Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kobatisama na nkombo ya nani mpe ya nini?

Kobatisama na nkombo ya nani mpe ya nini?

Kobatisama na nkombo ya nani mpe ya nini?

“Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli . . . , bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.”​—MAT. 28:19.

1, 2. (a) Likambo nini esalemaki na Yerusaleme na Pantekote ya mobu 33 T.B.? (b) Nini etindaki bato mingi bázwa batisimo?

YERUSALEME etondaki na ebele ya bato oyo bautaki na mikili mingi. Na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., fɛti moko monene ezalaki kosalema mpe bapaya mingi bayaki na fɛti yango. Kasi, likambo moko esalemaki oyo ekamwisaki bato, nsima ya lisukulu ya kafukafu oyo Petro asalaki. Maloba na ye esimbaki mitema ya Bayuda mpe baprozelite soki 3 000, mpo na yango babongolaki mitema mpe bazwaki batisimo ya mai. Na ndenge yango, babakisamaki na motángo ya bato oyo bazalaki na lisangá ya sika ya bokristo. (Mis. 2:41) Na ntembe te, batisimo ya ebele ya bato wana na maziba oyo ezalaki zingazinga na Yerusaleme ebimisaki yikiyiki makasi!

2 Nini etindaki ebele ya bato yango bázwa batisimo? Na ntɔngɔ ya mokolo yango, “makɛlɛlɛ ebimaki na likoló lokola oyo ya mopɛpɛ oyo ezali kopɛpa makasi.” Na shambre ya likoló ya ndako moko, bayekoli ya Yesu soki 120 batondaki na elimo santu. Na nsima, mibali mpe basi oyo babangaka Nzambe bayanganaki mpe basepelaki koyoka bayekoli wana “koloba na minɔkɔ mosusu.” Ntango bato yango bayokaki makambo oyo Petro alobaki, mpe makambo mosusu oyo alobaki mpo na liwa ya Yesu, “mitema na bango ezokaki.” Basengelaki kosala nini? Petro ayebisaki bango boye: “Bóbongola mitema, mpe mokomoko na bino abatisama na nkombo ya Yesu Kristo . . . , mpe bokozwa likabo ya ofele ya elimo santu.”​—Mis. 2:1-4, 36-38.

3. Na mokolo ya Pantekote, Bayuda mpe baprozelite oyo babongolaki mitema basengelaki kosala nini?

3 Kanisá naino Bayuda mpe baprozelite oyo bayokaki Petro. Bazalaki kondima Yehova lokola Nzambe na bango. Mpe na nzela ya Makomami ya Ebre, bayebaki elimo santu, nguya ya Nzambe oyo asalelaki na ntango ya kozalisa mpe na nsima. (Eba. 1:2; Bas. 14:5, 6; 1 Sa. 10:6; Nz. 33:6) Kasi, basengelaki koyeba likambo mosusu. Ezalaki na ntina báyeba mpe bándima nzela oyo Nzambe atyaki mpo na lobiko​—Masiya, Yesu. Yango wana, Petro amonisaki bango ntina ya kobatisama “na nkombo ya Yesu Kristo.” Mwa mikolo liboso, Yesu oyo asekwaki ayebisaki Petro mpe bamosusu bábatisaka bato “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.” (Mat. 28:19, 20) Likambo yango ezalaki mpenza na ntina mingi na ekeke ya liboso, mpe ezali na ntina lelo. Ntina yango nini?

Na nkombo ya Tata

4. Mbongwana nini esalemaki epai ya bato oyo bazalaki na boyokani na Yehova?

4 Ndenge touti komona yango, baoyo basepelaki na lisukulu ya Petro bazalaki basambeli ya Yehova mpe bazalaki na boyokani na ye. Bazalaki kosala makasi mpo na kotosa Mibeko na ye, yango wana kutu batikaki bamboka na bango mpe bayaki na Yerusaleme. (Mis. 2:5-11) Nzokande, Nzambe asalaki mbongwana moko monene na ndenge ya kosalela bato makambo. Abwakaki ekólo ya Bayuda oyo ezalaki eloko na ye moko; kotosa Mibeko ezalaki lisusu na ntina te mpo na kondimama epai na ye. (Mat. 21:43; Kol. 2:14) Soki bayoki wana bazalaki na mposa ya kokoba kozala na boyokani na Yehova basengelaki kosala likambo mosusu.

5, 6. Bayuda mpe baprozelite mingi ya ekeke ya liboso basalaki nini mpo na kozala na boyokani malamu na Nzambe?

5 Na ntembe te, likambo yango ezalaki te ya kotika Yehova, Ye oyo apesaki bango bomoi. (Mis. 4:24) Te, baoyo bandimaki bandimbola oyo Petro apesaki bakokaki sikoyo komona polele ete Yehova azali Tata ya boboto. Atindaki Masiya asikola bango mpe andimaki kolimbisa ata baoyo Petro akokaki koloba mpo na bango ete: “Tiká ndako mobimba ya Yisraele eyeba malamumalamu ete Nzambe akómisi ye Nkolo mpe Kristo, Yesu yango oyo bino bobakaki na nzete.” Ya solo, baoyo batosaki maloba ya Petro basengelaki sikoyo kozala na ntina monene koleka ya komonisa botɔndi mpo na oyo Tata asalaki mpo na moto nyonso oyo alingaki kozala na boyokani na Nzambe!​—Tángá Misala 2:30-36.

6 Ya solo, Bayuda mpe baprozelite yango bakokaki komona sikoyo ete kozala na boyokani na Yehova esɛngaki kondima ete ye nde apesi lobiko na nzela ya Yesu. Na yango, okoki koyeba ntina oyo babongolaki mitema na masumu na bango, ata lisumu oyo basalaki na ndenge bapesaki mabɔkɔ mpo na koboma Yesu, ezala bayebaki to te. Mpe tokoki mpenza kondima ete na mikolo oyo elandaki “bakobaki komipesa na mateya ya bantoma.” (Mis. 2:42) Bazalaki na likoki ya ‘kopusana na elobeli ya polele mpe na bosembo penepene na kiti ya bokonzi ya boboto monene.’​—Ebr. 4:16.

7. Ndenge nini bato mingi lelo oyo babongoli makanisi na bango mpo na Nzambe mpe bazwi batisimo na nkombo ya Tata?

7 Lelo, bamilio ya bato oyo bauti na mikili ndenge na ndenge bayekoli solo ya Yehova na nzela ya Biblia. (Yis. 2:2, 3) Bamosusu bazalaki kondima te ete Nzambe azali mpe bamosusu bazalaki ba-déistes, * kasi bakómaki mpenza na kondima ete Mozalisi azali mpe bakómaki na boyokani ya malamu na ye. Bamosusu bazalaki kosambela nzambe moko na bapersona misato to bikeko ndenge na ndenge. Bayebaki ete kaka Yehova nde azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, mpe bazali sikoyo kobenga ye na nkombo na ye mpenza. Yango eyokani na likambo oyo Yesu alobaki ete bayekoli na ye basengeli kobatisama na nkombo ya Tata.

8. Baoyo bayebaki likambo moko te mpo na lisumu ya Adama basengeli koyeba nini na ntina na Tata?

8 Bayekolaki mpe ete basangolá lisumu ya Adama. (Rom. 5:12) Yango ezalaki likambo moko ya sika oyo basengelaki kondima ete ezali solo. Tokoki kokokanisa bato yango na moto moko oyo azali kobɛla, kasi azali koyeba te ete azali na maladi. Ekoki kozala ete azalaka na mwa bilembo oyo ezali komonisa ete azali na maladi, na ndakisa na ntango mosusu ayokaka mpasi. Kasi, lokola atalisi naino nzoto te epai ya monganga, akoki kokanisa ete azali nzoto kolɔngɔnɔ. Nzokande, nsima ya kotalisa nzoto, emonani ete azali na maladi. (Talá mpe 1 Bakorinti 4:4.) Ezali boni soki ayebi mpenza maladi oyo azali kobɛla? Ekozala te likambo ya bwanya aluka, mpe andima nkisi oyo eyebani mpe oyo ekoki kosilisa maladi wana? Ndenge moko, nsima ya koyeba solo na ntina na lisumu oyo tosangolá, mingi bandimaki maladi ya elimo oyo Biblia “emonisaki” bango mpe bayebaki ete Nzambe azali kopesa “nkisi” oyo ekoki kobikisa. Ya solo, baoyo nyonso batangwaki mosika na Tata basengeli kozonga epai ya Oyo akoki “kobikisa” bango.​—Ef. 4:17-19.

9. Yehova asalaki nini mpo na kosalisa biso tózonga na boyokani na ye?

9 Soki osilá komipesa na Yehova Nzambe mpe ozwá batisimo, oyebi ete ezali mpenza libaku malamu kozala na boyokani na ye. Okoki komona sikoyo ete Yehova azali mpenza Tata ya bolingo. (Tángá Baroma 5:8.) Atako Adama ná Eva basalelaki ye lisumu, Nzambe nde azwaki bibongiseli mpo ete bakitani na bango​—ata mpe biso—​tókoka kozala na boyokani malamu na ye. Ntango asalaki bongo, Nzambe ayokaki mpasi komona Mwana na ye oyo alingaka mingi azali konyokwama mpe kokufa. Koyeba likambo yango ezali kosalisa biso te tóndima bokonzi ya Nzambe mpe tótosa mibeko na ye na bolingo na biso moko? Soki osali naino yango te, makambo oyo ekoki kotinda yo omipesa na Nzambe mpe ozwa batisimo.

Na nkombo ya Mwana

10, 11. (a) Nyongo nini ozali na yango epai ya Yesu? (b) Oyokaka ndenge nini soki okanisi ndenge Yesu akufaki lokola lisiko?

10 Kasi, kanisá lisusu makambo oyo Petro alobaki na ebele ya bato. Amonisaki ete kondima Yesu ezalaki mpenza na boyokani na kozwa batisimo “na nkombo . . . ya Mwana.” Mpo na nini yango ezalaki na ntina na ntango wana, mpe mpo na nini ezali na ntina lelo oyo? Ya solo, kondima Yesu mpe kozwa batisimo na nkombo na ye elimboli kondima mokumba oyo azali na yango na boyokani na biso na Mozalisi. Yesu asengelaki kokakisama na nzete ya mpasi mpo na kolongola Bayuda elakeli mabe ya Mibeko; kasi, liwa na ye ezalaki na litomba monene. (Gal. 3:13) Apesaki mbeka ya lisiko oyo bato nyonso bazalaki na yango mposa. (Ef. 2:15, 16; Kol. 1:20; 1 Yoa. 2:1, 2) Mpo na yango, basalelaki Yesu makambo ya kozanga bosembo, batyolaki ye, banyokolaki ye, mpe nsukansuka babomaki ye. Ozalaka mpenza na botɔndi mpo na mbeka na ye? Kanisá ete ozalaki na esika ya elenge mobali moko ya mbula 12 oyo azalaki kosala mobembo na Titanic, masuwa oyo etutanaki na libanga moko monene ya ngalasi mpe ezindaki na mobu 1912. Oluki kopumbwa na bwato moko ya kobikisa bato, kasi etondi na bato. Na nsima, mobali moko oyo azali na bwato yango ayambi mwasi na ye, na nsima apumbwe mpo na kozwa yo mpe akɔtisi yo na bwato yango. Okoyoka ndenge nini? Na ntembe te, okozala mpenza na botɔndi epai ya moto yango. Okoki mpenza koyeba ndenge elenge mobali oyo akutanaki na likambo yango ayokaki. * Kasi, oyo Yesu asalaki mpo na yo eleki. Akufaki mpo yo ozwa bomoi ya seko.

11 Oyokaki ndenge nini ntango oyebaki oyo Mwana ya Nzambe asalaki mpo na yo? (Tángá 2 Bakorinti 5:14, 15.) Na ntembe te ozalaki mpenza na botɔndi. Yango esalisaki yo omipesa na Nzambe mpe ‘ozala na bomoi mpo na yo moko lisusu te, kasi mpo na moto oyo akufelaki yo.’ Kobatisama na nkombo ya Mwana elimboli kondima nyonso oyo Yesu asali mpo na yo mpe kondima ye lokola “Kapita ya bomoi.” (Mis. 3:15; 5:31) Liboso, ozalaki na boyokani te na Mozalisi, mpe ozalaki na elikya moko te. Kasi, kondima makila oyo Yesu Kristo asopaki mpe kobatisama, esalisi yo sikoyo okóma na boyokani na Tata. (Ef. 2:12, 13) Ntoma Paulo akomaki boye: “Bino baoyo bozalaki liboso mosika na Nzambe mpe banguna mpo makanisi na bino ezalaki na misala ya mabe, sikoyo [Nzambe] azongisi bino lisusu na boyokani na lisalisi ya nzoto ya mosuni ya [Yesu] na nzela ya liwa na ye, mpo na kobimisa bino liboso na ye basantu mpe bato bazangi litɔnɔ mpe bato bakoki kofundama na likambo moko te.”​—Kol. 1:21, 22.

12, 13. (a) Ndenge nini kobatisama na nkombo ya Mwana ekoki kosalisa yo soki moto moko asilikisi yo? (b) Lokola ozali mokristo oyo abatisami na nkombo ya Yesu, mokumba nini ozali na yango?

12 Atako obatisamaki na nkombo ya Mwana, oyebi malamumalamu ete ozali moto ya masumu. Koyeba bongo ekoki kosalisa yo mokolo na mokolo. Na ndakisa, soki moto moko asilikisi yo, oyebaka ete bino nyonso mibale bozali bato ya masumu? Bino nyonso mibale bozali na mposa Nzambe alimbisa bino, mpe bosengeli kolimbisana. (Mrk. 11:25) Mpo na komonisa ntina ya likambo yango, Yesu apesaki ndakisa moko: Nkolo ya moombo moko alimbisaki nyongo ya moombo yango ya denari 60 000 000. Na nsima, moombo yango aboyaki kolimbisa moninga na ye moombo oyo azalaki na nyongo na ye ya denari 100. Yesu alobaki mpe likambo oyo: Yehova akolimbisa te moto oyo alimbisaka ndeko na ye te. (Mat. 18:23-35) Ya solo, kobatisama na nkombo ya Mwana elimboli kondima bokonzi ya Yesu mpe kosala nyonso mpo na komekola ndakisa mpe mateya na ye, ata mpe oyo ya kondima kolimbisa basusu.​—1 Pe. 2:21; 1 Yoa. 2:6.

13 Lokola ozali moto ya kozanga kokoka okoki te komekola Yesu na ndenge ya kokoka. Kasi, na boyokani na komipesa na yo na motema mobimba epai ya Nzambe, olingi komekola Yesu na kotalela makoki na yo mpenza. Yango esɛngi kokoba kosala makasi mpo na kolongola bomoto ya kala mpe kolata oyo ya sika. (Tángá Baefese 4:20-24.) Ntango ozali kosepela na moninga moko, na ntembe te, olukaka kolanda ndakisa mpe bizaleli na ye ya malamu. Ndenge moko, okolinga mpe koyekola bizaleli ya Kristo mpe komekola ye.

14. Ndenge nini okoki komonisa ete ondimaka Yesu lokola mokonzi ya Bokonzi ya likoló?

14 Ezali na lolenge mosusu oyo okoki komonisa ete okangi ntina ya likambo etali kobatisama na nkombo ya Mwana. Nzambe “atyaki mpe biloko nyonso na nse ya makolo na ye, mpe akómisaki ye mokonzi ya biloko nyonso oyo etali lisangá.” (Ef. 1:22) Na yango, osengeli kotosa lolenge oyo Yesu azali kotambwisa baoyo bamipesi epai ya Yehova. Kristo azali kosalela bato ya kozanga kokoka na lisangá, mingimingi mibali oyo bakɔmeli na elimo, oyo batyami bankulutu. Ebongiseli ya kozala na mibali yango ezali “mpo na kosembolama ya basantu, . . . mpo na kotongama ya nzoto ya Kristo.” (Ef. 4:11, 12) Ata soki moto ya kozanga kokoka asali libunga, Yesu, Mokonzi ya Bokonzi ya likoló azali na likoki ya kosilisa likambo yango na ntango na ye mpe na ndenge oyo aponi. Ondimaka likambo yango?

15. Soki ozwi naino batisimo te, mapamboli nini okoki kolikya kozwa nsima ya batisimo?

15 Lisusu, ekoki kozala ete bamosusu bamipesi naino te na Yehova mpe babatisami naino te. Soki osali yango naino te, omoni te ete makambo oyo touti kolobela ete kondima Mwana ezali likambo eleki malamu mpe oyo okoki kosala mpo na komonisa botɔndi na yo? Kobatisama na nkombo ya Mwana ekosalisa yo ozwa mapamboli mingi.​—Tángá Yoane 10:9-11.

Na nkombo ya elimo santu

16, 17. Kobatisama na nkombo ya Elimo santu elimboli nini mpo na yo?

16 Kobatisama na nkombo ya elimo santu elimboli nini? Ndenge tolobaki yango na ebandeli, baoyo bayokaki lisukulu ya Petro na mokolo ya Pantekote bayebaki ete elimo santu ezali. Kutu, bakokaki komona bilembeteli na yango na miso ete Nzambe azalaki kokoba kosalela elimo santu. Petro azalaki moko ya baoyo “batondaki na elimo santu mpe [baoyo] babandaki koloba na minɔkɔ mosusu.” (Mis. 2:4, 8) Maloba “na nkombo ya” elakisi kaka nkombo ya moto te. Lelo, makambo mingi esalemaka “na nkombo ya guvɛrnema,” kasi ezali moto te. Makambo yango esalemaka na nzela ya bokonzi ya guvɛrnema. Ndenge moko mpe, moto oyo abatisami na nkombo ya elimo santu andimaka ete elimo santu ezali moto te, kasi ezali nde nguya ya Yehova oyo asalaka na yango mosala. Mpe batisimo ya ndenge wana elimboli ete moto oyo azwi yango andimi mokumba oyo elimo santu ekokisaka na mokano ya Nzambe.

17 Boyekoli ya Biblia esalisi yo te oyeba soki elimo santu ezali nini? Na ndakisa, oyebaki ete Makomami ekomamaki na litambwisi ya elimo santu. (2 Tim. 3:16) Ntango ozali kokola na elimo, na ntembe te ozali kokóma mpenza na botɔndi mpo na ndenge ‘Tata na likoló azali kopesa elimo santu na baoyo bazali kosɛnga ye,’ ata mpe yo. (Luka 11:13) Ekoki kozala ete omonaki mosala oyo elimo santu esali na bomoi na yo. Epai mosusu, soki ozwi naino te batisimo na nkombo ya elimo santu, elaka oyo Yesu apesaki ete Tata apesaka elimo santu elimboli ete mapamboli ya solosolo ezali liboso na yo, ntango okozwa elimo yango.

18. Mapamboli nini baoyo babatisimaka na nkombo ya elimo santu bazwaka?

18 Emonani polele ete lelo mpe, Yehova azali kokamba mpe kotambwisa lisangá ya bokristo na nzela ya elimo na ye. Elimo yango esalisaka mpe mokomoko na biso na makambo oyo tosalaka mokolo na mokolo. Kobatisama na nkombo ya elimo santu elimboli mpe kondima mokumba oyo yango ezali kosala na bomoi na biso mpe kondima mpenza kosala na boyokani na elimo yango. Kasi, bato mosusu bakoki komituna ndenge oyo tokoki kozala na bomoi oyo eyokani na komipesa na biso epai ya Yehova mpe ndenge oyo elimo santu ekoki kosalisa biso. Tokolobela likambo yango na lisolo oyo elandi.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 7 Ba-déistes, bandimaka ete Nzambe azali kasi, bandimaka te ete amibanzabanzaka na biloko oyo akelá.

^ par. 10 Talá Lamuká! ya 22 Yanuali 1982, nkasa 3-8, (na Lifalanse).

Ozali koyeba lisusu?

• Kobatisama na nkombo ya Tata esɛngi nini mpo na yo?

• Kobatisama na nkombo ya Mwana elimboli nini?

• Ndenge nini okoki komonisa ete ozali kozwa na lisɛki te likambo ya kobatisama na nkombo ya Tata mpe ya Mwana?

• Kobatisama na nkombo ya elimo santu elimboli nini?

[Mituna mpo na boyekoli]

[Bililingi na lokasa 10]

Nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., bayekoli ya sika bakómaki na boyokani ya ndenge nini na Tata?

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Na ndingisa ya Israel Museum, Jerusalem