“Elimo ná mwasi ya libala bazali se koloba ete: ‘Yaká!’”
“Elimo ná mwasi ya libala bazali se koloba ete: ‘Yaká!’”
“Elimo ná mwasi ya libala bazali se koloba ete: ‘Yaká!’ . . . Tiká moto nyonso oyo azali na mposa ya mai aya; tiká moto nyonso oyo alingi, akamata mai ya bomoi ofele.”—EM. 22:17.
1, 2. Matomba ya Bokonzi esengeli kozala na esika nini na bomoi na biso, mpe mpo nini?
MATOMBA ya Bokonzi esengeli kozala na esika nini na bomoi na biso? Yesu alendisaki bayekoli na ye ‘bákoba koluka liboso bokonzi,’ ayebisaki bango ete soki basali bongo, Nzambe akopesa bango biloko oyo basengeli na yango. (Mat. 6:25-33) Akokanisaki Bokonzi ya Nzambe na liyaka moko ya motuya mingi oyo, ntango moto moko ya mombongo oyo asalaka mibembo amonaki yango, ‘atɛkaki biloko nyonso oyo azalaki na yango mpe asombaki yango.’ (Mat. 13:45, 46) Tosengeli te kopesa motuya monene mpenza na mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli?
2 Ndenge tomonaki yango na masolo mibale oyo eleki, koloba na mpiko mpe kosalela Liloba ya Nzambe na mayele na mosala ya kosakola emonisaka ete elimo ya Nzambe ezali kotambwisa biso. Elimo yango esalisaka mpe mingi mpo tóbimaka ntango nyonso na mosala ya kosakola Bokonzi. Na ndenge nini?
Libyangi mpo na moto nyonso!
3. Babengi bato nyonso ‘báya’ komɛla mai ya ndenge nini?
3 Libyangi moko ezali kopesama na bato Emoniseli 22:17.) Libyangi yango ezali ya ‘koya’ mpe kosilisa mposa ya mai na mai moko ya ndenge mosusu mpenza. Ezali mai ya solo te oyo ezalaka na biteni mibale ya hydrogène mpe eteni moko ya oxygène. Atako mai ya mai ezali na ntina mingi mpo na kobatela bomoi na mabele, Yesu azalaki kokanisa mai ya ndenge mosusu ntango alobaki na mwasi Mosamaria na libulu ya mai ete: “Moto nyonso oyo akomɛla mai oyo ngai nakopesa ye akoyoka mposa ya mai ata moke lisusu te, kasi mai oyo nakopesa ye ekokóma na kati na ye liziba ya mai oyo ezali kopunzwapunzwa mpo na kopesa bomoi ya seko.” (Yoa. 4:14) Mai yango ya kokamwa oyo babengi bato báya komɛla epesaka bomoi ya seko.
nyonso na nzela ya elimo santu. (Tángá4. Ndenge nini mposa ya mai ya bomoi ebandaki, mpe mai yango ezali nini?
4 Mposa ya mai ya ndenge wana ebandaki ntango moto ya liboso, Adama, alandaki mwasi na ye, Eva, mpe batombokelaki Mokeli na bango mpenza—Yehova Nzambe. (Eba. 2:16, 17; 3:1-6) Babenganaki bango na elanga oyo bazalaki kofanda “mpo [Adama] asembola lobɔkɔ na ye te mpe azwa lisusu mbuma ya nzete ya bomoi mpe alya yango mpe azala na bomoi mpo na ntango oyo etyami ndelo te.” (Eba. 3:22) Bongo, lokola azali nkɔkɔ ya bato nyonso, Adama amemelaki bato nyonso liwa. (Rom. 5:12) Mai ya bomoi ezali bibongiseli nyonso oyo Nzambe azwi mpo na kolongola bato ya botosi na lisumu mpe liwa mpe kopesa bango bomoi ya kokoka oyo ezangi nsuka na Paradiso awa na mabele. Mbeka ya lisiko ya Yesu Kristo nde esimbi mpenza bibongiseli yango.—Mat. 20:28; Yoa. 3:16; 1 Yoa. 4:9, 10.
5. Libyangi ya koya mpe ‘kokamata mai ya bomoi ofele’ euti epai ya nani? Limbolá.
5 Libyangi ya koya mpe ‘kokamata mai ya bomoi ofele’ euti epai ya nani? Ntango bibongiseli nyonso mpo na bomoi na nzela ya Yesu ekokokisama na mobimba epai ya bato na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo, bibongiseli yango emonisami lokola “ebale moko ya mai ya bomoi, pɛɛ lokola kristale.” Na emonaneli, ebale yango ezalaki “kouta na kiti ya bokonzi ya Nzambe mpe ya Mwana-Mpate.” (Em. 22:1) Na yango, Yehova, Mopesi ya bomoi, nde azali Liziba ya mai oyo epesaka bomoi. (Nz. 36:9) Ye nde apesi mai yango na nzela ya “Mwana-Mpate,” Yesu Kristo. (Yoa. 1:29) Ebale wana ya elilingi ezali nzela oyo Yehova asaleli mpo na kolongola mabe nyonso oyo kozanga botosi ya Adama ememelá bato. Ya solo, libyangi oyo elobi ete “yaká” euti na Yehova Nzambe.
6. Ntango nini ‘ebale ya mai ya bomoi’ ebandi kotíyola?
6 Atako ‘ebale ya mai ya bomoi’ ekotíyola malamumalamu na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo, ebandi kotíyola na “mokolo ya Nkolo,” oyo ebandaki na 1914 ntango “Mwana-Mpate” akómaki mokonzi na likoló. (Em. 1:10) Na yango, bibongiseli mosusu mpo na bomoi ekokaki kozwama nsima na yango. Moko na yango ezali Liloba ya Nzambe, Biblia, mpo nsango na yango ebengami “mai.” (Ef. 5:26) Libyangi ya ‘kokamata mai ya bomoi,’ oyo esɛngi koyoka mpe kondima nsango malamu ya Bokonzi, ezali mpo na moto nyonso. Kasi, nani mpenza azali kopesa libyangi yango na mokolo ya Nkolo?
“Mwasi ya libala” azali koloba, “Yaká!”
7. Na “mokolo ya Nkolo,” banani bato ya liboso ya kopesa libyangi “yaká,” mpe epai ya banani?
7 Bato oyo bazali na etuluku ya mwasi ya libala, elingi koloba, bakristo oyo batyami mafuta na elimo, bazali bato ya liboso oyo bazali kopesa libyangi oyo elobi “yaká.” Epai ya banani? Ya solo, mwasi ya libala azali koloba “Yaká!” epai na ye moko te. Maloba na ye ezali kokende epai ya baoyo bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko na mabele nsima ya “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.”—Tángá Emoniseli 16:14, 16.
8. Nini emonisi ete bakristo oyo batyami mafuta bazali kopesa libyangi ya Yehova banda 1918?
8 Bayekoli ya Kristo oyo batyami mafuta babandaki kopesa libyangi yango banda kala, na 1918. Na mbula yango, lisukulu ya bato nyonso oyo ezalaki na motó ya likambo “Mbala mosusu bamilio ya bato oyo bazali sikoyo na bomoi bakokufa ata mokolo moko te” Emoniseli 22:17. Na esika moko, lisolo yango elobaki boye: “Etuluku ya batikali ya sembo basangani [ná Oyo-Aleki-Likoló] mpo na kopesa libyangi ya boboto mpe koloba ete, ‘Yaká.’ Nsango oyo esengeli kosakolama epai ya bato oyo bazali na mposa ya boyengebene mpe ya solo. Esengeli kosalema sikoyo.” Tii lelo, etuluku ya mwasi ya libala bazali kokoba kopesa libyangi wana.
epesaki elikya ete bato mingi bakozwa bomoi na paradiso awa na mabele nsima ya etumba ya Armagedone. Lisukulu moko oyo epesamaki na liyangani ya Bayekoli ya Biblia oyo esalemaki na Cedar Point, na Ohio, na États-Unis, na 1922, elendisaki bayoki ‘básakola Mokonzi mpe bokonzi na ye.’ Elendiseli wana esalisaki batikali ya etuluku ya mwasi ya libala bápesa libyangi na bato mingi koleka. Na 1929, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi (na Lingelesi) ezalaki na lisolo moko na motó ya likambo “Libyangi ya boboto,” oyo esimbamaki na“Tiká moto nyonso oyo ayoki aloba: ‘Yaká!’”
9, 10. Ndenge nini basɛngaki bato oyo bazali koyoka libyangi báloba mpe “Yaká”?
9 Bato oyo bayoki libyangi “yaká” basengeli kosala nini? Basɛngi bango mpe báloba, “Yaká!” Na ndakisa, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto 1932 (na Lingelesi) elobaki na lokasa 232 ete: “Bakristo oyo batyami mafuta bazali kolendisa bato nyonso oyo balingi básangana na mosala ya koyebisa nsango malamu ya bokonzi. Esɛngi te bázala bato ya Nkolo oyo batyami mafuta mpo básakola nsango ya Nkolo. Ezali esengo monene mpo na batatoli ya Yehova koyeba lelo ete bazwi ndingisa ya komema mai ya bomoi epai ya bato oyo bakoki koleka Armagedone mpe kozwa bomoi ya seko na mabele.”
10 Mpo na komonisa ete moto oyo ayoki azali mpe na mokumba ya koloba: “Yaká!” Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 1934 (na Lingelesi), lokasa 249, elobaki boye: “Bato oyo bazali na etuluku ya Yonadabe basengeli kosala elongo na baoyo bazali na etuluku oyo emonisamaki na Yehu, elingi koloba bakristo oyo Emoniseli 7:9-17 elobeli ezali banani. Yango elendisaki mpenza mosala ya kopesa libyangi oyo euti epai ya Nzambe. Banda wana, ebele mpenza ya basambeli ya solo oyo bazali se kokóma mingi—lelo baleki milio nsambo—bandimi libyangi yango. Lokola basepelaki ntango bayokaki nsango yango, bamipesaki na Nzambe, bazwá batisimo ya mai, mpe basangani na etuluku ya mwasi ya libala mpo na kobenga basusu ‘báya mpe bámɛla mai ya bomoi ofele.’
batyami mafuta na elimo, mpe kosakola nsango ya bokonzi, ata soki bazali te batatoli ya Yehova oyo batyami mafuta na elimo.” Na 1935, eyebanaki polele soki “ebele mpenza ya bato” oyo“Elimo” ezali koloba, “Yaká!”
11. Na ekeke ya liboso T.B., ndenge nini elimo santu esalisaki na mosala ya kosakola?
11 Ntango azalaki kosakola na sinagoga ya Nazarete, Yesu afungolaki rulo ya mosakoli Yisaya mpe atángaki boye: “Elimo ya Yehova ezali na ngai, mpo atye ngai mafuta mpo nasakwela babola nsango malamu, atindi ngai mpo nasakwela baoyo bakangami kosikolama mpe nafungola miso ya bato oyo bakufá miso, mpo natika bato oyo batutamá bákende na bonsomi, mpo na kosakola mbula ya kondimama na Yehova.” Na nsima, Yesu akokisaki maloba yango epai na ye moko; alobaki boye: “Lelo oyo likomami oyo bouti koyoka ekokisami.” (Luka 4:17-21) Liboso amata na likoló, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Na ekeke ya liboso, elimo santu esalisaki mingi na mosala ya kosakola.
12. Ndenge nini elimo ya Nzambe ezali kosalisa na mosala ya kopesa libyangi na mikolo na biso?
12 Ndenge nini elimo santu ya Nzambe ezali kosalisa na mosala ya kopesa bato libyangi na mikolo na biso? Yehova nde apesaka elimo santu. Asalelaka elimo yango mpo na kofungola mitema mpe makanisi ya bato oyo bazali na etuluku ya mwasi ya libala mpo bákanga ntina ya Liloba na ye, Biblia. Elimo etindaka bango bápesa libyangi mpe bálimbwela bato oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na Paradiso awa na mabele mateya ya Makomami. Elimo esalisaka mpe baoyo bandimi libyangi yango, bakómi bayekoli Yesu Kristo, mpe bazali kopesa mpe basusu libyangi yango? Ɛɛ. Lokola babatisamaki ‘na nkombo ya elimo santu,’ bazali kosala na boyokani na litambwisi ya elimo yango mpe kotyela yango motema mpo esalisa bango. (Mat. 28:19) Tótala mpe nsango oyo bakristo oyo batyami mafuta na elimo ná ebele mpenza ya bato bazali kosakola. Nsango yango euti na Biblia—buku oyo ekomamaki na litambwisi mpenza ya elimo ya Nzambe. Na yango, libyangi ezali kopesama na nzela ya elimo santu. Ya solo, totambwisami nde na elimo yango. Likambo yango esengeli kosala nini na oyo etali ntango oyo tolekisaka na mosala ya kopesa bato libyangi?
“Bazali se koloba ete: ‘Yaká!’”
13. Maloba “elimo ná mwasi ya libala bazali se koloba ete: ‘Yaká!’” emonisi nini?
13 “Elimo ná mwasi ya libala” balobi kaka mbala moko te ete: “Yaká!” Verbe ya Grɛki oyo basaleli awa emonisaka likambo oyo ezali kokoba kosalema. Na kolanda likambo yango, Libongoli ya Mokili ya Sika elobi boye: “Elimo ná mwasi ya libala bazali se koloba ete: ‘Yaká!’” Yango emonisi ete libyangi oyo euti na Nzambe ezali kopesama ntango nyonso. Bongo bato oyo bayoki mpe bandimi libyangi yango? Bango mpe bazali koloba ete: “Yaká!” Biblia elobeli ebele mpenza ya bato oyo bazali basambeli ya solo ete ‘bazali kosala mosala mosantu butu moi na tempelo ya Yehova.’ (Em. 7:9, 15) ‘Mosala butu moi’ na ndenge nini? (Tángá Luka 2:36, 37; Misala 20:31; 2 Batesaloniki 3:8.) Ndakisa ya Ana, mobange mwasi oyo azalaki mosakoli, mpe ya ntoma Paulo emonisi ete ‘mosala butu moi’ elimboli kosala ntango nyonso mpe na molende makasi.
14, 15. Ndenge nini Danyele amonisaki ntina ya kosalela Nzambe kozanga kotika?
14 Mosakoli Danyele mpe amonisaki ntina ya kosalela Nzambe kozanga kotika. (Tángá Danyele 6:4-10, 16.) Ata sanza moko te abongolaki momeseno na ye na makambo ya elimo—momeseno ya kobondela Nzambe “mbala misato na mokolo, . . . ndenge azalaki kosala mbala na mbala”—atako yango elimbolaki ete akobwakama na libulu ya bankɔsi. Misala na ye emonisaki bato mosusu polele mpenza ete eloko moko te ezalaki na ntina koleka kosalela Yehova ntango nyonso!—Mat. 5:16.
15 Ntango Danyele alekisaki butu mobimba na libulu ya bankɔsi, mokonzi ye moko akendaki kuna mpe agangaki boye: “Ee Danyele, mosaleli ya Nzambe ya bomoi, Nzambe na yo oyo ozali kosalela ntango nyonso abikisi yo na bankɔsi?” Na mbala moko, Danyele ayanolaki ete: “Ee mokonzi, zalá na bomoi mpo na ntango oyo etyami ndelo te. Nzambe na ngai atindaki anzelu na ye mpe akangaki monɔkɔ ya bankɔsi, mpe babomi ngai te, mpo emonani ete nazali na likambo te liboso na ye; mpe lisusu, Ee mokonzi, nasali likambo moko te ya mabe liboso na yo.” Yehova apambolaki Danyele mpo azalaki kosalela ye “ntango nyonso.”—Dan. 6:19-22.
16. Mituna nini ndakisa ya Danyele esengeli kotinda biso tómituna na oyo etali kobima na mosala ya kosakola?
16 Danyele andimaki kokufa na esika atika mimeseno na ye ya losambo. Bongo biso? Makambo nini tozali komipimela to tokondima komipimela mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ntango nyonso? Tosengeli te kolekisa sanza mobimba kozanga tóyebisa basusu makambo ya Yehova! Soki likoki ezali, tosengeli te kosala makasi tósakolaka pɔsɔ na pɔsɔ? Ata soki nzoto na biso ezali kopekisa biso tósala mingi mpe tokoki kopesa litatoli kaka miniti 15 na sanza, tosengeli kopesa lapolo na yango. Mpo na nini? Mpo, elongo na elimo mpe mwasi ya libala, tolingi kokoba koloba ete: “Yaká!” Ya solo, tolingi kosala nyonso oyo tokoki mpo tótikala basakoli ya Bokonzi oyo basakolaka sanza nyonso.
17. Mabaku nini ya kopesa libyangi ya Yehova tosengeli kolekisaka te?
17 Tosengeli koluka kopesa libyangi ya Yehova na mabaku nyonso, kasi kaka te ntango tobimi na mosala ya kosakola. Ezali mpenza libaku malamu kobenga bato oyo bazali na mposa ya mai ‘báya mpe bákamata mai ya bomoi ofele’ na mabaku mosusu, na ndakisa ntango tozali na kosomba biloko, na mobembo, soki tokei na konje, na mosala, to ntango tozali kokende kelasi! Ata soki bakonzi ya Leta bapekisi biso kosakola, tokobaka kosala yango na mayele—mbala mosusu toponaka bandako to tosakolaka mingi na libaku malamu.
Tókoba koloba: “Yaká!”
18, 19. Ndenge nini okomonisa ete opesaka motuya na libaku ya kozala moto oyo azali kosala elongo na Nzambe?
18 Esali sikoyo mbula koleka 90 banda elimo ná mwasi ya libala bazali koloba, “Yaká!” epai ya moto nyonso oyo azali na mposa ya mai ya bomoi. Osilá koyoka libyangi na bango ya esengo? Boye, tolendisi yo opesa mpe bato mosusu libyangi yango.
19 Toyebi te tii ntango nini libyangi yango ya Yehova oyo etondi na bolingo ekokoba kopesama, kasi lokola tondimi yango mpe tozali koloba, “Yaká!” tokómi bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe. (1 Ko. 3:6, 9) Oyo nde libaku kitoko! Tómonisa ete tozali kozwa libaku yango na motuya mpe “tópesa Nzambe mbeka ya lisanzoli ntango nyonso,” tósakolaka kozanga kotika. (Ebr. 13:15) Elongo na etuluku ya mwasi ya libala, biso nyonso oyo tozali na elikya ya kozala na bomoi na mabele tókoba koloba: “Yaká!” Mpe tiká ete bato mosusu mingi ‘bákamata mai ya bomoi ofele’!
Oyekoli makambo nini?
• Libyangi “yaká” epesami epai ya banani?
• Mpo na nini tokoki koloba ete libyangi “yaká” euti epai ya Yehova?
• Elimo santu ezali kosala nini na mosala ya kopesa libyangi “yaká”?
• Mpo na nini tosengeli kosala makasi tósakolaka ntango nyonso?
[Mituna ya boyekoli]
[Etanda/Bililingi na lokasa 16]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Bazali se koloba: “Yaká!”
1914
Basakoli 5 100
1918
Mingi bakozwa bomoi na Paradiso awa na mabele
1922
“Bósakola, bósakola, bósakola, Mokonzi ná bokonzi na ye”
1929
Batikali ya sembo bazali koloba “Yaká!”
1932
Basɛngi mpe baoyo batyami mafuta te báloba, “Yaká!”
1934
Basɛngi etuluku ya Yonadabe esakola
1935
“Ebele mpenza ya bato” eyebani
2009
Basakoli 7 313 173