Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Ntango nini moto akoki kokanisa kozongela kozwa batisimo?

Na bantango mosusu, moto oyo azwá batisimo akoki komituna soki batisimo oyo azwaki ebongaki mpenza, mpe akoki koluka kozongela kozwa batisimo. Na ndakisa, na ntango oyo azwaki batisimo, mbala mosusu azalaki na makambo ya kobombana to azalaki kosala likambo moko oyo ekokaki kosɛnga abimisama na lisangá soki azalaki moto oyo asilá kozwa batisimo na ndenge ebongi. Akokaki mpenza komipesa na Nzambe na ntango wana? Moto ya ndenge wana akokaki komipesa malamumalamu na Yehova kaka soki atikaka kosala makambo yango oyo eyokani te na Makomami. Na yango, moto oyo azwaki batisimo wana azalaki naino na makambo oyo ekokaki kopekisa ye azwa batisimo akoki komona ete ebongi azongela kozwa batisimo.

Bongo moto oyo azalaki kosala lisumu te na ntango azwaki batisimo, kasi likambo ya mabe oyo asalaki na nsima esɛngaki básalela ye komite ya kosambisa? Sikoyo soki alobi ete akangaki mpenza ntina te ya makambo oyo azalaki kosala ntango azwaki batisimo mpe ete batisimo na ye wana ebongaki mpenza te. Ntango bakutani na ye, bankulutu basengeli te kotya ntembe na ntina etali batisimo na ye mpe kotuna soki akanisi ete komipesa oyo amipesaki mpe batisimo na ye ebongaki te. Ezala ndenge nini, ayokaki lisukulu oyo euti na Makomami oyo epesaki ndimbola ya batisimo. Ayanolaki ɛɛ na mituna oyo etali komipesa mpe kozwa batisimo. Na nsima, alongolaki bilamba mpe azindisamaki na mai. Na yango, ebongi mpenza tóndima ete ayebaki malamu ete makambo oyo azalaki kosala ezalaki ya lisɛki te. Bankulutu basengeli kotalela ye lokola moto oyo azwá mpenza batisimo.

Soki moto alobi ete batisimo na ye ebongaki te, bankulutu bakoki kobenda likebi na ye na masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo elobelá na molai likambo ya kozongela kozwa batisimo mpe kosolola yango na ye. Kozongela kozwa batisimo mpo na makambo mosusu (na ndakisa soki moto azalaki na boyebi mingi te ya Biblia ntango azwaki batisimo) ezali likambo ya moto ye moko.

Makambo nini bakristo basengeli kotalela na likambo etali kofanda esika moko na bato mosusu?

Moto nyonso azalaka na mposa ya esika ya kofanda. Kasi lelo, bato mingi bazangi bandako na bango moko. Makoki ya moto, maladi, to makambo mosusu ekoki kotinda mabota minene, kati na bango bandeko mosusu ya libota, báfanda esika moko. Na bisika mosusu na mokili, bandeko mingi ya libota batondi bango nyonso kaka na shambrɛ moko, mwaye moto abomba makambo na ye ezali te.

Ezali te mokumba ya ebongiseli ya Yehova ya kopesa bandeko ya lisangá ya mokili mobimba liste molai ya mibeko mpo na komonisa bisika nini ebongi kofanda. Bakristo balendisami ete bákanisaka na kolanda mitinda ya Biblia mpo na koyeba soki ndenge oyo bazali kofanda ezali malamu na miso ya Nzambe. Wapi mitinda yango mosusu?

Ya liboso, tosengeli kotala soki kofanda oyo tofandi ná bato mosusu ekosala nini epai na biso mpe na elimo na biso. Bato ya ndenge nini tofandi na bango? Bazali basambeli ya Yehova? Batosaka mitinda ya Biblia na bomoi na bango? Paulo akomaki boye: “Bómikosa te. Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.”​—1 Ko. 15:33.

Makomami emonisi ete Yehova apekisi pite mpe ekobo. (Ebr. 13:4) Na yango, ezali polele ete esika nyonso oyo ebongisami mpo mibali mpe basi oyo babalaná te báfandaka mpe bálalaka esika moko lokola nde bazali bato oyo babalaná ezali malamu te na miso ya Nzambe. Mokristo akoki te kondima kofanda na esika oyo bato bakangaka miso na pite.

Kutu Biblia elendisi moto nyonso oyo alingi kondimama na Nzambe ‘akima pite.’ (1 Ko. 6:18) Na yango, ekozala likambo ya bwanya bakristo báboya kofanda na bisika oyo ekoki komema bango na komekama ya kosala pite. Na ndakisa, kanisá ete bakristo ebele bazali kolala na ndako moko. Esika ya ndenge wana ekoki kotya bango na komekama te? Bongo soki kozanga kokana, esalemi ete mwasi ná mobali oyo babalaná te bakómi kaka bango mibale na ndako mpo bato mosusu bazali te na ntango wana? Ndenge moko mpe, ekozala mpenza likama mpo na minzemba oyo balingani báfanda na ndako moko. Ezali likambo ya bwanya kokima makambo ya ndenge wana.

Ebongi mpe te ete bato oyo babomá libala bákoba kofanda na ndako moko. Lokola bamesanaki kosangisa nzoto bango mibale, ekoki kozala mpasi te bákwea na pite.​—Mas. 22:3.

Likambo ya nsuka mpe ya ntina oyo esengeli kotalela ezali ndenge oyo bato ya bisika oyo moto afandi bamonaka makambo oyo moto azali kosala. Soki mokristo amoni ete ndenge oyo bazali kofanda ezali malamu, nzokande bato ya esika wana bazali kolobela yango mabe, asengeli kotala likambo yango malamu. Tokolinga soki moke te ete etamboli na biso ebwaka nsɔni na nkombo ya Yehova. Paulo amonisaki yango na maloba oyo: “Bókeba ete bókóma te bato oyo bazali kobɛtisa Bayuda ná Bagrɛki mpe lisangá ya Nzambe libaku, ndenge ngai mpe nazali kosepelisa bato nyonso na makambo nyonso, nazali koluka litomba na ngai moko te kasi oyo ya bato mingi, mpo bango bábikisama.”​—1 Ko. 10:32, 33.

Kozwa ndako mpe esika ya kofanda oyo ebongi ekoki kozala mpasi mpo na baoyo balingi kotosa mitinda ya sembo ya Yehova. Kasi, bakristo basengeli ‘kokoba koluka koyeba malamu mpenza eloko oyo ekoki kondimama na Nkolo.’ Basengeli kotala malamu ete eloko moko te ya nsɔni ezali kosalema na bandako na bango. (Ef. 5:5, 10) Yango esɛngi bakristo bábondela mpo na kozwa litambwisi ya Nzambe mpe básala nyonso oyo bakoki mpo na kobatela nzoto mpe bizaleli malamu ya moto na moto mpe kobatela lokumu ya nkombo ya Yehova.