Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Boyei malamu na nzela oyo eleki malamu!

Boyei malamu na nzela oyo eleki malamu!

Boyei malamu na nzela oyo eleki malamu!

“Ezala tozali na bomoi, ezala tokufi, tozali bato ya Yehova.”​—ROM. 14:8.

1. Yesu ateyaki ete bomoi oyo eleki malamu esɛngi nini?

YEHOVA alingi tózala na bomoi oyo eleki malamu. Bato bakoki kozala na bomoi ndenge na ndenge, kasi lolenge ya bomoi oyo eleki malamu ezali kaka moko. Tokoki kosala eloko mosusu te ya malamu na bomoi na biso koleka koyokanisa yango na Liloba ya Nzambe mpe koyekola epai ya Mwana na ye, Yesu Kristo. Yesu ateyaki bayekoli na ye kosambela Nzambe na elimo mpe na solo, mpe apesaki bango mosala ya kokómisa bato bayekoli. (Mat. 28:19, 20; Yoa. 4:24) Soki toyokanisi bomoi na biso na malako ya Yesu, tokosepelisa Yehova mpe akopambola biso.

2. Bato mingi ya ekeke ya liboso basalaki nini ntango bayokaki nsango ya Bokonzi, mpe kozala moto ya “Nzela” ezalaki kosɛnga nini?

2 Ntango baoyo ‘bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko’ bakómi bandimi mpe bazwi batisimo, tozalaka na bantina malamu ya koloba na bango ete, “Boyei malamu na nzela oyo eleki malamu!” (Mis. 13:48) Na ekeke ya liboso ya ntango na biso, bankóto ya bato ya bikólo ndenge na ndenge bayambaki solo mpe bamonisaki polele na miso ya bato ete bamipesi na Nzambe na ndenge bazwaki batisimo. (Mis. 2:41) Bakristo wana ya liboso bazalaki bato ya “Nzela.” (Mis. 9:2; 19:23) Liloba wana ebongaki mpenza mpamba te baoyo bakómaki bayekoli ya Kristo bandimaki lolenge ya bomoi oyo ezalaki kosɛnga bámonisaka kondima epai ya Yesu Kristo mpe bálandaka ndakisa na ye.​—1 Pe. 2:21.

3. Mpo na nini basaleli ya Yehova bazwaka batisimo, mpe bato boni bazwaki batisimo na mbula zomi oyo euti koleka?

3 Mosala ya kokómisa bato bayekoli ekoli mingi na mikolo oyo ya nsuka mpe ezali lelo kosalema na mikili koleka 230. Na mbula 10 oyo euti koleka, bato koleka 2 700 000 bazwaki ekateli ya kosalela Yehova mpe ya kozwa batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na ye. Yango elingi koloba bato soki 5 000 to koleka pɔsɔ na pɔsɔ! Ekateli ya kozwa batisimo euti na bolingo mpo na Nzambe, boyebi ya Makomami mpe kondima na makambo oyo yango eteyaka. Batisimo ezali likambo monene na bomoi na biso, mpo ezali ebandeli ya boyokani makasi na Yehova. Emonisaka mpe ete tozali kotyela Nzambe motema ete akosalisa biso tósalela ye na bosembo, ndenge asalisaki basaleli na ye ya kala bátambola na nzela na ye.​—Yis. 30:21.

Mpo na nini kozwa batisimo?

4, 5. Tángá mapamboli mpe matomba ya kozwa batisimo.

4 Mbala mosusu ozwá boyebi ya Nzambe, obongolá bomoi na yo, mpe sikoyo ozali mosakoli oyo azwi naino batisimo te. Longonya mpo na bokoli ya ndenge wana. Kasi, obondelá Nzambe mpo na komipesa na ye, mpe ozali kolikya kozwa batisimo? Na nzela ya boyekoli na yo ya Biblia, mbala mosusu oyebi ete na bomoi na yo osengeli koluka libosoliboso kokumisa Yehova, kasi te koluka kaka komisepelisa yo moko to koluka kozwa biloko ya mokili. (Tángá Nzembo 148:11-13; Luka 12:15) Na yango, wapi mwa mapamboli mpe matomba ya kozwa batisimo?

5 Soki ozali mokristo oyo amipesá na Nzambe, bomoi na yo ekozala na ntina mingi koleka. Okozala na esengo mpo ozali kosala mokano ya Nzambe. (Rom. 12:1, 2) Elimo santu ya Yehova ekobimisa kati na yo bizaleli oyo euti na Nzambe, na ndakisa kimya mpe kondima. (Gal. 5:22, 23) Nzambe akoyanola mabondeli na yo mpe akopambola milende oyo ozali kosala mpo na koyokanisa bomoi na yo na Liloba na ye. Mosala oyo ozali kosalela Nzambe ekopesa yo esengo, mpe kozala na bomoi oyo Nzambe andimi ekolendisa elikya na yo ya bomoi ya seko. Lisusu, komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo ekomonisa ete olingi mpenza kozala Motatoli ya Yehova.​—Yis. 43:10-12.

6. Batisimo na biso emonisaka nini?

6 Soki tomipesi na Nzambe mpe tozwi batisimo, tomonisi polele ete tozali bato ya Yehova. Ntoma Paulo akomaki boye: “Ya solo, moto moko te na kati na biso azali na bomoi mpo na ye moko, mpe moto moko te akokufa mpo na ye moko; mpo soki tozali na bomoi, tozali na bomoi mpo na Yehova, mpe soki tokufi, tokufi mpo na Yehova. Yango wana, ezala tozali na bomoi, ezala tokufi, tozali bato ya Yehova.” (Rom. 14:7, 8) Nzambe apesaki biso lokumu na ndenge apesaki biso bonsomi ya kopona. Soki tozwi ekateli makasi ya kolanda lolenge ya bomoi yango mpo tolingi Nzambe, tokosepelisa motema na ye. (Mas. 27:11) Batisimo na biso ezali elembo oyo emonisi ete tomipesi na Nzambe mpe ya koloba polele ete Yehova azali Moyangeli na biso. Emonisaka ete tomitye na ngámbo ya Yehova na kotalela ntembe oyo ebimaki mpo na lotomo ya koyangela molɔ́ngɔ́. (Mis. 5:29, 32) Yehova mpe azali pene na biso. (Tángá Nzembo 118:6.) Batisimo efungolaka mpe nzela mpo na kozwa ebele ya mapamboli mosusu ya elimo sikoyo mpe na mikolo ezali koya.

Bazwi bandeko oyo batondi na bolingo

7-9. (a) Elikya nini Yesu apesaki baoyo batikaki makambo nyonso mpe balandaki ye? (b) Ndenge nini elaka ya Yesu oyo ezali na Marko 10:29, 30 ezali kokokisama?

7 Ntoma Petro ayebisaki Yesu ete: “Talá! Biso totiki biloko nyonso mpe tolandi yo; eloko nini mpenza tokozwa?” (Mat. 19:27) Petro alingaki koyeba nini ezalaki kozela ye ná bayekoli mosusu ya Yesu na mikolo ekoya. Mpo na komipesa mobimba na mosala ya kosakola Bokonzi, bandimaki komipimela makambo mingi. (Mat. 4:18-22) Elikya nini Yesu apesaki bango?

8 Na kolanda ndenge lisolo yango elobelami na Marko, Yesu amonisaki ete bayekoli na ye bakozala na kati ya lisangá ya bandeko ya elimo. Alobaki boye: “Moto moko te atiki ndako, to bandeko mibali, to bandeko basi, to mama, to tata, to bana, to bilanga mpo na ngai mpe mpo na nsango malamu akozanga kozwa mbala nkama moko (100) sikoyo na eleko oyo, bandako, mpe bandeko mibali mpe bandeko basi, mpe bamama, mpe bana, mpe bilanga, elongo na minyoko, mpe na ntango oyo ezali koya bomoi ya seko.” (Mrk. 10:29, 30) Bakristo ya ekeke ya liboso, na ndakisa Lidia, Akila, Prisile, mpe Gayusi, bazalaki na kati ya bato oyo bapesaki “bandako” mpe bakómaki “bandeko mibali mpe bandeko basi, mpe bamama” ya baninga na bango bandimi, ndenge Yesu alakaki.​—Mis. 16:14, 15; 18:2-4; 3 Yoa. 1, 5-8.

9 Likambo oyo Yesu alobaki ezali kokokisama na ndenge ya monene koleka lelo. “Bilanga” oyo bayekoli ya Yesu batikaka ezali misala ya mosuni oyo bandeko mingi, na ndakisa bamisionɛrɛ, bandeko ya Betele, bandeko oyo bapesaka mabɔkɔ na mosala ya botongi na mikili mosusu mpe bandeko mosusu, bandimaka kotika mpo na kotombola matomba ya Bokonzi na bamboka ndenge na ndenge. Bandeko mingi ya mibali mpe ya basi batiká bandako na bango mpo na kokómisa bomoi na bango pɛpɛlɛ, mpe tosepelaka ntango babɛtaka masolo oyo emonisi ndenge Yehova azali kosunga bango, mpe ndenge mosala oyo bazali kosalela ye epesaka bango esengo. (Mis. 20:35) Lisusu, basaleli nyonso ya Yehova oyo bazwá batisimo bakoki kozwa lipamboli ya “koluka liboso bokonzi mpe boyengebene [ya Nzambe]” na ndenge bazali na kati ya lisangá ya bandeko ya mokili mobimba.​—Mat. 6:33.

Babatelami na “esika ya nkuku”

10, 11. “Esika ya nkuku ya Oyo-Aleki-Likoló” ezali nini, mpe ndenge nini tokoki kokóma kuna?

10 Komipesa mpe kozwa batisimo ememaka lipamboli mosusu ya monene​—libaku ya kofanda na “esika ya nkuku ya Oyo-Aleki-Likoló.” (Tángá Nzembo 91:1.) Esika yango ezali ya elilingi, esika ya kimya epai likambo ya kobanga ezali te, esika ya kobatelama na makama ya elimo. Ezali “ya nkuku” mpo bato oyo bazali na miso ya elimo te mpe batyelaka Nzambe motema te bayebi yango te. Soki tozali komitambwisa na boyokani na komipesa na biso na Nzambe mpe tozali kotyela ye motema mobimba, tozali nde koloba na ye ete: “Ozali ekimelo na ngai mpe esika makasi ya libateli na ngai, Nzambe na ngai, oyo nakotyela motema.” (Nz. 91:2) Yehova Nzambe akómaka esika na biso ya kofanda na kimya. (Nz. 91:9) Bongo tokoluka nini lisusu?

11 Kokóma na “esika ya nkuku” ya Yehova elimboli mpe ete tozwi libaku ya kozala na boyokani malamu na ye. Ebandaka na komipesa mpe batisimo. Na nsima, tokolisaka boyokani yango soki tozali kopusana penepene na Nzambe na nzela ya boyekoli ya Biblia, kobondela na motema moko, mpe kotosa na motema mobimba. (Yak. 4:8) Moto mosusu te azalaki penepene na Yehova koleka Yesu, oyo elikya makasi oyo atyelaki Mozalisi ekitaki te. (Yoa. 8:29) Na yango, tótyela Yehova ntembe soki moke te, ata mpe mposa mpe makoki na ye ya kosalisa biso tókokisa elako oyo tosalaki ntango tomipesaki na ye. (Mos. 5:4) Bibongiseli ya elimo oyo Nzambe azwi mpo na bato na ye ezali elembo oyo emonisi ete alingi biso mpe alingi tólonga ntango tozali kosalela ye.

Tózwa paradiso na biso ya elimo na motuya

12, 13. (a) Paradiso ya elimo ezali nini? (b) Ndenge nini tokoki kozwa libaku ya kosalisa bato ya sika?

12 Komipesa mpe kozwa batisimo efungwelaka mpe biso nzela ya kofanda na paradiso ya elimo oyo etondi na mapamboli. Ezali esika ya elimo oyo eleki malamu oyo tozali elongo na bandeko na biso bakristo, oyo bazali na kimya na Yehova Nzambe mpe kati na bango. (Nz. 29:11; Yis. 54:13) Mokili ezali na eloko moko te oyo tokoki kokokanisa ná paradiso na biso ya elimo. Yango emonanaka mingimingi na mayangani ya minene, epai bandeko na biso ya mibali mpe ya basi ya mikili, minɔkɔ, mpe bikólo ekeseni, basanganaka esika moko na kimya, na bomoko, mpe na bolingo ya bondeko.

13 Paradiso yango ya elimo oyo tozali na yango ekeseni mpenza na makambo ya mabe oyo ezali kosalema na mokili lelo. (Tángá Yisaya 65:13, 14.) Na nzela ya mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi, tozwaka libaku ya kopesa basusu libyangi ya kokɔta na paradiso ya elimo. Kosalisa bato ya sika na lisangá mpe oyo bazali na mposa ya kozwa formasyo mpo na mosala ya kosakola ezali mpe lipamboli. Soki bankulutu basɛngi biso tósala yango, tokoki kozwa libaku kitoko ya kosalisa bato mosusu ya sika, ndenge Akila na Prisile “bamonisaki [Apolosi] polele nzela ya Nzambe na ndenge ya malamu lisusu koleka.”​—Mis. 18:24-26.

Kobá koyekola epai ya Yesu

14, 15. Tozali na bantina nini mpenza ya kokoba koyekola epai ya Yesu?

14 Tozali na bantina mpenza ya kokoba koyekola epai ya Yesu. Liboso aya awa na mabele, Yesu asalaki mosala elongo na Tata na ye bankóto na bankóto ya bambula. (Mas. 8:22, 30) Ayebaki ete lolenge ya bomoi oyo eleki malamu ezalaki nde kosalela Nzambe mpe kopesa litatoli na ntina na solo. (Yoa. 18:37) Yesu ayebaki malamu ete lolenge mosusu nyonso ya bomoi ekozala ya moimi mpe ya kozanga komona mosika. Ayebaki ete akomekama makasi mpe bakoboma ye. (Mat. 20:18, 19; Ebr. 4:15) Lokola azali Ndakisa na biso, ateyaki biso ndenge ya kobatela bosembo.

15 Mwa moke nsima ya batisimo ya Yesu, Satana amekaki ye mpo atika kolanda lolenge ya bomoi oyo eleki malamu​—kasi alongaki te. (Mat. 4:1-11) Yango ezali koteya biso ete ata soki Satana asali biso nini, tokoki kobatela bosembo na biso. Mbala mosusu, akotya likebi na ye na bato oyo balingi kozwa batisimo to baoyo bauti kozwa batisimo. (1 Pe. 5:8) Botɛmɛli ekoki kouta na bato ya libota oyo bakanisi ete bazali koluka bolamu na biso to oyo bayoká makambo ya mabe mpo na Batatoli ya Yehova. Kasi, komekama ya ndenge wana epesaka biso mabaku ya komonisa bizaleli ya bokristo, na ndakisa limemya mpe koyeba koloba na mayele, ntango tozali koyanola na mituna mpe kopesa litatoli. (1 Pe. 3:15) Na ndenge yango, makambo ya ndenge wana ekoki kosalisa baoyo bazali koyoka biso.​—1 Tim. 4:16.

Kangamá na nzela oyo eleki malamu!

16, 17. (a) Masɛngami nini minene misato mpo na kotikala na bomoi ezali na Kolimbola Mibeko 30:19, 20? (b) Ndenge nini Yesu, Yoane, ná Paulo bazongelaki makambo oyo Moize akomaki?

16 Mbula soki 1 500 liboso Yesu aya awa na mabele, Moize alendisaki Bayisraele bápona lolenge ya bomoi oyo elekaki malamu na ntango wana. Alobaki boye: “Nazali mpenza kozwa likoló ná mabele batatoli liboso na bino lelo, ete natye bomoi ná liwa liboso na yo, lipamboli ná elakeli mabe; mpe osengeli kopona bomoi mpo otikala na bomoi, yo ná bana na yo, na kolingáká Yehova Nzambe na yo, koyokáká mongongo na ye mpe kokangamáká na ye.” (Mib. 30:19, 20) Ekólo ya Yisraele etikalaki sembo te epai ya Nzambe, kasi masɛngami minene misato mpo na kotikala na bomoi oyo Moize atángaki ebongwani te. Yesu ná bato mosusu bazongelaki yango lisusu.

17 Ya liboso, ‘tosengeli kolinga Yehova Nzambe na biso.’ Tomonisaka ete tolingaka Nzambe ntango tozali kosala makambo oyo eyokani na banzela na ye ya sembo. (Mat. 22:37) Ya mibale, ‘tosengeli koyoka mongongo ya Yehova’ na nzela ya boyekoli ya Liloba ya Nzambe mpe kotosa mibeko na ye. (1 Yoa. 5:3) Yango esɛngi tóyanganaka na makita nyonso ya bokristo, epai toyekolaka Biblia. (Ebr. 10:23-25) Ya misato, ‘tosengeli kokangama na Yehova.’ Ata soki tokutani na likambo nini, tómonisa ntango nyonso kondima epai ya Nzambe mpe tókoba kolanda Mwana na ye.​—2 Ko. 4:16-18.

18. (a) Na 1914, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki nini mpo na solo? (b) Ndenge nini tosengeli koyoka mpo na pole ya solo lelo?

18 Ezali mpenza lipamboli kozala na bomoi oyo eyokani na solo ya Biblia! Na 1914, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimisaki maloba oyo ya ntina mingi: “Tozali te bato oyo bapambwami, bato ya esengo? Nzambe na biso azali sembo te? Soki moto ayebi likambo mosusu oyo eleki malamu, akakatana te. Soki moko na bino azwi likambo mosusu ya malamu koleka, tozali kolikya ete bokoyebisa biso. Toyebi likambo mosusu te ya malamu koleka to oyo esali lokola ekokana na oyo tomoni na Liloba ya Nzambe. . . . Tokoki te koyebisa kimya, esengo, mpe lipamboli oyo boyebi ya polele ya Nzambe ya solo ememi na mitema mpe na bomoi na biso. Lisolo ya Bwanya, Boyengebene, Nguya, mpe Bolingo ya Nzambe ekokisi mpenza bamposa ya makanisi mpe mitema na biso. Tozali koluka likambo mosusu te. Eloko mosusu ya koluka ezali te kaka kokanga ntina lisusu malamumalamu ya Lisolo yango ya kitoko na makanisi na biso.” [Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Desɛmbɛ 1914, nkasa 377-378 (na Lingelesi)] Botɔndi na biso mpo na pole ya elimo mpe mpo na solo ebongwani te. Ya solo, lelo tozali na ntina monene koleka ya kosepela ete tozali ‘kotambola na pole ya Yehova.’​—Yis. 2:5; Nz. 43:3; Mas. 4:18.

19. Mpo na nini baoyo bakokisi masɛngami mpo na kozwa batisimo basengeli kosala yango kozanga koumela?

19 Soki olingi ‘kotambola na pole ya Yehova’ kasi ozali te mokristo oyo amipesá mpe azwá batisimo, koumisa makambo te. Salá nyonso oyo esengeli mpo na kokokisa masɛngami ya Biblia mpo ozwa batisimo​—nzela kaka moko ya komonisa botɔndi mpo na makambo oyo Nzambe mpe Kristo basalá mpo na biso. Pesá Yehova eloko na yo ya motuya koleka​—bomoi na yo. Monisá ete olingi kosala mokano ya Nzambe mpe kolanda Mwana na ye. (2 Ko. 5:14, 15) Na ntembe te, yango nde nzela oyo eleki malamu!

Okopesa eyano nini?

• Batisimo emonisaka nini?

• Komipesa na Nzambe mpe batisimo ememaka mapamboli nini?

• Mpo na nini koyekola epai ya Yesu ezali na ntina mingi?

• Nini ekosalisa biso tókangama na nzela oyo eleki malamu?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 25]

Batisimo na yo emonisi ete oponi nzela ya bomoi oyo eleki malamu

[Bililingi na lokasa 26]

Obatelami na “esika ya nkuku”?