Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mosala ya elimo santu na kokokisama ya mokano ya Yehova

Mosala ya elimo santu na kokokisama ya mokano ya Yehova

Mosala ya elimo santu na kokokisama ya mokano ya Yehova

“Liloba oyo ezali kobima na monɔkɔ na ngai . . . ekolonga mpenza na likambo oyo natindaki yango.”​—YIS. 55:11.

1. Pesá ndakisa oyo emonisi bokeseni kati na mwango mpe mokano.

KANISÁ ete mibali mibale bazali komibongisa mpo na kosala mobembo na motuka. Mobali ya liboso abongisi malamumalamu nzela kaka moko oyo akolanda mpo akóma esika oyo azali kokende. Mobali mosusu azali komona polele na makanisi na ye esika oyo azali kokende, kasi ayebi mpe banzela mosusu mpo na kokóma kuna. Amibongisi mpo na kozwa nzela mosusu soki likambo moko ebimi. Tokoki koloba ete mayele oyo mibali yango mibale basaleli emonisi bokeseni oyo ezali kati na mwango mpe mokano. Mwango ezali lokola kobongisa malamumalamu nzela kaka moko oyo okolanda mpo na kosala likambo; nzokande mokano ekoki kosɛnga oyeba likambo oyo okosala, kasi mpo na kosala yango, okoki kozala na banzela mingi.

2, 3. (a) Mokano ya Yehova esangisi nini, mpe ndenge nini asalaki ntango Adama ná Eva basalaki lisumu? (b) Mpo na nini tosengeli kosala na boyokani na ndenge oyo Yehova azali kokokisa mokano na ye mokemoke?

2 Na oyo etali kokokisa makambo oyo ye alingi, Yehova azalaka na mwango te oyo asilá kobongisa; azalaka nde na mokano oyo ezali kokokisama mokemoke. (Ef. 3:11) Mokano yango esangisi makambo oyo akanaki na ebandeli mpo na bato mpe mabele​—ete mabele ekóma paradiso, epai bato ya kokoka bakoki kofanda na kimya mpe na esengo libela na libela. (Eba. 1:28) Ntango Adama ná Eva basalaki lisumu, Yehova akangaki mabɔkɔ te, azwaki bibongiseli mpo nsukansuka mokano na ye wana ekokisama. (Tángá Ebandeli 3:15.) Yehova akanaki ete mwasi na ye ya elilingi akobimisa “momboto,” to Mwana mobali, oyo nsukansuka akoboma Satana, mobandisi ya mabe, mpe akolongola mabe nyonso oyo abimisá.​—Ebr. 2:14; 1 Yoa. 3:8.

3 Ata nguya moko te na likoló to na mabele ekoki kopekisa mokano oyo Nzambe ayebisaki ekokisama. (Yis. 46:9-11) Mpo na nini tokoki koloba bongo? Mpo Yehova azali kosalela elimo santu na ye. Nguya yango oyo eleki nyonso ezali ndanga ete mokano ya Nzambe “ekolonga mpenza.” (Yis. 55:10, 11) Tosengeli koyeba likambo yango malamu mpe kosala na boyokani na ndenge Nzambe azali kokokisa mokano na ye mokemoke. Elikya na biso ya bomoi na mikolo ezali koya esimbami na kokokisama ya mokano yango. Longola yango, kondima na biso ekolendisama na komona ndenge Yehova azali kosalela elimo santu. Na yango, tótala mosala ya elimo santu​—na ntango ya kala, na mikolo na biso, mpe na mikolo ekoya—​na kokokisama ya mokano ya Yehova.

Mosala ya elimo santu na ntango ya kala

4. Ndenge nini Yehova ayebisaki mokano na ye mokemoke?

4 Na ntango ya kala, Yehova ayebisaki mokano na ye mokemoke. Na ebandeli, koyeba soki nani akozala Momboto oyo alakamaki ezalaki “sekele mosantu.” (1 Ko. 2:7) Yehova ayaki kolobela lisusu momboto bambula soki 2 000 na nsima. (Tángá Ebandeli 12:7; 22:15-18.) Yehova apesaki Abrahama elaka oyo ebakisaki makambo mosusu mingi. Maloba “na nzela ya momboto na yo” emonisaki polele ete Momboto akoya lokola moto, mokitani ya Abrahama. Tokoki mpenza kondima ete Satana azalaki kotala na likebi mingi ntango Yehova abimisaki likambo yango. Ntembe ezali te ete eloko oyo Monguna yango alingaki mingimingi ezalaki nde koboma to kobebisa molɔngɔ ya bakitani ya Abrahama mpe na bongo, kobebisa mokano ya Nzambe. Kasi, likambo ya ndenge wana ekokaki kosalema te, mpo elimo ya Nzambe oyo emonanaka te ezalaki kosala. Na ndenge nini?

5, 6. Ndenge nini Yehova asalelaki elimo na ye mpo na kobatela bato mosusu oyo bazalaki na molɔngɔ oyo ezalaki komema na Momboto?

5 Yehova asalelaki elimo na ye mpo na kobatela bato mosusu oyo bazalaki na molɔngɔ oyo ezalaki komema na Momboto. Yehova alobaki na Abrama (Abrahama) boye: “Ngai nazali nguba na yo.” (Eba. 15:1) Ezalaki maloba ya mpamba te. Na ndakisa, tótala likambo oyo esalemaki na mobu soki 1919 L.T.B., ntango Abrahama ná Sara bafandaki bapaya na Gerare. Lokola ayebaki te ete Sara azali mwasi ya Abrahama, Abimeleke, mokonzi ya Gerare, azwaki Sara mpo akómisa ye mwasi na ye. Satana nde azalaki kotambwisa makambo, azalaki koluka kopekisa Sara abota momboto ya Abrahama? Biblia elobi yango te. Kasi elobi nde ete Yehova akangaki mabɔkɔ te. Akebisaki Abimeleke na ndɔtɔ ete asimba Sara te.​—Eba. 20:1-18.

6 Kasi esukaki kaka na mbala wana te. Yehova asikolaki Abrahama ná bato ya libota na ye na mabaku mosusu mingi. (Eba. 12:14-20; 14:13-20; 26:26-29) Yango wana, mokomi ya nzembo akokaki kokoma mpo na Abrahama mpe bakitani na ye ete: “[Yehova] apesaki moto moko te nzela apunza bango, kasi apamelaki bakonzi mpo na bango, alobaki: ‘Bósimba te bato na ngai oyo batyami mafuta, mpe bósala basakoli na ngai eloko moko te ya mabe.’”​—Nz. 105:14, 15.

7. Ndenge nini Yehova abatelaki ekólo Yisraele?

7 Na nzela ya elimo na ye, Yehova abatelaki ekólo Yisraele, epai Momboto oyo alakamaki asengelaki kobotama. Na nzela ya elimo na ye, Yehova apesaki Yisraele Mibeko na ye, oyo ebatelaki losambo ya solo mpe ebatelaki Bayuda mpo bákóma mbindo te na elimo, na etamboli mpe na nzoto. (Kob. 31:18; 2 Ko. 3:3) Na ntango ya Basambisi, elimo ya Yehova epesaki mibali mosusu nguya ya kosikola Yisraele na banguna na bango. (Bas. 3:9, 10) Bikeke mingi liboso ya mbotama ya Yesu, moto ya liboso na momboto ya Abrahama, na ntembe te elimo santu esalaki mpenza mosala mpo na kobatela Yerusaleme, Beteleme, mpe tempelo​—epai bisakweli oyo etali Yesu esengelaki kokokisama.

8. Nini emonisi ete elimo santu esalaki mpenza na bomoi mpe na mosala ya Mwana ya Nzambe?

8 Elimo santu esalaki mpenza mosala na bomoi mpe na mosala ya Yesu. Na libumu ya ngɔndɔ Maria, elimo santu esalaki likambo oyo esalemaki naino te mpe ekosalema lisusu te. Esalaki ete mwasi ya kozanga kokoka azwa zemi mpe abota Mwana ya kokoka, oyo azalaki na etumbu ya liwa te. (Luka 1:26-31, 34, 35) Na nsima, elimo ebatelaki Yesu mpo akufa na bomwana te. (Mat. 2:7, 8, 12, 13) Ntango Yesu azalaki na mbula soki 30, Nzambe atyaki ye mafuta na elimo santu, aponaki ye azala mokitani ya kiti ya bokonzi ya Davidi mpe apesaki ye mokumba ya kosakola. (Luka 1:32, 33; 4:16-21) Elimo santu epesaki Yesu nguya ya kosala makamwisi, na ndakisa kobikisa bato ya maladi, koleisa ebele ya bato, mpe kosekwisa bakufi. Misala wana ya kokamwa emonisaki mwa moke mapamboli oyo tokoki kozela na boyangeli ya Yesu.

9, 10. (a) Ndenge nini emonanaki ete elimo santu ezali likoló ya bayekoli ya Yesu na ekeke ya liboso? (b) Likambo nini ya sika na oyo etali kokokisama ya mokano ya Yehova emonanaki na ekeke ya liboso T.B.?

9 Kobanda na Pantekote ya mobu 33 T.B., Yehova asalelaki elimo na ye mpo na kotya bato mosusu ya momboto ya Abrahama mafuta, oyo mingi kati na bango bazalaki bakitani ya Abrahama te. (Rom. 8:15-17; Gal. 3:29) Emonanaki ete elimo santu ezalaki likoló ya bayekoli ya Yesu ya ekeke ya liboso, esalisaki bango básakola na molende mpe epesaki bango nguya ya kosala misala ya kokamwa. (Mis. 1:8; 2:1-4; 1 Ko. 12:7-11) Na nzela ya makabo yango ya kosala makamwisi, elimo santu emonisaki likambo moko ya sika na ndenge Yehova azalaki kokokisa mokano na ye. Yehova azalaki kosalela lisusu te ebongiseli ya kala oyo asalelaki na boumeli ya bikeke mpo na losambo, oyo esimbamaki mingimingi na tempelo na Yerusaleme. Akómaki sikoyo kondima nde lisangá ya bokristo oyo eutaki kosalema. Banda wana, Yehova asalelaka lisangá yango ya bato oyo batyami mafuta na elimo mpo na kokokisa mokano na ye.

10 Kobatela, kopesa nguya, kotya mafuta​—wana ezali kaka mwa ndenge moke oyo Yehova asalelaki elimo santu na ntango ya kala mpo mokano na ye ekende liboso tii ekokokisama. Bongo na mikolo na biso? Ndenge nini Yehova azali kosalela elimo na ye mpo na kosimba mokano na ye? Tosengeli koyeba yango, mpo tolingi kosala na boyokani na elimo yango. Tótala sikoyo ndenge minei oyo Yehova azali kosalela elimo na ye na mikolo na biso.

Mosala ya elimo santu na mikolo na biso

11. Nini emonisi ete elimo santu ezali nguya oyo esalisaka basaleli ya Nzambe bázala pɛto, mpe ndenge nini okoki komonisa ete ozali kosala na boyokani na elimo yango?

11 Ya liboso, elimo santu ezali nguya oyo esalisaka basaleli ya Nzambe bázala pɛto. Baoyo bazali kosalela Yehova na boyokani na mokano na ye basengeli kozala pɛto na etamboli. (Tángá 1 Bakorinti 6:9-11.) Bato mosusu oyo bakómi bakristo bazalaki liboso kosala makambo ya nsɔni na ndakisa pite, ekobo, mpe kosangisa nzoto mibali ná mibali. Bamposa oyo ebotaka masumu ekoki kopikama makasi. (Yak. 1:14, 15) Nzokande, bato yango ‘basukwami pɛɛ,’ elingi koloba basali bambongwana oyo esengeli na bomoi na bango mpo na kosepelisa Nzambe. Nini esalisaka moto oyo alingi Nzambe alonga koboya kokokisa mposa ya mabe? Ndenge 1 Bakorinti 6:11 emonisi yango, ezali “elimo ya Nzambe na biso.” Soki otikali pɛto na etamboli, okomonisa ete ozali kotika elimo yango ezala nguya oyo ezali kotambwisa bomoi na yo.

12. (a) Na kolanda emonaneli ya Ezekiele, ndenge nini Yehova atambwisaka ebongiseli na ye? (b) Ndenge nini okoki komonisa ete ozali kosala na boyokani na elimo santu?

12 Ya mibale, Yehova asalelaka elimo na ye mpo na kotambwisa ebongiseli na ye na nzela oyo alingi yango ekende. Na emonaneli ya Ezekiele, eteni ya likoló ya ebongiseli ya Yehova emonisami lokola likalo moko ya likoló oyo moto akoki kotɛlɛmisa yango te, oyo ezali kokende mpo na kokokisa mokano ya Yehova. Nini etindaka likalo yango ekende na ngámbo boye to boye? Elimo santu. (Ezk. 1:20, 21) Tóbosana te ete ebongiseli ya Yehova ezali na biteni mibale, moko na likoló, mosusu na mabele. Soki eteni ya likoló ezali kotambwisama na elimo santu, esengeli mpe kozala bongo mpo na eteni ya mabele. Soki ozali kotosa mpe ozali sembo na litambwisi oyo tozali kozwa na eteni ya ebongiseli ya Nzambe ya mabele, okomonisa ete ozali kotambola nzela moko na likalo ya Yehova oyo ezali na likoló mpe ete ozali kosala na boyokani na elimo santu na ye.​—Ebr. 13:17.

13, 14. (a) Banani basali “libota oyo,” oyo Yesu alobelaki? (b) Pesá ndakisa moko oyo emonisi ete elimo santu ezali kosala mosala mpo na kobimisa mateya ya sika na Biblia. (Talá etanda “Ozali kokoba kolanda pole oyo ezali se kobakisama?”)

13 Ya misato, Yehova asalelaka elimo santu mpo na kobimisa mateya ya sika na Biblia. (Mas. 4:18) Banda kala, “moombo ya sembo mpe ya mayele” asalelaka zulunalo oyo lokola nzela ya libosoliboso mpo na kobimisa mateya ya Biblia mokemoke. (Mat. 24:45) Na ndakisa, talá ndimbola oyo tozwaki na oyo etali bato oyo basali “libota oyo,” oyo Yesu alobelaki. (Tángá Matai 24:32-34.) Libota nini Yesu alobelaki? Lisolo “Kozala ya Klisto​—Elimboli nini mpo na yo?” emonisaki ete Yesu azalaki kolobela bato mabe te, kasi bayekoli na ye oyo mosika te basengelaki kotyama mafuta na elimo santu. * Bayekoli ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo, ezala ya ekeke ya liboso to ya ntango na biso, basengelaki kozala bato oyo bakosuka kaka na komona elembo te, kasi mpe kososola ndimbola na yango​—ete Yesu “azali pene, na baporte.”

14 Ndimbola yango etali biso na nini? Atako tokoki koyeba te ntango boni “libota oyo” ekoumela, tosengeli koyeba makambo mingi oyo etali liloba “libota”: Esalelamaka mbala mingi mpo na kolobela bato oyo, atako bambula na bango ekeseni, bazali na bomoi na eleko moko boye; eleko yango ezalaka molai koleka ndelo te; mpe ezalaka na nsuka. (Kob.1:6) Na yango, maloba ya Yesu oyo etali “libota oyo” elimboli nini? Na ntembe te, alingaki koloba ete bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo mpe bazalaki na bomoi ntango elembo ebandaki komonana polele na 1914 bakozala na bomoi mpo na mwa ntango elongo na bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo, oyo bakomona ebandeli ya bolɔzi monene. Libota yango ezalaki na ebandeli, mpe na ntembe te ekozala na nsuka na yango. Kokokisama ya makambo ndenge na ndenge oyo ezali na elembo yango emonisi polele ete bolɔzi yango ekómi pene. Soki ozali kobosana te ete mikolo etikali ya kotánga mpe ozali kokoba kosɛnzɛla, okomonisa ete ozali kokoba kokende elongo na pole mpe kolanda litambwisi ya elimo santu.​—Mrk. 13:37.

15. Nini emonisi ete elimo santu nde epesaka biso nguya ya kosakola nsango malamu?

15 Ya minei, elimo santu epesaka biso nguya ya kosakola nsango malamu. (Mis. 1:8) Soki elimo santu te, nini lisusu esalisi mpo nsango malamu esakolama na mabele mobimba? Kanisá naino. Mbala mosusu ozalaki moko ya bato oyo, lokola bazalaki nsɔninsɔni mpenza mpe kobangabanga, kala bazalaki koloba ete: ‘Nakokoka kosakola na ndako na ndako ata mokolo moko te!’ Nzokande, lelo oyo ozali kosala mosala yango na molende. * Batatoli ya Yehova mingi ya sembo bakobaki kosakola atako botɛmɛli mpe minyoko. Kaka elimo santu ya Nzambe nde ekoki kopesa biso nguya ya kolonga mikakatano minene mpe kosala makambo oyo tokoki kosala soki moke te na makasi na biso moko. (Mika 3:8; Mat. 17:20) Soki ozali komipesa mingi na mosala ya kosakola, okomonisa ete ozali kosala na bomoko na elimo yango.

Mosala ya elimo santu na mikolo ekoya

16. Mpo na nini tokoki kondima ete Yehova akobatela basaleli na ye na bolɔzi monene?

16 Na mikolo ekoya, Yehova akosalela elimo santu na ndenge ya kokamwa mpo na kokokisa mokano na ye. Tótala liboso ndenge akobatela. Ndenge tomonaki yango, Yehova asalelaki elimo na ye na ntango ya kala mpo na kobatela bato mosusu mpe ekólo mobimba ya Yisraele. Na yango, tozali na bantina nyonso ya kondima ete akosalela lisusu elimo yango ya nguya mpo na kobatela basaleli na ye na bolɔzi monene oyo ekómi pene. Tosengeli te kopesapesa makanisi mpo na ndenge mpenza oyo Yehova akobatela biso. Kasi, tokoki kozala motema mpiɔ, tóbosana te ete Yehova akozanga soki moke te komona bato oyo balingaka ye mpe ete ata soki bazali na esika nini, elimo santu na ye ekokómela bango.​—2 Nt. 16:9; Nz. 139:7-12.

17. Ndenge nini Yehova akosalela elimo santu na ye na mokili ya sika?

17 Ndenge nini Yehova akosalela elimo santu na ye na mokili ya sika oyo ezali koya? Elimo yango nde ekobimisa barulo oyo ekofungwama na ntango wana. (Em. 20:12) Barulo yango ekozala na makambo nini? Na ntembe te, masɛngami ndenge na ndenge oyo Yehova akopesa mpo na biso na boumeli ya mbula nkóto. Ozali kozela na motema likoló koyekola makambo oyo ekozala na barulo yango? Tozali kozela mokili ya sika yango na mposa makasi. Tokoki ata kokanisa te ndenge bomoi ekozala na ntango wana ya malamu, ntango Yehova akosalela elimo santu na ye mpo akokisa mokano na ye mpo na mabele mpe bato oyo bakofanda wana.

18. Ozwi ekateli makasi ya kosala nini?

18 Tóbosana ata mokolo moko te ete mokano ya Yehova oyo ezali kokokisama mokemoke ekolonga mpenza, mpo azali kosalela elimo santu na ye—​nguya oyo eleki makasi na molɔ́ngɔ́ mobimba​—mpo na kokokisa mokano yango. Mokano yango etali mpe yo. Na yango, zwá ekateli makasi ya kobondela Yehova mpo apesa yo elimo na ye mpe salá na boyokani na litambwisi ya elimo yango. (Luka 11:13) Na ndenge yango, okoki kozala na elikya ya kozala na bomoi oyo Yehova akanaki mpo na bato​—bomoi ya seko na Paradiso awa na mabele.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 13 Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 2008, nkasa 21-25.

^ par. 15 Mpo omona ndakisa ya ndeko moko oyo azalaki nsɔninsɔni makasi kasi akómá na molende na mosala ya kosakola, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 1993, lokasa 19.

Ozali koyeba lisusu?

• Ndenge nini Yehova asalelaki elimo santu na ntango ya kala mpo mokano na ye ekende liboso?

• Ndenge nini Yehova azali kosalela elimo na ye na mikolo na biso?

• Ndenge nini Yehova akosalela elimo na ye na mikolo ekoya mpo na kokokisa mokano na ye?

[Mituna ya boyekoli]

[Etanda na lokasa 10]

Ozali kokoba kolanda pole oyo ezali se kobakisama?

Yehova azali se kongɛngisa basaleli na ye na pole ya elimo. Wapi mwa bingɛngiseli oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli?

▪ Ndakisa ya levire oyo Yesu apesaki emonisaki likambo nini ya malamu na oyo etali bokoli ya elimo? (Mat. 13:33)​—15 Yuli 2008, nkasa 19-20.

▪ Ntango nini Nzambe akotika kopona bato oyo bakokende na likoló?​—1 Mai 2007, nkasa 30-31.

▪ Kosambela Nzambe “na elimo” elimboli nini? (Yoa. 4:24)​—15 Yuli 2002, lokasa 15.

▪ Na eteni nini ya tempelo ebele mpenza ya bato bazali kosalela Yehova? (Em. 7:15)​—1 Mai 2002, nkasa 30-31.

▪ Ntango nini kokabolama ya bampate mpe bantaba ekosalema? (Mat. 25:31-33)​—15 Ɔkɔtɔbɛ 1995, nkasa 18-28.