Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bakristo ya liboso mpe banzambe ya Roma

Bakristo ya liboso mpe banzambe ya Roma

Bakristo ya liboso mpe banzambe ya Roma

NA MOKANDA moko oyo akomelaki Trajan, amperɛrɛ ya Roma, Pline le Jeune, guvɛrnɛrɛ ya Bitinia alobaki boye: “Wana ezali ekateli oyo nazwaki mpo na baoyo bafundamaki liboso na ngai ete bazali bakristo. Nazalaki kotuna bango soki bazali bakristo, mpe ntango bazalaki kondima ete bazali bakristo, nazalaki kotuna bango mpo na mbala ya mibale mpe mbala ya misato nazalaki kobangisa bango ete na kopesa bango etumbu. Ntango bazalaki kotingama kaka na ekateli na bango ya kozala bakristo, nazalaki kopesa mitindo báboma bango.” Mpo na baoyo bawanganaki ete bazali bakristo mpe balakelaki Kristo mabe mpe basambelaki ekeko ya amperɛrɛ mpe bililingi ya banzambe oyo Pline amemaki na tribinale, akomaki ete: “Namonaki malamu kotika bango bákende.”

Bakristo ya ekeke ya liboso banyokwamaki mpo baboyaki kosambela amperɛrɛ mpe bililingi ya banzambe ndenge na ndenge. Kasi, ezali boni mpo na mangomba mosusu oyo ezalaki na ampire ya Roma mobimba? Banzambe nini bato bazalaki kosambela, mpe ndenge nini Baroma bazalaki kotalela bango? Mpo na nini bakristo bazalaki konyokwama lokola bazalaki koboya kopesa bambeka epai ya banzambe ya Roma? Biyano na mituna yango ekosalisa biso tóyeba ndenge ya kosala ntango tokutani na makambo ya ndenge wana na mikolo na biso oyo etali bosembo na biso epai ya Yehova.

Mangomba ya ampire

Lokola bato ya ampire ya Roma ya kala bazalaki na mimeseno mpe minɔkɔ ndenge na ndenge, bazalaki mpe kosambela banzambe ndenge na ndenge. Atako losambo ya Bayuda ezalaki komonana lokola likambo ya sika mpo na Baroma, bazalaki kotalela yango lokola lingomba, mpe kobatela yango. Mbala mibale na mokolo, mikolo nyonso na tempelo ya Yerusaleme, bazalaki kopesa mbeka ya bana-mpate mibale mpe ngɔmbɛ mobali moko mpo na Kaisala mpe ekólo Roma. Ata soki bambeka yango ezalaki kokitisa nkanda ya nzambe moko to ya banzambe ebele, ezalaki na ntina te mpo na Baroma. Likambo oyo ezalaki na ntina mpo na bango ezalaki ete kopesa bambeka wana ezalaki komonisa polele bosembo oyo Bayuda bazalaki na yango mpo na Roma.

Misala ndenge na ndenge ya bapakano etondaki mpenza na bisika mingi ya losambo na mboka. Bato mingi bakómaki kondima masapo ya Bagrɛki, mpe kosakola makambo oyo ebombaná ezalaki mingi. Mangomba oyo bazalaki koloba ete ezalaki kosala makambo ya kokamwa, oyo eutaki na ɛsti elakaki bandimi na yango ete bakokóma na nzoto oyo ekufaka te, bakobanda komona bango moko bimonaneli, mpe bakopusana pene na banzambe na nzela ya milulu ya kokamwa. Mangomba yango epalanganaki na ampire mobimba. Losambo ya nzambe ya Ezipito Sérapis mpe ya nzambe-mwasi Isis, Atargatis, nzambe-mwasi ya mbisi ya Siri mpe Mithra, nzambe-moi ya Perse ezalaki mingi na ekeke ya liboso ya ntango na biso.

Mokanda ya Misala emonisi polele ezaleli ya bopakano oyo epalanganaki na ebandeli ya lisangá ya bokristo. Na ndakisa, prokonsule Moroma na Shiprɛ azalaki elongo na nganga-nkisi moko Moyuda. (Mis. 13:6, 7) Na Listre, bato ya mboka yango bakanisaki ete Paulo ná Barnabasi bazali banzambe ya Bagrɛki Hermesi mpe Zeusi. (Mis. 14:11-13) Ntango azalaki na Filipi, Paulo akutanaki na mwana mwasi moko ya mosala oyo azalaki kosakola makambo oyo ebombaná. (Mis. 16:16-18) Na Atene, ntoma Paulo amonaki ete bato ya mboka yango ‘bamonanaki ete bamipesá na kobanga banzambe koleka bato mosusu nyonso.’ Na engumba yango, amonaki mpe etumbelo oyo bakomaki “epai ya Nzambe oyo ayebani te.” (Mis. 17:22, 23) Bato ya Efese bazalaki kosambela nzambe-mwasi Artemisi. (Mis. 19:1, 23, 24, 34) Na esanga ya Malta, bato balobaki ete Paulo azali nzambe mpo likama moko te ekómelaki ye ntango nyoka eswaki ye. (Mis. 28:3-6) Liboso ya makambo wana nyonso, bakristo basengelaki kokeba na makambo oyo ekokaki kobebisa losambo na bango ya pɛto.

Lingomba ya Roma

Lokola ampire na bango ezalaki kokóma monene, Baroma bandimaki banzambe mosusu ya bapaya, oyo bakanisaki ete ezali kaka banzambe oyo bayebaki liboso, kasi babongwanaki na lolenge mosusu. Na esika ya kolongola losambo ya bapaya, Baroma oyo babɔtɔlaki bamboka yango, bandimaki banzambe ya bato ya mboka yango mpe bakómaki kosambela yango. Na yango, Lingomba ya Roma ekómaki na banzambe ndenge na ndenge, ndenge kaka bato oyo bazalaki kofanda na engumba yango bazalaki ndenge na ndenge. Lingomba ya Roma ezalaki kosɛnga te ete bato bákangama kaka na nzambe moko. Bato bakokaki kosambela banzambe ebele.

Jupiter, oyo bazalaki kobenga aleki malamu mpe aleki monene, azalaki nzambe oyo Baroma bandimaki liboso. Bato bazalaki kokanisa ete azalaki komimonisa na mopɛpɛ, mbula, mikalikali mpe nkake. Junon, ndeko ya Jupiter ya mwasi oyo azalaki mpe mwasi na ye, oyo bazalaki koloba ete azali sanza, bazalaki koloba ete azalaki kokɛngɛla makambo nyonso ya bomoi ya basi. Minerve, mwana na ye ya mwasi azalaki nzambe ya misala nyonso, misala ya mabɔkɔ, ya ntɔki mpe bitumba.

Emonani ete Baroma bazalaki kosambela banzambe mingi. Lares mpe Pénates bazalaki banzambe ya libota. Vesta azalaki nzambe-mwasi ya mabele. Janus oyo azalaki bilongi mibale, azalaki nzambe ya ebandeli ya likambo nyonso. Mosala mokomoko ezalaki na nzambe na yango. Baroma bazalaki kosambela ata makanisi mpe bizaleli. Pax, azalaki nzambe oyo azalaki kobatela kimya, Salus, nzambe ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto, Pudicitia azalaki nzambe ya bopɔlɔ mpe ya bopɛto ya bizaleli, Fides, azalaki nzambe ya bosembo, Virtus azalaki nzambe ya mpiko mpe Voluptas azalaki nzambe ya bisengo. Likambo nyonso oyo Baroma bazalaki kosala ezala mpo na moto ye moko to mpo na ekólo mobimba ezalaki kosalema na kolanda mokano ya banzambe. Yango wana, mpo na kolonga na likambo moko, esengelaki kokitisa motema ya nzambe ya likambo yango, na milulu ya mabondeli, bambeka, mpe bafɛti.

Lolenge moko ya koyeba mokano ya banzambe yango ezalaki ya koluka bilembo ya makambo ekoya. Likambo oyo bazalaki kosalela mingi, ezalaki ya kotala binama ya kati ya banyama oyo bazalaki kopesa mbeka. Bazalaki kokanisa ete ndenge binama yango ezali mpe ndenge ezali komonana ekomonisa soki banzambe bandimi to baboyi likambo oyo moto alingi kosala.

Na nsuka ya ekeke ya 2 L.T.B., Baroma bakómaki kondima ete banzambe na bango ya minene ezalaki kaka banzambe oyo Bagrɛki bazalaki kosambela, kasi na nkombo mosusu​—Jupiter ezalaki Zeusi, Junon ezalaki Héra, mpe bongo na bongo. Baroma bakómaki mpe kondima masapo oyo eyokanaki na banzambe ya Bagrɛki. Masapo yango ezalaki ata moke te kokumisa banzambe, baoyo bazalaki na mabunga mpe bandelo ndenge moko na bato. Na ndakisa, Zeusi amonisamaki lokola nzambe oyo asangisaka na bato nzoto na makasi mpe abebisaka bana mike, asangisaka nzoto na bato oyo bakufaka, mpe na baoyo bato bazalaki kokanisa ete bakufaka te. Makambo ya nsɔni oyo banzambe bazalaki kosala​—mbala mingi bato bazalaki kosepela na yango na bisika ya masano ya ntango ya kala—​ezalaki kotinda basambeli na bango bákanisa ete bango mpe bakoki kosala makambo wana ya mabe.

Emonani ete mwa ndambo ya bato oyo batángá bazalaki kondima ete masapo yango ezali solo. Bamosusu bazalaki kopesa yango ndimbola ya elilingi. Yango ekoki kosalisa biso tókanga ntina ya motuna oyo Ponse Pilate atunaki ete “solo ezali nini?” (Yoa. 18:38) Emonisaki “makanisi oyo bato mingi oyo batángá bazalaki na yango, ete ekoki kosalema te koyeba solo na likambo nyonso.”

Losambo ya amperɛrɛ

Losambo ya amperɛrɛ ebandaki na boyangeli ya Augusto (kobanda na mobu 27 L.T.B. tii mobu 14 T.B.). Mingimingi na bitúká ya ɛsti, epai bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki, bato mingi bazalaki komonisa botɔndi epai ya Augusto oyo asalaki ete bato bázala na bomɛngo mpe kimya nsima ya eleko molai ya bitumba. Bato bazalaki na mposa ya libateli ya libela oyo mokonzi oyo bazali komona akokaki kopesa bango. Bazalaki na mposa ya bokonzi oyo ekosilisa bokeseni ya mangomba, ekosalisa bato bákóma na bolingo ya ekólo, mpe ekosangisa bato nyonso ya mokili na nse ya “mobikisi” na yango. Mpo na yango, bato bakómaki kotalela amperɛrɛ lokola nzambe.

Atako, ntango azalaki na bomoi Augusto apesaki bato nzela te ete bábengaka ye nzambe, abɛtaki nsɛtɛ ete bato básambelaka elilingi ya nzambe-mwasi, Roma Dea. Nsima ya liwa na ye, bato bakómisaki Augusto nzambe. Na bitúká, losambo mpe bolingo ya ekólo ezalaki kopesama na ampire mpe na bakonzi na yango. Losambo ya sika ya amperɛrɛ oyo mosika te epanzanaki na bitúká nyonso, ekómaki lolenge ya kokumisa mpe komonisa bosembo mpo na ekólo.

Domitien, oyo azalaki amperɛrɛ kobanda mobu 81 tii 96 T.B., azalaki amperɛrɛ ya liboso ya Roma oyo asɛngaki bato básambelaka ye lokola nzambe. Na ntango na ye, Baroma bakómaki kokesenisa bakristo ná Bayuda mpe bazalaki kotɛmɛla losambo nyonso oyo emonanaki ete ezali ya sika. Ekoki kozala na boumeli ya boyangeli ya Domitien nde ntoma Yoane azalaki mokangami na esanga ya Patimosi mpo azalaki “kotatola mpo na Yesu.”​—Em. 1:9.

Mokanda ya Emoniseli ekomamaki na ntango oyo Yoane azalaki mokangami. Kuna, alobelaki Antipasi, mokristo oyo abomamaki na Pergame, esika oyo losambo ya amperɛrɛ ezalaki makasi. (Em. 2:12, 13) Na ntango wana, guvernɛma ezalaki kosɛnga na bakristo básalaka milulu ya losambo mpo na ekólo. Ata soki ezali bongo to te, na mobu 112 T.B., ndenge emonisami na mokanda oyo Pline atindelaki Trajan ndenge tolobelaki na ebandeli, asɛngaki ete bakristo na Bitinia básala mpe milulu ya ndenge wana.

Trajan akumisaki Pline ndenge akataki makambo yango mpe ndenge azwaki ekateli ete bakristo oyo baboyaki kosambela banzambe ya Roma bábomama. “Nzokande,” Trajan akomaki ete “soki moto awangani ete azali mokristo, mpe amonisi yango polele na ndenge asambeli banzambe na biso, tiká (kotalela ye te ndenge ya liboso) alimbisama mpo abongoli motema.”

Baroma bazalaki kondima te lingomba oyo ezalaki kosɛnga bandimi bákangama kaka na nzambe moko. Banzambe ya Roma bazalaki kosɛnga bongo te, na yango mpo na nini Nzambe ya bakristo azalaki kosɛnga bongo? Bazalaki kokanisa ete losambo ya banzambe ya ekólo ezalaki kaka komonisa ete moto andimi bokonzi wana. Na yango, koboya kosambela banzambe yango ezalaki kotalelama lokola kotɛka mboka. Ndenge Pline amonisaki yango, ezalaki na ntina moko te ya kotinda bakristo mingi na makasi mpo bándima kosala yango. Mpo na bango, kosala likambo wana ezalaki kolimbola kozanga bosembo epai ya Yehova, mpe mingi ya bakristo ya liboso bandimaki kokufa na esika ya kosambela amperɛrɛ.

Mpo na nini likambo yango ezali na ntina mpo na biso lelo oyo? Na mikili mosusu, basɛngaka bana-mboka bákumisa bilembo ya ekólo. Biso bakristo, totosaka bakonzi ya mboka. (Rom. 13:1) Kasi, soki esɛngi kosala milulu ya kokumisa bendele ya ekólo, tolandaka toli ya Yehova Nzambe oyo ezali kosɛnga ete tókangama kaka na ye mpe tolandaka toli ya Liloba na ye oyo esɛngi ‘tókima losambo ya bikeko’ mpe ‘tókeba na bikeko.’ (1 Ko. 10:14; 1 Yoa. 5:21; Nah. 1:2) Yesu alobaki ete: “Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.” (Luka 4:8) Na yango, tiká tókoba kobatela bosembo na biso epai ya Nzambe oyo tosambelaka.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]

Bakristo ya solo bakangamaka kaka na Yehova

[Elilingi na lokasa 3]

Bakristo ya liboso baboyaki kosambela amperɛrɛ to bililingi ya banzambe

Amperɛrɛ Domitien

Zeusi

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Amperɛrɛ Domitien: Todd Bolen/​Bible Places.com; Zeusi: fɔtɔ ya Todd Bolen/​Bible Places.com, bakangaki yango na Archaeological Museum ya Istanbul

[Elilingi na lokasa 4]

Bakristo na Efese baboyaki kosambela nzambe-mwasi Artemisi oyo bato mingi bazalaki kosambela.​—Mis. 19:23-41