Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Marko—‘Asalisaki mpo na mosala’

Marko—‘Asalisaki mpo na mosala’

Marko​—‘Asalisaki mpo na mosala’

LISANGÁ ya Antiokia ezalaki na mwa mikakatano, kasi matata ya ntoma Paulo mpe Barnabasi ezalaki mpo na likambo mosusu. Mibali yango bazalaki kobongisa mobembo mpo na mosala ya misionɛrɛ, kasi ntango ekómaki bápona nani akokende na bango na mobembo yango, “koswana makasi” ebimaki kati na bango. (Mis. 15:39) Bakabwanaki mpe moto na moto akendaki nzela na ye. Baswanaki mpo na misionɛrɛ ya misato​—Marko.

Marko azalaki nani? Nini esalaki ete bantoma mibale báswana mpo na ye? Mpo na nini moto na moto azalaki na makanisi na ye? Makanisi yango ebongwanaki? Liteya nini okoki kozwa na lisolo ya Marko?

Na engumba na ye na Yerusaleme

Emonani ete Marko autaki na libota moko ya Bayuda oyo ezalaki na bozwi, akolaki na Yerusaleme. Mbala ya liboso oyo Biblia elobeli ye ezali na lisolo ya ebandeli ya lisangá ya bokristo. Na mobu soki 44 T.B., ntango anzelu ya Yehova abimisaki ntoma Petro na bolɔkɔ epai Erode Agripa I atyaki ye, Petro akendaki “na ndako ya Maria mama ya Yoane oyo bapesá nkombo Marko, epai bato ebele bayanganaki mpe bazalaki kobondela.”​—Mis. 12:1-12. *

Na nsima, emonani ete lisangá ya Yerusaleme ezalaki kosalela ndako ya mama ya Marko mpo na makita. Maloba “bato ebele” emonisi ete ndako na bango ezalaki monene. Maria azalaki na mwana mwasi moko ya mosala oyo nkombo na ye ezalaki Roda oyo ayaki kotala ntango Petro abɛtaki kɔkɔkɔ “na porte ya monɔkɔ ya lopango.” Makambo wana nyonso emonisi ete Maria azalaki na mwa bozwi. Mpe Biblia elobi ete ndako yango ezalaki ya ye na esika ya koloba ete ya mobali na ye, na yango ekoki kozala ete azalaki mwasi oyo mobali na ye akufá mpe ete Marko azalaki naino elenge.​—Mis. 12:13.

Emonani ete Marko azalaki na kati ya bato oyo bayanganaki mpo na kosambela. Ekoki kozala ete amesanaki mingi na bayekoli ya Yesu mpe bamosusu oyo bamonaki ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye. Kutu, ekoki kozala ete Marko azalaki elenge mobali oyo alataki kaka mwa elamba, alandaki Yesu ntango bakangaki ye mpo na mbala ya liboso kasi akimaki ntango balukaki kokanga ye.​—Mrk. 14:51, 52.

Mikumba na lisangá

Na ntembe te, kozala elongo na bakristo oyo bakɔmeli esalisaki Marko mpenza. Akolaki na elimo mpe bandeko oyo bazalaki na mikumba batyelaki ye likebi. Na mobu soki 46 T.B., ntango Paulo ná Barnabasi ‘batindelaki bandeko lisungi’ longwa na Antiokia tii na Yerusaleme mpo na kosunga bango na nzala oyo ezalaki kuna, basepelaki na Marko. Ntango Paulo ná Barnabasi bazongaki na Antiokia, bakendaki na Marko elongo.​—Mis. 11:27-30; 12:25.

Moto oyo azali kotánga likolólikoló akoki kokanisa te ete bango misato bazalaki bandeko ya makila, mpe ete Paulo ná Barnabasi baponaki Marko kaka mpo azalaki na makoki. Kasi, mokanda moko ya Paulo emonisi ete Marko azalaki ndeko ya Barnabasi. (Kol. 4:10) Yango ekoki kosalisa mpo na koyeba makambo oyo tolingi kolobela, oyo etali Marko.

Mbula soki moko elekaki, mpe elimo santu etindaki Paulo ná Barnabasi básala mobembo ya misionɛrɛ. Basengelaki kolongwa na Antiokia mpo na kokende na Shipre. Yoane Marko akendaki na bango “lokola mosaleli.” (Mis. 13:2-5) Ekoki kozala ete Marko azalaki kosalisa bango na misala mosusu na ntango ya mobembo mpo bantoma bámipesa na makambo ya elimo.

Paulo, Barnabasi mpe Marko bakendaki na Shipre, bazalaki kosakola nzelanzela; na nsima bakendaki na Azia Moke. Kuna, Yoane Marko azwaki ekateli moko oyo epesaki Paulo mpasi na motema. Lisolo elobi ete ntango bango misato bakómaki na Perga, “Yoane atikaki bango mpe azongaki na Yerusaleme.” (Mis. 13:13) Biblia elobi te ntina oyo asalaki bongo.

Bambula mingi na nsima, Paulo, Barnabasi, mpe Marko bazongaki na Antiokia. Bantoma yango mibale bazalaki kobongisa mobembo ya mibale ya misionɛrɛ mpo na kokende kolendisa bandeko oyo bakutanaki na bango na mobembo ya liboso. Barnabasi alingaki amema ndeko na ye, kasi Paulo alingaki ata moke te koyoka likambo yango mpo Marko atikaki bango na mobembo ya liboso. Yango nde ebimisaki koswana oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo. Barnabasi azwaki Marko mpe bakendaki kosakola na engumba na ye na Shipre, mpe Paulo akendaki na Siri. (Mis. 15:36-41) Emonani polele ete Paulo ná Barnabasi bazalaki na likanisi moko te mpo na ekateli oyo Marko azwaki mbala ya liboso.

Bayokani

Na ntembe te, likambo wana epesaki Marko mpasi. Atako bongo, atikalaki kaka mosakoli ya sembo. Mbula soki 11 to 12 nsima ya kokabwana na Paulo, nkombo ya Marko etángami lisusu ntango lisangá ya bokristo ebandaki. Elongo na nani? Elongo ná moto oyo okoki kokanisa te ete bakoki kozala esika moko​—na Paulo!

Na mobu 60-61 T.B., ntango Paulo azalaki na bolɔkɔ na Roma, atindaki ebele ya mikanda oyo ezali lelo oyo na kati ya Makomami Mosantu. Na mokanda epai ya Bakolose, akomaki boye: “Aristarke mokangami lokola ngai atindeli bino mbote, ndenge moko mpe Marko, ndeko ya Barnabasi, (oyo bozwaki mitindo ete bóyamba ye malamu soki akómi epai na bino), . . . Kaka bango nde bazali baninga na ngai ya mosala mpo na bokonzi ya Nzambe, mpe bango nde bakómi lisalisi oyo ezali kopesa ngai makasi.”​—Kol. 4:10, 11.

Ezalaki mbongwana monene mpenza! Atako azalaki moto oyo Paulo asepelaki na ye mpenza te na ntango moko boye, Marko akómaki lisusu moninga ya mosala ya ntina mpenza. Emonani polele ete, Paulo ayebisaki Bakolose ete Marko akokaki kokende kotala bango. Soki ezalaki bongo, Marko akokaki kosala lokola momonisi ya Paulo.

Bambula mingi liboso, Paulo azalaki nde koloba mabe mpo na Marko? Marko azwaki litomba na disiplini? To mpe makambo yango nyonso mibale ekokaki kozala solo? Ata soki ezalaki bongo to te, ndenge bayokanaki emonisi ete Paulo ná Marko bazalaki mpenza bato oyo bakɔmelaki na elimo. Babosanaki makambo wana ya kala mpe basalaki lisusu elongo. Oyo nde ndakisa malamu mpo na moto nyonso oyo azwanaki matata na moninga moko mokristo!

Marko moto ya mibembo

Ntango ozali kotánga mibembo ndenge na ndenge oyo Marko asalaki, okomona ete asalaki mibembo mingi. Autaki na Yerusaleme, akendaki na Antiokia mpe kuna akendaki na Shipre mpe na Perga. Na nsima akendaki na Roma. Na Roma, Paulo alingaki kotinda Marko na Kolose. Kasi, esuki kaka wana te!

Ntoma Petro akomaki mokanda na ye ya liboso na mobu soki 62 tii 64 T.B. Akomaki boye: “Ye oyo azali na Babilone, . . . atindeli bino mbote, ndenge moko mpe Marko mwana na ngai.” (1 Pe. 5:13) Na yango, Marko akendaki na Babilone mpo na kosala elongo na ntoma oyo bambula ebele liboso azalaki koyangana na makita ya bokristo na ndako ya mama na ye.

Ntango Paulo azalaki na bolɔkɔ na mbala ya mibale na Roma, na mobu soki 65 T.B., akomaki mokanda mpo na kobenga Timote na Efese. Paulo abakisaki boye: “Kamatá Marko mpe yaká na ye.” (2 Tim. 4:11) Na yango, Marko ayaki na Efese. Mpe ndenge nini tokoki kotya ntembe ete andimaki kozonga na Roma elongo na Timote ndenge Paulo asɛngaki? Kosala mobembo na ntango wana ezalaki pɛtɛɛ te, kasi Marko andimaki mpenza kosala mibembo yango.

Mokumba mosusu ya monene

Mokumba moko monene oyo Marko azwaki ezalaki ndenge Yehova apesaki ye elimo na ye mpo akoma moko ya Baevanzile. Atako evanzile yango ya mibale etángi te nkombo ya moto oyo akomaki yango, masolo ya kala emonisi ete ezali Marko mpe ete azwaki makambo yango epai ya Petro. Kutu, Petro amonaki na miso makambo nyonso oyo Marko akomaki.

Bato oyo bayekolaki Evanzile ya Marko bandimaka ete bakomaki yango mpo na bato oyo bazalaki Bayuda te; alimbolaki polele misala ya Bayuda. (Mrk. 7:3; 14:12; 15:42) Marko abongolaki maloba ya Aramɛyɛ oyo bato oyo bazalaki Bayuda te bazalaki kokoka kokanga ntina na yango te. (Mrk. 3:17; 5:41; 7:11, 34; 15:22, 34) Asalelaki maloba mingi ya Latin mpe alimbolaki maloba mingi ya Grɛki oyo bazalaki kosalela mingi na Latin. Alobelaki motuya ya mbongo ya bibende ya Bayuda na mbongo ya Baroma. (Mrk. 12:42, maloba na nse ya lokasa na Rbi8-F.) Nyonso wana eyokani na makambo mosusu ya kala oyo elobi ete Marko akomaki Evanzile na ye na Roma.

“Akosalisa ngai na mosala”

Kokoma Evanzile na ye ezalaki te kaka likambo moko oyo Marko asalaki na Roma. Tóbosana te ete Paulo alobaki na Timote ete: “Kamatá Marko mpe yaká na ye.” Paulo alobaki bongo mpo na nini? ‘Mpo akosalisa ye na mosala.’​—2 Tim. 4:11.

Ndenge oyo Biblia elobeli Marko​—na mbala oyo ya nsuka—​elobi mingi na ntina na ye. Esika moko te na mosala oyo asalaki mpo na Nzambe batángi Marko lokola ntoma, mokambi, to mpe mosakoli. Azalaki mosaleli, elingi koloba, moto oyo azalaki kosunga mpe kosalela basusu. Mpe na ntango yango, mwa moke liboso Paulo akufa, na ntembe te Marko asungaki mpenza ntoma yango.

Soki tosangisi mwa makambo ndenge na ndenge oyo toyekoli mpo na Marko, esalisi biso tómona ete azalaki mosakoli ya molende oyo azalaki kosimba nsango malamu na bisika ndenge na ndenge na mokili, mobali oyo azalaki kosepela kosalela basusu. Ya solo, oyo nde mapamboli Marko azwaki lokola atikaki te!

Na ndakisa ya Marko, biso mpe basaleli ya Nzambe lelo oyo, tomonisaka molende ya ndenge wana ntango tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Lokola Marko, bamosusu kati na biso bazali na likoki ya kokende epai mosusu, ata na mboka mopaya mpo na kosimba mosala ya kosakola nsango malamu. Ata soki mingi kati na biso bakoki te kokende kosala epai mosusu, biso nyonso tokoki komekola Marko na lolenge mosusu oyo eleki malamu. Kaka ndenge akendaki mpo na kosalela bandeko na ye bakristo, biso mpe tondimaka kosala milende mpo na kosalisa baninga na biso bakristo na lolenge oyo ekosalisa bango bákokisa mosala na bango mpo na Nzambe. Soki tozali kosala bongo, tokoki mpenza kozala na elikya ete tokokoba kozwa mapamboli ya Yehova.​—Mas. 3:27; 10:22; Gal. 6:2.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 5 Na ntango ya Marko, bato bazalaki kozwa to kondima nkombo ya mibale ya Ebre to ya monɔkɔ ya bapaya oyo bapesi bango. Nkombo ya Marko na Ebre ezalaki Yohanane​—Yoane, na Lingala. Nkombo ya Latin oyo bapesaki ye ezalaki Marcus, to Marko.​—Mis. 12:25.

[Karte/​Elilingi na nkasa 8, 9]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Bingumba mosusu oyo Marko akómaki

Roma

Efese

Kolose

Perga

Antiokia (ya Siri)

Shipre

MBU YA MEDITERANE

Yerusaleme

Babilone