Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozali koyeba lisusu?

Ozali koyeba lisusu?

Ozali koyeba lisusu?

Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Talá soki okoki kopesa biyano na mituna elandi:

• Mpo na nini Masiya asengelaki kokufa?

Liwa ya Yesu emonisaki ete moto ya kokoka akoki kobatela ezaleli ya kokangama na Nzambe ata na mikakatano ya makasi ndenge nini. Longola yango, afutaki etumbu ya lisumu oyo bakitani ya Adama basangolá mpe efungolaki nzela ya bomoi ya seko.​—15/12, nkasa 22-23.

• Nini ekoki kosalisa moto atika masanga na esika na yango?

Kobondela mpe koyekola Biblia ekoki kosalisa. Kolona komipekisa, kokangama na ekateli na ye, mpe kopona baninga ya malamu ezali na ntina mingi. Moto oyo aponi komɛla asengeli koyeba esika oyo akosuka, koyekola koboya.​—1/1, nkasa 7-9.

• Kosolola malamu na bana esɛngaka mpe nini?

Kosolola malamu esuki kaka te na koloba na bana, esɛngaka mpe kotuna mituna mpe kozala na motema molai mpo na koyoka biyano na bango. Mabota mingi emonaki ete ntango ya kolya epesaka libaku ya kosolola malamu.​—15/1, nkasa 18-19.

• Yehova azali Nzambe ya kokoka, ndenge nini akoki koyoka mawa?

Na bantango mosusu, Nzambe abongolaka makanisi na ye mpo na bato. Na ndakisa, mbala mingi, Bayisraele batikaki Yehova mpe balandaki banzambe mosusu. Na ntango wana, Yehova azalaki kolongola libateli na ye. Kasi, ntango Bayisraele bazalaki koyoka mawa mpo na etamboli na bango ya mabe mpe bazalaki kolela epai ya Nzambe mpo asalisa bango, azalaki kobongola makanisi na ye mpo na bango, to “koyoka mawa.” (Bas. 2:18)​—1/2, lokasa 21.

• Ntango nini moto akoki kokanisa kozongela kozwa batisimo?

Ekoki kosalema bongo soki na ntango oyo azwaki batisimo, moto azalaki kosala makambo ya kobombana to azalaki kosala likambo moko oyo ekokaki kosɛnga abimisama na lisangá soki azalaki moto oyo asilá kozwa batisimo na ndenge ebongi.​—15/2, lokasa 22.

• Wapi bantina misato ya lokuta oyo bato bapesaka mpo na kolingisa kozanga bosembo?

Bato mosusu bamonaka ete moyibi ezali mabe te soki moto azali mobola. Bandimaka koyiba mpe balobaka ete, “Moto nyonso asalaka yango.” Mpe moto oyo alɔkɔti biloko ya motuya mpe abombi, alobaka, “nalɔkɔti ngai.” Biblia alongisi ata moko te ya makanisi wana.​—1/3, nkasa 12-14.

• Na ndakisa ya blé mpe matiti mabe oyo Yesu apesaki, kolona mboto ya malamu emonisi nini?

Mwana ya moto, Yesu, abongisaki elanga ntango azalaki kosala mosala na ye awa na mabele. Banda na Pantekote ya mobu 33 T.B., mboto ya malamu ebandaki kolonama ntango bakristo batyamaki mafuta na elimo lokola bana ya Nzambe, bana ya Bokonzi.​—15/3, lokasa 20.

• Na ndenge nini blé ya elilingi ya ndakisa ya Yesu ezali sikoyo komemama na ndako ya Yehova ya kobomba biloko? (Mat. 13:30)

Kokokisama na yango ezali kokoba kosalema na eleko moko na mikolo ya nsuka ya mokili oyo. Blé ya elilingi, elingi koloba bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bazali bana ya Bokonzi, bazali komemama na ndako ya kobomba biloko ya Yehova ntango bakɔti na lisangá ya bokristo oyo ezongisamaki, epai Nzambe asengelaki kondima mpe kobatela bango, to bazwaki libula na bango na likoló.​—15/3, lokasa 22.

• Banani baponaki liste ya mikanda oyo ezali na Makomami ya Grɛki ya bokristo?

Ezalaki likita ya lingomba to mokonzi moko ya lingomba te. Kasi, na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe, bakristo ya solo bayeba makomi oyo ekomamaki mpenza na litambwisi ya elimo santu. Na boyokani na yango, moko ya makabo ya kosala makamwisi oyo elimo epesaki na bambula ya ebandeli ya lisangá ya bokristo ezalaki “bososoli ya maloba oyo euti na elimo.” (1 Ko. 12:4, 10)​—1/4, lokasa 28.