Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Harane esika moko ya kala ya misala mingi

Harane esika moko ya kala ya misala mingi

Harane esika moko ya kala ya misala mingi

MPO na baoyo bamesaná na Makomami, soki bayoki nkombo Harane etindaka bango mbala moko bákanisa Abrahama, moto moko ya sembo. Na mobembo na ye oyo asalaki kolongwa na Ure mpo na kokende na mokili ya Kanana, ye ná mwasi na ye Sara mpe tata na ye Tera, mpe mwana ya ndeko na ye Lota bafandaki mwa moke na Harane. Kuna, Abrahama akómaki na bozwi mingi. Nsima ya liwa ya tata na ye, Abrahama akobaki mobembo na ye tii na mokili oyo Nzambe ya solo alakaki ye. (Eba. 11:31, 32; 12:4,5; Mis. 7:2-4) Na nsima, Abrahama atindaki mosaleli na ye oyo aumelaki mingi koleka basaleli na ye mosusu, akende na Harane, to na esika moko oyo ezalaki mosika te, mpo na kolukela Yisaka mwasi. Yakobo, nkɔkɔ ya Abrahama afandaki mpe kuna na boumeli ya mbula mingi.​—Eba. 24:1-4, 10; 27:42-45; 28:1, 2, 10.

Ntango akanelaki Hizikiya, mokonzi ya Yuda, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, atángaki Harane na kati ya “bikólo” oyo bakonzi ya Asiri babɔtɔlaki. Nkombo “Harane” awa elimboli kaka te engumba, kasi mpe bitúká ya zingazinga. (2 Bak. 19:11, 12) Esakweli ya Ezekiele elobeli Harane lokola moko ya bingumba minene oyo ezalaki kosala mombongo na engumba Tire, yango endimisaki ete Harane ezalaki engumba monene na makambo ya mombongo.​—Ezk. 27:1, 2, 23.

Lelo oyo, Harane ezali kaka engumba moko moke oyo ezali pene ya engumba Şanlıurfa, na ɛsti ya Turquie. Kasi, na eleko moko, Harane ezalaki esika moko oyo misala mingi ezalaki kosalema. Harane ezali moko ya bamboka mike oyo ezali kaka na nkombo oyo Biblia ebengi yango. Harranu, na monɔkɔ ya Siri, ekoki kolimbola “Nzela” to “Nzela ya etuluku ya bato ya mibembo,” yango emonisi ete Harane ezalaki na babalabala minene ya mombongo oyo ezalaki katikati na bingumba minene. Na kotalela makomi oyo bakundolaki na Harane, mama ya Mokonzi Nabonide ya Babilone azalaki nganga-nzambe monene na tempelo ya Sîn, nzambe-mwasi sanza ya Harane. Balobaka ete Nabonide abongisaki lisusu tempelo yango. Na nsima, na Harane, baampire ndenge na ndenge ebimaki mpe ekweaki.

Lelo oyo, Harane ekeseni mpenza na ndenge ezalaki na ntango ya kala. Harane ya kala ezalaki engumba moko oyo makambo ya nkita ekómaki mosika, ezalaki engumba moko ya ntina mingi, mingimingi na boumeli ya bileko moko boye. Kasi, Harane ya lelo oyo ezali kaka esika moko oyo ezali na bandako oyo etongamá na basamba oyo ezali lokola sɛrklɛ. Pembenipembeni ya engumba yango okokuta bitiká ya bingumba ya kala. Na mokili ya sika oyo Nzambe akosala, bato mingi oyo bafandaki na Harane, ata mpe Abrahama, Sara, mpe Lota, bakosekwa. Na ntembe te, bakoyebisa biso makambo mingi etali Harane, esika wana ya kala ya misala mingi.

[Elilingi na lokasa 20]

Bitiká ya Harane

[Elilingi na lokasa 20]

Bandako ya bansamba ya sɛrklɛ

[Elilingi na lokasa 20]

Ndenge Harane ezali lelo oyo