Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tósalela “mopanga ya elimo” na mayele

Tósalela “mopanga ya elimo” na mayele

Tósalela “mopanga ya elimo” na mayele

“Bózwa . . . mopanga ya elimo, elingi koloba, liloba ya Nzambe.”​—EF. 6:17.

1, 2. Tosengeli kosala nini lokola mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali mingi?

NTANGO amonaki ndenge ebele ya bato bazalaki na mposa ya makambo ya Nzambe, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke. Yango wana, bósɛnga Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.” Yesu asukaki kaka na koloba te. Nsima ya koloba maloba wana, “abengisaki bayekoli na ye zomi na mibale” mpe atindaki bango bákende na mosala ya kosakola to ya “kobuka mbuma.” (Mat. 9:35-38; 10:1, 5) Na nsima, Yesu “aponaki bayekoli mosusu ntuku nsambo (70) mpe atindaki bango mibalemibale” mpo básala mpe mosala yango.​—Luka 10:1, 2.

2 Lelo mpe mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali mingi. Na mokili mobimba, bato oyo bayanganaki na Ekaniseli na mobu ya mosala 2009 bazalaki 18 168 323. Motángo yango eleki motángo ya Batatoli ya Yehova na milio koleka 10. Ya solo mpenza, bilanga eteli mpo na bobuki mbuma. (Yoa. 4:34, 35) Yango wana, tosengeli kobondela mpe kosɛnga basali bákóma mingi. Kasi, ndenge nini tokoki kosala na boyokani na mabondeli ya ndenge wana? Tokoki kosala bongo soki tokómi basakoli ya malamu koleka mpe tozali kosala na molende mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli.​—Mat. 28:19, 20; Mrk. 13:10.

3. Na ndenge nini elimo ya Nzambe esalisaka mingi mpo tókóma basakoli ya malamu koleka?

3 Lisolo oyo eleki elobelaki ndenge oyo kotambwisama na elimo ya Nzambe esalisaka biso ‘tóloba liloba ya Nzambe na mpiko.’ (Mis. 4:31) Elimo yango ekoki mpe kosalisa biso tózala basakoli ya malamu. Ndenge moko ya kobakisa mayele na biso na mosala ya kosakola ezali kosalela malamu esaleli kitoko oyo Yehova Nzambe apesá biso: Liloba na ye oyo ekomamá, Biblia. Elimo santu nde ebimisaki yango. (2 Tim. 3:16) Nsango na yango ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Na yango, kosalela Makomami na mayele ntango tozali na mosala ya kosakola emonisaka ete tozali kotambwisama na elimo santu. Liboso tótala ndenge oyo tokoki kosala yango, tókanisa naino nguya oyo Liloba yango ezali na yango.

‘Liloba ya Nzambe ezali na nguya’

4. Mbongwana nini nsango ya Nzambe oyo ezali na Biblia ekoki kobimisa epai ya moto?

4 Liloba, to nsango ya Nzambe ezali mpenza na nguya! (Ebr. 4:12) Na ndenge ya elilingi, nsango oyo euti na Biblia epeli makasi koleka mopanga nyonso oyo esalemi na mabɔkɔ ya moto, mpo na ndenge ya elilingi ekɔtaka tii na kokabola matonga ná mafuta na yango. Solo ya Makomami ekɔtaka na kati mpenza ya moto mpe esimbaka makanisi mpe mayoki na ye, mpe na ndenge yango ebimisaka mpenza bomoto na ye. Solo yango ekoki kobimisa nguya na yango mpe kobongola mpenza moto. (Tángá Bakolose 3:10.) Ya solo, Liloba ya Nzambe ekoki kobongola bomoi ya moto!

5. Na makambo nini Biblia ekoki kotambwisa biso, mpe litomba nini tokozwa?

5 Longola yango, Biblia ezali buku moko ya bwanya oyo ekoki kozwama esika mosusu te. Ezali na makambo oyo ekoki kosalisa bato báyeba ndenge ya komitambwisa na mokili oyo ya mindɔndɔ mpe ya mpasi. Liloba ya Nzambe ezali mwinda kaka mpo na matambe na biso te, kasi mpe mpo na nzela oyo ezali liboso. (Nz. 119:105) Esalisaka mingi ntango tozali kobunda na mikakatano to ntango tozali kozwa bikateli mpo na kopona baninga, kominanola, mosala, molato, mpe bongo na bongo. (Nz. 37:25; Mas. 13:20; Yoa. 15:14; 1 Tim. 2:9) Kosalela mitinda oyo ezali na Liloba ya Nzambe esalisaka biso tózala na boyokani malamu na basusu. (Mat. 7:12; Flp. 2:3, 4) Soki nzela na biso ezali na pole na ndenge ya elilingi, tokoki komona liboso mbuma oyo bikateli na biso ekoki kobota na nsima. (1 Tim. 6:9) Makomami esakoli mpe mokano oyo Nzambe azali na yango mpo na mikolo ezali koya, ezali kosalisa biso tózala na bomoi oyo eyokani na mokano yango. (Mat. 6:33; 1 Yoa. 2:17, 18) Moto akoki kozala na bomoi ya malamu mpenza soki atiki mitinda ya Nzambe etambwisa ye!

6. Na ndenge nini Biblia ezali ebundeli ya nguya na etumba na biso ya elimo?

6 Kobosana mpe te ete Biblia ezali ebundeli ya nguya na etumba na biso ya elimo. Paulo abengaki liloba ya Nzambe “mopanga ya elimo.” (Tángá Baefese 6:12, 17.) Soki tomonisi malamu nsango ya Biblia, ekoki kosikola bato na boombo ya Satana. Ezali mopanga oyo ezali kobikisa bomoi, kasi koboma te. Tosengeli te kosala makasi mpo tósalelaka yango na mayele?

Tósembola yango malamumalamu

7. Mpo na nini koyekola kosalela malamu “mopanga ya elimo” ezali na ntina?

7 Soda akoki kosalela bibundeli na ye na mayele na etumba kaka soki amesaná mpe ayekolá kosalela yango malamu. Ezali mpe bongo na oyo etali kosalela “mopanga ya elimo” na etumba na biso ya elimo. Paulo akomaki boye: “Salá nyonso oyo ekoki na yo mpo ozala moto oyo andimami na miso ya Nzambe, mosali oyo azali koyoka nsɔni te mpo na mosala na ye, oyo azali kosembola liloba ya solo malamumalamu.”​—2 Tim. 2:15.

8, 9. Nini ekosalisa biso tókanga ntina ya makambo oyo Biblia elobi? Pesá ndakisa.

8 Nini ekosalisa biso ‘tósembola liloba ya solo malamumalamu’ na mosala ya kosakola? Mpo tókoka koyebisa bato mosusu polele makambo oyo Biblia elobi, biso moko tosengeli liboso kokanga ntina na yango. Yango esɛngi tótya likebi na makanisi oyo ezali zingazinga ya vɛrsɛ to mokapo oyo tozali kotalela. Makanisi yango ekoki kozala liboso to na nsima ya vɛrsɛ yango mpe esalisaka mpo na koyeba ndimbola na yango malamu.

9 Mpo tóyeba ndimbola ya solosolo ya mokapo moko esengeli tótalela makanisi ya bavɛrsɛ oyo ezali zingazinga. Maloba ya Paulo oyo ezali na Bagalatia 5:13 emonisi yango. Akomaki boye: “Ya solo, bandeko, bobengamaki mpo na bonsomi; kasi bósalela bonsomi yango te lokola nzela ya kokokisa bamposa ya nzoto, kasi na bolingo bósalelanaka lokola baombo.” Bonsomi nini Paulo azalaki kolobela awa? Azalaki kolobela bonsomi na lisumu mpe liwa, na boombo ya mateya ya lokuta, to na likambo mosusu? Makanisi oyo ezali zingazinga emonisi ete Paulo azalaki kolobela bonsomi oyo euti na ‘kolongolama na elakeli mabe ya Mibeko.’ (Gal. 3:13, 19-24; 4:1-5) Azalaki kolobela bonsomi ya bakristo. Baoyo basepelaki na bonsomi yango bazalaki kosalelana lokola baombo na bolingo nyonso. Baoyo bazalaki na bolingo te, bamipesaki na kotongatonga mpe koswana na makambo mikemike.​—Gal. 5:15.

10. Mpo tókanga malamu ntina ya Makomami, makambo nini tosengeli kotalela, mpe ndenge nini tokoki koyeba makambo yango?

10 Longola makanisi oyo ezali zingazinga, tosengeli mpe kotalela mimesano oyo ezalaki ntango likambo yango ekomamaki mpe soki makambo ezalaki ndenge nini na ntango yango. Mpo tókanga malamu ntina ya mokapo moko, tosengeli kotala makambo ndenge na ndenge oyo etali mokapo yango, na ndakisa nani akomaki mokanda yango mpe ntango nini ekomamaki mpe makambo nini ezalaki kosalema ntango ekomamaki. Lisusu, koyeba ntina oyo mokanda yango ekomamaki, mpe soki likoki ezali, bizaleli mpe mimeseno ya losambo oyo ezalaki na ntango wana, esalisaka mpe. *

11. Tosengeli kokeba na likambo nini ntango tozali kolimbola bavɛrsɛ ya Biblia?

11 “Kosembola liloba ya solo malamumalamu” esuki kaka te na kolimbola solo ya Biblia na ndenge ya sikisiki. Tosengeli kokeba ete tósalela Biblia te mpo na kobangisa bato. Atako tokoki kosalela Makomami mpo na kolongisa solo, ndenge Yesu asalaki ntango Zabolo amekaki ye, Biblia ezali nzete ya kobɛta bayoki na biso te mpo bándima na makasi. (Mib. 6:16; 8:3; 10:20; Mat. 4:4, 7, 10) Tosengeli kolanda toli ya ntoma Petro ete: “Bósantisa Kristo na mitema na bino mpo azali Nkolo, bómibongisa ntango nyonso mpo na koloba liboso ya moto nyonso oyo atuni bino ntina ya elikya oyo bozali na yango, kasi bósalaka bongo na boboto mpe na limemya makasi.”​—1 Pe. 3:15.

12, 13. ‘Biloko nini oyo epikamá makasi’ solo ya Liloba ya Nzambe ekoki kokweisa? Pesá ndakisa.

12 Soki esembolami malamumalamu, solo ya Liloba ya Nzambe ekoki kosala nini? (Tángá 2 Bakorinti 10:4, 5.) Solo ya Makomami ekoki kokweisa “biloko oyo epikamá makasi,” elingi koloba kobimisa polele mateya ya lokuta, mimeseno ya mabe, mpe bafilozofi oyo emonisaka bwanya ya bato ya kozanga kokoka. Tokoki kosalela Biblia mpo na kolongola ata likanisi nini oyo “ezali kotɛmɛla boyebi ya Nzambe.” Tokoki kosalela mateya ya Biblia mpo na kosalisa basusu báyokanisa makanisi na bango na solo ya Biblia.

13 Tózwa ndakisa ya mwasi moko ya mbula 93 oyo afandaka na Inde. Banda bomwana, bateyá ye ete bato babotamaka na nzoto mosusu nsima ya liwa (réincarnation). Ntango abandaki koyekola Biblia na nzela ya mikanda na mwana na ye ya mobali oyo azalaki kofanda na mboka mopaya, andimaki mbala moko makambo oyo azalaki koyekola na ntina na Yehova mpe bilaka na ye. Kasi, lokola liteya ya kobotama na nzoto mosusu nsima ya liwa ekangamaki makasi na makanisi na ye, aboyaki kondima makambo oyo mwana na ye akomelaki ye na ntina na bakufi. Alobaki boye: “Nakoki kondima te ete Makomami na bino ezali solo. Mangomba nyonso eteyaka ete eloko moko na kati na biso etikalaka na bomoi soki tokufi. Nandimaka banda kala ete nzoto ekufaka mpe ete eteni moko oyo emonanaka te ebotamaka na banzoto mosusu tii mbala soki 8 400 000. Ndenge nini likambo yango ekoki kozala lokuta? Mangomba mosusu nyonso ezali ya lokuta?” “Mopanga ya elimo” ekoki kokweisa endimeli oyo epikamá makasi ndenge wana? Nsima ya kolobela lisusu likambo yango na lisalisi ya Makomami, mwa bapɔsɔ na nsima akomaki boye: “Sikoyo nabandi kokanga ntina malamu ya solo na likambo etali liwa. Epesi ngai esengo mingi ndenge nayebi ete ntango lisekwa ekosalema, tokozala na likoki ya kokutana na bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá. Nalingi Bokonzi ya Nzambe eya noki.”

Tósalela yango na mayele ya kondimisa

14. Kondimisa bayoki na biso elimboli nini?

14 Kosalela Biblia malamu na mosala ya kosakola ezali kaka likambo ya kotánga mikapo te. Paulo azalaki koloba na “mayele ya kondimisa”; biso mpe tosengeli kosala bongo. (Tángá Misala 19:8, 9; 28:23.) “Kondimisa” elimboli “kotinda moto andima.” Moto oyo andimisami ezali moto oyo “andimi mpenza likambo bongo atyeli yango motema.” Soki tondimisi moto liteya moko ya Biblia, tozali kotinda ye atyela liteya yango motema. Mpo na kosala yango, tosengeli kosalisa moyoki na biso andima ete makambo oyo tozali koloba ezali solo. Makambo oyo elandi ekoki kosalisa biso.

15. Ndenge nini okoki kobenda likebi na Biblia na ndenge oyo ekotinda moto amemya yango?

15 Kobenda likebi na Liloba ya Nzambe na ndenge oyo ekotinda bato bámemya yango. Ntango olingi kotángisa moto vɛrsɛ, monisá ntina ya koyeba makanisi ya Nzambe na likambo yango. Nsima ya kotuna moto motuna moko mpe kozwa eyano na ye, okoki mbala mosusu koloba boye, ‘Tótala ndenge tokoki koyeba likanisi ya Nzambe na likambo yango.’ To okoki kotuna boye: ‘Nzambe alobi nini na likambo yango?’ Kosala bongo liboso ya kotánga vɛrsɛ emonisaka ete Biblia euti na Nzambe mpe esalisaka moyoki amona na makanisi na ye ete Biblia ezali na motuya mingi. Kosala bongo ezali na ntina mingimingi ntango tozali kopesa litatoli epai ya moto oyo andimelaka Nzambe kasi ayebi mpenza te makambo oyo Biblia eteyaka.​—Nz. 19:7-10.

16. Nini ekosalisa yo olimbolaka bavɛrsɛ malamu?

16 Kosuka kaka na kotánga bavɛrsɛ te; limbolá yango. Paulo azalaki na momeseno ya “kolimbola mpe kopesa bilembeteli na makomi” ya makambo oyo azalaki koteya. (Mis. 17:3) Mbala mingi, vɛrsɛ moko ya Biblia ezalaka kaka na likanisi moko te, mpe ekoki kosɛnga kobimisa maloba mpenza oyo eyokani na likambo oyo bozali kolobela. Mpo osala yango, okoki kozongela maloba oyo ezali kobimisa makanisi ya ntina to kotuna mituna oyo ekosalisa moyoki amona yango. Na nsima, limbolá eteni yango ya vɛrsɛ. Nsima ya kosala bongo, salisá moyoki amona ndenge vɛrsɛ yango etali ye.

17. Ndenge nini okoki kosalela Makomami mpo na kosolola na bato na ndenge oyo ekondimisa bango?

17 Kosalela Makomami mpo na kosolola na bato na ndenge oyo ekondimisa. Komonisa bonkonde mpe kobimisa makanisi na molɔngɔ, esalisaki Paulo ‘asalela Makomami mpo na kosolola’ na bato na ndenge oyo endimisaki bango. (Mis. 17:2, 4) Lokola ye, salá makasi ya kosimba motema ya moyoki na yo. Salelá mituna ya malamu oyo ekomonisa ete ozali kotyela ye likebi mpo ‘otoka’ makambo oyo ezali na kati na ye. (Mas. 20:5) Kozala na maloba ya kozokisa te. Bimisáká makanisi na ndenge ya polele mpe na molɔngɔ. Osengeli komonisa yango na bilembeteli ya solosolo. Maloba na yo esengeli kosimbama mpenza na Liloba ya Nzambe. Eleki malamu kotánga vɛrsɛ moko, kolimbola yango mpe kopesa bandakisa mpo na kobimisa likanisi, na esika ya kotánga bavɛrsɛ mibale to misato mbangumbangu. Kosalela maloba oyo ekolongisa likambo oyo bozali kolobela mpe ekoki kosala ete ‘mbɛbu na yo eyeba kondimisa.’ (Mas. 16:23) Na bantango mosusu, ekoki kosɛnga osala bolukiluki mpe opesa makanisi mosusu. Mwasi ya mbula 93 oyo tolobelaki liboso azalaki na mposa ya koyeba ntina oyo liteya oyo elobaka ete molimo (to elimo) ekufaka te epalanganá mingi. Koyeba esika oyo liteya yango ebandá mpe ndenge ekɔtaki na mangomba mingi ya mokili ezalaki na ntina mpo na kosalisa ye andima oyo Biblia eteyaka na likambo yango. *

Tókoba kosalela yango na mayele

18, 19. Mpo na nini tosengeli kokoba kosalela “mopanga ya elimo” na mayele?

18 Biblia elobi boye: “Makambo ya mokili oyo ezali kobongwana.” Bato mabe bazali kosala lisusu mabe koleka. (1 Ko. 7:31; 2 Tim. 3:13) Yango wana, tosengeli kokoba kokweisa “biloko oyo epikamá makasi” na kosaleláká “mopanga ya elimo, elingi koloba, liloba ya Nzambe.”

19 Oyo nde esengo ya kozala na Liloba ya Nzambe, Biblia, mpe kosalela nsango na yango oyo ezali na nguya mpo na kopikola mateya ya lokuta mpe kosalisa bato ya mitema sembo! Ata eloko moko te oyo epikamá eleki nsango yango na makasi. Yango wana, tósala makasi mpenza mpo na kosalela “mopanga ya elimo” na mayele na mosala oyo Nzambe apesá biso ya kosakola Bokonzi.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 10 Bisaleli ya malamu mingi oyo ekoki kosalisa biso tóyeba makambo oyo etali mikanda ya Biblia ezali babuku “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba,” Étude perspicace des Écritures, mpe masolo lokola “Liloba ya Yehova ezali na bomoi,” oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.

^ par. 17 Talá mwa buku Nini ekómelaka biso soki tokufi? nkasa 5-16.

Oyekoli makambo nini?

• Liloba ya Nzambe ezali na nguya ya ndenge nini?

• Ndenge nini tokoki “kosembola liloba ya solo malamumalamu”?

• Nsango ya Biblia ekoki kosala nini na “biloko oyo epikamá makasi”?

• Ndenge nini okoki kokolisa mayele na yo ya kondimisa na mosala ya kosakola?

[Mituna ya boyekoli]

[Etanda/​Elilingi na lokasa 12]

Ndenge ya kosalela Liloba ya Nzambe na mayele ya kondimisa

▪ Salisá bato bámemya Biblia

▪ Limbolá bavɛrsɛ

▪ Lobáká na ndenge ya kondimisa mpo na kosimba motema

[Elilingi na lokasa 11]

Tosengeli koyekola kosalela “mopanga ya elimo” na mayele