Esaleli mpo na kosalisa bilenge bákanisa Mozalisi na bango
Esaleli mpo na kosalisa bilenge bákanisa Mozalisi na bango
ELEKI mbula soki 3 000, Salomo, moto ya bwanya akomaki boye: “Awa ozali nanu elenge, kanisaka Moto oyo asalá yo.” (Mos. 12:1, Bible na lingala ya lelo oyo) Bilenge bakristo bazwi sikoyo esaleli mosusu mpo na kosalisa bango básala bongo. Buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2, ebimaki na Lifalanse na mayangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova “Totambwisami na elimo ya Nzambe,” oyo esalemaki na mokili mobimba kobanda na sanza ya Mai 2008 tii na sanza ya Yanuali 2009.
Na kati ya ezipeli ya liboso ya buku yango, ezali na mokanda oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekomeli bilenge. Na esika moko, mokanda yango elobi boye: “Tozali kobondela mingi ete makambo oyo ezali na buku oyo esalisa yo olonga bopusi ya basusu mpe komekama oyo bilenge bazali kokutana na yango lelo mpe emonisa yo ndenge ya kozwa bikateli oyo eyokani na mokano ya Nzambe.”
Ezali malamu ndenge baboti balingaka kobɔkɔla bana na bango “na disiplini mpe na makebisi ya Yehova.” (Ef. 6:4) Nzokande bana mingi, ntango babandi kokóma bilenge, bakómaka kobangabanga mpe bazalaka na mposa makasi ya litambwisi. Soki ozali moboti ya mwana oyo azali elenge, ndenge nini okoki kosalisa mwana na yo azwa matomba mingi na buku yango? Mwa makanisi yango oyo.
▪ Zalá na buku na yo moko mpe mesaná na yango. Yango esɛngi kaka kotánga buku yango te. Luká kosimba ndenge makanisi epesami na buku yango. Buku yango esuki kaka te na koyebisa bilenge makambo oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe; ezali mpe koteya “makoki na bango ya kososola.” (Ebr. 5:14) Epesi mpe bango makanisi oyo ekoki kosalisa bango báyeba ndenge ya kosimba oyo ezali malamu. Na ndakisa, na Mokapo 15 (“Ndenge nini nakoki kolonga bopusi ya baninga?”) esuki kaka te na koyebisa bilenge ete bálobaka “naboyi.” Ezali na makanisi oyo euti na Biblia mpe ndenge malamu ya kosala oyo ekosalisa bango báyeba ndenge ya kopesa “moto mokomoko eyano.”—Kol. 4:6.
* Na ndakisa, ntango okómi na lokasa 16, na mituna mibale oyo esɛngi biyano, na oyo etali lolango, meká kokanisa lisusu ndenge ozalaki koyoka ntango ozalaki na mbula oyo mwana na yo azali na yango. Mbala mosusu na bisika oyo esengeli, okolinga kokoma biyano oyo olingaki kopesa na mituna yango na ntango wana. Na nsima, okoki komituna boye: ‘Ndenge nini makanisi na ngai na likambo yango ebongwaná na boumeli ya bambula? Mayele nini nazwi banda bolenge na ngai, mpe ndenge nini nakoki koyebisa yango malamu epai ya mwana na ngai?’
▪ Salelá bisika ya buku yango oyo ezali kosɛnga biyano. Atako bisika yango ebongisamá nde mpo na bilenge, mpo na nini te kokoma na buku na yo na bisika oyo esengeli?▪ Memyá mwana na yo, tiká ye abombaka basekele na ye mosusu. Biteni ya buku oyo ezali kosɛnga biyano ebongisami mpo na kobimisa makanisi ya mwana na yo mpe kotinda ye akoma to apesa eyano na motema na ye. Mokano na yo ezali ya koyeba motema ya mwana na yo, kasi te makambo oyo akomi na buku na ye. Na lokasa 3 ya eteni oyo elobi “Epai ya baboti,” buku yango elobi boye: “Soki olingi bana bákomaka na buku na bango na bosembo, tikelá bango mwa bonsomi ya kobomba makambo oyo bakomi na buku na bango. Mbala mosusu na nsima, bakoki koyebisa yo makambo oyo bakomá na buku yango.”
Lisalisi na boyekoli ya Biblia na libota
Buku Mituna oyo bilenge batunaka, Volimi 2, ezali eloko malamu mpenza oyo bokoki kosalela na losambo na bino ya libota. Lokola buku yango ezali na mituna ya baparagrafe te mpo na boyekoli, ndenge nini bokoki kosalela yango? Mpo na koyekola buku yango, mpo na nini te kosalela mayele moko oyo ekosimba mpo na bana na yo?
Na ndakisa, mabota mosusu bakoki kosepela kosala bilakiseli ntango bazali kotalela etanda “Liboso ya bopusi ya baninga” na nkasa 132 mpe 133. Motuna ya liboso oyo ezali na etanda yango ekoki kosalisa mwana na yo ya mobali to ya mwasi ayeba likambo oyo amonaka ete eleki mpasi mpo na ye. Motuna ya mibale elobeli esika oyo likambo yango ekoki kobima. Nsima ya kolobela makambo oyo ekoki koyela ye soki amitiki to alongi likambo yango, basɛngi mwana na yo abongisa mwa biyano mpo na komɛla bopusi, koboya yango, to kozongisa yango. Salisá mwana na yo alukaka mayele mosusu mpe abongisa biyano oyo amoni ete ebongi mpo na ye mpe oyo akokoka kosalela malamu mpe kozanga kobanga.—Nz. 119:46.
Esaleli mpo na kosolola
Buku Mituna oyo bilenge batunaka, Volimi 2, elendisi bilenge básololaka na baboti na bango. Na ndakisa, “Ndenge nini kosolola na papa to mama makambo ya nzoto ya mibali mpe ya basi?” (nkasa 63-64) mpe “Sololáká na baboti na yo!” (lokasa 189) epesi makanisi malamu mpo na ndenge ya kosolola makambo oyo ezalaka nsɔni kolobela. Elenge mwasi moko ya mbula 13 akomaki boye: “Buku yango epesaki ngai mpiko ya kosolola na baboti na ngai makambo oyo nazalaki kokanisa—ata makambo oyo nasalá.”
bitandaEzali na ndenge mosusu oyo buku yango elendisaka masolo. Na nsuka ya mokapo mokomoko, ezali na etanda oyo elobi, “Okanisi nini?” Ezali kaka bozongeli te, ekoki mpe kosalelama mpo na kosolola na libota. Pene na nsuka ya mokapo mokomoko, ezali mpe na etanda oyo elobi “Ndenge nakosala!” Etanda yango epesi bilenge libaku ya kokoma ndenge mpenza oyo bakoki kosalela makambo oyo bayekoli na mokapo yango. Eteni ya nsuka ya etanda nyonso “Ndenge nakosala!” elobi boye: “Likambo oyo nakotuna moboti (to baboti) na ngai na likambo yango ezali . . .” Yango ekoki kosalisa bilenge bátuna baboti na bango toli ya malamu.
Simbá motema ya mwana!
Lokola ozali moboti, mokano na yo ezali ya kosimba motema ya mwana na yo. Buku Mituna oyo bilenge batunaka, Volimi 2, ekoki kosalisa yo osala yango. Talá ndenge tata moko alongaki kosalela buku yango mpo na kosololaka malamu na mwana na ye ya mwasi.
“Ngai ná Rebekah tozali na mwa bisika ya malamu oyo tolingaka kokende na makolo, na velo, to na motuka. Namonaka ete bisika yango, mwa mosika na ndako, esalisaka ye afungolela ngai motema.
“Eteni ya liboso oyo totalelaki na buku yango ezali mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe ‘Epai ya baboti.’ Nalingaki mwana na ngai ayeba ete ndenge lokasa 3 emonisi yango, akoki kokoma na buku na ye kozanga kobanga. Nakoluka te kotala makambo oyo akomi.
“Natikaki Rebekah apona mikapo oyo akolinga tólobela, mpe ndenge alingi elandana. Moko na mikapo ya liboso oyo aponaki ezalaki ‘Nasengeli kobɛta masano ya video?’ Nakanisaki ata moke te ete akokaki kopona mokapo yango! Kasi, aponaki yango mpamba te. Baninga na ye mingi bazalaki kobɛta lisano moko ya mwa kobangisa. Nazalaki koyeba ata moke te makambo ya mobulu mpe maloba ya mbindo oyo ezalaki na lisano yango! Kasi, nyonso wana ebimaki ntango totalelaki etanda “Ndenge nakosala!” na lokasa 251. Etanda yango esalisaki mpe Rebekah abongisa eyano oyo akopesa soki moto ameki kotinda ye abɛta lisano yango.
“Banda wana, Rebekah abombelaka ngai te makambo oyo akomi na buku na ye. Boyekoli na biso ezalaka nde ntango ya masolo oyo esilaka te. Totángaka moto na moto na ngala na ye, mpe na nsima alingaka kolobela makambo nyonso, ata bililingi mpe bitanda. Yango epesaka ngai libaku ya koyebisa ye ndenge makambo ezalaki mpo na ngai ntango nazalaki na mbula na ye, mpe na nsima ayebisaka ngai ndenge makambo ezali lelo. Alingaka koyebisa makambo nyonso!”
Soki ozali moboti, na ntembe te osepelaki mingi ntango buku yango ebimaki. Sikoyo ozali na libaku ya kosalela yango malamu. Elikya ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali ete buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2, ezala mpenza lipamboli mpo na libota na yo. Tiká ete buku yango esalisa moto nyonso, mingimingi bilenge oyo tolingi mingi, ‘bákoba kotambola na elimo santu.’—Gal. 5:16.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 6 Bisika mosusu ya buku yango oyo ezali kosɛnga biyano etali mpe mikóló. Na ndakisa, etanda “Pekisá nkanda na yo” (lokasa 221) ekoki kosalisa yo kaka ndenge mpe ekoki kosalisa mwana na yo ya mobali to ya mwasi. Ezali mpe bongo mpo na bitanda “Liboso ya bopusi ya baninga” (nkasa 132-133), “Ndenge nakosalela mbongo na sanza” (lokasa 163), mpe “Mikano na ngai” (lokasa 314).
[Etanda na lokasa 30]
Oyo bilenge mosusu balobi
“Ezali buku oyo esɛngi ofandela yango ná crayon mpe otánga yango mpe omanyola yango. Lokola ezali na bisika oyo moto akoki kokoma makambo na ye, epesi nzela ya kokanisa yo moko na mokano ya koluka kozala na bomoi oyo eleki malamu.”—Nicola.
“Bato mingi, ata baoyo bamonaka ete bazali koluka bolamu na ngai, batindaka ngai nalinga. Eteni ya liboso ya buku yango endimisaki ngai ete ata soki bato balobi nini, nakoki naino te mpo na kolinga.”—Katrina.
“Etanda ‘Ozali kokanisa kozwa batisimo?’ esalisaki ngai nazwa batisimo na ngai na kilo koleka. Elendisaki ngai natalela lisusu mimeseno na ngai ya koyekola mpe ya kobondela.”—Ashley.
“Ata soki baboti na ngai oyo bazali bakristo bateyá ngai banda ntango nazalaki mwana moke, buku oyo esalisi ngai nakanisa ngai moko mpo na makambo oyo nasengeli kosala na bomoi na ngai. Esalisi ngai mpe nafungwela baboti na ngai motema.”—Zamira.
[Elilingi na lokasa 31]
Baboti, bómesana na buku yango
[Elilingi na lokasa 32]
Zalá na mokano ya kosimba motema ya mwana na yo