Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Lotomo ya mwana ya kokola na elimo”

“Lotomo ya mwana ya kokola na elimo”

“Lotomo ya mwana ya kokola na elimo”

NA MOKOLO ya 9 Desɛmbɛ 2008, Académie suédoise des droits de l’enfant esalaki likita moko ya kokamwa oyo ezalaki na motó ya likambo “Lotomo ya mwana ya kokola na elimo.” Makanisi ndenge na ndenge epesamaki na balobi oyo bazalaki bamonisi ya Église de Suède, ya mangomba mosusu ya bokristo, ya Islam, mpe bato oyo bandimaka mangomba te (humanistes).

Kati na balobi yango ezalaki na mokonzi moko ya lingomba oyo alobaki ete: “Ezali mpasi moto ayebisa na bosolo mpe na bosembo ntina mpenza ya masolo ya Biblia mpo na elimo ya bana.” Ndenge nini mikapo ya Makomami ekokisaka bamposa ya elimo ya bana?

Mokonzi yango ya lingomba alobaki ete: “Mikapo mpe masolo [ya Biblia] epesaka bana makambo oyo bakoki kokanisaka mpe komanyolaka bango moko.” Atángaki “lisolo ya Adama ná Eva, Kaina ná Abele, Davidi ná Goliate, lisolo ya mbotama ya Yesu, ya mokɔngɔli-mpako Zakai, lisese ya mwana ya mobulu, lisolo ya Mosamaria malamu.” Atángaki yango lokola “bandakisa ya masolo oyo ekoki kosalisa mwana akanisaka makambo ya ntina, na ndakisa bokosi, kolimbisa, kozipa masumu, koyinana, makambo ya nsɔni, kofuta masumu, mpe bolingo ya bondeko mpe oyo ezangi moimi.” Abakisaki boye: “Masolo wana epesaka bandakisa oyo moto akoki kobongola mpo ekóma mpenza bomoi na ye, ekóma misala na ye, mpe makambo oyo ekoki kosalisa ye na bomoi.”

Ya solo, ezali malamu kolendisa moto atánga Biblia. Kasi, bana bazali mpenza na likoki ya “kokanisaka mpe komanyolaka bango moko” makambo oyo bazali kotánga na Biblia mpe kokanga ntina na yango malamu?

Ata mikóló bazalaka na mposa bálimbwela bango mikapo ya Makomami. Na ndakisa, Biblia elobeli moto moko oyo akokaki te kokanga ntina ya solo ya Biblia na nzela ya ‘kokanisa mpe komanyola ye moko.’ Moto yango azalaki Moetiopia oyo azalaki mosali monene ya Leta. Azalaki kotánga esakweli ya Yisaya kasi azalaki kokanga ntina na yango te. Lokola alingaki kokanga ntina ya esakweli yango, andimaki na esengo ndimbola oyo moyekoli Filipe apesaki ye. (Mis. 8:26-40) Ezali kaka Moetiopia ye moko te. Biso nyonso, mingimingi bana, tozalaka na mposa bálimbwela biso Makomami.

Biblia ekebisi biso boye: “Bozoba ekangami na motema ya mwana mobali.” (Mas. 22:15) Bana bazali na mposa ya lisungi mpe litambwisi, mpe baboti na bango bazali na mokumba ya koteya bango bizaleli ya malamu mpe makambo ya elimo oyo euti na Biblia mpe na mateya ya lisangá ya bokristo. Bana bazali na lotomo ya kozwa mateya ya ndenge wana. Banda bomwana mpenza, bana bazalaka na mposa ya lisalisi mpo bátya moboko oyo euti na Biblia mpo bákola na elimo mpe bákóma “bato oyo bakɔmɛli, baoyo, makoki na bango ya kososola, lokola basalelaka yango, emesana kokesenisa ná mabe ná malamu.”​—Ebr. 5:14.