Omonaka Yehova ete azali Tata na yo?
Omonaka Yehova ete azali Tata na yo?
“NKOLO, teyá biso kobondela.” Ntango moyekoli na ye moko asɛngaki likambo wana, Yesu ayanolaki boye: “Ntango bozali kobondela, bóloba: ‘Tata, nkombo na yo esantisama.’” (Luka 11:1, 2) Mpo na kolobela Yehova, Yesu akokaki kosalela batitre minene lokola “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” ‘Molakisi Monene,’ “Mozalisi” “Mokóló na Mikolo,” mpe “Mokonzi ya seko.” (Eba. 49:25; Yis. 30:20; 40:28; Dan. 7:9; 1 Tim. 1:17) Kasi, Yesu aponaki nde liloba “Tata.” Mpo na nini? Mbala mosusu mpo alingaki tópusanaka epai ya Moto oyo aleki likoló na molɔ́ngɔ́ mobimba ndenge mwana moke apusanaka epai ya tata na ye ya bolingo.
Nzokande, bato mosusu bakokaka te komona ete Nzambe azali Tata na bango. Mokristo moko na nkombo Atsuko * alobi boye: “Bambula mingi nsima ya batisimo na ngai, ezalaki mpasi mpo napusana penepene na Yehova mpe nabondela ye lokola Tata.” Apesi ntina moko oyo azalaki komona ndenge wana; alobi boye: “Nayebi ata mokolo moko te oyo tata oyo abotá ngai amoniselaki ngai bolingo.”
Na mikolo ya nsuka oyo ya mpasi mingi, bolingo oyo moto akoki kozela ete tata amonisela ye na libota ezali mpenza kozanga. (2 Tim. 3:1, 3) Na yango, ezali mpasi te moto amiyoka lokola Atsuko. Kasi, tóyika mpiko, mpamba te tozali na bantina malamu ya komona Yehova ete azali Tata na biso ya bolingo.
Yehova: Mopesi oyo atondi na bolingo
Mpo tómona Yehova ete azali Tata na biso, tosengeli koyeba ye malamu. Yesu alobaki boye: “Moto moko te ayebi Mwana malamumalamu longola kaka Tata, mpe moto moko te ayebi Tata malamumalamu longola kaka Mwana ná moto nyonso oyo Mwana asepeli komonisa ye Tata.” (Mat. 11:27) Lolenge moko malamu ya koyeba ndenge Yehova azali lokola Tata ezali kokanisa makambo oyo Yesu amonisaki na ntina na Nzambe ya solo. Boye, makambo nini Yesu amonisaki na ntina na Tata?
Mpo na komonisa ete Yehova nde apesaki ye bomoi, Yesu alobaki boye: “Nazali na bomoi mpo na Tata.” (Yoa. 6:57) Bomoi na biso mpe euti na Tata. (Nz. 36:9; Mis. 17:28) Nini etindaki Yehova apesa basusu bomoi? Ezalaki bolingo te? Lokola apesá biso likabo ya ndenge wana, na ntembe te biso mpe tosengeli kolinga Tata na biso ya likoló.
Likambo eleki monene oyo Nzambe asalaki mpo na komonisa bolingo na ye mpo na bato ezali mbeka ya lisiko ya Yesu oyo apesaki. Lisiko efungwelaki bato ya masumu nzela ya kozala na boyokani malamu na Yehova na nzela ya Mwana na ye ya bolingo. (Rom. 5:12; 1 Yoa. 4:9, 10) Mpe lokola Tata na biso ya likoló azali Mokokisi ya bilaka na ye, tokoki kondima ete nsukansuka, bato nyonso oyo balingaka ye mpe batosaka ye bakozwa “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.”—Rom. 8:21.
Lisusu, Tata na biso ya likoló ‘abimiselaka biso moi’ mokolo na mokolo. (Mat. 5:45) Esalemaka mpenza te tómona ete ezali na ntina ya kobondela mpo moi ebima. Kasi, talá ndenge tozalaka na mposa ya moi mpe tosepelaka na molunge na yango! Longola yango, Tata na biso azali Mopesi biloko oyo akokani na mosusu te, oyo ayebi bamposa na biso ya mosuni liboso kutu tósɛnga ye yango. Na yango, omoni te ete tosengeli kozwa ntango ya kotala mpe kokanisa na botɔndi ndenge Tata na biso ya likoló abatelaka biloko oyo azalisá?—Mat. 6:8, 26.
Tata na biso: “Mobateli ya boboto”
Esakweli oyo ya Yisaya ekitisaki basaleli ya Nzambe ya kala motema: “Bangomba ekoki kolongolama, mpe bangomba mike ekoki kotengatenga, kasi motema boboto na ngai ekolongolama epai na yo te, kondimana na ngai ya kimya mpe ekotengatenga te, Yehova [Mobateli ya boboto, The Bible in Living English], alobi bongo.” (Yis. 54:10) Libondeli oyo Yesu asalaki na butu ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele enyatelaki likanisi yango, emonisaki ete Yehova azali solo “Mobateli ya boboto.” Mpo na bayekoli na ye, Yesu abondelaki boye: “Bango bazali na mokili mpe ngai nazali koya epai na yo. Tata mosantu, kɛngɛlá bango mpo na nkombo na yo.” (Yoa. 17:11, 14) Yehova akɛngɛlaka mpe abatelaka bayekoli ya Yesu.
Moko na makambo oyo Nzambe asalaka mpo na kobatela biso na mayele mabe ya Satana lelo ezali ndenge apesaka biso bilei ya elimo na ntango oyo ebongi na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45) Tosengeli kolyaka bilei yango oyo epesaka makasi soki tolingi ‘kolata molato mobimba ya etumba oyo euti na Nzambe.’ Tózwa ndakisa ya “nguba monene ya kondima,” oyo esalisaka biso ‘tókoka koboma mɔtɔ ya mbanzi nyonso oyo ezali kopela ya moto mabe.’ (Ef. 6:11, 16) Kondima na biso ebatelaka biso na makama ya elimo mpe emonisaka ete tondimi ete Tata na biso azali na nguya ya kobatela.
Tokoki komona lisusu malamu boboto ya Tata na biso ya likoló soki totali malamu ndenge Mwana ya Nzambe amitambwisaki ntango azalaki awa na mabele. Tótala lisolo oyo ezali na Marko 10:13-16. Kuna, tokokuta maloba oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bótika bana mike báya epai na ngai.” Ntango bana wana ya mike bayanganaki pembeni na ye, Yesu ayambaki bango na boboto mpe apambolaki bango. Na ntembe te, bilongi na bango etondaki na esengo! Mpe lokola Yesu alobaki ete: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata,” toyebi ete Nzambe ya solo alingaka tóya epai na ye.—Yoa. 14:9.
Yehova Nzambe azali Liziba ya bolingo oyo ezangi nsuka. Azali Mopesi biloko mpe Mobateli oyo akokani na mosusu te, oyo alingaka tópusana penepene na ye. (Yak. 4:8) Na yango, Yehova azali mpenza Tata oyo aleki malamu, oyo akokani na mosusu te!
Tozali kozwa matomba minene!
Tozali kozwa matomba minene na ndenge tozali kotyela Yehova motema ete azali Tata na biso ya likoló, oyo atondi na bolingo mpe na boboto. (Mas. 3:5, 6) Yesu azwaki matomba mingi na ndenge atyelaki Tata na ye motema mobimba. Kristo alobaki na bayekoli na ye boye: “Nazali ngai moko te, kasi Tata oyo atindaki ngai azali elongo na ngai.” (Yoa. 8:16) Yesu azalaki ntango nyonso kondima ete Yehova akosunga ye. Na ndakisa, na batisimo na ye, Tata na ye ayebisaki ye lisusu ete alingi ye, ntango alobaki boye: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi.” (Mat. 3:15-17) Mpe mwa moke liboso akata motema, Yesu abelelaki ete: “Tata, natiki elimo na ngai na mabɔkɔ na yo.” (Luka 23:46) Yesu azalaki kaka kotyela Tata na ye motema.
Ekoki mpe kozala bongo mpo na biso. Soki Yehova azali pene na biso, tokobanga nini? (Nz. 118:6) Atsuko, oyo tolobelaki na ebandeli, azalaki kotalela makasi na ye moko ntango akutani na mikakatano. Kasi, na nsima abandaki koyekola bomoi mpe mosala ya Yesu, atyaki likebi mingimingi na boyokani makasi oyo Yesu azalaki na Tata na ye ya likoló. Nini esalemaki? Atsuko alobi boye: “Nayaki koyeba ndimbola ya kozala na Tata mpe kotyela ye motema.” Abakisi boye: “Nayokaki kimya mpe esengo ya solosolo. Ya solo, tozali na ntina te ya komitungisa mpo na likambo moko.”
Litomba nini mosusu tozali kozwa na ndenge tozali komona Yehova ete azali Tata na biso? Mbala mingi, bana balingaka baboti na bango mpe balingaka kosepelisa bango. Bolingo etindaki Mwana ya Nzambe ‘asalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka Tata na ye.’ (Yoa. 8:29) Ndenge moko mpe, bolingo na biso mpo na Tata na biso ya likoló ekoki kotinda biso tómitambwisa na bwanya mpe ‘tósanzola ye liboso ya bato nyonso.’—Mat. 11:25; Yoa. 5:19.
Tata na biso ‘azali kosimba lobɔkɔ na biso ya mobali’
Tata na biso ya likoló apesá biso mpe “mosungi”—elimo santu na ye. Yesu alobaki ete ‘ekokamba biso na kati ya solo nyonso.’ (Yoa. 14:15-17; 16:12, 13) Elimo santu ya Nzambe ekoki kosalisa biso tóyeba Tata na biso malamumalamu. Ekoki kosalisa biso tókweisa “biloko oyo epikamá makasi,” elingi koloba, makanisi oyo bato bakangamá na yango, makanisi ya mabe, to makanisi oyo etɛngamá, mpe na ndenge yango “kokómisa likanisi nyonso mokangami mpo etosa Kristo.” (2 Ko. 10:4, 5) Yango wana, tóbondela Yehova apesa biso “mosungi” oyo elakamaki, tózala na elikya ete ‘Tata na likoló akopesa elimo santu na baoyo bazali kosɛnga ye yango.’ (Luka 11:13) Ebongi mpe tóbondelaka ete elimo santu esalisa biso tópusana lisusu penepene na Yehova.
Mwana moke ayokaka ete abatelami, mpe abangaka te ntango tata na ye asimbi ye na lobɔkɔ wana bazali kotambola elongo. Soki omonaka mpenza Yehova ete azali Tata na yo, okoki kotya motema na maloba ya kobɔndisa oyo: “Ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali, ngai Moto nazali koloba na yo ete: ‘Kobanga te. Ngai moko nakosalisa yo.’” (Yis. 41:13) Okoki kozwa libaku kitoko ya “kotambola” elongo na Nzambe libela na libela. (Mika 6:8) Kobá kosala mokano na ye, mpe okoyoka bolingo, esengo mpe kimya oyo eutaka na komona Yehova ete azali Tata na yo.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 3 Oyo ezali nkombo topesi ye kopesa.