Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kobá kolendisa lisangá

Kobá kolendisa lisangá

Kobá kolendisa lisangá

“Bókoba kobɔndisana mpe kolendisana.”​—1 TES. 5:11.

1. Kozala na kati ya lisangá ya bokristo ezali na mapamboli nini, kasi mikakatano nini ezali kaka?

KOZALA na kati ya lisangá ya bokristo ezali lipamboli monene. Ozali na boyokani malamu na Yehova. Lokola otyelaka Liloba na ye motema mpo etambwisa yo, obatelami na mikakatano oyo ekómelaka moto soki azali na etamboli ya mabe. Ozali na baninga ya solosolo oyo balingi bolamu na yo. Ya solo, mapamboli ezali mingi. Kasi, bakristo mingi bazali kobunda na mikakatano ndenge na ndenge. Basusu bakoki kozala na mposa ya lisalisi mpo na kokanga ntina ya makambo mozindo ya Liloba ya Nzambe. Basusu bazali kobɛla to konyokwama na makanisi; basusu mpe bazali komona mpasi mpo na bikateli ya mabe oyo bazwaki. Mpe biso nyonso tozali kofanda na mokili oyo epesi Nzambe mokɔngɔ.

2. Tosengeli kosala nini ntango bandeko na biso bakutani na mpasi, mpe mpo na nini?

2 Moko te kati na biso akolinga komona ndeko na ye mokristo azali komona mpasi to konyokwama. Ntoma Paulo akokanisaki lisangá na nzoto mpe alobaki ete “soki enama moko ezali koyoka mpasi, binama nyonso mosusu ezali mpe koyoka mpasi elongo na yango.” (1 Ko. 12:12, 26) Na ntango wana, tosengeli kosala makasi tósalisa bandeko na biso ya lisangá. Biblia ezali na masolo mingi oyo elobeli ndenge bandeko ya lisangá basalisaki basusu bábunda mpe bálonga mikakatano. Wana tozali kotalela masolo yango, kanisá ndenge oyo okoki mpe kosalisa basusu na ndenge wana. Ndenge nini okoki kosalisa bandeko na yo bákoba kosalela Nzambe mpe na ndenge yango kolendisa lisangá ya Yehova?

“Bakamataki ye esika moko na bango”

3, 4. Ndenge nini Akila ná Prisile basalisaki Apolosi?

3 Liboso Apolosi aya kofanda na Efese, azalaki mopalanganisi ya nsango malamu ya molende. Lisolo oyo ezali na Misala elobi boye: “Lokola azalaki kopela na elimo, abandaki kosakola mpe koteya na ndenge ya malamu mpenza makambo oyo etali Yesu, kasi ayebaki kaka batisimo ya Yoane.” Lokola Apolosi ayebaki batisimo “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu” te, mbala mosusu ateyamaki na bayekoli ya Yoane Mobatisi to bayekoli ya Yesu liboso ya Pantekote 33 T.B. Atako Apolosi azalaki molende, ezalaki na makambo mosusu ya ntina oyo ayebaki te. Ndenge nini kozala elongo na baninga bandimi esalisaki ye?​—Mis. 1:4, 5; 18:25; Mat. 28:19.

4 Ntango Akila ná mwasi na ye Prisile bayokaki Apolosi azali koloba na mpiko na sinagoga, bakamataki ye esika moko na bango, mpe bateyaki ye makambo mosusu. (Tángá Misala 18:24-26.) Likambo yango emonisaki bolingo. Na ntembe te, Akila ná Prisile balobaki na ye na mayele mpe na ndenge oyo ekosalisa ye; bayokisaki ye te ete bazali kopamela ye. Likambo na ye ezalaki kaka ete ayebaki lisolo ya ebandeli ya lisangá ya bokristo te. Mpe na ntembe te, Apolosi azalaki na botɔndi ndenge baninga na ye ya sika bayebisaki ye makambo yango ya ntina. Lokola ayebaki makambo yango, Apolosi “asalisaki mpenza” bandeko na ye na Akaya mpe apesaki litatoli na mpiko.​—Mis. 18:27, 28.

5. Lisalisi nini bankóto ya basakoli ya Bokonzi bazali kopesa bato na bolingo nyonso, mpe ebimisaka matomba nini?

5 Bato mingi na lisangá ya bokristo lelo bazali na botɔndi mingi epai ya bato oyo basalisaki bango báyeba Biblia. Bayekoli mingi ya Biblia basalá boninga makasi ná bato oyo bateyaki bango. Mbala mingi, kosalisa moto ayeba solo esɛngaka kozala na programɛ malamu ya kosolola na ye mbala na mbala na boumeli ya basanza mingi. Nzokande, basakoli ya Bokonzi bandimaka kosala yango mpo bayebi ete ezali likambo ya bomoi to ya liwa. (Yoa. 17:3) Mpe ezalaka mpenza esengo komona bato bakangi ntina ya solo, bayokanisi bomoi na bango na yango, mpe bamipesi mpo na kosala mokano ya Yehova!

“Bazalaki koloba malamu mpo na ye”

6, 7. (a) Mpo na nini Paulo aponaki Timote azala moninga na ye ya mobembo? (b) Lisalisi oyo Timote azwaki ekómisaki ye tii wapi na elimo?

6 Ntango bantoma Paulo ná Silasi bakendaki na Listra na mobembo ya mibale ya mosala ya misionɛrɛ, bakutaki elenge mobali moko na nkombo Timote, oyo mbala mosusu azalaki na mbula pene na 20 to mwa moke koleka. “Bandeko na Listra mpe na Ikoniumu bazalaki koloba malamu mpo na ye.” Mama ya Timote, Enise, mpe nkɔkɔ na ye ya mwasi Loisi bazalaki bakristo oyo bamipesá na Nzambe, kasi tata na ye azalaki mondimi te. (2 Tim. 1:5) Mbala mosusu Paulo ayebaki libota yango na mobembo na ye ya liboso na etúká yango mwa bambula liboso. Kasi sikoyo ntoma yango atyelaki Timote likebi mingi mpo emonanaki ete azalaki lokola bilenge mosusu te. Yango wana, lokola bankulutu ya lisangá mpe bandimaki, Timote akómaki mosungi ya Paulo na mosala ya misionɛrɛ.​—Tángá Misala 16:1-3.

7 Timote azalaki na makambo mingi ya koyekola epai ya moninga na ye wana ya mokóló. Mpe ayekolaki malamu mpenza na boye ete, na nsima Paulo atyelaki Timote motema mpe atindaki ye akende kotala masangá mpe asala lokola momonisi na ye. Na boumeli ya mbula soki 15 oyo Timote alekisaki elongo na Paulo, elenge mobali yango oyo liboso ayebaki makambo mingi te mpe mbala mosusu azalaki nsɔninsɔni akendaki liboso na elimo tii akómaki mokɛngɛli ya malamu mingi.​—Flp. 2:19-22; 1 Tim. 1:3.

8, 9. Bandeko ya lisangá bakoki kosala nini mpo na kolendisa bilenge? Pesá ndakisa.

8 Lelo, bilenge mibali mpe bilenge basi mingi na lisangá bakoki mpenza kokende liboso na elimo. Soki bandeko ya lisangá oyo bazali bandakisa malamu balendisi bango mpe bateyi bango malamu, bilenge yango bakoki kosala milende mpe kondima mikumba ya minene koleka na kati lisangá ya Yehova. Talá na lisangá na bino! Omoni bilenge oyo bakoki komipesa, ndenge Timote asalaki? Soki osalisi bango mpe olendisi bango, bakoki kokóma babongisi-nzela, kosala na Betele, kokóma bamisionɛrɛ, to mpe bakɛngɛli-batamboli. Okoki kosala nini mpo osunga bango bákokisa mikano ya ndenge wana?

9 Martin, oyo asali na Betele mbula 20, azali kokanisa na botɔndi ndenge mokɛngɛli moko ya zongazonga atyelaki ye likebi eleki mbula 30, ntango bango mibale bazalaki na mosala ya kosakola. Mokɛngɛli yango ayebisaki ye na esengo ndenge ye moko asalaki na Betele ntango azalaki elenge. Alendisaki Martin atala soki akoki komipesa mpo lisangá ya Yehova esalela ye na ndenge wana. Martin amonaka ete lisolo wana oyo abosanaka te nde esalisaki ye na bikateli oyo azwaki na nsima. Nani ayebi bolamu oyo okoki kosala epai ya bilenge soki osololi na bango na oyo etali mikano ya elimo?

“Bólobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo enyokwami na makanisi”

10. Epafrodite ayokaki ndenge nini, mpe mpo na nini?

10 Epafrodite asalaki mobembo molai mpe ya mpasi longwa na Filipi tii na Roma mpo na kotala ntoma Paulo, oyo azalaki na bolɔkɔ mpo na kondima na ye. Bandeko ya Filipi nde batindaki ye. Amemelaki ntoma Paulo makabo, mpe akanaki kotikala na ye mpo na kosala nyonso oyo akokaki mpo na kosalisa Paulo na ntango wana ya mpasi. Nzokande ntango azalaki na Roma, Epafrodite abɛlaki makasi, “pene na liwa.” Lokola amonaki ete alongi te kokokisa mosala oyo batindaki ye, Epafrodite akómaki konyokwama na makanisi.​—Flp. 2:25-27.

11. (a) Mpo na nini tosengeli kokamwa te soki bandeko mosusu na lisangá banyokwami na makanisi? (b) Paulo asɛngaki Bafilipi básala nini mpo na Epafrodite?

11 Lelo oyo, makambo mingi esalaka ete bato bányokwama na makanisi. Lapolo ya OMS (Organisation mondiale de la santé) emonisi ete moto moko kati na bato mitano na mokili akoki konyokwama na makanisi ntango moko boye na bomoi na ye. Ekoki mpe kokómela Batatoli ya Yehova. Makambo ya libota, maladi, kolɛmba nzoto mpo olongi te na likambo moko, to makambo mosusu ekoki kolɛmbisa biso. Bafilipi bakokaki kosala nini mpo na kosalisa Epafrodite? Paulo akomaki boye: “Bóyamba ye na ndenge bomeseni koyamba na kati ya Nkolo na esengo nyonso; mpe bókoba kolɛngɛla bato ya ndenge wana, mpamba te mpo na mosala ya Nkolo akómaki mpenza pene na liwa, atyaki molimo na ye na likama, mpo asala malamu mpenza na esika na bino mpo bino moko bozalaki awa te mpo na kosalela ngai.”​—Flp. 2:29, 30.

12. Nini ekoki kobɔndisa bato oyo bazali konyokwama na makanisi?

12 Biso mpe tosengeli kolendisa bandeko oyo balɛmbi nzoto to bazali konyokwama na makanisi. Na ntembe te, ezali na makambo ya malamu oyo tokoki koloba mpo na mosala oyo bazali kosalela Yehova. Mbala mosusu basalá mbongwana monene na bomoi na bango mpo na kokóma bakristo to mpo na kosala mosala ya ntango nyonso. Tosepelaka na milende ya ndenge wana, mpe tokoki kondimisa bango ete Yehova mpe asepelaka na yango. Soki bobange to maladi ezali kopekisa bandeko mosusu ya sembo básala nyonso oyo bazalaki kosala liboso, tosengeli kaka kopesa bango limemya mpo na bambula oyo balekisi na mosala ya Nzambe. Ezala ndenge nini, Yehova asɛngi basaleli na ye nyonso ya sembo likambo oyo: “Bólobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo enyokwami na makanisi, bósalisa bato ya bolɛmbu, bózala na motema molai epai ya bato nyonso.”​—1 Tes. 5:14.

‘Bólimbisa ye na boboto mpe bóbɔndisa ye’

13, 14. (a) Likambo nini ya monene lisangá ya Korinti esalaki, mpe mpo na nini? (b) Kobimisa moto wana na lisangá esalaki nini?

13 Lisangá ya Korinti ya ekeke ya liboso ezalaki na mobali moko oyo azalaki kosala pite mpe abongolaki motema te. Etamboli na ye ezalaki likama mpo na bopɛto ya lisangá mpe ezalaki kobɛtisa ata bapakano libaku. Na yango, Paulo apesaki mitindo ete mobali yango abimisama na lisangá.​—1 Ko. 5:1, 7, 11-13.

14 Disiplini yango esalisaki. Ebatelaki lisangá na bopusi ya mbindo, mpe mosumuki azongelaki makanisi ya malamu mpe abongolaki mpenza motema. Lokola mobali yango amonisaki ete abongoli mpenza motema, Paulo alobaki na mokanda na ye ya mibale oyo akomelaki lisangá yango ete mobali yango asengeli kozongisama na lisangá. Kasi, esukaki kaka wana te. Paulo apesaki mpe lisangá mitindo ete ‘bálimbisa [mosumuki oyo abongolaki motema] na boboto mpe bábɔndisa ye, noki ezala na ndenge nini moto yango azinda na mawa na ye oyo eleki ndelo.’​—Tángá 2 Bakorinti 2:5-8.

15. Ndenge nini tosengeli kotalela basali-mabe oyo babongoli motema mpe bazongisami na lisangá?

15 Lisolo yango eteyi biso nini? Toyokaka mawa ntango esɛngaka kobimisa bato na lisangá. Mbala mosusu basambwisaki nkombo ya Nzambe mpe bayokisaki lisangá nsɔni. Mbala mosusu kutu, basalelaki biso moko lisumu. Atako bongo, ntango bankulutu oyo bazali kotalela likambo yango bamoni, na boyokani na malako ya Yehova, ete mosumuki oyo abongoli motema asengeli kozongisama na lisangá, elakisi ete Yehova alimbisi ye. (Mat. 18:17-20) Biso mpe tosengeli komekola Yehova te? Ya solo, soki tozali motema makasi mpe toboyi kolimbisa ekomonisa ete tozali kotɛmɛla Yehova. Mpo kimya mpe bomoko ezala na lisangá ya Nzambe mpe mpo Yehova andima biso, tosengeli ‘kolakisa lisusu bolingo’ mpo na basumuki oyo babongoli mpenza motema mpe bazongi na lisangá!​—Mat. 6:14, 15; Luka 15:7.

“Akosalisa ngai”

16. Mpo na nini Paulo alɛmbaki nzoto mpo na Marko?

16 Lisolo mosusu ya Biblia emonisi ete tosengeli te kokóma na makanisi ya mabe mpo na bandeko oyo balɛmbisi biso nzoto. Na ndakisa, Yoane Marko alɛmbisaki mpenza ntoma Paulo nzoto. Ndenge nini? Ntango Paulo ná Barnabasi babandaki mobembo ya liboso na mosala ya misionɛrɛ, Marko akendaki elongo na bango mpo na kosalisa bango. Kasi na ntango moko boye na mobembo yango mpe mpo na ntina moko oyo eyebani te, Yoane Marko asundolaki baninga na ye mpe azongaki ndako. Paulo alɛmbaki mpenza nzoto mpo na ekateli yango na boye ete ntango babongisaki mobembo ya mibale, azwanaki matata ná Barnabasi ntango bazalaki kotalela soki Marko akokende lisusu elongo na bango. Na kotalela makambo oyo esalemaki na mobembo ya liboso, Paulo alingaki te Marko asala lisusu mobembo elongo na bango.​—Tángá Misala 13:1-5, 13; 15:37, 38.

17, 18. Ndenge nini toyebi ete matata kati na Paulo ná Marko esilaki, mpe liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?

17 Na ntembe te, Marko atikaki te ete koboya oyo Paulo aboyaki ye elɛmbisa ye nzoto koleka ndelo, mpo akobaki mosala na ye ya misionɛrɛ na teritware mosusu elongo na Barnabasi. (Mis. 15:39) Makambo oyo Paulo akomaki mpo na ye mwa bambula na nsima emonisi ete Marko azalaki sembo mpe bakokaki kotyela ye motema. Ntango Paulo azalaki na bolɔkɔ na Roma, akomelaki Timote mokanda. Na mokanda yango, Paulo alobaki mpe boye: “Kamatá Marko mpe yaká na ye, mpo akosalisa ngai na mosala.” (2 Tim. 4:11) Ya solo, Paulo amonaki ete Marko asalaki milende mingi.

18 Tokoki kozwa liteya na likambo yango. Marko akolisaki bizaleli ya misionɛrɛ ya malamu. Abɛtaki libaku te ndenge Paulo aboyaki ye liboso. Ye ná Paulo bazalaki bato ya elimo, mpe babombelanaki nkanda na motema libela na libela te. Kutu na nsima, Paulo andimaki ete Marko akosalisa ye mingi. Na yango, ntango bandeko balongi mikakatano mpe makambo yango eleki, likambo ya malamu ya kosala ezali kokende liboso mpe kokoba kosalisa basusu bákola na elimo. Kondima malamu oyo basusu basalaka elendisaka lisangá.

Lisangá mpe yo

19. Lisalisi nini bato nyonso ya lisangá bakoki kopesana?

19 Na ‘ntango oyo ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano,’ ozali na mposa ya lisalisi ya bandeko na yo ya mibali mpe ya basi na kati ya lisangá; bango mpe bazali na mposa ya lisalisi na yo. (2 Tim. 3:1) Mokristo akoki mbala mosusu koyeba te ndenge ya kosala mpo na kolonga mikakatano oyo akutani na yango, kasi Yehova ayebi. Mpe akoki kosalela bandeko ya lisangá​—ata mpe yo—​mpo na kosalisa basusu bálanda nzela ya malamu. (Yis. 30:20, 21; 32:1, 2) Na yango, salá nyonso olanda toli ya ntoma Paulo! Kobá ‘kobɔndisa mpe kolendisa basusu, ndenge kutu ozali kosala yango.’​—1 Tes. 5:11.

Okopesa eyano nini?

• Mpo na nini esengeli kolendisa basusu na kati ya lisangá ya bokristo?

• Mikakatano ya ndenge nini okoki kosalisa basusu bálonga?

• Mpo na nini tozali na mposa ya lisalisi ya basusu na lisangá?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 11]

Soki ndeko mokristo azali kobunda na mokakatano, tokoki kosalisa ye

[Elilingi na lokasa 12]

Bilenge mingi, mibali mpe basi na kati ya lisangá lelo, bakoki mpenza kokende liboso na elimo