Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Koyika mpiko na mikakatano elendisaki elikya na biso epai ya Yehova

Koyika mpiko na mikakatano elendisaki elikya na biso epai ya Yehova

Koyika mpiko na mikakatano elendisaki elikya na biso epai ya Yehova

Lisolo ya Ada Dello Stritto

Nasilisi kokoma mokapo ya mokolo ya lelo na kaye na ngai kaka sikoyo. Nazali na mbula 36, kasi kokoma kaka mwa makambo wana ezwi ngai ngonga mibale. Ntango molai boye mpo na nini? Mama na ngai akolimbola.​—Joel

NGAI ná mobali na ngai tozwaki batisimo mpe tokómaki Batatoli ya Yehova na 1968. Nsima ya kobota David ná Marc, bana na biso mibale oyo bazalaki na nzoto kolɔngɔnɔ, nabotaki mwana ya misato, Joel. Abotamaki matshombe na 1973 na lopitalo moko na mboka Binche, na Belgique, soki kilomɛtrɛ 60 na sudi ya Bruxelles. Azalaki kaka na kilo 1,7. Ntango nabimaki na lopitalo, Joel atikalaki kuna mpo abakisa kilo mwa moke.

Nsima ya mwa bapɔsɔ, lokola mwana na biso azalaki kaka komatisa kilo te, ngai ná mobali na ngai Luigi tozwaki mwana na biso mpe tomemaki ye epai ya monganga oyo asalisaka bana (pédiatre). Nsima ya kotalatala Joel, monganga alobaki boye: “Esali ngai mawa mpenza. Nakanisi ete Joel azali na mikakatano nyonso oyo bandeko na ye bazali na yango te.” Biso nyonso totikalaki kimya ntango molai. Na ntango yango, namonaki ete mwana na biso ya moke azali na maladi moko makasi. Na nsima, monganga abengaki mobali na ngai pembeni mpe ayebisaki ye boye: “Mwana na bino azali na trisomie 21,” maladi oyo babengaka mpe syndrome de Down. *

Lokola maloba ya monganga yango epesaki biso mawa, tozwaki ekateli ya kokende kotala monganga mosusu. Monganga yango atalatalaki Joel na likebi pene na ngonga mobimba kozanga aloba ata likambo. Ngai ná Luigi tomonaki lokola eumeli bambula na bambula. Nsukansuka, monganga atombolaki miso mpe alobaki boye: “Mwana na bino akozalaka na mposa ya lisalisi na bino na makambo mingi mpenza.” Na nsima, na boboto nyonso, abakisaki boye: “Kasi Joel akozala na esengo mpo baboti na ye balingi ye!” Nabulunganaki mingi mpe nasimbaki Joel makasi na mabɔkɔ na ngai, mpe tozongaki na ye na ndako. Na ntango wana, azalaki na pɔsɔ mwambe.

Makita ya bokristo mpe mosala ya kosakola elendisaki biso

Ntango basalaki baekzamɛ mosusu, bamonaki ete Joel azali na mbeba monene na motema mpe na lolenge moko ya maladi oyo epekisaka libale, rate ná mikuwa ekola malamu. Lokola motema na ye ezalaki monene koleka, ezalaki kofina mimpululu na ye mpe ekómisaki ye moto ya kobɛla mpambampamba. Eumelaki te, ntango akómaki na sanza minei, Joel azwaki maladi ya bronchopneumonie mpe tozongaki na ye na lopitalo epai batyaki ye mosika na bato mosusu. Ezalaki kopesa biso mpasi mingi komona ye azali kobunda na mpasi. Tozalaki na mposa tómema ye na mabɔkɔ na biso mpe tósimbasimba ye, kasi pɔsɔ zomi mobimba, bapesaki biso ndingisa ata moke te ya kosimba ye. Ngai ná Luigi tokokaki kosala eloko mosusu te, kaka kotala na miso, koyambana mpe kobondela.

Na ntango ya mpasi yango, tokobaki koyangana na makita ya lisangá elongo na David mpe Marc; moko azalaki na mbula 6 mpe mosusu mbula 3. Mpo na biso, kozala na Ndako ya Bokonzi ezalaki lokola nde Yehova amemi biso na mabɔkɔ na ye mpo na kobatela biso. Na bangonga oyo tozalaki kuna, elongo na bandeko na biso bakristo, tozalaki koyoka ete tozalaki kokoka kotikela Yehova mikumba na biso ya kilo, mpe tozalaki kozwa mwa kimya na motema. (Nz. 55:22) Ata mafulume oyo bazalaki kosalisa Joel balobaki ete bazalaki komona ete koyangana na makita ezalaki kosalisa biso tólɛmba nzoto mingi te.

Na ntango yango, nabondelaki mpe Yehova apesa ngai makasi ya kobima na mosala ya kosakola. Na esika natikala kolela na ndako, nazalaki kolinga kosolola na bato mpe koyebisa bango ntina oyo kotya motema na elaka oyo Nzambe apesá ya mokili ezangi maladi ezalaki kopesa ngai makasi. Ntango nyonso oyo nazalaki kozwa makasi ya kobima na mosala ya kosakola, nazalaki koyoka ete Yehova ayanoli mabondeli na ngai.

“Oyo likambo ya kokamwa!”

Ezalaki mpenza esengo, mokolo oyo nsukansuka, Joel abimaki na lopitalo mpe tozongaki na ndako! Kasi, kaka na mokolo oyo elandaki, esengo na biso ebongwanaki mawa. Maladi ya Joel ekómaki lisusu makasi, mpe tosengelaki kozongisa ye mbangu na lopitalo. Nsima ya kotalatala ye, monganga ayebisaki biso boye: “Joel atikali kaka na sanza motoba ya bomoi.” Sanza mibale na nsima, ntango akómaki na sanza soki mwambe, emonanaki lokola makambo minganga balobaki ezalaki solo, mpo maladi ya Joel ekómaki koya makasi. Monganga moko afandaki na biso mpe alobaki boye: “Esali ngai mawa mpenza. Ezali na eloko mosusu te oyo tokoki kosala mpo na ye.” Bongo abakisaki boye: “Sikoyo, kaka Yehova nde akoki kosalisa ye.”

Nazongaki na shambrɛ oyo Joel azalaki na lopitalo. Atako nazalaki na mawa makasi mpe nalɛmbaki mingi, nalingaki kaka kotikala pene na mbeto na ye. Bandeko mingi ya basi bazalaki koya kofandisa ngai, moto na moto na ngala na ye, mpo Luigi asengelaki kobatela bana mibale mosusu. Pɔsɔ moko elekaki. Na nsima, tótala boye, motema ya Joel ekangami. Mafulume bayaki mbangu na shambrɛ yango, kasi bakokaki kosala eloko moko te mpo na ye. Nsima ya mwa miniti, moko na bango alobaki na malɛmbɛ ete: “Esili . . .” Na kolɛmba na ngai, nabandaki kolela mpe nabimaki na shambrɛ. Namekaki kobondela Yehova, kasi ezalaki mpasi nazwa maloba ya koyebisa mpasi na ngai. Miniti soki 15 elekaki, mpe lifulume moko abengaki ngai, alobi: “Joel akómi kopema lisusu!” Asimbaki ngai na lobɔkɔ mpe alobaki boye: “Yaká, okoki komona ye sikoyo.” Ntango nazongaki epai ya Joel, motema na ye ezalaki kobɛta lisusu! Eumelaki te, nsango yango epanzanaki. Mafulume mpe minganga bayaki kotala ye, mpe mingi bakamwaki, balobi: “Oyo likambo ya kokamwa!”

Na mbula ya minei, litambe moko ya kokamwa

Na bambula ya liboso ya bomoi ya Joel, minganga bazalaki mbala na mbala koyebisa biso ete “Joel azali na mposa ya bolingo mingi.” Lokola Luigi ná ngai tomonaki ndenge Yehova amoniselaki biso bolingo mingi nsima ya kobotama ya Joel, tolingaki mpe komonisela mwana na biso bolingo mingi. Tozalaki na mabaku mingi ya kosala bongo mpo azalaki na mposa ya lisalisi na biso na makambo nyonso.

Na mbula nsambo ya liboso na bomoi ya Joel, mbula na mbula tozalaki kokutana na makambo ya ndenge moko. Banda sanza ya Ɔkɔtɔbɛ tii na Marsi, azalaki kobɛla bamaladi ndenge na ndenge, mpe ezalaki kende zongá, kende zongá na lopitalo. Nazalaki mpe kosala makasi nalekisaka ntango mingi na bana na biso, David ná Marc. Na nsima, bango mpe bakómaki kosalisa Joel mingi mpo akóma mwa malamu​—mpe ebimisaki matomba ya kokamwa. Na ndakisa, minganga mingi bayebisaki biso ete Joel akokoka kotambola ata mokolo moko te. Kasi mokolo moko, ntango Joel azalaki na mbula minei, mwana na biso Marc alobaki na ye boye: “Má, Joel, lakisá mama ete okoki kotambola!” Likambo ya kokamwa mpenza, Joel asalaki litambe na ye ya liboso! Tozalaki na esengo moko ya kosakana te, mpe libota mobimba tobondelaki na motema moko mpo na kotonda Yehova. Na bantango mosusu, soki Joel abongi ata kaka mwa moke na likambo moko boye, tozalaki kopesa ye longonya mingi.

Formasyo na makambo ya Nzambe banda bomwana eboti mbuma

Mbala nyonso, soki likoki ezali, tozalaki komema Joel na makita na Ndako ya Bokonzi. Mpo na kobatela ye na bamikrobɛ oyo ekokaki kobɛlisa ye mpambampamba, tozalaki kotya ye na berceau ya ndenge mosusu; ezipamaki na plastike oyo ezalaki komonisa na kati. Kasi atako azalaki kofanda kaka kuna na kati, azalaki kosepela kozala elongo na lisangá.

Bandeko na biso bakristo bazalaki kopesa biso makasi, komonisela biso bolingo mpe kopesa biso lisalisi oyo esengeli. Ndeko moko azalaki koyebisa biso mbala na mbala maloba ya Yisaya 59:1: “Talá! Lobɔkɔ ya Yehova ekómi mokuse mingi te mpo akoka kobikisa te, litoi na ye mpe ekómi kilo mingi te mpo eyoka te.” Maloba wana ya kokitisa motema esalisaki biso tótyela Yehova motema.

Ntango Joel azalaki kokola, tosalaki makasi mpo mosala ya Yehova ezala likambo ya ntina mingi na bomoi na ye. Na libaku nyonso, tozalaki koloba na ye na ntina etali Yehova na ndenge oyo ekokaki kotinda Joel akolisa boyokani mpe bolingo mpo na Tata na ye ya likoló. Tozalaki kobondela Yehova apambola milende na biso mpo formasyo oyo topesaki ye na makambo ya Nzambe ebota mbuma malamu.

Ntango akómaki na mbula soki zomi na misato, tozalaki na esengo mingi ya komona ete Joel azalaki kolinga koyebisa solo ya Biblia na bato oyo azalaki kokutana na bango. Ntango azalaki na lopitalo nsima ya lipaso moko monene wana azalaki na mbula 14, nasepelaki mingi ntango Joel atunaki ngai ete: “Mama, nakoki kopesa monganga buku Bomoi ya seko?” Nsima ya mwa bambula, basengelaki kosala Joel lipaso mosusu. Tozalaki koyeba malamu ete mbala mosusu akobika te. Liboso ya lipaso yango, Joel apesaki minganga na ye mokanda oyo tokomaki na ye elongo. Eyebisaki ekateli na ye na ntina etali makila. Monganga atunaki Joel boye: “Mpe ondimi yango?” Kozanga kokakatana, Joel ayanolaki ete: “Ɛɛ, Doktɛrɛ.” Tozalaki na esengo mingi mpo na ndenge oyo mwana na biso azalaki kotyela Mozalisi na ye motema mpe mpo na ekateli makasi oyo azwaki ya kosepelisa Ye. Minganga ná mafulume bazalaki kosunga biso mingi, mpe tosepelaki mingi mpo na yango.

Joel azali kokola na elimo

Ntango akómaki na mbula 17, Joel azwaki batisimo na mai mpo na komonisa ete amipesi na Nzambe. Mokolo wana ezali ya kobosana soki moke te! Komona ndenge azali kokola na elimo etondisaka biso na esengo makasi. Banda wana, bolingo na ye mpo na Yehova mpe molende na ye mpo na solo ekitaka te. Kutu, na moto nyonso oyo akutani na ye, Joel alingaka koloba boye: “Solo nde bomoi na ngai!”

Ntango akómaki soki na mbula 19, Joel ayekolaki kotánga mpe kokoma. Esɛngaki milende mingi. Soki alongi kokoma ata mwa liloba moke, ezalaki nde likambo monene. Banda wana, abandaka mokolo nyonso na kotánga mokapo ya mokolo na kati ya mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo. Nsima na yango, akomaka na likebi mpenza mokapo ya mokolo yango na kaye na ye, mpe sikoyo bakaye yango ekomi ebele mpenza!

Mikolo ya makita, Joel alingaka tókende na Ndako ya Bokonzi mwa moke liboso makita ebanda mpo alingaka kokóma kuna liboso mpo ayamba bato nyonso oyo bazali kokɔta na Ndako ya Bokonzi. Na makita, asepelaka kopesa biyano mpe kosala bilakiseli. Asalisaka mpe na bamikro mpe asalaka misala mosusu. Pɔsɔ nyonso, soki nzoto epesi ye nzela, akendaka na biso na mosala ya kosala. Na 2007, bayebisaki lisangá ete Joel akómi mosaleli ya misala. Totangisaki mpisoli ya esengo. Oyo nde lipamboli Yehova apesaki biso!

Toyokaki ete lobɔkɔ ya Yehova ezali kosalisa biso

Na 1999, tokutanaki na mpasi mosusu. Motuka ya sofɛlɛ moko ya mafumafu etutaki motuka na biso, mpe Luigi azokaki mabe. Esɛngaki bákata ye lokolo moko, mpe basalaki ye mapaso ebele ya minene na mokuwa ya mokɔngɔ. Lisusu, lokola tozalaki kotyela Yehova motema, toyokaki nguya oyo apesaka basaleli na ye na ntango ya mpasi. (Flp. 4:13) Atako Luigi atikalá ebɔsɔnɔ, tolukaka kotala makambo na ndenge ya malamu. Lokola akoki kosala mosala ya mosuni lisusu te, azalaka na ntango mingi mpo na kobatela Joel. Epesaka ngai ntango mwa mingi ya komipesa na makambo ya elimo. Luigi azali mpe na ntango mingi ya kotya likebi na bamposa ya elimo ya libota na biso mpe ya lisangá, epai azali kokoba kosala lokola mokambi-misala ya bankulutu.

Na kotala makambo oyo ekómela biso, libota na biso tolekisaka ntango mingi elongo. Nsima ya bambula, tomoná ete esengeli kondima bomoi ndenge ezali mpe kolikya te kozwa makambo oyo ekoki kosalema te. Na mikolo oyo toyoki ete tolɛmbi nzoto, toyebisaka Yehova mayoki na biso na libondeli. Kasi likambo ya mawa, ntango bana na biso David ná Marc bakómaki mikóló mpe bakendeki kofanda epai na bango moko, nsukansuka, batikaki kosalela Yehova. Tozali na elikya ete mbala mosusu bakozongela Yehova.​—Luka 15:17-24.

Na bambula oyo nyonso, toyoká lisalisi ya Yehova mpe toyekolá kotalela ye na mikakatano nyonso oyo tokutanaka na yango. Tosepelaka mingimingi na maloba ya Yisaya 41:13: “Ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali, ngai Moto nazali koloba na yo ete: ‘Kobanga te. Ngai moko nakosalisa yo.’” Koyeba ete Yehova asimbi makasi lobɔkɔ na biso ebɔndisaka biso mingi. Kutu tokoki mpenza koloba ete koyika mpiko na mikakatano elendisaki elikya na biso epai ya Yehova, Tata na biso ya likoló.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 5 Trisomie 21 ezali maladi moko oyo babotamaka na yango, mpe epekisaka mayele ya mwana ekola malamu. Ba-chromosome ezalaka mpenza nde mibalemibale, kasi bana oyo babotamaka na trisomie bazalaka na chromosome mosusu ya misato na esika moko. Trisomie 21 esimbaka chromosome ya 21.

[Bililingi na nkasa 16, 17]

Joel ná mama na ye, Ada

[Elilingi na lokasa 18]

Ada, Joel, ná Luigi

[Elilingi na lokasa 19]

Joel asepelaka koyamba bandeko mibali mpe bandeko basi na Ndako ya Bokonzi