Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bilenge—Bókolisa mposa na bino ya kosalela Yehova

Bilenge—Bókolisa mposa na bino ya kosalela Yehova

Bilenge​—Bókolisa mposa na bino ya kosalela Yehova

“Kanisá Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo.”​—MOS. 12:1.

1. Libyangi nini epesamaki epai ya bana na Yisraele?

ELEKI mbula soki 3 500, Moize, mosakoli ya Yehova, apesaki banganga-nzambe mpe mikóló ya Yisraele mitindo oyo: “Yanganisá bato, mibali, basi ná bana mike . . . , mpo báyoka mpe mpo báyekola, mpo basengeli kobanga Yehova Nzambe na bino mpe kokeba ete bákokisa maloba nyonso ya mobeko oyo.” (Mib. 31:12) Talá bato oyo bazwaki mitindo ya koyanganaka na mayangani ya losambo: mibali, basi, mpe bana mike. Ya solo, ata bilenge bazalaki na kati ya bato oyo basengelaki koyoka, koyekola, mpe kolanda malako ya Yehova.

2. Ndenge nini Yehova amonisaki ete amibanzabanzaka mpo na bilenge, na lisangá ya bokristo ya ebandeli?

2 Na ekeke ya liboso, Yehova akobaki komonisa ete amibanzabanzaka mpo na bilenge oyo bazali kati ya basaleli na ye. Na ndakisa, asalisaki ntoma Paulo akoma na mikanda na ye mosusu oyo atindelaki masangá malako oyo ezalaki libosoliboso mpo na bilenge. (Tángá Baefese 6:1; Bakolose 3:20.) Bilenge bakristo oyo balandaki toli wana bakómaki kosepela mingi na Tata na bango ya likoló oyo azali bolingo mpe bazwaki mapamboli na ye.

3. Lelo oyo, ndenge nini bilenge bazali komonisa mposa na bango ya kosalela Nzambe?

3 Lelo mpe bilenge bazwi libyangi ya koyangana mpo na kosambela Yehova? Ɛɛ! Yango wana, basaleli nyonso ya Nzambe bazali na esengo ya komona ete na mokili mobimba, bilenge mingi oyo bazali basaleli ya Nzambe bazali kolanda toli ya Paulo oyo: “Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika koyanganaka na makita na biso te, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi tólendisanaka, mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma.” (Ebr. 10:24, 25) Longola yango, bana mingi bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe elongo na baboti na bango. (Mat. 24:14) Mpe mpo na komonisa ete balingaka Yehova na motema na bango mobimba, mbula na mbula, bankóto ya bilenge bazali kozwa batisimo mpe bazali kozwa mapamboli oyo moto azwaka soki akómi moyekoli ya Kristo.​—Mat. 16:24; Mrk. 10:29, 30.

Ndimá libyangi yango​—Sikoyo

4. Esengeli bilenge bázala na mbula boni mpo bándima libyangi ya Nzambe ya kosalela ye?

4 Mosakoli 12:1 elobi boye: “Kanisá Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo.” Bino bilenge bosengeli kozala na mbula boni mpo bóndima libyangi ya bolingo ya kosambela mpe kosalela Yehova? Biblia epesi mbula ya sikisiki te. Yango wana, komizongisa nsima te, kokanisa te ete ozali naino mwana mingi mpo na koyoka Yehova mpe kosalela ye. Ata soki ozali na mbula boni, tolendisi yo osala yango kozanga koumela.

5. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bákende liboso na elimo?

5 Mingi kati na bino bozali kozwa lisalisi ya moboti to baboti mibale mpo bókende liboso na elimo. Boye, bozali lokola Timote oyo Biblia elobeli. Ntango azalaki naino mwana mpenza, mama na ye Enise mpe nkɔkɔ na ye ya mwasi Loisi bateyaki ye makomi mosantu. (2 Tim. 3:14, 15) Ndenge moko mpe, baboti na yo bazali koteya yo na ndenge bazali koyekola na yo Biblia, kobondela elongo na yo, komema yo na makita ya lisangá mpe na mayangani ya minene ya basaleli ya Nzambe, mpe kobima na yo na mosala ya kosakola. Koteya yo banzela ya Nzambe ezali nde mokumba ya ntina mingi oyo Yehova ye moko apesá baboti na yo. Osepelaka ndenge bazali komonisela yo bolingo mpe komibanzabanza mpo na yo?​—Mas. 23:22.

6. (a) Na kolanda Nzembo 110:3, Yehova asepelaka na losambo ya ndenge nini? (b) Tokolobela nini sikoyo?

6 Atako bongo, ntango bino bilenge bozali kokola, Yehova alingi ete “bómindimisa bino moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka,” ndenge Timote asalaki. (Rom. 12:2) Soki yo mpe osali yango, okomipesa na makambo ya lisangá, kaka te mpo baboti na yo balingi osala bongo, kasi mpo olingi kosala mokano ya Nzambe. Soki ozali kosalela Yehova na elimo ya komipesa, akosepela. (Nz. 110:3) Na yango, ndenge nini okoki komonisa ete olingi kokolisa mposa na yo ya koyoka Yehova mpe ya kolanda malako na ye? Tokolobela ndenge misato ya ntina oyo okoki kosala yango: koyekola, kobondela, mpe etamboli. Tótala yango mokomoko.

Yekolá komona Yehova ete azali moto

7. Na ndenge nini Yesu atiká ndakisa ya kozala moyekoli ya Makomami, mpe nini esalisaki ye asala bongo?

7 Lolenge ya liboso oyo okoki komonisa ete olingi kokolisa mposa na yo ya kosalela Yehova ezali kotánga Biblia mokolo na mokolo. Okoki kokokisa mposa na yo ya elimo mpe kozwa boyebi kitoko ya Biblia soki ozali kotánga Liloba ya Nzambe mbala na mbala. (Mat. 5:3) Na likambo yango, Yesu atiká ndakisa. Mokolo moko ntango azalaki na mbula 12, baboti na ye bakutaki ye na tempelo, “afandi na katikati ya bateyi mpe azali koyoka bango mpe kotuna bango mituna.” (Luka 2:44-46) Wana azalaki naino mwana moke, Yesu akolisaki mposa mpe boyebi ya Makomami. Nini esalisaki ye asala bongo? Na ntembe te, mama na ye Maria mpe tata-mobɔkɔli na ye Yozefe basalisaki ye mingi. Bazalaki basaleli ya Nzambe mpe bateyaki Yesu makambo ya Nzambe banda bomwana na ye.​—Mat. 1:18-20; Luka 2:41, 51.

8. (a) Ntango nini baboti basengeli kobanda kokɔtisa bolingo mpo na Liloba ya Nzambe na mitema ya bana na bango? (b) Bɛtá lisolo moko oyo emonisi ntina ya koteya bana ntango bazali naino mike.

8 Ndenge moko lelo, baboti oyo babangaka Nzambe bayebi ntina ya kokɔtisa na mitema ya bana na bango mposa ya mateya ya solo ya Biblia banda ntango bazali naino mike. (Mib. 6:6-9) Yango nde mokristo moko ya mwasi na nkombo Rubi asalaki mwa moke nsima ya kobota mwana na ye ya liboso, Joseph. Mokolo na mokolo, azalaki kotángela ye buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia. Ntango akolaki, Rubi asalisaki ye akanga bavɛrsɛ na motó. Formasyo yango esalisaki Joseph? Ntango kaka abandaki koloba, Joseph azalaki kokoka kobɛta masolo mingi ya Biblia na maloba na ye moko. Mpe ntango akómaki na mbula mitano, asalaki lisolo na ye ya liboso na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi.

9. Mpo na nini kotánga Biblia mpe komanyola makambo oyo otángi ezali na ntina?

9 Mpo bókola lisusu mingi na elimo, bino bilenge bosengeli kokómisa botángi ya Biblia mokolo na mokolo momeseno oyo bokolanda na boumeli ya bolenge na bino tii bokokóma mikóló. (Nz. 71:17) Mpo na nini botángi ya Biblia ekosalisa yo okende liboso na elimo? Talá oyo Yesu alobaki na libondeli moko oyo asalaki epai ya Tata na ye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko.” (Yoa. 17:3) Ya solo, wana ozali kobakisa boyebi na yo ya Yehova, okobanda komona polele koleka ete azali Moto ya solo mpe okokolisa bolingo na yo mpo na ye. (Ebr. 11:27) Na yango, mbala nyonso oyo otángi eteni moko ya Biblia, salelá libaku yango mpo na koyeba Yehova malamu koleka. Omituna boye: ‘Lisolo oyo eteyi ngai nini mpo na bomoto ya Yehova? Ndenge nini mokapo oyo ya Biblia emonisi ete Nzambe alingaka ngai mpe amibanzabanzaka mpo na ngai?’ Kozwa ntango ya komanyola mituna ya ndenge wana ekosalisa yo oyeba makanisi mpe mayoki ya Yehova, mpe makambo oyo ye azali kosɛnga yo. (Tángá Masese 2:1-5.) Ndenge moko na elenge Timote, kosala bongo ‘ekosalisa yo ondima’ makambo oyo oyekoli na Makomami, mpe ekotinda yo osambela Yehova na motema moko.​—2 Tim. 3:14.

Kobondela ekokolisa bolingo na yo mpo na Yehova

10, 11. Ndenge nini kobondela ekosalisa yo okolisa mposa na yo ya kosalela Nzambe?

10 Lolenge ya mibale oyo okoki kokolisa mposa na yo ya kosalela Yehova na motema mobimba ezali kobondela. Na Nzembo 65:2 totángi boye: “Ee Moyoki ya libondeli, ɛɛ bato ya lolenge nyonso bakoya epai na yo.” Ata ntango ekólo Yisraele ezalaki na kati ya kondimana na Nzambe, bapaya oyo bazalaki koya na tempelo ya Yehova bakokaki kopusana penepene na ye na nzela ya libondeli. (1 Bak. 8:41, 42) Nzambe aponaka bilongi te. Baoyo batosaka mibeko na ye bayebi na motema moko ete akoyoka bango. (Mas. 15:8) Ya solo, ayokaka “bato ya lolenge nyonso” ata mpe bino bilenge.

11 Oyebi ete eloko oyo esimbaka boninga ya solosolo ezali koyeba kosolola malamu. Mbala mosusu olingaka koyebisa moninga moko ya motema makanisi, mabanzo, mpe mayoki na yo. Ndenge moko mpe, ntango ozali kobondela na motema mobimba, ozali nde kosolola na Mozalisi na yo Monene. (Flp. 4:6, 7) Lobáká na Yehova lokola nde ozali kofungola motema na yo epai ya moboti ya bolingo to moninga ya motema. Kutu, ndenge oyo obondelaka mpe ndenge oyo oyokaka mpo na Yehova ezali na boyokani makasi. Okomona ete soki boninga na yo ná Yehova ekómi makasi, mabondeli na yo mpe ekozala ya mozindo.

12. (a) Mpo na nini mabondeli ya mozindo esuki kaka te na kobimisa maloba? (b) Nini ekosalisa yo omona ete Yehova azali penepene na yo?

12 Kasi, kobosana te ete libondeli ya mozindo esuki kaka na kobimisa maloba te. Esɛngi mpe obimisa mayoki na yo. Na mabondeli na yo, monisá Yehova ete olingaka ye mingi, omemyaka ye makasi, mpe ete otyelaka ye motema mobimba. Wana ozali kososola ndenge Yehova azali koyanola mabondeli na yo, okomona mpenza na ndenge oyo omoná naino te ete “Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye.” (Nz. 145:18) Ya solo, Yehova akopusana penepene na yo, akopesa yo makasi ya kotɛmɛla Zabolo mpe ya kozwa bikateli ya malamu na bomoi.​—Tángá Yakobo 4:7, 8.

13. (a) Ndenge nini kozala moninga ya Nzambe esalisaki ndeko moko ya mwasi? (b) Ndenge nini kozala moninga ya Nzambe esalisaka yo oboya makanisi mabe ya baninga?

13 Tótala ndenge Cherie azwaki makasi mpo azalaki na boyokani makasi na Yehova. Na eteyelo ya ntei, azwaki bakado ebele mpo azalaki mayele mingi mpe ayebaki malamu kosala masano. Ntango asilisaki kelasi, balingaki kopesa ye bourse oyo elingaki kosalisa ye akoba kelasi na iniversite. Cherie alobi boye: “Likambo yango etyaki ngai na komekama, mpe balakisi na biso ya masano mpe bana-kelasi mosusu bazalaki kotya ngai mbamba nandima yango.” Nzokande, amonaki ete kokoba kelasi na iniversite ekosɛnga ye alekisaka ntango mingi na kotánga mpe komibongisa mpo na masano ya minene​—mpe akotikala na ntango moke mpo na kosalela Yehova. Cherie asalaki nini? Alobi boye: “Nsima ya kobondela Yehova, naboyaki kondima bourse wana mpe nabandaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza.” Banda wana, asali mosala ya mobongisi-nzela mbula mitano. Alobi boye: “Nayokaka mawa ata moke te. Koyeba ete nazwaki ekateli oyo ezali kosepelisa Yehova epesaka ngai esengo. Ya solo, soki ozali kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso, bakobakisela yo biloko mosusu nyonso.”​—Mat. 6:33.

Etamboli malamu ekomonisa ete ‘motema na yo ezali pɛto’

14. Mpo na nini etamboli na yo ya malamu ezali na ntina na miso ya Yehova?

14 Lolenge ya misato oyo okoki komonisa ete ozali kosalela Yehova na motema ya esengo ezali etamboli na yo. Yehova apambolaka bilenge oyo batikalaka pɛto na etamboli. (Tángá Nzembo 24:3-5.) Elenge Samwele aboyaki komekola etamboli ya mbindo ya bana ya nganga-nzambe monene Eli. Etamboli malamu ya Samwele ezangaki komonana te. Biblia elobi boye: “Na ntango wana nyonso, elenge Samwele azalaki se kokola mpe azalaki kosepelisa mpenza Yehova ná bato.”​—1 Sa. 2:26.

15. Wapi mwa makambo oyo etindaka yo obatela etamboli ya malamu?

15 Tozali na mokili oyo etondi na bato oyo bamilingaka, bato ya lolendo, oyo batosaka baboti te, oyo bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, bato ya nko, oyo bavimbi na lolendo, oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe​—soki totángi kaka ndambo ya bizaleli na oyo Paulo alobelaki. (2 Tim. 3:1-5) Na yango, ekoki kozala mpasi obatela etamboli ya malamu ntango ozali na esika moko na bato mabe. Kasi, ntango nyonso oyo osali makambo ya malamu mpe oboyi etamboli ya mabe, ozali komonisa ete ozali na ngámbo ya Yehova na ntembe oyo etali boyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (Yobo 2:3, 4) Okozala mpe na esengo ya koyeba ete ozali kondima maloba kitoko ya Yehova oyo: “Zalá na bwanya, mwana na ngai, mpe sepelisá motema na ngai, mpo nazongisa monɔkɔ na ye oyo azali kotumola ngai.” (Mas. 27:11) Longola yango, koyeba ete Yehova andimi yo ekolendisa yo na mposa na yo ya kosalela ye.

16. Ndenge nini ndeko mwasi moko asepelisaki motema ya Yehova?

16 Ntango azalaki elenge, ndeko moko ya mwasi na nkombo Carol akangamaki na mitinda ya Biblia ntango azalaki na kelasi, mpe bato bazalaki komona etamboli na ye ya malamu. Nini esalemaki? Baninga na ye ya kelasi bazalaki kotyola ye mpo lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia ezalaki kopekisa ye asangana na bafɛti ya mokili mpe na milulu ya kokumisa ekólo. Na bantango yango, azalaki mbala mosusu kozwa libaku ya kolimbwela basusu bindimeli na ye. Bambula mingi na nsima, Carol azwaki mokanda oyo eutaki na mwana-kelasi moko ya kala, oyo akomaki boye: “Nazalaka ntango nyonso na elikya ete mokolo mosusu nakosolola na yo mpe nakopesa yo matɔndi. Etamboli na yo ya malamu mpe ndakisa na yo lokola elenge mokristo, mpe mpiko oyo ozalaki na yango ya koboya bafɛti, elekaki mpamba te. Ozalaki Motatoli ya Yehova ya liboso oyo nakutanaki na ye.” Carol atikaki mpenza ndakisa malamu oyo esalaki ete na nsima, moninga na ye wana ya kelasi abanda koyekola Biblia. Na mokanda oyo akomelaki Carol, alobaki ete azwaki batisimo banda mbula koleka 40! Ndenge moko na Carol, bino bilenge oyo bozali lelo kokangama na mitinda ya Biblia na mpiko bokoki kotinda bato ya mitema sembo báyekola koyeba Yehova.

Bilenge bazali kosanzola Yehova

17, 18. (a) Ndenge nini oyokaka mpo na bilenge ya lisangá na bino? (b) Mapamboli nini ezali kozela bilenge oyo babangaka Nzambe?

17 Biso nyonso na lisangá ya Yehova na mokili mobimba tozali na esengo ya komona bankóto ya bilenge ya molende oyo bazali kosangana na losambo ya pɛto! Bilenge yango bazali kokolisa mposa na bango ya kosalela Yehova na ndenge batángaka Biblia mokolo na mokolo, babondelaka, mpe bazali na etamboli oyo eyokani na mokano ya Nzambe. Bilenge ya ndakisa malamu ndenge wana basepelisaka baboti na bango mpe basaleli mosusu nyonso ya Yehova.​—Mas. 23:24, 25.

18 Na mikolo ezali koya, bilenge oyo bazali sembo bakozala na kati ya baoyo bakobika mpe bakokɔta na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. (Em. 7:9, 14) Kuna, bakozwa mapamboli ebele mpenza wana bakokoba kokolisa botɔndi mpo na Yehova, mpe bakokoka kosanzola ye mpo na ntango oyo etyami ndelo te.​—Nz. 148:12, 13.

Okoki kolimbola?

• Ndenge nini bilenge bakoki kosangana na losambo ya solo lelo?

• Mpo botángi ya Biblia esalisa yo, mpo na nini komanyola ezali na ntina?

• Ndenge nini libondeli esalisaka yo opusana penepene na Yehova?

• Etamboli malamu ya mokristo esalaka nini?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 5]

Ozali na momesano ya kotánga Biblia mokolo na mokolo?