Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kozala bato ya Yehova—Likambo ya boboto monene

Kozala bato ya Yehova—Likambo ya boboto monene

Kozala bato ya Yehova​—Likambo ya boboto monene

“Tozali bato ya Yehova.”​—ROM. 14:8.

1, 2. (a) Libaku malamu nini tozali na yango? (b) Mituna nini tokotalela?

 BAYISRAELE bazwaki mpenza libaku malamu ntango Yehova alobaki na bango ete: “Bokokóma mpenza eloko na ngai moko kati na bato ya bikólo mosusu nyonso.” (Kob. 19:5) Lelo oyo, basangani ya lisangá ya bokristo bazwi mpe libaku ya kozala bato ya Yehova. (1 Pe. 2:9; Em. 7:9, 14, 15) Ezali libaku oyo ekomemela biso matomba ya seko.

2 Kozala bato ya Yehova ezali libaku malamu, kasi ezali mpe mokumba. Bato mosusu bakoki komituna boye: ‘Nakokoka mpenza kosala oyo Yehova azali kosɛnga ngai? Soki nakwei na lisumu, akobwaka ngai? Kozala moto ya Yehova ekolongola ngai bonsomi?’ Komibanzabanza bongo ezali mabe te. Kasi, tosengeli naino kotalela na likebi motuna mosusu oyo: Wapi matomba oyo moto akoki kozwa soki azali moto ya Yehova?

Kozala bato ya Yehova ememaka esengo

3. Matomba nini Rahaba azwaki lokola azwaki ekateli ya kosalela Yehova?

3 Bato oyo bazali bato ya Yehova bazwaka mpenza matomba na likambo yango? Tótalela naino ndakisa ya Rahaba, mwasi moko ya ndumba oyo azalaki kofanda na engumba Yeriko. Na ntembe te, balakisaki ye kosambela banzambe ya lokuta ya Kanana. Kasi, ntango ayokaki nsango ya bikólo oyo ekweaki liboso ya Bayisraele na nguya ya Yehova, amonaki ete Yehova azali Nzambe ya solo. Yango wana, atyaki bomoi na ye na likama mpo na kobatela basaleli ya Nzambe oyo baponamaki mpe na ndenge yango atyaki elikya ete bakobikisa ye. Biblia elobi boye: “Rahaba mwasi ya ndumba atángamaki [mpe] moyengebene mpo na misala na ye, nsima ya koyamba malamu bamemi-nsango mpe kotika bango bákende na nzela mosusu, boye te?” (Yak. 2:25) Kanisá matomba oyo azwaki ntango akɔtaki na molɔngɔ ya basaleli ya Nzambe ya pɛto, bato oyo Mibeko ya Nzambe elakisaki bango bolingo mpe bosembo. Azalaki mpenza na esengo ndenge atikaki bomoi oyo azalaki na yango liboso! Abalaki Moyisraele moko mpe abɔkɔlaki Boaze mwana na ye ya mobali, oyo akómaki moto ya ntina mpenza na miso ya Nzambe.​—Yos. 6:25; Ruta 2:4-12; Mat. 1:5, 6.

4. Ndenge nini ekateli oyo Ruta azwaki ya kosalela Yehova ememelaki ye matomba?

4 Ruta, moto ya Moabe azwaki mpe ekateli ya kosalela Yehova. Na ntembe te, ntango azalaki naino elenge, azalaki kosambela Kemoshe mpe banzambe mosusu ya Moabe, kasi ayaki koyeba Yehova, Nzambe ya solo, mpe abalaki Moyisraele moko oyo akimaki mboka na ye mpe ayaki kofanda lokola mopaya na Moabe. (Tángá Ruta 1:1-6.) Na nsima, ntango Ruta, mbanda na ye Orpa mpe bokilo na bango Naomi babandaki kozonga na Beteleme, Naomi ayebisaki bango bázonga epai na bango. Kofanda na Yisraele, ekokaki kozala pɛtɛɛ te mpo na bango. Orpa ‘azongaki epai ya bato na ye mpe epai ya banzambe na ye,’ kasi, Ruta aboyaki. Amonisaki kondima mpe ayebaki soki alingi kokóma moto ya nani. Ayebisaki Naomi boye: “Kobondela ngai te ete nasundola yo, nazonga, natika yo; mpo epai okokende, ngai mpe nakokende, epai okolala, ngai mpe nakolala. Bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo Nzambe na ngai.” (Ruta 1:15, 16) Lokola aponaki kosalela Yehova, Ruta azwaki litomba na mobeko ya Nzambe oyo esɛngaki ete básalisaka basi oyo mibali na bango bakufá, babola mpe bato oyo bazangá mabele. Na nse ya mapapu ya Yehova, azwaki esengo, libateli mpe kimya.

5. Makambo nini omoni epai ya bato oyo bazali kosalela Yehova na bosembo nyonso?

5 Ntango mosusu oyebi bato oyo nsima ya komipesa na Yehova bazali kosalela ye na bosembo bambula mingi. Tuná bango báyebisa matomba oyo bazwi ndenge bazali kosalela ye. Atako moko te azangi mikakatano, bosolo ya maloba ya mokomi ya nzembo emonani polele ete: “Esengo na bato oyo Yehova azali Nzambe na bango!”​—Nz. 144:15.

Yehova asɛngaka biso te oyo eleki makoki na biso

6. Mpo na nini tosengeli te kobanga ete tokokoka te kosala oyo Yehova azali kosɛnga biso?

6 Ntango mosusu omitunaka soki okokoka kosala oyo Yehova azali kosɛnga yo. Ezali mpasi te omona ete kokóma mosaleli ya Nzambe, kotosa mibeko na ye, mpe koloba mpo na nkombo na ye ezali kilo. Na ndakisa, Moize ayokaki ete akokoka te ntango Nzambe atindaki ye akende koloba na Bayisraele mpe na mokonzi ya Ezipito. Kasi, Nzambe asɛngaki Moize likambo oyo elekaki ye motó te. Yehova ‘ateyaki ye oyo akosala.’ (Tángá Kobima 3:11; 4:1, 10, 13-15.) Lokola Moize andimaki lisalisi yango, ayokaki mpenza esengo ya kokokisa mokano ya Nzambe. Yehova asɛngaka biso te makambo oyo eleki makoki na biso. Ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe alingaka kosalisa biso. (Nz. 103:14) Kozala moyekoli ya Yesu mpe kosalela Nzambe epemisaka kasi ezalaka kilo te, mpo bomoi yango ememelaka basusu matomba mpe esepelisaka motema ya Yehova. Yesu alobaki ete: “Bóya epai na ngai, . . . mpe ngai nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema.”​—Mat. 11:28, 29.

7. Mpo na nini okoki kotya motema ete Yehova akosalisa yo osala oyo azali kosɛnga yo?

7 Yehova akozanga te kolendisa biso, ntango nyonso oyo tokotyela ye motema mpo na kozwa makasi. Na ndakisa, ekoki kozala ete Yirimia azalaki koloba na mpiko te. Yango wana, ntango Yehova aponaki ye azala mosakoli, alobaki boye: “Aa! Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Talá, nayebi koloba te, mpo nazali kaka mwana.” Na nsima, alobaki kutu boye: “Nakoloba na nkombo na ye lisusu te.” (Yir. 1:6; 20:9) Kasi, Yehova alendisaki ye mpe Yirimia asakolaki na boumeli ya mbula 40 nsango oyo bato mingi bazalaki kosepela te koyoka. Mbala na mbala Yehova apesaki ye elikya na maloba oyo: “Nazali elongo na yo, mpo na kobikisa yo mpe mpo na kosikola yo.”​—Yir. 1:8, 19; 15:20.

8. Ndenge nini tokomonisa ete totyelaka Yehova motema?

8 Kaka ndenge Yehova apesaki Moize mpe Yirimia makasi, akoki mpe kosalisa biso tósala oyo azali kosɛnga bakristo lelo oyo. Sekele ezali kotyela Nzambe motema. Biblia elobi ete: “Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te. Na banzela na yo nyonso, kanisá ye, mpe ye akosembola banzela na yo.” (Mas. 3:5, 6) Tokomonisa ete totyelaka Yehova motema ntango tozali kondima lisalisi oyo apesaka na nzela ya Liloba mpe lisangá na ye. Soki totiki Yehova atambwisa bomoi na biso, likambo moko te ekopekisa biso kotikala sembo epai na ye.

Yehova amibanzabanzaka mpo na mosaleli na ye mokomoko

9, 10. Libateli ya ndenge nini Nzembo 91 elobeli?

9 Ntango bakanisaka na ekateli ya komipesa na Yehova, bato mosusu babangaka ete bakoki kosala lisumu, mpe bakozala na ntina te, mpe Yehova akobwaka bango. Likambo ya esengo, Yehova apesi biso libateli oyo tosengeli na yango mpo tóbatela eloko ya motuya oyo tozali na yango, elingi koloba boyokani na biso na ye. Tiká tótalela ndenge Nzembo 91 elobeli likambo yango.

10 Nzembo yango ebandi boye: “Moto nyonso oyo afandi na esika ya nkuku ya Oyo-Aleki-Likoló akozwa esika ya kofanda na elili ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Nakoloba na Yehova: ‘Ozali ekimelo na ngai mpe esika makasi ya libateli na ngai, Nzambe na ngai, oyo nakotyela motema.’ Mpo ye moko akobikisa yo na motambo ya mokangi ndɛkɛ.” (Nz. 91:1-3) Simbá ete Nzambe alaki kobatela baoyo balingaka ye mpe batyelaka ye motema. (Tángá Nzembo 91:9, 14.) Libateli ya ndenge nini alingaki kolobela? Yehova abatelaki basaleli na ye mosusu na ntango ya kala na nzoto mpenza​—na mabaku mosusu ezalaki mpo na kobatela molɔngɔ oyo esengelaki komema tii na Masiya oyo alakamaki. Nzokande, basaleli na ye mosusu ya sembo bakangamaki, banyokwamaki, mpe babomamaki na ndenge ya nsɔmɔ mpo bálɛmbisa bango bátika bosembo na bango epai ya Nzambe. (Ebr. 11:34-39) Bazwaki makasi ya koyika mpiko mpo Yehova abatelaki bango na elimo mpo bátika te bosembo na bango. Yango wana, tokoki kosimba ete elaka oyo ezali na Nzembo 91 elobeli nde libateli ya elimo.

11. “Esika ya nkuku ya Oyo-Aleki-Likoló” ezali nini, mpe Nzambe abatelaka banani kuna?

11 “Esika ya nkuku ya Oyo-Aleki-Likoló,” oyo mokomi ya nzembo alobeli ezali esika ya libateli ya elimo. Na esika yango, baoyo bafandi elongo na Nzambe lokola bapaya na ye, babatelami na eloko nyonso mpe moto nyonso oyo akoki kobebisa kondima mpe bolingo na bango mpo na Nzambe. (Nz. 15:1, 2; 121:5) Ezali esika ya nkuku mpo bapakano bakoki kososola yango te. Kuna, Yehova abatelaka moto nyonso oyo alobaka: ‘Ozali Nzambe na ngai, oyo nakotyela motema.’ Soki totikali na esika yango ya komibomba, tokozala na ntina te ya kobanga mpambampamba ete tokokwea na motambo ya Satana, “mokangi ndɛkɛ” mpe ete Nzambe akoboya biso.

12. Makambo nini ekoki kobebisa boyokani na biso na Nzambe?

12 Makambo nini ekoki kobebisa boyokani na biso na Nzambe? Mokomi ya nzembo alobeli makama mingi, kati na yango tokoki kotánga “maladi mabe oyo etambolaka na molili, . . . [mpe] libebi oyo epunzaka na midi.” (Nz. 91:5, 6) “Mokangi ndɛkɛ” asili kokanga bato mingi mpo na mposa ya koluka lipanda. (2 Ko. 11:3) Akangaka basusu na ndenge atindaka bango bámonisa ezaleli ya lokoso, lolendo, mpe koluka konduka biloko ya mokili. Apɛngwisaka mpe bamosusu nzela na makambo lokola, bolingo ya ekólo, evolisyo, mpe mangomba ya lokuta. (Kol. 2:8) Mpe bamosusu mingi basili kokwea na motambo ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo. Makambo wana nyonso ezali lokola maladi oyo esali ete bamilio ya bato bábungisa bolingo na bango mpo na Nzambe.​—Tángá Nzembo 91:7-10; Mat. 24:12.

Ndenge ya kobatela bolingo na yo mpo na Nzambe

13. Ndenge nini Yehova abatelaka biso na makambo oyo ekoki kobebisa elimo na biso?

13 Ndenge nini Yehova abatelaka basaleli na ye na makama wana ya elimo? Nzembo elobi boye: “Akopesa baanzelu na ye mitindo mpo na yo, mpo bábatela yo na banzela na yo nyonso.” (Nz. 91:11) Baanzelu batambwisaka mpe babatelaka biso mpo tósakola nsango malamu. (Em. 14:6) Longola bango, bankulutu oyo balandaka mpenza Makomami na mateya na bango babatelaka biso mpo tókosama te na makanisi ya lokuta. Bakoki kosalisa moto nyonso oyo azali kobunda mpo na kolonga bizaleli ya mokili. (Tito 1:9; 1 Pe. 5:2) Lisusu, “moombo ya sembo mpe ya mayele” apesaka bilei ya elimo mpo na kobatela biso na mateya ya evolisyo, mpo bamposa ya mabe ekola na mitema na biso te, mpo tóboya ezaleli ya konduka bomɛngo mpe koluka kokóma bato minene na mokili oyo, mpe tókima bamposa mpe makambo mosusu mingi ya mabe. (Mat. 24:45) Nini esalisá yo olonga makama yango mosusu?

14. Ndenge nini tokoki kozwa litomba na libateli oyo Nzambe apesi?

14 Tosengeli kosala nini mpo tótikala na “esika ya nkuku” oyo Nzambe abongisi mpo na kobatela biso? Kaka ndenge tosengeli ntango nyonso komibatela na makama ya motuka, na bato mabe, to maladi, ndenge moko mpe tosengeli ntango nyonso kokeba na makambo oyo ekoki kobebisa elimo na biso. Yango wana, tosengeli ntango nyonso kolandaka litambwisi oyo Yehova azali kopesa biso na nzela ya mikanda na biso, na makita ya lisangá mpe na mayangani. Tolukaka mpe toli ya bankulutu. Tozwaka mpe matomba na bizaleli ndenge na ndenge oyo bandeko na biso na lisangá bamonisaka. Ya solo, koyanganaka na makita esalisaka biso tókóma bato ya bwanya.​—Mas. 13:20; tángá 1 Petro 4:10.

15. Mpo na nini okoki kotya motema ete Yehova akoki kobatela yo na likambo nyonso oyo ekoki kosala ete andima yo lisusu te?

15 Ezali na ntina te tótya ntembe ete Yehova akoki kobatela biso na likambo nyonso oyo ekoki kosala ete aboya biso. (Rom. 8:38, 39) Abatelaki lisangá na bato minene ya mangomba mpe banguna ya politiki oyo mokano na bango ezalaki te ya koboma biso, kasi nde ya kokabola biso na Nzambe na biso mosantu. Elaka oyo ya Yehova emonani solo ete: “Ebundeli nyonso oyo ekosalema mpo na kobunda na yo ekolonga te.”​—Yis. 54:17.

Nani apesaka biso bonsomi?

16. Mpo na nini mokili ekoki te kopesa biso bonsomi?

16 Kokóma bato ya Yehova ekolongola biso bonsomi? Te, kutu kozala bato ya mokili nde ekoki kolongola biso bonsomi. Mokili oyo ekabwani na Yehova mpe ezali kotambwisama na nzambe moko ya mabe oyo akómisaka bato baombo. (Yoa. 14:30) Na ndakisa, mokili ya Satana esalelaka mikakatano ya nkita mpo na kolongola bato bonsomi na bango. (Talá mpe Emoniseli 13:16, 17.) Lisumu mpe ezali na nguya ya bokosi mpo na kokómisa bato baombo. (Yoa. 8:34; Ebr. 3:13) Yango wana, ata soki bato oyo bayebi Nzambe te bazali kolaka bonsomi ntango bazali kokumisa bomoi oyo eyokani te na mateya ya Yehova, moto nyonso oyo akolanda bango akosutuka akómi moombo ya masumu mpe ya bomoi ya mbindo.​—Rom. 1:24-32.

17. Yehova apesi biso bonsomi ya ndenge nini?

17 Lisusu, Yehova akosikola biso na eloko nyonso oyo ekoki komemela biso likama soki tozali kotyela ye motema. Na maloba mosusu, bomoi na biso ezali lokola ya moto oyo andimi ete monganga moko oyo ayebi mosala malamu apasola ye mpo alongola ye maladi oyo ezali kotya bomoi na ye na likama. Biso nyonso tozali na eloko oyo ezali kotya bomoi na biso na likama​—lisumu oyo tozwá. Kaka soki totyeli Yehova motema na nzela ya mbeka ya Kristo nde tokoki kolikya kokima makama ya lisumu mpe kozala na bomoi libela na libela. (Yoa. 3:36) Ndenge kaka elikya oyo tozali na yango epai ya monganga moko ekoki kokóma makasi ntango tozali koyoka bato mingi bazali koloba malamu mpo na ye, ndenge moko mpe elikya na biso epai ya Yehova ekoki kokola ntango tozali kokoba koyekola makambo mingi na ntina na ye. Yango wana, tokobaka koyekola Liloba ya Nzambe na mozindo mpo yango ekosalisa biso tólinga Nzambe mpe tólongola kobanga nyonso oyo tokoki kozala na yango mpo na kokóma bato na ye.​—1 Yoa. 4:18.

18. Bato ya Yehova bakozwa matomba nini?

18 Yehova apesá moto nyonso bonsomi ya kopona. Liloba na ye elobi boye: “Osengeli kopona bomoi mpo otikala na bomoi, yo ná bana na yo, na kolingáká Yehova Nzambe na yo.” (Mib. 30:19, 20) Alingaka biso moko tópona kosalela ye mpo na komonisa ete tolingaka ye. Na esika ya kolongola biso bonsomi, kozala bato ya Nzambe oyo tolingaka ekosala mpenza ete tózala mpe tókoba kozala na esengo.

19. Mpo na nini kozala bato ya Yehova ezali likambo ya boboto monene?

19 Lokola tozali bato ya masumu, tobongi te kozala bato ya Nzambe ya kokoka. Tozwi libaku yango kaka na nzela ya boboto monene na ye. (2 Tim. 1:9) Yango wana, Paulo akomaki boye: “Soki tozali na bomoi, tozali na bomoi mpo na Yehova, mpe soki tokufi, tokufi mpo na Yehova. Yango wana, ezala tozali na bomoi, ezala tokufi, tozali bato ya Yehova.” (Rom. 14:8) Tokoyoka mawa soki moke te mpo toponaki kozala bato ya Yehova.

Okopesa eyano nini?

• Matomba nini tokoki kozwa soki tozali bato ya Yehova?

• Mpo na nini tokoki kosala oyo Nzambe azali kosɛnga biso?

• Ndenge nini Yehova abatelaka basaleli na ye?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 8]

Tuná basusu báyebisa matomba oyo bazwi ndenge bazali bato ya Yehova

[Elilingi na lokasa 10]

Wapi makambo mosusu oyo Yehova asalaka mpo na kobatela biso?