Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Monisá ete ozali mpenza moyekoli ya Kristo

Monisá ete ozali mpenza moyekoli ya Kristo

Monisá ete ozali mpenza moyekoli ya Kristo

“Nzete nyonso ya malamu ebotaka mbuma ya malamu, kasi nzete nyonso ya mabe ebotaka mbuma ya mabe.”​—MAT. 7:17.

1, 2. Ndenge nini bayekoli ya solo ya Kristo bakeseni na oyo ya lokuta, mingimingi na boumeli ya ntango oyo ya nsuka?

 YESU alobaki ete bayekoli ya lokuta bakokesana na bayekoli na ye ya solo na mbuma na bango​—mateya mpe etamboli na bango. (Mat. 7:15-17, 20) Ya solo, bato balandaka kaka makambo oyo ekɔtaka na makanisi mpe mitema na bango. (Mat. 15:18, 19) Baoyo bateyamaka mateya ya lokuta babimisaka “mbuma ya mabe,” nzokande baoyo bateyamaka mateya ya solo babimisaka “mbuma ya malamu.”

2 Na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka, mbuma yango mibale ezali komonana polele. (Tángá Danyele 12:3, 10.) Bakristo ya lokuta batalelaka Nzambe na ndenge ebongi te mpe mbala mingi bakosaka ete bakangamaka na Nzambe, nzokande baoyo bazali na bososoli ya elimo basambelaka Nzambe “na elimo mpe na solo.” (Yoa. 4:24; 2 Tim. 3:1-5) Basalaka makasi mpo na komonisa bizaleli ya Kristo. Kasi, ezali boni mpo na mokomoko na biso? Ntango ozali kotalela makambo mitano oyo emonisaka bakristo ya solo, omituna boye: ‘Etamboli mpe mateya na ngai emonanaka polele ete eyokani na Liloba ya Nzambe? Etamboli mpe mateya na ngai ebendaka bato na losambo ya solo?’

Landáká Liloba ya Nzambe na bomoi na yo

3. Nini esepelisaka Yehova, mpe yango esɛngi nini mpo na bakristo ya solo?

3 Yesu alobaki boye: “Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai: ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na bokonzi ya likoló, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló.” (Mat. 7:21) Ya solo, ezali te kaka koloba na monɔkɔ ete ozali mokristo nde esepelisaka Yehova, kasi kosalela makambo oyo esɛngami na bakristo nde esepelisaka ye. Mpo na bayekoli ya solosolo ya Kristo, yango etaleli bomoi na bango mobimba, ndenge na bango ya kotalela mbongo, mosala ya mosuni, kominanola, mimeseno mpe bafɛti ya mokili, libala mpe boninga na bango na bato mosusu. Nzokande, bakristo ya lokuta, balandaka makanisi mpe makambo ya mokili oyo ezali se kobeba na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka.​—Nz. 92:7.

4, 5. Ndenge nini tokoki kosalela maloba ya Yehova oyo ezali na Malaki 3:18 na bomoi na biso?

4 Mpo na yango, mosakoli Malaki akomaki ete: “Bokomona lisusu bokeseni kati na moyengebene ná moto mabe, kati na moto oyo asalelaka Nzambe ná moto oyo asaleli ye te.” (Mal. 3:18) Ntango ozali kokanisa na maloba wana, omituna boye: ‘Bizaleli na ngai ezalaka lokola oyo ya bato ya mokili to namonisaka ete nakeseni mpenza na bango? Nalukaka ntango nyonso baninga na ngai ya mosala to ya kelasi bándima ngai to nakangamaka na mitinda ya Biblia ata mpe kopesa litatoli soki libaku emonani?’ (Tángá 1 Petro 3:16.) Ya solo, tolingaka te komimonisa ete tozali sembo koleka ndelo, kasi tosengeli kokesana mpenza na bato oyo balingaka Yehova te mpe basalelaka ye te.

5 Soki omoni esika oyo osengeli kobongisa, mpo na nini te kobondela mpo na likambo yango mpe koluka lisalisi ya Nzambe na nzela ya koyekolaka Biblia, kobondelaka, mpe koyanganaka na makita? Soki ozali kosalela Liloba ya Nzambe mingi, ekosalisa yo obimisa “mbuma ya malamu,” kati na yango, “mbuma ya mbɛbu . . . oyo ezali kosakola nkombo [ya Nzambe] polele.”​—Ebr. 13:15.

Sakoláká Bokonzi ya Nzambe

6, 7. Na oyo etali nsango ya Bokonzi, bokeseni nini ekoki komonana kati na bakristo ya solo mpe oyo ya lokuta?

6 Yesu alobaki boye: “Nasengeli . . . kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.” (Luka 4:43) Mpo na nini Yesu azalaki kolobela mingi Bokonzi ya Nzambe na mosala na ye ya kosakola? Ayebaki ete ye moko Mokonzi ya Bokonzi yango, ná bandeko na ye oyo babotami na elimo mpe basekwi, bakotya nsuka na makambo oyo ezali kobimisela bato mpasi, elingi koloba lisumu mpe Zabolo. (Rom. 5:12; Em. 20:10) Yango wana, atindaki bayekoli na ye básakolaka Bokonzi yango tii makambo ya ntango oyo ekosuka. (Mat. 24:14) Bato oyo balobaka kaka na monɔkɔ ete bazali bayekoli ya Kristo basalaka mosala yango te​—kutu, bakokoka mpe te. Mpo na nini? Mpo na ntina soki misato: Ya liboso, bakoki kosakola te likambo oyo bango moko bakangi ntina na yango te. Ya mibale, mingi na bango bazangi komikitisa mpe mpiko oyo esengeli mpo na kolonga botyoli mpe botɛmɛli oyo ekoki kokómela bango ntango bazali kosakola nsango ya Bokonzi epai ya bazalani na bango. (Mat. 24:9; 1 Pe. 2:23) Mpe ya misato, bakristo ya lokuta bazali na elimo ya Nzambe te.​—Yoa. 14:16, 17.

7 Kasi, bayekoli ya solo bayebi soki Bokonzi ya Nzambe ezali nini mpe makambo oyo yango ekokokisa. Lisusu, batyaka matomba ya Bokonzi yango na esika ya liboso na bomoi na bango, basakolaka yango na mokili mobimba, na lisalisi ya elimo ya Yehova. (Zek. 4:6) Osalaka mosala yango sanza na sanza? Osalaka makasi okóma mosakoli malamu ya Bokonzi, na ndakisa kolekisa ngonga mingi na mosala ya kosakola to mpe kobongisa lisusu lolenge na yo ya koteya? Basakoli mosusu babongisaki lolenge na bango ya kosakola na ndenge bakómaki kosalela malamu Biblia. Ntoma Paulo oyo amesanaki kosalela Makomami mpo na kosolola na bato, akomaki boye: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.”​—Ebr. 4:12; Mis. 17:2, 3.

8, 9. (a) Bandakisa nini emonisi ntina ya kosalela Biblia na mosala ya kosakola? (b) Ndenge nini tokoki kokóma kosalela Biblia malamumalamu?

8 Ntango azalaki na mosala ya kosakola ndako na ndako, ndeko moko atángelaki mobali moko ya Lingomba ya Katolike Danyele 2:44, mpe alimbwelaki ye oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala mpo na kotya kimya ya solosolo mpe libateli. Moto yango alobaki boye: “Nasepeli mingi ndenge ofungoli Biblia mpe olakisi ngai oyo makomami elobi na esika ya koloba kaka na monɔkɔ.” Ntango ndeko moko atángelaki mwasi moko ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse vɛrsɛ moko ya Biblia, mwasi yango atunaki ye ebele ya mituna oyo emonisaki ete azali na mposa ya koyeba mingi. Na libaku oyo mpe, ndeko yango ná mwasi na ye basalelaki Biblia mpo na koyanola mituna ya mwasi wana. Na nsima, mwasi yango alobaki boye: “Oyebi mpo na nini nasepelaki kosolola na bino? Ntango boyaki epai na ngai bozalaki na Biblia mpe botángaki yango.”

9 Ya solo, mikanda na biso ezali na ntina mpe tosengeli kopesaka yango bato na mosala ya kosakola. Kasi, Biblia ezali mokanda ya libosoliboso mpenza oyo tosalelaka. Na yango, soki ozali na momeseno te ya kosalelaka yango na mosala ya kosakola, mpo na nini te komityela mokano ya kosala yango? Ntango mosusu okoki kopona mwa bavɛrsɛ oyo ezali komonisa soki Bokonzi ya Nzambe ezali nini mpe ndenge oyo ekosilisa makambo oyo ezali mpenza kotungisa bazalani na yo. Na nsima, mibongisá mpo na kotánga yango na mosala ya kosakola ndako na ndako.

Koyoka nsɔni te komema nkombo ya Nzambe

10, 11. Na oyo etali kosalela nkombo ya Nzambe, bokeseni nini ezali kati na Yesu mpe ebele ya bato oyo balobaka ete bazali bayekoli na ye?

10 “‘Bino bozali batatoli na ngai,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe ngai nazali Nzambe.’” (Yis. 43:12) Yesu Kristo, Motatoli ya Yehova oyo aleki Batatoli mosusu nyonso, azalaki komona ete komema nkombo ya Nzambe mpe koyebisa yango bato mosusu ezali mpenza lokumu. (Tángá Kobima 3:15; Yoane 17:6; Baebre 2:12.) Kutu, lokola Yesu asakolaki nkombo ya Tata na ye, abengamaki “Motatoli ya Sembo.”​—Em. 1:5; Mat. 6:9.

11 Kasi, mingi oyo balobaka ete bazali bamonisi ya Nzambe mpe ya Mwana na ye, bamonisi ezaleli oyo ebwaki nsɔni na nkombo ya Nzambe, kutu balongoli nkombo yango na Babiblia na bango. Elimo yango emonani mpe na malako oyo euti kotindama epai ya baepiskɔpɔ ya Lingomba ya Katolike oyo elobaki ete, “esengeli te kosalela nkombo ya Nzambe na tetragrame na yango YHWH; esengeli mpe te kotánga yango” na losambo. * Oyo nde makanisi mabe!

12. Ndenge nini basaleli ya Yehova bayebanaki na nkombo ya Yehova na mobu 1931?

12 Mpo na komekola Kristo mpe ‘lipata monene ya batatoli’ oyo bazalaki liboso na ye, bakristo ya solo basepelaka kosalela nkombo ya Nzambe. (Ebr. 12:1) Kutu, na mobu 1931, basaleli ya Nzambe bayebanaki malamumalamu na nkombo ya Yehova ntango bandimaki kobengama Batatoli ya Yehova. (Tángá Yisaya 43:10-12.) Yango wana, na ndenge ebongi mpenza, bayekoli ya solo ya Kristo bakómaki “bato oyo babengami na nkombo [ya Nzambe].”​—Mis. 15:14, 17.

13. Ndenge nini tokoki kosalaka makambo oyo eyokani na nkombo oyo Nzambe apesá biso?

13 Ndenge nini mokomoko na biso akoki koyeba ete azali kosala makambo oyo esɛngami na bato oyo bazali komema nkombo ya Nzambe? Ya liboso, tosengeli kotatola mpo na Nzambe na bosembo nyonso. Paulo akomaki boye: “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika. Kasi ndenge nini bakobelela moto oyo bandimeli te? Mpe ndenge nini bakondimela moto oyo bayoki nsango na ye te? Mpe ndenge nini bakoyoka nsango soki moto oyo akosakola azali te? Mpe bakosakola ndenge nini soki batindi bango te?” (Rom. 10:13-15) Lisusu, tosengeli na mayele mpenza komonisa polele mateya ya lokuta ya mangomba oyo ekoselaka Mozalisi na biso makambo, na ndakisa, liteya ya lifelo ya mɔtɔ, oyo elatisaka Nzambe ya bolingo bizaleli mabe ya Zabolo.​—Yir. 7:31; 1 Yoa. 4:8; talá mpe Marko 9:17-27.

14. Bato mosusu basalaki nini ntango bayebaki nkombo ya Nzambe?

14 Osepelaka mpenza komema nkombo ya Tata na yo ya likoló? Osalisaka basusu báyeba nkombo yango mosantu? Mwasi moko na Paris, na ekólo France, ayokaki ete Batatoli ya Yehova bayebi nkombo ya Nzambe, yango wana asɛngaki Motatoli moko oyo akutanaki na ye alakisa ye nkombo ya Nzambe na Biblia na ye. Ntango atángaki Nzembo 83:18, esimbaki mpenza motema na ye. Abandaki koyekola Biblia mpe lelo oyo azali kosalela Yehova na bosembo nyonso na mokili mosusu. Ntango mwasi moko ya Lingomba ya Katolike oyo afandaka na Australie amonaki nkombo ya Nzambe na Biblia mpo na mbala ya liboso, atangisaki mpisoli ya esengo. Eleki sikoyo mbula mingi azali kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Euti koleka mwa mikolo, ntango Batatoli ya Yehova na Jamaïque, balakisaki mwasi moko nkombo ya Nzambe na Biblia na ye, ye mpe atangisaki mpisoli ya esengo. Na yango, sepeláká komema nkombo ya Nzambe, mpe na ndakisa ya Yesu lakisáká nkombo wana ya motuya mingi epai ya bato nyonso.

“Bólingaka mokili te”

15, 16. Ndenge nini bakristo ya solo batalelaka mokili, mpe mituna nini tosengeli komituna?

15 “Bólingaka mokili te ná biloko oyo ezali na mokili. Soki moto azali kolinga mokili, bolingo ya Tata ezali na kati na ye te.” (1 Yoa. 2:15) Mokili ná elimo na yango etɛmɛlaka Yehova mpe elimo santu na ye. Yango wana, bayekoli ya solo basukaka kaka te na kokabwana na mokili. Baboyaka yango na motema moko, mpo bayebi ete ndenge moyekoli Yakobo akomaki, “kozala moninga ya mokili ezali nde kozala monguna ya Nzambe.”​—Yak. 4:4.

16 Ekoki kozala mpasi kolanda toli ya Yakobo na mokili oyo ezali kobimisa komekama ya ndenge na ndenge. (2 Tim. 4:10) Yango wana, Yesu abondelaki mpo na bayekoli na ye ete: “Nazali kosɛnga yo, olongola bango na mokili te, kasi okɛngɛla nde bango mpo na moto mabe. Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoa. 17:15, 16) Omituna boye: ‘Nasalaka mpenza makasi nakabwana na mokili? Bato mosusu bayebi mpenza ete nasalaka te bafɛti mpe mimeseno oyo Biblia eboyi mpe mimeseno mosusu oyo ntango mosusu euti na bapakano te, kasi emonisaka polele elimo ya mokili?’​—2 Ko. 6:17; 1 Pe. 4:3, 4.

17. Nini ekoki kotinda bato ya mitema sembo báya epai ya Yehova?

17 Ezali solo ete, ntango tozali kotosa makambo oyo Biblia elobi, mokili ekosepela na biso te, kasi yango ekoki kotinda bato ya mitema sembo báluka koyeba ntina. Ya solo, ntango bato ya ndenge wana bamoni ete kondima na biso esimbami mpenza na Makomami mpe tosalelaka yango na makambo nyonso ya bomoi na biso, bakoki koloba mpenza na baoyo batyami mafuta na elimo ete: “Tokokende na bino, mpo toyoki ete Nzambe azali na bino.”​—Zek. 8:23.

Monisáká bolingo ya solo ya bokristo

18. Komonisa bolingo epai ya Yehova mpe bazalani na biso esɛngaka nini?

18 Yesu alobaki boye: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso” mpe “osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Mat. 22:37, 39) Bolingo yango (na Grɛki a·gaʹpe) ezali bolingo oyo etalelaka mpe bolamu ya basusu, elandaka mitinda mpe bizaleli malamu, kasi mbala mingi eutaka nde na motema. Emonisaka esengo makasi. (1 Pe. 1:22) Ekeseni mpenza na moimi, mpo emonanaka na maloba mpe misala oyo ezangi moimi.​—Tángá 1 Bakorinti 13:4-7.

19, 20. Lobelá mwa bandakisa oyo emonisi ete bolingo ya bokristo ezali na nguya.

19 Lokola bolingo eutaka na elimo ya Nzambe, esalisaka bakristo ya solo básala makambo oyo bato mosusu bakoki kosala te, na ndakisa, kolinga bato ya mposo nyonso, ya mimeseno nyonso, mpe ya bikólo nyonso. (Tángá Yoane 13:34, 35; Gal. 5:22) Bato ya mitema sembo bakoki koya na losambo ya solo ntango bamoni bolingo ya ndenge wana. Na ndakisa, ntango elenge moko Moyuda na Israël, akendaki na makita mpo na mbala ya liboso, akamwaki komona Batatoli ya Yehova oyo bazali Bayuda mpe Ba-Arabe bazali kosambela Yehova na bomoko. Mpo na yango, akómaki koyangana na makita nyonso mpe andimaki koyekola Biblia. Yo mpe omonisaka bolingo ya ndenge wana epai ya bandeko na lisangá? Osalaka molende mpo na koyamba moto nyonso oyo ayei sika na Ndako ya Bokonzi kozanga kolanda ekólo, mposo, to soki azali mobola to mozwi mpe bongo na bongo?

20 Biso bakristo ya solo, tosalaka makasi tólinga bato nyonso. Na Salvador, mosakoli moko ya elenge azalaki koyekola Biblia na mobange moko ya mbula 87 oyo akangamaki mpenza na lingomba na ye ya Katolike. Mokolo moko, mobange yango abɛlaki makasi mpe akɔtaki lopitalo. Ntango abimaki, Batatoli babengaki ye na telefone mpo na koyeba soki azali na eloko ya kolya. Basalaki bongo sanza mobimba. Moto ata moko te ya lingomba ya mwasi yango akendaki kotala ye. Esukaki ndenge nini? Abwakaki bikeko na ye, alongwaki na lingomba na ye, mpe azongelaki koyekola Biblia. Ya solo, bolingo ya bokristo ezali na nguya! Ekoki kosimba mitema koleka maloba.

21. Ndenge nini tokoki kosala ete elikya ya bomoi na biso na mikolo ezali koya ezala makasi?

21 Mosika te, Yesu akoloba na baoyo bakosaka ete basalelaka ye boye: “Nayebi bino ata moke te! Bólongwa mosika na ngai, bino bato oyo bobukaka mibeko.” (Mat. 7:23) Na yango, tiká ete tóbimisaka mbuma oyo ekumisaka Tata na biso mpe Mwana na ye. Yesu alobaki ete: “Moto nyonso oyo ayokaka maloba na ngai oyo mpe atosaka yango akokokana na moto ya mayele, oyo atongaki ndako na ye likoló ya mabanga.” (Mat. 7:24) Ya solo, soki tomonisi ete tozali mpenza bayekoli ya Kristo, Nzambe akondima biso, mpe elikya ya bomoi na biso na mikolo ezali koya ekozala makasi, lokola nde etongami likoló ya libanga!

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 11 Mabongoli mosusu ya Katolike na Lingala, na ndakisa Biblia Liloba lya Nzambe, ebongoli tetragrame yango na “Yawe.”

Ozali koyeba lisusu?

• Bayekoli ya solo ya Kristo bakeseni na oyo ya lokuta na nini?

• Tángá mwa ‘bambuma’ oyo emonisaka bakristo ya solo.

• Mpo na komonisa bambuma oyo esɛngami na bakristo, mikano nini okoki komityela?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 13]

Ozalaka na momeseno ya kosalela Biblia na mosala ya kosakola?

[Elilingi na lokasa 15]

Bato mosusu bayebi ete osalaka te bafɛti oyo Makomami eboyi?