Tóbatela “bopɛto ya motema” na mikolo oyo mabe
Tóbatela “bopɛto ya motema” na mikolo oyo mabe
VITTORIO MESSORI, mopanzi-nsango moko na Lingomba ya Katolike, alobaki ete: “Moto moko te akoki kotya ntembe ete bopɛto ezali mokakatano lelo oyo na lingomba.” Alobaki maloba wana mpo na makambo ya nsɔni ya kosangisa nzoto oyo eutaki kosalema na Lingomba ya Katolike na Italie. Abakisaki boye: “Likambo yango ekoki kosila te na kolongola mobeko oyo esɛngaka basango bátikala minzemba, mpamba te makambo yango mingi ya mbindo (80%) etali nde kosangisa nzoto mibali na mibali—basango bazali kosangisa nzoto na mibali mpe bana mike ya mibali.”—La Stampa.
Na ntembe te, mabe oyo etondi lelo oyo ezali elembo ya “mikolo ya nsuka” ya mokili oyo. (2 Tim. 3:1-5) Ndenge bansango na radio to na televizyo ezali komonisa yango, kobeba ya bizaleli malamu ezali komonana ata epai ya bato oyo bamibengaka bato ya Nzambe. Mitema na bango oyo ebebi mpe ezali ya mbindo etindaka bango básala makambo mpenza ya mabe. (Ef. 2:2) Ezali mpo na ntina yango nde Yesu akebisaki ete “koboma bato, misala ya ekobo, misala ya pite, koyiba, matatoli ya lokuta, maloba ya kofinga, eutaka na motema.” (Mat. 15:19) Kasi, Yehova Nzambe asepelaka ete basaleli na ye bálinga “bopɛto ya motema.” (Mas. 22:11) Na yango, ndenge nini mokristo akoki kobatela bopɛto ya motema na mikolo oyo mabe?
Kozala na “motema pɛto” elimboli nini?
Mbala mingi, Biblia elobelaka “motema” na ndenge ya elilingi. Buku moko, emonisi ete liloba motema na kati ya Biblia emonisaka “bomoto ya kati” mpe “ezali mpenza eloko oyo Nzambe atalaka na kati ya moto, eloko oyo esimbaka boyokani ya Nzambe na moto, oyo emonisaka etamboli ya malamu.” Motema emonisaka mpenza ndenge tozali na kati. Ndenge buku oyo touti kolobela emonisi yango, ezali bomoto wana nde Yehova atalelaka mpe asepelaka na yango epai ya basaleli na ye.—1 Pe. 3:4.
Na Biblia, maloba “pɛto” mpe “bopɛto” ekoki kolakisa eloko oyo ezangi bosɔtɔ. Kasi, maloba yango esalelamaka mpe mpo na kolobela eloko oyo ebebi te—ekómi bosɔtɔ te to oyo ezwi mbeba te—na bizaleli mpe na makambo ya losambo. Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki ete: “Esengo na bato ya motema pɛto.” Azalaki kolobela bato oyo bazali mpenza pɛto na kati. (Mat. 5:8) Bolingo, bamposa, mpe makanisi na bango ezali pɛto. Balingaka Yehova na motema na bango mobimba, na bosembo nyonso, kozanga bokosi, bolingo mpe botɔndi etindaka bango básala bongo. (Luka 10:27) Olingaka kozala pɛto ndenge wana, boye te?
Kobatela “motema pɛto” ezali pɛtɛɛ te
Mosaleli ya Yehova asengeli kosuka kaka te na kozala na ‘mabɔkɔ oyo ezali na ngambo te,’ kasi asengeli mpe kozala moto oyo “motema na ye ezali pɛto.” (Nz. 24:3, 4) Nzokande, lelo oyo ezali mokakatano makasi mpo basaleli ya Nzambe bábatela ‘motema pɛto.’ Satana mpe mokili oyo azali koyangela, mpe nzoto na biso ya kozanga kokoka, esalaka nyonso mpo na kokabola biso na Yehova. Mpo na kolonga mitungisi yango, ezali mpenza na ntina ete tólinga “bopɛto ya motema” mpe tókangama na yango. Yango ekobatela biso mpe ekosalisa biso tókoba kozala baninga ya Nzambe. Ndenge nini tokoki kobatela motema pɛto?
Na Baebre 3:12, tozali kokuta likebisi oyo: “Bandeko, bókeba noki moko na bino akóma na motema mabe oyo ezangi kondima mpo atiki Nzambe ya bomoi.” Tokoki te kobatela “motema pɛto” soki tokolisi motema oyo “ezangi kondima.” Makanisi nini oyo Satana apalanganisaka mpo na kolembisa kondima na biso epai ya Nzambe? Asalelaka liteya ya evolisyo, atindaka bato bákanisa ete mabe ná malamu ezalaka te, mpe abimisaka ntembe ete Makomami Mosantu ekomamaki te na lisalisi ya elimo ya Nzambe. Tosengeli te kotika ete makanisi wana ya mabe ekɔtela biso. (Kol. 2:8) Kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe kokanisa na mozindo ezali makambo ya liboso oyo ekoki kosalisa biso tólonga masɛnginya wana. Boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe ekomatisa bolingo na biso mpo na Yehova mpe ekosalisa biso tósosola ndenge oyo asalelaka bato makambo. Bolingo mpe bososoli ya ndenge wana ezali na ntina soki tolingi kobwaka makanisi ya lokuta mpe kobatela kondima na biso makasi epai ya Yehova mpo tóbatela motema na biso pɛto.—1 Tim. 1:3-5.
Ntango tozali kobunda na bamposa ya nzoto
Likambo mosusu oyo emekaka biso mpo tóbatela te “bopɛto ya motema” ekoki kozala bamposa ya nzoto mpe ya biloko ya mokili. (1 Yoa. 2:15, 16) Bolingo ya mbongo to mposa ya konduka bomɛngo mpe kozala na biloko mingi ya mokili ekoki kobebisa motema na biso, kotinda mokristo asala makambo oyo eyokani te na mokano ya Nzambe. Bakristo mosusu bazali lisusu sembo te na mosala, bakómi kobuba basusu, to mpe koyiba mbongo to biloko oyo ezali ya bango te.—1 Tim. 6:9, 10.
Epai mosusu, soki tokolisi ezaleli ya koboya kopesa Yehova mpasi, tozali kolinga bosembo, mpe tozali na ekateli ya kobatela lisosoli ya pɛto, tokomonisa ete tolingaka “bopɛto ya motema.” Bolingo yango etindaka biso tókoba “kozala sembo na makambo nyonso.” (Ebr. 13:18) Soki tozali kosala makambo na kolongobana, yango ekosala ete bato báloba malamu mpo na biso. Emilio, Motatoli ya Yehova moko na Italie, oyo azali sofɛlɛ na kompanyi moko, alɔkɔtaki mwa saki moko oyo ezalaki na dolare 680. Apesaki mwa saki yango epai ya mokonzi na bango, oyo na nsima azongisaki yango epai ya moto oyo abungisaki yango; likambo yango ekamwisaki baninga ya Emilio. Baninga mosusu ya Emilio bakamwaki makasi na etamboli na ye mpe yango etindaki bango bákóma kosepela na mateya ya Biblia mpe babandaki koyekola Biblia. Mpo na yango, bato nsambo ya mabota mibale bandimaki solo. Ya solo, komitambwisa na bosembo oyo euti na motema pɛto ekoki mpenza kotinda basusu bákumisa Nzambe.—Tito 2:10.
Likambo mosusu oyo ekoki kozala mokakatano epai ya mokristo mpo azala na bopɛto ya motema ezali lolenge mabe oyo bato batalelaka likambo ya kosangisa nzoto. Lokola kosangisa nzoto liboso ya kobala, kosala ekobo, mpe kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi, etalelamaka lokola ezali mabe te, yango ekoki kobebisa motema ya mokristo. Moto oyo azali komipesa na pite to ekobo akoki kokóma na bomoi ya lolenge mibale, elingi koloba kobomba lisumu. Yango ekomonisa ata moke te “bopɛto ya motema.”
Gabriele azwaki batisimo ntango azalaki na mbula 15 mpe abandaki mbala moko mosala ya mobongisi-nzela. Kasi, na nsima, abandaki kolekisa ntango mingi na baninga ya mabe na bisika ya komɛla masanga na butu. (Nz. 26:4) Yango ezalaki ebandeli ya etamboli ya mbindo mpe akómaki na bomoi ya lolenge mibale, mpe abimisamaki na lisangá. Disiplini wana oyo Yehova apesaki ye etindaki ye akanisa mpenza. Gabriele alobi boye: “Nakómaki kosala makambo nyonso oyo liboso nazalaki kozwa na lisɛki. Nakómaki kotánga Biblia mokolo na mokolo, koluka koyoka oyo Yehova azali mpenza koloba, mpe nakómaki koyekola mikanda ya moombo na likebi mpenza. Namonaki matomba ya koyekola ngai moko mpe ndenge oyo kotánga Biblia mpe kobondela na etingya ekoki kopesa moto makasi.” Yango esalisaki Gabriele atika etamboli ya mbindo mpe azongela boyokani na ye na Yehova.
Lelo oyo Gabriele azongelá mosala na ye ya mobongisi-nzela, mwasi na ye mpe azali mobongisi-nzela. Makambo oyo ekómelaki ye emonisi ndenge oyo koyekola Biblia mpe mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” ekoki kosalisa moto azala na motema pɛto mpe atika etamboli ya mbindo.—Mat. 24:45; Nz. 143:10.
Ndenge ya kobatela “bopɛto ya motema” na ntango ya komekama
Mitungisi ya batɛmɛli, mikakatano ya nkita, mpe maladi makasi ekómaki kilo epai ya basaleli mosusu ya Nzambe. Na ntango mosusu, mitema na bango etindaki bango bákóma na makanisi oyo ebongi te. Ata Mokonzi Davidi akutanaki na likambo ya ndenge wana: “Elimo na ngai ezali kolɛmba makasi na kati na ngai; motema na ngai ekómi kilo.” (Nz. 143:4) Nini esalisaki ye alonga na ntango wana ya mpasi? Davidi amikundwelaki makambo oyo Nzambe asalaki mpo na basaleli na ye, mpe ndenge oyo abikisaki ye. Akanisaki na mozindo na makambo oyo Yehova asalaki mpo na nkombo na ye monene. Davidi akobaki komibanzabanza mpo na misala ya Nzambe. (Nz. 143:5) Ndenge moko, kokanisa na mozindo Mozalisi na biso mpe makambo nyonso oyo asali mpe azali kokoba kosala mpo na biso ekosalisa biso ata ntango tozali komekama.
Ntango tosali mabe to tozali kokanisa ete tosali mabe, tokoki kobanda kotungisama na motema. Kokanisa likambo yango ntango nyonso ekoki kotinda biso tókóma na makanisi mabe mpo na bandeko na biso. Tokoki kobanda kokima basusu mpe kobanda kokipe bango te. Kasi, kosala bongo ekoki mpenza komonisa ete tozali na mposa ya kozala na “bopɛto ya motema”? Emonani polele ete mokano na biso ya kozala na motema ya ndenge wana etaleli ndenge tozalaka na bandeko na biso bakristo mpe ndenge tosalaka soki matata ebimi.
Na mokili oyo ebebi mpenza kobeba mpe bizaleli malamu ebebi mpenza, biso bakristo ya solo tokesanaka na basusu mpo tolingaka “bopɛto ya motema.” Bomoi na biso ezalaka malamu mpo tozalaka na kimya ya motema oyo eutaka na kosala mokano ya Nzambe. Na koleka nyonso, tozalaka mpenza baninga ya Mozalisi na biso, Yehova Nzambe oyo alingaka baoyo bazali na “motema pɛto.” (Nz. 73:1) Ya solo, tokoki mpe kozala na kati ya bato oyo bakozala na esengo mpamba te, ndenge Yesu alakaki “bakomona Nzambe,” ndenge asalaka mpo na bolamu ya boayo balingaka “bopɛto ya motema.”—Mat. 5:8.