Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tikalá makasi na elimo ntango ozali kobatela ndeko na yo oyo azali kobɛla

Tikalá makasi na elimo ntango ozali kobatela ndeko na yo oyo azali kobɛla

Tikalá makasi na elimo ntango ozali kobatela ndeko na yo oyo azali kobɛla

NTANGO bamonaki mbuma moko monene pembeni ya mokuwa ya mokongo ya Kim, Motatoli moko, minganga basalaki ekzamɛ mpe bamonaki ete azali na maladi ya kanser. * Steve, mobali ya Kim alobi ete: “Ntango minganga basalaki Kim lipaso mpe balongolaki mbuma yango, bakómaki kosalisa ye na mayele oyo babengi radiothérapie mpe chimiothérapie. Yango ezalaki kolɛmbisa ye mpe azalaki lisusu makasi te. Azalaki kokoka lisusu kotambola mpenza te.”

Okoki kokanisa mpasi oyo Steve azalaki koyoka ntango azalaki komona mwasi na ye oyo alingaka mingi azali kobundana na maladi wana oyo ezalaki kolɛmbisa ye? Ntango mosusu ozali na moto moko ya libota oyo azali kobɛla maladi moko oyo ezali kobebisa ye nzoto to azali konyokwama mpo na bobange. (Mos. 12:1-7) Soki ezali bongo, oyebi ete mpo na kobatela malamu moto yango oyo olingaka, yo moko mpe osengeli komityela likebi. Soki olɛmbi na elimo, makanisi na yo mpe kolɔngɔnɔ na yo ya nzoto ekoki mpe kobeba mpe okozala na likoki te ya kokokisa bamposa ya libota na yo. Ndenge nini okoki kokokisa mikumba na yo ya elimo ntango ozali kobatela ndeko na yo oyo azali maladi to akómi mobange? Ezali nde na likambo oyo bandeko mosusu na lisangá bakoki kosala?

Kozala na bokatikati​—Ndenge nini?

Mpo na kozala na bokatikati mpe kozala makasi na elimo mpe na nzoto ntango ozali kobatela ndeko na yo oyo azali na maladi, osengeli komesanaka na makambo ndenge ezali kobongwana mpe koyeba kokabola ntango mpe makasi na yo. Masese 11:2 elobi ete: “Bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.” Na vɛrsɛ oyo, liloba “bopɔlɔ,” elimboli koyeba bandelo na yo. Mpo na koyeba ete ozali kolekisa ndelo te, ekozala malamu otalela programɛ na yo mpe mikumba na yo.

Steve, amonisaki bwanya mpe bopɔlɔ na ndenge atalelaki lisusu mikumba na ye. Longola mosala na ye ya mosuni, azalaki mpe mokambi-misala ya bankulutu mpe mokɛngɛli ya mosala ya kosakola na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova na Irlande. Azalaki mpe na kati ya komite mpo na koyokana na minganga na mboka na bango. Steve alobi boye: “Kim azalaki soki moke te komilela ete nasundoli ye ndenge nazalaki komipesa mingi na mikumba yango. Kasi, nayebaki ete nazalaki kosala mingi koleka makasi na ngai.” Ndenge nini Steve abongisaki likambo yango? Alobi boye: “Nsima ya kobondela, nazwaki ekateli ya kotika mokumba ya mokambi-misala ya bankulutu. Nakobaki kosala lokola nkulutu, kasi lokola napesaki bankulutu mosusu mikumba na ngai misusu nakómaki na likoki ya kozala mingi na Kim mpe kotyela ye likebi oyo azalaki na yango mposa.”

Na nsima, Kim ayokaki malamu. Steve ná Kim batalelaki lisusu makambo ya bomoi na bango, mpe na lisalisi ya mwasi na ye, Steve azongelaki lisusu mikumba oyo azalaki na yango liboso na lisangá. Steve alobi boye: “Toyekolaki kosala na bandelo oyo maladi etyelaki biso. Nazali mpenza na botɔndi epai ya Yehova mpo na lisalisi na ye mpe epai ya mwasi na ngai ndenge azalaki kosalisa ngai kozanga ete amilelalela atako azalaki na nzoto kolɔngɔnɔ te.”

Tózwa mpe ndakisa ya Jerry, mokɛngɛli-motamboli moko ná mwasi na ye Maria. Basengelaki kotalela lisusu mikano na bango mpo na kobatela baboti na bango oyo bakómaki mibange. Maria alobi boye: “Ngai ná mobali na ngai, tozalaki na mokano ya kosala lokola bamisionɛrɛ na mokili ya bapaya. Kasi, lokola babotá Jerry kaka ye moko, baboti na ye bazalaki mpenza na mposa ya lisalisi na ye. Na yango, tozwaki ekateli ya kotikala na Irlande mpo na kobatela bango. Kosala bongo, epesaki biso libaku ete tózalaka ntango nyonso wana ntango tata ya Jerry azalaki na lopitalo liboso akufa. Sikoyo tosololaka na mama ya Jerry mikolo nyonso, mpe tozalaka mosika te soki azali na mposa ya lisalisi. Lisangá oyo mama ya Jerry azali, esungaka ye mingi yango epesaka biso nzela tókoba na mosala ya mokɛngɛli-motamboli.”

Ndenge oyo basusu bakoki kosalisa

Ntango bazalaki kosolola mpo na kozwa bibongiseli mpo na basi mibange ya lisangá oyo mibali na bango bakufá, ntoma Paulo akomaki boye: “Soki moto azali te kopesa bato na ye, mpe mingimingi bato ya ndako na ye, biloko oyo basengeli na yango, awangani kondima mpe azali mabe koleka moto oyo azali na kondima te.” Paulo akundwelaki baninga na ye bakristo ete soki balingi ete misala na bango ‘endimama na miso ya Nzambe,’ basengelaki kokokisaka bamposa ya baboti na bango oyo bakómi mibange mpe bankɔkɔ na bango. (1 Tim. 5:4, 8) Kasi, bandeko mosusu na kati ya lisangá bakoki mpe basengeli mpe kopesaka lisalisi.

Tólobela mpe ndakisa ya Hakan mpe Inger, babalani ya mibange oyo bafandaka na Suède. Hakan alobi ete: “Ntango minganga bamonaki ete mwasi na ngai azali na maladi ya kanser, ezalaki mpasi mpo na biso. Inger azalaki ntango nyonso nzoto kolɔngɔnɔ mpe makasi. Sikoyo esengelaki tokendaka na lopitalo mokolo na mokolo mpo azwaka nkisi mpe bankisi yango ezalaki kolɛmbisa ye. Inger atikalaki na ndako na boumeli ya eleko wana, mpe nasengelaki kozalaka na ye mpe kobatelaka ye.” Ndenge nini bandeko na lisangá basalisaki Hakan mpe Inger?

Bankulutu ya lisangá bazwaki bibongiseli mpo ete babalani yango bálandaka makita na nzela ya telefone. Lisusu, bandeko ya lisangá bazalaki kokende kotala bango mpe kobenga bango na telefone. Bazalaki mpe kotindela bango mikanda mpe bakarte. Hakan alobi boye: “Tomonaki mpenza lisungi ya bandeko nyonso mpe ya Yehova. Lisungi yango ezalaki na ntina mpo tótikala makasi na elimo. Likambo ya esengo Inger abikaki, mpe tozongelaki koyanganaka na makita na Ndako ya Bokonzi.” Ntango bandeko na lisangá bazali kosala oyo bakoki mpo na kosalisa moto ya maladi mpe mibange oyo bazali elongo na bango, bakomonisa ete bazali ‘baninga ya solosolo oyo balingaka ntango nyonso, mpe bazali bandeko oyo babotami mpo na ntango ya mpasi.’​—Mas. 17:17.

Yehova azwaka na motuya milende na yo

Kobatela ndeko na yo oyo azali kobɛla ekoki mpenza kolɛmbisa. Kasi, Mokonzi Davidi akomaki ete: “Esengo na moto oyo azali kotya likebi na moto oyo azangá,” na ndakisa, moto oyo azali na mposa ya lisalisi mpo na maladi.​—Nz. 41:1.

Mpo na nini baoyo bazali kobatela moto ya maladi to oyo azali konyokwama basengeli kozala na esengo? Masese 19:17 elobi ete: “Ye oyo amoniselaka moto oyo azangá boboto azali kodefisa Yehova, mpe Ye akozongisela ye ndenge na ye wana ya kosala.” Nzambe ya solo amibanzabanzaka mpenza mpo na basaleli na ye ya sembo oyo bazali kobɛla mpe apambolaka baoyo bamoniselaka bango boboto. Davidi, mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Yehova ye moko akosunga ye na mbeto ya maladi; okobongola mpenza mbeto na ye nyonso na boumeli ya maladi na ye.” (Nz. 41:3) Tokoki mpenza kozala na elikya ete soki moto oyo azali kobatela moto ya maladi akutani na mikakatano, Yehova akosunga ye.

Ezali mpenza malamu koyeba ete Yehova Nzambe amonaka mpe andimaka oyo tosalaka mpo na kosalisa ndeko na biso oyo azali maladi! Atako kopesa lisungi ya ndenge wana ekoki kosɛnga biso tósala milende, Makomami elendisi biso ete: “Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.”​—Ebr. 13:16.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 2 Bankombo mosusu ezali ya bango te.

[Bililingi na lokasa 18]

Tikalá makasi na elimo mpe ndimá lisalisi ya basusu