Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini kokumisa mibange?

Mpo na nini kokumisa mibange?

Mpo na nini kokumisa mibange?

PEMBENIPEMBENI ya bokula ya Californie na États-Unis, ezali na nzete moko oyo bakangá yango bafɔtɔ mingi koleka banzete nyonso. Babengaka nzete yango nzete ya siprɛ. Balobaka ete nzete yango eumeli koleka mbula 250. Mpo na makasi mpe kitoko na yango, bato batyelaka yango likebi ndenge mingi. Na ndakisa, bakangaka yango na bansinga mpo esimba yango mpe zingazinga na yango bátya mabanga.

Nzete ya siprɛ, ekoki kokundwela biso bakristo ya mibange oyo tozali na bango, baoyo bazali koyika mpiko mpenza. Lolenge ya libosoliboso oyo bazali komonisa mpiko yango ezali na kosakola nsango malamu. Mosakoli Yoele asakolaki ete “mibange” bakoyebisa nsango ya Biblia. (Yoe. 2:28-32; Mis. 2:16-21) Kanisá naino ebele ya bangonga oyo mibange yango balekisaka na molende mpo na kosalisa basusu báyoka ‘nsango malamu ya bokonzi’! (Mat. 24:14) Basakoli yango mosusu ya mibange bayiki mpiko na botɛmɛli mpe na mikakatano mosusu na boumeli ya bambula mingi. Soki nzete ya mpamba lokola siprɛ eyebani ete eumelaka mingi mpe babatelaka yango na mabanga mpe bansinga, boye mibange oyo tozali na bango babongi mpenza tótyela bango likebi tómemya mpe tókumisa bango!

Yehova Nzambe asɛngaki na basaleli na ye ya kala ete: “Okotɛlɛma liboso ya nsuki mpɛmbɛ, mpe osengeli kopesa moto oyo azali mobange lokumu.” (Lev. 19:32) Na kati ya basaleli ya Yehova lelo oyo, ezali na bandakisa malamu ya bato ya sembo oyo ‘batamboli elongo na Nzambe’ na boumeli ya bambula mingi. (Mika 6:8) Lokola bazali kokoba kosalela mitinda ya Makomami, nsuki mpɛmbɛ na bango ezali mpenza “motole ya kitoko.”​—Mas. 16:31.

Ntoma Paulo ayebisaki elenge Timote ete: “Kopamela mokóló na maloba makasi te.” Timote asengelaki nde ‘kobondela [mibange mibali] lokola batata’ mpe “basi oyo bazali mikóló lokola bamama.” (1 Tim. 5:1, 2) Kutu, Timote asengelaki ‘kotɛlɛma’ liboso ya nsuki mpɛmbɛ. Na yango, emonani polele ete Yehova alingaka ete maloba na biso emonisa ete tozali na limemya ya ndenge wana.

Baroma 12:10, elobi boye: “Mpo na kopesana lokumu, bózala bato ya liboso.” Na ntembe te, bakɛngɛli na lisangá bapesaka bakristo oyo bakómi mibange lokumu. Kasi, biso nyonso tosengeli kozala bato ya liboso ya kopesana lokumu.

Ya solo, bato ya libota bazali mpenza na mokumba ya ntina mingi epai ya baboti mpe bankɔkɔ na bango. Bato balukaki ndenge ya kobatela nzete ya siprɛ mpe bazali kokoba kosala yango. Na ntembe te, tosengeli koluka ndenge ya kobatela lokumu ya baboti mpe bankɔkɔ na biso oyo bakómi mibange. Na ndakisa, kozala moyoki malamu ekosalisa ete tókangama te kosala makambo ndenge oyo biso tolingi kozanga kotalela makanisi na bango.​—Mas. 23:22; 1 Tim. 5:4.

Mibange oyo tozali na bango bazali mpenza na motuya na miso ya Yehova. Asundoli bango te. (Nz. 71:18) Nzambe ya solo azali mpenza kopesa bango makasi mpo bákoba kosalela ye na bosembo nyonso. Tiká ete biso mpe tókoba kosunga mpe kopesa mibange lokumu.

[Bililingi na lokasa 7]

Ndenge moko na nzete ya siprɛ oyo esɛngaka kobatela yango, esɛngaka mpe komemya mpe kopesa mibange lokumu

[Eutelo ya bafɔtɔ]

American Spirit Images/​age fotostock