Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Salisá bana na yo bálonga ebele ya mikakatano na bango

Salisá bana na yo bálonga ebele ya mikakatano na bango

Salisá bana na yo bálonga ebele ya mikakatano na bango

BILENGE na biso bakutanaka na mitungisi mingi. Bazali komekama na elimo ya mokili mabe ya Satana, mpe basengeli kobunda na “bamposa ya bolenge.” (2 Tim. 2:22; 1 Yoa. 5:19) Lisusu, lokola basalaka makasi mpo na ‘kokanisa Mozalisi na bango Monene,’ basengeli kosala nyonso mpo na kolonga botyoli, ata mitungisi oyo eutaka epai ya bato oyo batɛmɛlaka mateya na bango. (Mos. 12:1) Ntango akanisaki bolenge na ye, ndeko moko na nkombo Vincent, alobaki boye: “Moto moko azalaki ntango nyonso kotungisa ngai, konyokola ngai, to mpe koswanisa ngai mpo nazali Motatoli. Mbala mingi likambo yango ezalaki kotungisa ngai mingi mpe nazalaki koboya kokende kelasi.” *

Longola mitungisi ya mokili, ekoki kokóma ete bana na biso bábunda na mposa ya koluka kokokana na baninga na bango. Cathleen, ndeko moko ya mwasi ya mbula 16, alobi boye: “Ezalaka pɛtɛɛ te kokesana na basusu.” Ndeko mobali moko na nkombo Alan, alobi boye: “Mbala mingi baninga na ngai ya kelasi bazalaki kosɛnga ngai tóbima na bawikende, mpe nazalaki na mposa makasi ya kokende.” Lisusu, mposa oyo bilenge bazalaka na yango ya kosangana na masano oyo babongisaka na eteyelo, oyo ekoki kotinda bango bákóma na baninga ya mabe, ekoki kozala makasi. Ndeko moko ya mwasi na nkombo Tanya, alobi boye: “Nalingaka masano mingi. Na kelasi, bantrenɛrɛ na biso bazalaki ntango nyonso koluka nakɔta na ekipi ya eteyelo. Ezalaki mpasi mpo naboya.”

Ndenge nini okoki kosalisa bana na yo bálonga ebele ya mikakatano na bango? Yehova asɛngaki baboti ete báteyaka bana na bango. (Mas. 22:6; Ef. 6:4) Baboti oyo babangaka Nzambe basengeli kozala na mokano ya kokolisa na mitema ya bana na bango mposa ya kotosa Yehova. (Mas. 6:20-23) Na ndenge yango, bana bakozala na likoki ya kolonga mitungisi ya mokili ata soki baboti na bango bazali te.

Ezalaka pɛtɛɛ te mpo na baboti koluka ndenge ya kobikela, kobɔkɔla bana mpe kokokisa mikumba ya lisangá​—nyonso mbala moko. Bamosusu bakokisaka mikumba yango bango moko, kozanga molongani to basalaka yango wana bazali kokutana na botɛmɛli ya molongani oyo azali Motatoli te. Atako bongo, Yehova asɛngi na baboti bábombaka ntango mpo na koteyaka bana na bango. Na yango, okoki kosala nini mpo na kosalisa bana na yo bámibatela na mitungisi ya baninga, komekama mpe mitungisi oyo bazali kokutana na yango mokolo na mokolo?

Bákóma na boyokani makasi na Yehova

Libosoliboso, bilenge na biso basengeli koyeba ete Yehova azali Moto ya solo. Esengeli kosalisa bango ‘bámona Moto oyo amonanaka te.’ (Ebr. 11:27) Vincent, oyo tolobelaki liboso, ayebaka lisusu ndenge baboti na ye basalisaki ye akóma na boyokani makasi na Yehova. Alobi boye: “Bateyaki ngai ntina ya libondeli. Nabosanaka te ndenge nazalaki kobondela butu nyonso liboso nalala ntango nazalaki naino mwana. Yehova azalaki mpenza moto ya solo mpo na ngai.” Obondelaka na bana na yo? Mpo na nini te koyoka makambo oyo bayebisaka Yehova na mabondeli na bango? Bazongelaka kaka maloba oyo bakangá na motó? To balobaka ndenge oyo bayokaka mpenza mpo na Yehova? Soki ozali koyoka makambo oyo bazali koloba na mabondeli na bango, okozala na likoki ya kososola soki bazali kokola na elimo.

Kozala na programɛ ya kotángaka Liloba ya Nzambe, ezali lolenge mosusu ya malamu mpenza oyo ekosalisa bilenge bápusana lisusu penepene na Yehova. Cathleen, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Momeseno oyo nazalaki na yango ya kotánga Biblia banda bomwana esalisaki ngai. Esalisaki ngai nandima ete ata soki bato bazali kotɛmɛla ngai, Yehova azalaki kosunga ngai.” Bana na yo bazalaka na programɛ na bango ya kotánga Biblia?​—Nz. 1:1-3; 77:12.

Ya solo, bana nyonso bazalaka ndenge moko te, mokomoko azalaka na ndenge oyo alandaka litambwisi ya baboti. Lisusu, bokoli na bango ya elimo etalelaka mpe mbula na bango. Kasi, kozanga litambwisi, ekozala mpasi mpo bilenge bákóma kotalela Yehova lokola Moto ya solo. Baboti basengeli kokɔtisa maloba ya Yehova na mitema ya bana na bango mpo ete bana bayeba makanisi ya Yehova na likambo moko, ata bazali esika nini. (Mib. 6:6-9) Bana na yo basengeli mpenza kondima ete Yehova amibanzabanzaka mpo na bango.

Kosolola—Ndenge ya kokómisa yango kitoko

Kosolola ezali lolenge mosusu ya malamu ya kosalisa bana na yo. Ya solo, kosolola malamu esuki kaka te na koloba na bana. Esɛngaka mpe kotuna mituna mpe kozala na motema molai mpo na koyoka biyano na bango​—ata soki biyano yango ekeseni na oyo olingi koyoka. Anne, mama ya bana mibale ya mibali, alobi boye: “Natunaka mituna tii ntango nakoyeba mpenza makambo oyo bazali kokanisa na mitema na bango mpe makambo oyo bazali kokutana na yango.” Bana na yo bamonaka ete oyokaka bango? Tanya, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Baboti na ngai bazalaki mpenza koyoka ngai mpe bazalaki kobosana te makambo oyo tosololaki. Bayebaki bankombo ya baninga na ngai ya kelasi. Bazalaki kutu kotuna ngai bansango na bango mpe makambo mosusu oyo tosololaki kala.” Koyoka mpe kobosana te makambo oyo bosololaka na bana ezali mpenza na ntina mpo na kosololaka malamu.

Mabota mingi emonaki ete ntango ya kolya epesaka libaku ya kosolola malamu. Vincent, alobi ete: “Kolya elongo ezalaki na ntina na libota na biso. Tozalaki kolinga kozala biso nyonso na mesa soki likoki ezali. Baboti bazalaki kolinga te tótala televizyo, koyoka radio, to tótánga ntango tozali kolya. Lokola mbala mingi tozalaki kobɛta masolo ya malamu kasi ya kosilikisa te, yango esalaki ete ntango yango ezala ntango moko ya kimya mpe esalisaki ngai nalonga mikakatano oyo nazalaki kokutana na yango na kelasi.” Abakisi boye: “Lokola namesanaki kosolola na baboti na ngai na ntango ya kolya, yango esalisaki ngai nabanga te kosolola na bango mpo básalisa ngai ntango nakutani na likambo moko.”

Omituna boye, ‘Mbala boni na pɔsɔ tolyaka elongo na libota?’ Ekosɛnga obongola makambo mosusu mpo ozwa ntango ya kolyaka na bana na yo mpo osololaka na bango mingi mpe malamu?

Kosala bilakiseli ezali na ntina

Losambo ya mpokwa na libota esalisaka mpo na kosolola malamu mpe esalisaka bilenge báyeba ndenge ya kosala ntango bakutani na likambo moko boye. Alan, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Baboti na biso bazalaki kosalela ntango ya boyekoli ya libota mpo na kosalisa biso tóbimisaka makambo oyo tozali na yango na motema. Bazalaki kolobela masolo oyo eyokani na makambo oyo tozalaki kokutana na yango.” Mama ya Alan, alobi boye: “Tozalaki mpe kosala bilakiseli na ntango ya boyekoli. Bilakiseli yango esalisaki bana na biso báyeba ndenge ya koloba mpo na kondima na bango mpe komonisa ete makambo oyo bandimaka ezali ya solo. Yango epesaki bango makasi oyo basengelaki na yango mpo na kolonga mikakatano oyo bakokaki kokutana na yango.”

Ya solo, ntango bakutani na mitungisi ya baninga, mbala mingi bana basengeli kosuka te kaka na koloba “te” mpe kolongwa esika yango. Basengeli koyeba koyanola na mituna lokola mpo na nini mpe mpo na nini te. Basengeli mpe koyeba oyo basengeli kosala ntango batyoli bango mpo na kondima na bango. Soki bazali kokoka te, ekozala mpasi mpo na kokangama na losambo ya solo. Kosalaka bilakiseli ekoki kosalisa bana mpo bákóma na mpiko yango.

 Etanda oyo ezali na lokasa 18, etángi mwa makambo oyo bokoki kosala na losambo na bino ya libota. Salá ete bilakiseli yango ezala makambo ya solo mpe salá lokola ozali kotya ntembe na biyano oyo bana bazali kopesa. Na bilakiseli yango, bokoki mpe kotalela mateya oyo bokoki kozwa na bandakisa oyo Biblia elobeli. Na ntembe te, formasyo ya ndenge wana na ndako ekoki kosalisa bana na yo bázala na nyonso oyo ebongi mpo na kolonga mikakatano oyo bakutanaka na yango na eteyelo to na bisika mosusu.

Ndako na bino ezali esika ya kimya?

Ndako na bino ezali esika oyo bana basepelaka kozonga nokinoki soki babimi kelasi? Soki ezali esika ya kimya, ekosalisa bana na yo bálonga mikakatano oyo bakutanaka na yango mokolo na mokolo. Ndeko mwasi moko oyo azali lelo na Betele, alobi boye: “Ntango nazalaki kokola, likambo ya ntina mingi mpo na ngai ezalaki ete ndako na biso ezalaki esika ya kimya. Ata soki nakutani na likambo nini ya mabe na kelasi, nayebaki ete ntango nakozonga na ndako, makambo nyonso ekozala malamu.” Ndako na bino ezalaka esika ya ndenge nini? Ezali esika ya “nkanda makasimakasi, kowelana, [mpe] ya bokabwani” to ezali esika oyo “bolingo, esengo, [mpe] kimya” ezalaka? (Gal. 5:19-23) Soki kimya ezali kozanga ntango nyonso, osalaka makasi oyeba makambo nini osengeli kobongisa mpo ndako na bino ezala esika ya kimya mpo na bana na bino?

Lolenge mosusu ya kosalisa bana na bino bálonga mikakatano ezali ya kozwaka bibongiseli mpo bazalaka elongo na baninga oyo bakolendisa bango. Na ndakisa, ntango bozali kokanisa kominanola, bokoki te kobenga mpe bandeko ya lisangá oyo bakɔmeli na elimo? To bokoki kobongisa kolya elongo na mokɛngɛli-motamboli to bandeko mosusu oyo bazali na mosala ya ntango nyonso? Oyebi bamisionɛrɛ to bandeko ya Betele oyo bana na yo bakoki kosala boninga na bango ezala na nzela ya mikanda, internet, to kosololaka ntango mosusu na telefone? Boninga ya ndenge wana ekoki kobongisela bango nzela mpo na mikano ya elimo. Kanisá naino ndakisa malamu oyo Paulo apesaki elenge Timote. (2 Tim. 1:13; 3:10) Boninga makasi oyo Paulo asalaki na Timote esalisaki Timote atya makanisi na ye mobimba na mikano ya elimo.​—1 Ko. 4:17.

Pesáká bana na yo longonya

Yehova asepelaka komona bilenge bazali kokangama na oyo ezali malamu atako mokili ya Satana ezali kobimisela bango mitungisi. (Nz. 147:11; Mas. 27:11) Na ntembe te, yo mpe osepelaka komona bilenge na biso kopona nzela ya malamu. (Mas. 10:1) Monisáká bana na yo ete osepelaka na bango, mpe kozangaka te kopesa bango longonya. Yehova apesá baboti ndakisa malamu. Na ntango ya batisimo ya Yesu, Yehova alobaki boye: “Yo ozali Mwana na ngai ya bolingo; nandimi yo.” (Mrk. 1:11) Koyoka ndenge Tata na ye alobaki epesaki Yesu makasi ya kolonga ebele ya mikakatano oyo asengelaki kokutana na yango! Ndenge moko mpe, monisáká bana na yo ete olingaka bango mpe ondimaka makambo oyo basalaka.

Ya solo, okoki te kopekisa ete mitungisi, minyoko mpe botyoli ekómela bana na yo. Kasi, okoki kosala mingi mpo na kosalisa bango. Ndenge nini? Salisá bango bákolisa boyokani makasi na Yehova. Pesá nzela na makambo oyo ekosala ete bósololaka malamu. Salá ete losambo ya mpokwa na kati ya libota eyokanaka na mposa ya bana, mpe ndako na bino ezala esika ya kimya. Na ntembe te, kosala bongo, ekobongisa bana na yo bálonga ebele ya mikakatano na bango.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 2 Na lisolo oyo, bankombo mosusu ezali ya bango te.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 18]

 KOSALA BILAKISELI EKOKI KOSALISA

Mwa makambo oyo elandi, ezali oyo bilenge na biso bakutanaka na yango. Mpo na nini te kosala bilakiseli ya makambo yango na ntango ya losambo na bino na kati ya libota?

▸ Antrenɛrɛ moko asɛngi mwana na bino ya mwasi akɔta na ekipi ya eteyelo.

▸ Bapesi mwana na bino ya mobali likaya ntango auti kelasi mpe azali kozonga na ndako.

▸ Bilenge mosusu bazali kokanela mwana na bino ete bakobɛta ye soki bamoni ye lisusu azali kosakola.

▸ Ntango mwana na bino ya mwasi azali na mosala ya kosakola ndako na ndako, akutani na moninga na ye moko ya kelasi.

▸ Liboso ya kelasi, mwana na bino ya mwasi batuni ye mpo na nini apesaka bendele losako te.

▸ Elenge moko azali ntango nyonso kotyola mwana na bino ya mobali mpo azali Motatoli.

[Elilingi na lokasa 17]

Bana na bino bazali na programɛ na bango ya kotánga Biblia?

[Elilingi na lokasa 19]

Ntango bozali kominanola bobengaka mpe bandeko oyo bakɔmeli na elimo?