Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

‘Tóloba Liloba ya Nzambe na mpiko’

‘Tóloba Liloba ya Nzambe na mpiko’

‘Tóloba Liloba ya Nzambe na mpiko’

“Batondaki na elimo santu mpe babandaki koloba liloba ya Nzambe na mpiko.”​—Mis. 4:31.

1, 2. Mpo na nini tosengeli kosala makasi mpo na kozala basakoli ya malamu?

MIKOLO misato liboso ya liwa na ye, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” Liboso amata na likoló, Yesu oyo autaki kosekwa apesaki bayekoli na ye mosala ya ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, koteya bango bátosa makambo nyonso oyo apesaki bango mitindo.’ Alakaki bango ete akozala elongo na bango “mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.”​—Mat. 24:14; 26:1, 2; 28:19, 20.

2 Biso Batatoli ya Yehova tozali komipesa na mosala wana oyo ebandaki na ekeke ya liboso. Mosala mosusu te ezali na ntina lokola mosala wana ya kobikisa bato, elingi koloba mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli. Na yango, ezali mpenza na ntina tózala basakoli ya malamu! Na lisolo oyo, tokomona ndenge kotambwisama na elimo santu esalisaka biso tóloba na mpiko ntango tozali na mosala ya kosakola. Masolo mibale oyo elandi ekomonisa ndenge elimo ya Yehova ekoki kosalisa biso tóteya na mayele mpe tósakola kozanga kotika.

Tozali na mposa ya mpiko

3. Mpo na nini mosala ya kosakola Bokonzi esɛngaka mpiko?

3 Mosala oyo Nzambe apesá biso ya kosakola Bokonzi ezali libaku oyo ekokani na mosusu te. Kasi, ezangi mikakatano te. Atako bato mosusu bazali kondima nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mbala moko, bato mingi bazali lokola bato ya mikolo ya Noa. Yesu alobaki ete “batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.” (Mat. 24:38, 39) Ezali mpe na baoyo bazali kosɛka to kotɛmɛla biso. (2 Pe. 3:3) Botɛmɛli ekoki kouta na bakonzi, baninga ya kelasi to ya mosala, to ata na bandeko ya libota. Longola yango, bolɛmbu na biso moko, na ndakisa ezaleli ya nsɔninsɔni mpe kobanga ete bato báboya biso. Makambo ndenge na ndenge ekoki kopekisa biso tóloba “polele mpe na bosembo” mpe tóloba liloba ya Nzambe na “mpiko.” (Ef. 6:19, 20) Kolendendela na koloba liloba ya Nzambe esɛngaka mpiko. Nini ekoki kosalisa biso tókóma na mpiko?

4. (a) Mpiko ezali nini? (b) Ndenge nini ntoma Paulo azwaki mpiko ya koloba na Batesaloniki?

4 Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “mpiko” elimboli “koloba polele, kobomba te, koloba na bosembo.” Liloba yango epesaka mpe likanisi ya kozala motema ya kokita mpe kobanga te. Mpiko elimboli te kozala molangi mpɛmbɛ to kozanga bonkonde. (Kol. 4:6) Atako tozali na mpiko, tolingi mpe kozala na kimya na bato nyonso. (Rom. 12:18) Lisusu, wana tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, tosengeli kozala na bokatikati: tózala na mpiko kasi mpe na mayele mpo tózokisa moto te kozanga tókana. Ya solo, mpo tózala na mpiko, tosengeli kokolisa bizaleli oyo esɛngaka milende mingi. Mpiko ya ndenge wana eutaka na biso moko to na makasi na biso moko te. Nsima ya “kosambwisama mabe na Filipi,” ndenge nini ntoma Paulo ná baninga na ye ‘bazwaki mpiko’ ya koloba liloba na Tesaloniki? Paulo akomaki boye: “Na lisalisi ya Nzambe na biso.” (Tángá 1 Batesaloniki 2:2.) Yehova Nzambe akoki kolongola kobanga na biso mpe kopesa biso mpiko ya ndenge wana.

5. Ndenge nini Yehova apesaki Petro, Yoane, mpe bayekoli mosusu mpiko?

5 Ntango “bankumu [ya bato] ná mikóló na bango ná bakomeli” babimiselaki bango mokakatano, ntoma Petro mpe ntoma Yoane balobaki boye: “Soki ezali boyengebene na miso ya Nzambe ete tóyoka bino na esika ya koyoka Nzambe, bino moko bókata likambo. Kasi biso, tokoki kotika te kolobela makambo oyo tomoni mpe toyoki.” Na esika bábondela Nzambe ete minyoko esila, bango mpe baninga na bango bandimi, babondelaki nde boye: “Yehova, tyá likebi na makaneli na bango, mpe pesá baombo na yo likoki ya kokoba koloba liloba na yo na mpiko mpenza.” (Mis. 4:5, 19, 20, 29) Yehova ayanolaki libondeli na bango ndenge nini? (Tángá Misala 4:31.) Yehova asalisaki bango bázwa mpiko na nzela ya elimo na ye. Elimo ya Nzambe ekoki mpe kosala bongo mpo na biso. Boye, ndenge nini tokoki kozwa elimo ya Nzambe mpe kotambwisama na yango na mosala ya kosakola?

Ndenge ya kokóma na mpiko

6, 7. Wapi ndenge ya kozwa na mbala moko mpenza elimo santu? Pesá bandakisa.

6 Ndenge ya kozwa na mbala moko mpenza elimo santu ya Nzambe ezali ya kosɛnga yango. Yesu ayebisaki bayoki na ye ete: “Soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na likoló akopesa te baoyo bazali kosɛnga ye elimo santu koleka?” (Luka 11:13) Ya solo, tosengeli ntango nyonso kobondela mpo na kosɛnga elimo santu. Soki mitindo mosusu ya mosala ya kosakola​—kosakola na balabala, na libaku malamu, to na bamagazini mpe na zando—​ebangisaka biso, tokoki kobondela Yehova apesa biso elimo na ye mpe kosɛnga ye asalisa biso tózwa mpiko oyo tosengeli na yango.​—1 Tes. 5:17.

7 Yango nde likambo mokristo moko ya mwasi na nkombo Rosa asalaki. * Mokolo moko ntango Rosa azalaki na esika ya mosala, moninga na ye molakisi azalaki kotánga lapolo moko oyo eutaki na eteyelo mosusu, oyo elobelaki ndenge bazalaki konyokola bana. Molakisi yango atungisamaki makasi na makambo oyo atángaki mpe agangaki ete: “Mokili oyo ezali kokende wapi?” Rosa akokaki te kolekisa libaku wana ya kopesa litatoli. Asalaki nini mpo azwa mpiko ya koloba? Rosa alobi boye: “Nabondelaki Yehova mpe nasɛngaki elimo na ye mpo esalisa ngai.” Alongaki kopesa litatoli ya malamu mpe bayokanaki mokolo oyo bakokoba lisolo yango. Tózwa mpe ndakisa ya Milane, mwana moko ya mwasi ya mbula 5, oyo afandaka na engumba New York. Milane alobi boye: “Liboso nakende kelasi, ngai ná mama tozangaka te kobondela Yehova.” Babondelaka mpo na kosɛnga nini? Milane azala na mpiko ya kotɛlɛma ngwi mpe koloba na ntina na Nzambe na ye! Mama na ye alobi boye: “Yango esalisi Milane alimbola bindimeli na ye na ntina na bafɛti ya mbotama mpe bafɛti mosusu mpe akende te na bisika oyo bazali kosala bafɛti yango.” Bandakisa wana emonisi te ete mpo na kozwa mpiko, libondeli esalaka mpenza?

8. Liteya nini tokoki kozwa epai ya mosakoli Yirimia na oyo etali kozwa mpiko?

8 Kanisá mpe oyo esalisaki mosakoli Yirimia azwa mpiko. Ntango Yehova aponaki ye azala mosakoli epai ya bikólo, Yirimia azongisaki ete: “Talá, nayebi koloba te, mpo nazali kaka mwana.” (Yir. 1:4-6) Kasi, na nsima Yirimia alendendelaki mingi mpe akómaki makasi na mosala ya kosakola kino bato mingi bakómaki komona ete azali mosakoli kaka ya makambo ya mpasi. (Yir. 38:4) Na boumeli ya mbula koleka 65, asakolaki bitumbu ya Yehova na mpiko. Ayebanaki mingi na Yisraele mpo azalaki kosakola kozanga kobanga mpe na mpiko na boye ete mbula soki 600 na nsima, ntango Yesu alobaki na mpiko, bato mosusu bakanisaki ete Yirimia nde azongi na bomoi. (Mat. 16:13, 14) Ndenge nini mosakoli Yirimia oyo azalaki liboso kokakatana atikaki kozala nsɔninsɔni? Alobaki boye: “Na motema na ngai [liloba ya Nzambe] ezalaki lokola mɔtɔ oyo ezali kopela, oyo ekangami na kati ya mikuwa na ngai; mpe nalɛmbaki kobomba yango.” (Yir. 20:9) Ya solo, liloba ya Yehova epesaki Yirimia nguya mpe etindaki ye aloba.

9. Mpo na nini liloba ya Nzambe ekoki kosala epai na biso ndenge esalaki epai ya Yirimia?

9 Na mokanda na ye epai ya Baebre, ntoma Paulo akomaki boye: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya mpe epeli makasi koleka mopanga nyonso ya mino mibale mpe ekɔtaka tii kokabola molimo ná elimo, mpe matonga ná mafuta na yango, mpe ekoki kososola makanisi mpe mikano ya motema.” (Ebr. 4:12) Nsango to liloba ya Nzambe ekoki kosala epai na biso ndenge esalaki epai ya Yirimia. Tóbosana te ete atako Nzambe asalelaki bato mpo na kokoma Biblia, mikanda ya Biblia ezali bwanya ya bato te, mpo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Na 2 Petro 1:21, tozali kotánga boye: “Esakweli eyá ata mbala moko te na mokano ya moto, kasi bato balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.” Soki tozali kozwa ntango ya koyekola Biblia na mozindo, makanisi na biso ekotonda na nsango oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu. (Tángá 1 Bakorinti 2:10.) Nsango yango ekoki kokóma “lokola mɔtɔ oyo ezali kopela” na kati na biso, na ndenge oyo tokokoka kobomba yango te.

10, 11. (a) Mimeseno na biso ya koyekola esengeli kozala ndenge nini soki tolingi kozwa mpiko ya koloba? (b) Tángá ata likambo moko oyo okani kosala mpo obongisa ndenge na yo ya koyekola yo moko.

10 Mpo boyekoli ya Biblia esala mpenza mosala epai na biso, esengeli kosalema na ndenge oyo nsango ya Biblia ekokɔta mpenza na motema na biso, ekosimba bomoto na biso ya kati. Na ndakisa, mosakoli Ezekiele amonaki emonaneli moko; na emonaneli yango, basɛngaki ye alya rulo ya buku oyo ezalaki na nsango moko ya makasi ya koyebisa bato oyo bazalaki matoi mangbongi. Ezekiele asengelaki komɛla nsango nyonso mpe kokɔtisa yango mpenza na kati na ye. Kosala bongo ekokómisa mosala ya kopesa nsango yango elɛngi, lokola mafuta ya nzoi.​—Tángá Ezekiele 2:8–3:4, 7-9.

11 Makambo na biso ekokani na oyo ya Ezekiele. Lelo, bato mingi balingi koyoka te makambo oyo Biblia elobi. Mpo tókoba koloba liloba ya Nzambe, ezali na ntina tóyekolaka Makomami na ndenge oyo ekosalisa biso tómɛla mpenza nsango na yango. Tosengeli kozala na momeseno ya koyekola mbala na mbala, kasi te kaka soki libaku ezwami. Mposa na biso esengeli kozala lokola oyo ya mokomi ya nzembo oyo ayembaki ete: “Maloba ya monɔkɔ na ngai mpe komanyola ya motema na ngai ekóma elɛngi liboso na yo, Ee Yehova Libanga na ngai mpe Mosikoli na ngai.” (Nz. 19:14) Ezali mpenza na ntina tózwaka ntango ya komanyola makambo oyo tozali kotánga, mpo solo ya Biblia ekɔta mpenza na motema! Ya solo, tosengeli kosala makasi tóbongisa ndenge na biso ya koyekola biso moko. *

12. Mpo na nini makita ya bokristo esalisaka biso tótambwisama na elimo santu?

12 Ndenge mosusu ya kozwa lisalisi ya elimo santu ya Yehova ezali ‘kotyelana likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, kotika koyangana na makita na biso te.’ (Ebr. 10:24, 25) Kosala makasi ya koyanganaka na makita ya bokristo pɔsɔ na pɔsɔ, koyoka na likebi, mpe kosalela makambo oyo toyekoli ezali ndenge malamu ya kotambwisama na elimo. Kutu, elimo ya Yehova etambwisaka biso na nzela ya lisangá te?​—Tángá Emoniseli 3:6.

Matomba ya kozala na mpiko

13. Ndenge oyo bakristo ya ekeke ya liboso bakokisaki mosala ya kosakola emonisi nini?

13 Elimo santu ezali nguya oyo eleki makasi na molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe ekoki kopesa bato makasi ya kosala mokano ya Yehova. Elimo santu esalisaki bakristo ya ekeke ya liboso bákokisa mosala monene ya kosakola. Basakolaki nsango malamu “na bato ya bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola.” (Kol. 1:23) Soki tokanisi ndenge mingi kati na bango bazalaki “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba,” tokomona polele ete nguya moko makasi koleka nde ezalaki kotambwisa bango.​—Mis. 4:13.

14. Nini ekoki kosalisa biso ‘tópela na elimo’?

14 Kozala na etamboli oyo ezali kopesa elimo santu nzela etambwisa bomoi na biso ekoki mpe kolendisa biso tósala mosala na biso na mpiko. Matomba nyonso oyo tokozwa soki tozali kobondela mbala na mbala mpo na kozwa elimo yango, komipesa mpenza na koyekola biso moko, komanyola na mozindo makambo oyo tozali kotánga, mpe koyangana na makita nyonso ya bokristo ekoki kosalisa biso ‘tópela na elimo.’ (Rom. 12:11) Mpo na “Moyuda moko nkombo na ye Apolosi, mwana-mboka ya Alezandria, molobi moko malamu, [oyo] akómaki na Efese,” Biblia elobi boye: “Lokola azalaki kopela na elimo, abandaki kosakola mpe koteya na ndenge ya malamu mpenza makambo oyo etali Yesu.” (Mis. 18:24, 25) Soki tozali ‘kopela na elimo,’ tokoki kokóma na mpiko mingi mpenza na mosala ya kosakola ndako na ndako mpe ntango tozali kopesa litatoli na libaku malamu.​—Rom. 12:11.

15. Koloba na mpiko mingi epesaka biso matomba nini?

15 Kozala na mpiko mingi na mosala ya kopesa litatoli esalisaka biso. Makanisi na biso ekómaka malamu mpo tomonaka lisusu mingi ntina ya mosala na biso mpe litomba na yango. Nsai na biso ebakisamaka mpo tozali kozwa esengo mingi ntango tozali kosala mosala malamu. Mpe molende na biso ekómaka makasi mpo toyebi mpenza ete mikolo ya kosala mosala ya kosakola etikali ya kotánga.

16. Tosengeli kosala nini soki molende na biso na mosala ekiti?

16 Tokosala nini soki tobungisá molende na biso na mosala ya kosakola to mɔtɔ na biso ezali lisusu te ndenge ezalaki liboso? Boye, tosengeli komitala na bosembo. Paulo akomaki boye: “Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima, bókoba kotala soki bozali ndenge nini.” (2 Ko. 13:5) Omituna boye: ‘Nazali kaka kopela na elimo? Nabondelaka Yehova mpo na kosɛnga elimo na ye? Mabondeli na ngai emonisaka ete natyelaka ye motema mpo na kosala mokano na ye? Ezalaka na maloba ya botɔndi mpo na mosala ya kosakola oyo apesá biso? Mimeseno na ngai ya koyekola ngai moko ezali ndenge nini? Ntango boni nazwaka mpo na komanyola makambo oyo natángi mpe nayoki? Namipesaka mpenza na makita ya lisangá?’ Kokanisa mituna lokola oyo wana ekoki kosalisa yo oyeba bisika oyo ozali na bolɛmbu mpe ozwa bikateli mpo na kobongisa yango.

Elimo ya Nzambe epesa yo mpiko

17, 18. (a) Ndenge nini mosala ya kosakola ezali kosalema lelo? (b) Nini ekoki kosalisa biso tóloba ‘polele mpenza mpe na bosembo’ ntango tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe?

17 Yesu oyo autaki kosekwa alobaki na bayekoli na boye: “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba mpe na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Mosala oyo ebandaki na ntango wana ezali kosalema lelo na ndenge oyo esalemá naino te. Batatoli ya Yehova pene na milio nsambo bazali kosakola nsango ya Bokonzi na mikili koleka 230, bazali kolekisa ngonga pene na miliare moko ná ndambo mbula na mbula na mosala yango. Oyo nde esengo ya kosala na molende mosala yango oyo ekozongelama lisusu te!

18 Ndenge ezalaki na ekeke ya liboso, mosala ya kosakola na mokili mobimba ezali kosalema lelo na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Soki tozali kolanda litambwisi ya elimo yango, tokobanda koloba ‘polele mpenza mpe na bosembo’ na mosala ya kosakola. (Mis. 28:31) Na yango, tiká tótambwisama na elimo wana tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe!

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 7 Bankombo mosusu ezali ya bango te.

^ par. 11 Mpo ozwa matomba mingi na botángi na yo ya Biblia mpe na boyekoli na yo moko, talá buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, na mikapo oyo elobi “Omipesa na kotánga” mpe “Koyekola epesaka mbano,” nkasa 21-32.

Oyekoli makambo nini?

• Mpo na nini tozali na mposa ya mpiko mpo na koloba liloba ya Nzambe?

• Nini esalisaki bayekoli ya liboso báloba na mpiko?

• Ndenge nini tokoki kozwa mpiko?

• Kozala na mpiko epesaka biso matomba nini?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 7]

Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bázwa mpiko?

[Bililingi na lokasa 8]

Mwa Libondeli ya mokuse ekoki kosalisa yo ozwa mpiko na mosala ya kosakola