Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Otikaka Yehova atuna yo?

Otikaka Yehova atuna yo?

Otikaka Yehova atuna yo?

BIBLIA ezali na bankama ya mituna oyo ekɔtaka mpenza na motema. Kutu, Yehova Nzambe ye moko asalelaka mituna mpo na koteya makambo ya ntina mingi. Na ndakisa, Yehova asalelaki mituna mingi ntango azalaki kokebisa Kaina mpo asembola etamboli na ye oyo ezalaki komema ye na libebi. (Eba. 4:6, 7) Na bantango mosusu, motuna kaka moko ya Yehova ekokaki mpo na kotinda moto asala likambo ya malamu. Ntango kaka ayokaki Yehova atuni ete: “Nakotinda nani, mpe nani akokende mpo na biso?” mosakoli Yisaya ayanolaki boye: “Ngai oyo! Tindá ngai.”​—Yis. 6:8.

Yesu, Moteyi Monene, asalelaki mpe mituna na ndenge ya malamu. Baevanzile ezali na mituna koleka 280 oyo Yesu atunaki. Atako na mabaku mosusu atunaki mituna mpo na kokangisa batyoli na ye monɔkɔ, mbala mingi mokano na ye ezalaki ya kosimba mitema ya bayoki na ye, kotinda bango bákanisa ndenge boyokani na bango na Nzambe ezali. (Mat. 22:41-46; Yoa. 14:9, 10) Ndenge moko mpe, ntoma Paulo, oyo akomaki mikanda 14 ya Makomami ya Grɛki ya bokristo, asalelaki mituna mpo na kondimisa. (Rom. 10:13-15) Na ndakisa, mokanda na ye epai ya Baroma ezali na mituna ebele. Mituna ya Paulo ezalaki kotinda bayoki na ye básepela na “bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye [oyo] ezali mingi mpenza.”​—Rom. 11:33.

Atako mituna mosusu esɛngaka moto ayanola na monɔkɔ, mosusu etindaka moto akanisa na mozindo. Baevanzile emonisi ete Yesu asalelaki mingi mituna mpo na kotinda bato bákanisa. Mokolo moko, Yesu akebisaki bayekoli na ye boye: “Bókeba na levire ya Bafarisai mpe na levire ya Erode,” elingi koloba bokosi mpe mateya na bango ya lokuta. (Mrk. 8:15; Mat. 16:12) Bayekoli ya Yesu bakangaki ntina ya likambo yango te mpe babandaki kolobana bango na bango ete babosanaki komema mampa. Talá ndenge Yesu asalelaki mituna na mwa lisolo mokuse oyo elandaki. “Alobaki na bango ete: ‘Mpo na nini bozali kolobana bino na bino mpo bozali na mampa te? Naino boyebi kaka te mpe bokangi ntina te? Bozali nde na mitema ya kososola noki te? “Atako bozali na miso, bozali komona te; mpe atako bozali na matoi, bozali koyoka te?” . . . Bokangi naino ntina te?’” Mituna ya Yesu esɛngaki eyano ya monɔkɔ te, etindaki bayekoli na ye bákanisa soki maloba na ye elimboli mpenza nini.​—Mrk. 8:16-21.

“Tiká natuna yo”

Yehova Nzambe asalelaki mituna mpo na kosembola makanisi ya mosaleli na ye Yobo. Na nzela ya mituna ebele, Yehova ateyaki Yobo ayeba ete azali moke mpenza liboso ya Mokeli na ye. (Yobo, mik. 38-41) Yehova azalaki nde kozela ayoka eyano na motuna mokomoko? Emonani ete ezali bongo te. Emonani ete mituna lokola “Yo ozalaki wapi ntango natyaki moboko ya mabele?” etunamaki mpo na kolamwisa makanisi mpe mayoki ya Yobo. Nsima ya koyoka mwa ndambo ya mituna yango oyo elandanaki, Yobo azangaki maloba. Alobaki kaka ete: “Nayanola yo nini? Natye lobɔkɔ na monɔkɔ na ngai.” (Yobo 38:4; 40:4) Yobo akangaki ntina ya likambo mpe amikitisaki. Nzokande, Yehova azalaki koteya Yobo kaka komitikisa te. Makanisi ya Yobo mpe esembolamaki. Na ndenge nini?

Atako Yobo azalaki moto “oyo azangi mbeba mpe azali sembo,” na bantango mosusu maloba na ye emonisaki ete azalaki kotala makambo na ndenge ya malamu te; likambo yango Elihu alobelaki yango ntango apamelaki Yobo mpo “azalaki kotánga molimo na ye moyengebene na esika ete ezala Nzambe.” (Yobo 1:8; 32:2; 33:8-12) Na yango, mituna oyo Yehova atunaki esembolaki mpe ndenge oyo Yobo azalaki komona makambo. Ntango asololaki na Yobo na kati ya mopɛpɛ makasi, Nzambe alobaki boye: “Nani yango azali kobebisa toli na maloba oyo ezangi boyebi? Nabondeli yo, kangá loketo na yo lokola mobali moko makasi, mpe tiká natuna yo, bongo yo oyebisa ngai.” (Yobo 38:1-3) Na nsima, na nzela ya mituna, Yehova abendaki likebi ya Yobo na bwanya mpe nguya na Ye oyo ezangi ndelo, oyo emonisami polele na misala na ye ya kokamwa. Engɛngiseli wana esalisaki Yobo atya motema mingi koleka na lisambisi ya Yehova mpe na lolenge na ye ya kosala makambo. Oyo nde likambo ya nsɔmɔ mpo na Yobo​—Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ye moko atuna yo mituna!

Ndenge oyo tokoki kotika Yehova atuna biso

Bongo biso? Mituna oyo ezali na Biblia ekoki kosalisa biso mpe? Ɛɛ, ekoki kosalisa biso! Soki totiki mituna yango etinda biso tókanisa, tokoki kozwa mbano mingi na elimo. Mituna oyo ezali na Liloba ya Nzambe, ndenge ekɔtaka na motema, ebakisaka nguya ya Biblia. Ya solo, “liloba ya Nzambe . . . ezali na nguya . . . mpe ekoki kososola makanisi mpe mikano ya motema.” (Ebr. 4:12) Nzokande, mpo na kozwa matomba mingi, tosengeli komituna mituna yango, kosala lokola Yehova azalaki kotuna nde biso. (Rom. 15:4) Tózwa mwa bandakisa.

“Mosambisi ya mabele mobimba akosala nde oyo ezali sembo te?” (Eba. 18:25) Abrahama atunaki Yehova motuna yango oyo esɛngaki eyano te ntango Nzambe alingaki kopesa Sodoma ná Gomora etumbu. Abrahama amonaki ete ekoki kokanisama te ete Yehova asala likambo ezangi sembo​—koboma moyengebene esika moko na moto mabe. Motuna ya Abrahama emonisi ete azalaki na kondima makasi na boyengebene ya Yehova.

Lelo oyo, bato mosusu bakoki koluka kobimisa makanisi ndenge na ndenge na ntina etali bikateli ya Yehova na mikolo ekoya, na ndakisa nani mpenza akobika na Armagedona to nani akosekwa. Na esika tótika makanisi ya ndenge wana ebulunganisa biso, tokoki kokanisa motuna ya Abrahama. Koyeba ete Yehova, Tata na biso ya likólo, azali na boboto mpe kotya motema mobimba na bosembo mpe motema mawa na ye, ndenge Abrahama asalaki, ekosalisa biso tóbebisa ntango mpe makasi na biso te na komitungisa mpambampamba, na bantembe oyo elɛmbisaka, mpe na kowelana oyo ezangá ntina.

“Nani na kati na bino soki amitungisi akoki kobakisa bolai ya bomoi na ye ata moke?” (Mat. 6:27) Ntango alobaki na ebele mpenza ya bato oyo bamosusu bazalaki bayekoli na ye, Yesu asalelaki motuna oyo mpo na komonisa bango ete basengeli komitika na mabɔkɔ ya Yehova oyo etondi na bolingo. Mikolo ya nsuka ya makambo mabe ya ntango oyo ezali kobimisa mitungisi mingi, kasi kotya makanisi kaka na yango ekobakisa bolai ya bomoi na biso te, ekobongisa yango mpe te.

Ntango nyonso oyo tozali komitungisa mpo na biso to mpo na bato oyo tolingaka, kokanisa motuna wana ya Yesu ekoki kosalisa biso totala makambo yango na ndenge esengeli. Ekoki kosalisa biso tólongola mitungisi mpe makanisi mabe oyo ezali kolɛmbisa biso na makanisi, na mayoki, mpe na nzoto. Ndenge Yesu alaki biso yango, Tata na biso ya likólo, oyo aleisaka bandɛkɛ mpe alatisaka banzete ya elanga, ayebi malamu nyonso oyo tozali na yango mposa.​—Mat. 6:26-34.

“Moto akoki nde kotya mɔtɔ na ntolo na ye bongo bilamba na ye ezika te?” (Mas. 6:27) Mikapo libwa ya liboso ya mokanda ya Masese ezali mpe na masolo mikuse ya tata moko oyo azali kopesa mwana na ye bwanya. Motuna oyo touti kotánga elobeli mbuma mabe ya ekobo. (Mas. 6:29) Soki tomoni ete tokómi selesele na moto oyo azali molongani na biso te to mpe tokómi na mposa mabe ya kosangisa nzoto, motuna oyo esengeli kobɛta lokola ngonga na makanisi na biso. Kasi, motuna yango ekoki kotunama ntango nyonso oyo moto amekami na etamboli oyo ezangi bwanya. Motuna yango emonisi mpenza ntina ya etinda ya Biblia oyo: ‘Oyo ozali kolona, yango nde okobuka’!​—Gal. 6:7.

“Yo nani mpo osambisa mosali ya ndako ya moto mosusu?” (Rom. 14:4) Na mokanda na ye epai ya Baroma, Paulo alobelaki makambo oyo ebimaki na lisangá na ekeke ya liboso. Bakristo mosusu, lokola bautaki na mimeseno ekeseni mpe bakolaki ndenge mosusu, bazalaki koluka kosambisa bikateli mpe misala ya bandeko na bango bakristo. Motuna ya Paulo ekundwelaki bango ete basengeli koyambana bango na bango mpe kotikela Yehova mokumba ya kosambisa.

Lelo mpe ndenge moko, basaleli ya Yehova bauti na mimeseno ndenge moko te mpe kala bazalaki na bomoi ndenge moko te. Kasi, Yehova asangisi biso nyonso na bomoko. Olendisaka bomoko yango? Soki tolukaka komonisa nokinoki ete tosepeli te na likambo ndeko moko asali na kolanda lisosoli na ye, ekozala mpenza malamu tomituna motuna wana ya Paulo oyo touti kolobela!

Mituna epusaka biso lisusu mingi pene na Yehova

Mwa bandakisa wana emonisi nguya ya mituna oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe. Kotala makanisi oyo ezali pembeni ya motuna nyonso ekoki kosalisa biso tótala ndenge nini tokoki kosalela yango na bomoi na biso. Mpe ntango tozali kotánga Biblia, tokomona mituna mosusu oyo ekoki kosalisa biso.​—Talá etanda na lokasa 14.

Soki totiki mituna ya Liloba ya Nzambe oyo ekɔtaka na motema esimba biso makasi mpenza, ekosalisa biso tóyokanisa mitema mpe makanisi na biso na banzela ya sembo ya Yehova. Ntango Yehova asilisaki kotuna ye, Yobo andimaki boye: “Nayokaki yo na nsango, Kasi sikoyo liso na ngai emoni yo.” (Yobo 42:5) Ya solo, Yehova akómaki mpenza moto ya solo epai ya Yobo kutu koleka, lokola azalaki nde liboso na ye. Moyekoli Yakobo amonisaki yango na nsima ntango alobaki boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yak. 4:8) Tótika eteni nyonso ya Liloba ya Nzambe, ata mpe mituna na yango, esalisa biso tókola na elimo mpe ‘tómona’ Yehova polele koleka!

[Etanda na lokasa 14]

Na ndenge nini komituna mituna oyo ekoki kosalisa yo okóma komona makambo ndenge Yehova amonaka yango?

▪ “Yehova asepelaka nde na makabo ya kotumba mpe na bambeka koleka kotosa mongongo ya Yehova?”​—1 Sa. 15:22.

▪ “Moto oyo asalá liso, akoki nde komona te?”​—Nz. 94:9.

▪ “Ntango bato bazali kolukaluka nkembo na bango moko, yango nde nkembo?”​—Mas. 25:27.

▪ “Ozali mpenza na ntina ya kosilika makasi boye?”​—Yona 4:4.

▪ “Moto akozala na litomba nini soki azwi mokili mobimba kasi abungisi molimo na ye?”​—Mat. 16:26.

▪ “Nani akokabola biso na bolingo ya Kristo?”​—Rom. 8:35.

▪ “Eloko nini ozali na yango oyo bapesaki yo kopesa te?”​—1 Ko. 4:7.

▪ “Pole ná molili esanganaka na nini?”​—2 Ko. 6:14.

[Elilingi na lokasa 15]

Liteya nini Yobo azwaki na mituna ya Yehova?