, napesa ata ya mokuse.” Mama yango alobaki ete: “Te, tótika biyano ya mikuse mpo na bandeko oyo bazali koyekola monɔkɔ na biso.”

Moto oyo azali mokóló amitungisaka mingi soki azali koloba malamu te monɔkɔ moko na boumeli ya basanza to bambula mpe yango ekoki kolɛmbisa ye na elimo. Janet, ndeko mwasi oyo akómá koloba monɔkɔ ya Espagnol malamu, alobi boye: “Nazalaki komitungisa mingi ndenge nazalaki koyeba koloba malamu te.” Hiroko, oyo ayekolaki Lingelesi, alobi ete azalaki kokanisa boye: ‘Ata bambwa ná banyau na teritware bayebi Lingelesi malamu koleka ngai.’ Mpe Kathie alobi boye: “Ntango nakómaki na lisangá ya Espagnol, na ebandeli nazalaki na bato ebele oyo nazalaki koyekola na bango Biblia mpe nakomaki bankombo ya ebele ya bato oyo nasengelaki kozongela; kasi, na nsima natikalaki ata na moto moko te. Namonaki lokola nde nazali kolekisa ntango mpamba.”

Nyonso wana emonisi ete ezali na ntina mingi kozala na makanisi ya malamu. Ntango Hiroko akómaki kolɛmba nzoto, alobaki boye: “Soki bato mosusu bakoki koyekola monɔkɔ yango, ngai mpe nakokoka.” Kathie alobi boye: “Nakanisaki mobali na ngai, oyo azali kokola malamu mpe azali kosala mingi na lisangá yango. Yango esalisaki ngai nabongola makanisi. Nzela ezali naino molai, kasi mokemoke nazali kokóma na makoki ya kosakola mpe koteya, mpe yango ezali kopesa ngai esengo.” Jeff, mobali na ye, abakisi boye: “Esalaka mpasi mingi soki ozali kokanga ntina te ya mayebisi oyo ezali kopesama to makambo oyo ezali kolobama na makita ya bankulutu. Nayokaka nsɔni te mpe nazalaka na komikitisa mpo na kotuna bandeko makambo oyo nakangi ntina te, mpe bandeko basepelaka kolimbola ngai.”

Mpo olɛmba te ntango ozali kosala na lisangá ya monɔkɔ ya bapaya, osengeli kotya naino bokoli na yo ya elimo na esika ya liboso. (Matai 5:3) Kazuyuki, ndeko oyo asakolaka banda bambula ebele epai ya bato oyo balobaka monɔkɔ ya Portugais, alobi boye: “Ezali na ntina mingi tólyaka malamu na elimo. Yango wana ngai ná libota na ngai toyekolaka mpe tobongisaka naino makita na monɔkɔ ya mboka na biso mpe na nsima na Portugais.” Bandeko mosusu bayanganaka na bantango mosusu na makita na masangá ya monɔkɔ na bango. Lisusu, ezali na ntina mingi kopema malamu.—Malako 6:31.

Tángá motuya

Soki ozali kokanisa kokende na lisangá ya monɔkɔ ya bapaya, osengeli kotánga motuya oyo yango ekosɛnga yo. (Luka 14:28) Mpo na yango, makambo ya ntina mingi oyo osengeli kotalela ezali elimo na yo mpe boyokani na yo na Yehova. Talelá makambo na yo na kati ya libondeli. Kobosana te bamposa ya molongani mpe ya bana na yo. Omituna boye, ‘Makambo ya bomoi na ngai mpe elimo na ngai ekoki mpenza kopesa ngai makasi ya kokokisa mokano yango oyo ezali kosɛnga bambula mingi?’ Kosala oyo eleki malamu mpo na yo ná libota na yo na elimo nde nzela ya bwanya. Okoki kozala na mosala mingi mpe koyoka esengo mingi na esika nyonso oyo okoki kosala lokola mosakoli ya Bokonzi.

Bandeko oyo bakoki kosala na masangá ya monɔkɔ ya bapaya bakozwa matomba mingi. Barbara, ndeko mwasi moko oyo akendaki na lisangá ya monɔkɔ ya Espagnol elongo na mobali na ye, alobi boye: “Ezali moko na makambo oyo epesá ngai esengo koleka na bomoi na ngai. Ezali lokola nde nayei sika na kati ya lisangá ya Yehova. Nazali na botɔndi mingi mpo na libaku malamu yango, mingimingi lokola tokoki te kosala mosala ya misionɛrɛ na mboka mopaya.”

Mpo mosala ya kosakola nsango malamu ekende liboso, na mokili mobimba, ebele ya bandeko, mikóló mpe bilenge, bazali koyekola monɔkɔ ya bapaya, atako ezali likambo ya mpasi mingi. Soki ozali na kati na bango, kobosana te ntina oyo ozali kosala yango mpe batelá makanisi ya malamu. Koleka nyonso, zalá na elikya ete Yehova akopambola milende na yo.—2 Bakolinti 4:7.

[Elilingi na lokasa 18]

Kozala na molakisi oyo ateyaka malamu esalisaka mpo na koyeba monɔkɔ nokinoki mpe kozanga mpasi

[Elilingi na lokasa 20]

Osengeli te kobosana elimo na yo ntango ozali koyekola monɔkɔ ya bapaya