Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Koloba na boboto elendisaka boyokani ya malamu

Koloba na boboto elendisaka boyokani ya malamu

Koloba na boboto elendisaka boyokani ya malamu

“Liloba na bino ezala ntango nyonso kitoko.”​—KOL. 4:6.

1, 2. Lokola ndeko moko alobaki na boboto, ebimisaki litomba nini?

NDEKO mobali moko alobi boye: “Mokolo moko na mosala ya kosakola ndako na ndako, nakutanaki na mobali moko oyo asilikaki makasi mpenza tii mbɛbu mpe nzoto na ye mobimba ebandaki kolɛnga. Na kimya nyonso, namekaki kosalela Biblia mpo na kosolola na ye, kasi ematisaki nde nkanda na ye. Mwasi ná bana na ye bayaki wana mpe babandaki kofinga ngai, mpe namonaki ete nasengeli kokende. Nayebisaki libota yango ete nayaki na kimya mpe nalingi kokende na kimya. Nalakisaki bango Bagalatia 5:22 mpe 23, oyo etángi bolingo, motema pɛtɛɛ, komipekisa mpe kimya. Mpe nakendaki na ngai.

2 “Na nsima, ntango nazalaki kosakola na bandako oyo ezali na ngámbo mosusu ya balabala, namonaki libota yango bafandi na baeskalye liboso ya ndako na bango. Babengaki ngai. Namitunaki ete: ‘Nini lisusu?’ Mobali yango azalaki na molangi ya mai ya malili mpe apesaki ngai kɔpɔ moko. Asɛngaki bolimbisi mpo na maloba makasi oyo alobaki na ngai mpe apesaki ngai longonya mpo na kondima na ngai ya makasi. Tokabwanaki na kimya.”

3. Mpo na nini tosengeli te kotika basusu básilikisa biso?

3 Na mokili oyo etondi na mitungisi, mbala mingi ezalaka mpasi te kokutana na bato ya nkandankanda, ata na mosala ya kosakola. Soki tokutani na bato ya ndenge wana, ezali na ntina mingi tómonisa ‘boboto mpe limemya makasi.’ (1 Pe. 3:15) Soki ndeko oyo touti kolobela atikaki nkanda ya nkolo-ndako mpe kozanga boboto na ye esilikisa ye, mbala mosusu mobali yango alingaki kolɛmbisa motema te ndenge asalaki; mbala mosusu alingaki kutu kosilika makasi koleka. Lokola ndeko wana amipekisaki mpe alobaki na boboto, makambo esukaki malamu.

Nini ekómisaka maloba kitoko?

4. Mpo na nini tosengeli kozala na maloba ya kitoko?

4 Ezala na libándá to na kati ya lisangá, ata mpe na libota na biso, ezali na ntina tólanda toli ya ntoma Paulo oyo: “Liloba na bino ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa.” (Kol. 4:6) Kozala na maloba ya kitoko mpe ya malamu ndenge wana ezali na ntina mpo lisolo eleka malamu mpe na kimya.

5. Kosolola malamu elimboli nini te? Pesá ndakisa.

5 Kosolola malamu elimboli te koloba likambo nyonso oyo ozali kokanisa to kobimisa mayoki na yo nyonso na mbala moko, mingimingi soki osiliki. Makomami emonisi ete kobimisa maloba ya nkanda kozanga komipekisa ezali nde bolɛmbu, kasi makasi te. (Tángá Masese 25:28; 29:11.) Na libaku moko, Moize​—oyo azalaki “na komikitisa mingi koleka” bato nyonso ya ntango na ye—​atikaki botomboki ya ekólo Yisraele etinda ye asilika mpe azanga kopesa Nzambe nkembo. Moize alobaki polele ndenge oyo azalaki komiyoka, kasi Yehova asepelaki te. Nsima ya kotambwisa Bayisraele mbula 40, Moize azangaki libaku kitoko ya kokɔtisa bango na Mokili ya Ndaka.​—Mit. 12:3; 20:10, 12; Nz. 106:32.

6. Kozala na bokɛngi na maloba na biso elimboli nini?

6 Makomami ekumisi bato oyo bamipekisaka mpe bazalaka na bokɛngi, to bososoli malamu, ntango bazali koloba. Elobi boye: “Na ebele ya maloba, makambo ya kobuka mibeko ezangaka te, kasi ye oyo apekisaka mbɛbu na ye azali kosala na mayele.” (Mas. 10:19; 17:27) Atako bongo, kozala na bokɛngi elimboli te koboya koloba. Elimboli kozala na maloba ya “kitoko,” kosalela lolemo mpo na kobikisa kasi mpo na kozokisa te.​—Tángá Masese 12:18; 18:21.

“Ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba”

7. Makambo ya ndenge nini tosengeli koloba te, mpe mpo na nini?

7 Kaka ndenge tosengeli komonisa boboto mpe komipekisa ntango tozali kosolola na baninga ya mosala to na bapaya oyo tokutani na bango na mosala ya kosakola, tosengeli mpe kosala bongo na lisangá mpe na ndako. Koloba to kosala likambo moko na nkanda kozanga kotalela makambo oyo ekoya nsima ekoki kosala yo moko mpe bato mosusu mabe mingi, na elimo, na makanisi, to na nzoto. (Mas. 18:6, 7) Tosengeli kopekisa makanisi ya mabe, oyo emonisaka ezaleli na biso ya kozanga kokoka. Maloba ya mabe, ya kotyola, ya kokitisa basusu, mpe nkanda oyo etondi na koyina ezali malamu te. (Kol. 3:8; Yak. 1:20) Ekoki kobebisa boyokani malamu na basusu mpe na Yehova. Yesu ateyaki boye: “Moto nyonso oyo akobombela ndeko na ye nkanda akozongisa monɔkɔ na tribinale; kasi moto nyonso oyo akoloba na ndeko na ye liloba ya kotyola oyo ekoki kutu kolobelama te akozongisa monɔkɔ na Tribinale Monene; nzokande moto nyonso oyo akoloba ete, ‘Yo nsuka ya bolole!’ akoki kobwakama na mɔtɔ ya Gehena.”​—Mat. 5:22.

8. Ntango nini tosengeli kobimisa mayoki na biso, kasi na ndenge nini?

8 Kasi, na makambo mosusu, tokoki komona ete ezali malamu tóloba. Soki ndeko moko alobi to asali likambo moko oyo etungisi yo mingi mpe omoni ete okoki kolekisa yango kaka boye te, kotika nkanda ekola na motema te. (Mas. 19:11) Soki moto apesi yo nkanda, kangá motema mpe na nsima salá makambo oyo esengeli mpo na kosilisa likambo yango. Paulo akomaki boye: “Moi elala te bino bozali kaka na nkanda.” Lokola likambo yango ezali kaka kotungisa yo, bólobela yango na boboto na ntango oyo ebongi. (Tángá Baefese 4:26, 27, 31, 32.) Sololá likambo yango na ndeko na yo, polelepolele kasi na boboto, mpo na kozongisa boyokani.​—Lev. 19:17; Mat. 18:15.

9. Mpo na nini tosengeli kopekisa mayoki na biso liboso ya kosolola na moto?

9 Ya solo, tosengeli koponaka ntango oyo ebongi. Ezali na “ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba.” (Mos. 3:1, 7) Longola yango, “motema ya moyengebene emanyolaka mpo na koyanola.” (Mas. 15:28) Yango ekoki kosɛnga ozela mwa moke liboso ya kosolola likambo moko mpo na kosilisa yango. Soki olobeli likambo ntango moninga azali naino kotungisama makasi ekoki kobebisa makambo; kasi ezali mpe malamu te kozela ntango molai.

Misala ya boboto elendisaka boyokani ya malamu

10. Na ndenge nini kosalela basusu makambo ya boboto ekoki kobongisa boyokani?

10 Koloba na boboto mpe kosolola malamu esalisaka moto asala mpe abatela boyokani ya kimya na basusu. Kutu, kosala nyonso oyo tokoki mpo na kobongisa boyokani na biso na basusu ekoki kobongisa ndenge na biso ya kosolola na bango. Soki tozali kosalela basusu makambo ya boboto na motema moko​—tozali koluka mabaku ya kosalisa bango, kokabela bango na motema malamu, koyamba bapaya—​tokoki kozwa libaku ya kosolola na bango polele. Ekoki ata kotya “makala ya mɔtɔ” na motó ya moto mpe ekoki kobimisa bizaleli na ye ya malamu, mpe kosalisa bino bósolola mpo bósilisa likambo.​—Rom. 12:20, 21.

11. Yakobo asalaki ndenge nini mpo na kozongisa boyokani na Esau, mpe ebimisaki mbuma nini?

11 Yakobo mokonzi ya libota ayebaki likambo yango. Lipasa na ye Esau asilikelaki ye makasi, bongo Yakobo akimaki Esau noki aya koboma ye. Nsima ya bambula mingi, Yakobo azongaki. Esau ayaki kokutana na ye, elongo na mibali 400. Yakobo abondelaki Yehova asalisa ye. Na nsima, atindelaki Esau likabo monene ya bibwɛlɛ. Likabo yango esalaki mosala oyo esengeli. Ntango bakutanaki, motema ya Esau elɛmbaki, mpe apotaki mbangu mpe ayambaki Yakobo.​—Eba. 27:41-44; 32:6, 11, 13-15; 33:4, 10.

Lendisá basusu na maloba ya boboto

12. Mpo na nini tosengeli koloba na bandeko na biso maloba ya boboto?

12 Bakristo basalelaka Nzambe, kasi bato te. Atako bongo, tolingaka ete basusu bándima biso. Maloba na biso ya boboto ekoki koyeisa pɛpɛlɛ kilo oyo bandeko na biso ya lisangá bazali komema. Kasi maloba ya makasi ekoki kokómisa yango kilo koleka mpe kotinda ata bamosusu bámituna soki mbala mosusu Yehova aboyi bango. Na yango, tóyebisaka basusu makambo ya kolendisa, “liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga na ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki eloko ya malonga.”​—Ef. 4:29.

13. Likambo nini bankulutu basengeli kobosana te (a) ntango bazali kopesa toli? (b) ntango bazali kokoma mokanda?

13 Mingimingi bankulutu basengeli kozala na “boboto” mpe kosalela etonga makambo na bolingo. (1 Tes. 2:7, 8) Ntango bankulutu basengeli kopesa toli, mokano na bango ezali ya kosala yango “na boboto,” ata ntango bazali koloba na bato oyo “bazali na ezaleli ebongi te.” (2 Tim. 2:24, 25) Bankulutu basengeli mpe koloba na boboto na mikanda ntango esengeli kokomela lisangani mosusu ya bankulutu to biro ya filiale. Basengeli kozala na boboto mpe na mayele, na kolanda makambo oyo totángaka na Matai 7:12.

Koloba na boboto na kati ya libota

14. Toli nini Paulo apesaki mibali, mpe mpo na nini?

14 Ezalaka mpasi te kobosana ndenge maloba na biso, bajɛstɛ ya elongi mpe ya nzoto ekoki kosala epai ya basusu. Na ndakisa, mibali mosusu bayebaka mpenza te ndenge maloba na bango esalaka epai ya basi na bango. Ndeko mwasi moko alobaki boye: “Nabangaka mingi ntango mobali na ngai asiliki mpe abandi kogangela ngai.” Maloba ya makasi ekoki kosala mwasi mpasi mingi koleka mobali mpe ekoki kotikala ye na motema ntango molai. (Luka 2:19) Ezalaka bongo mingimingi mpo na maloba ya moto oyo mwasi alingaka mpe asepelaka kopesa ye limemya. Paulo apesaki mibali toli oyo: “Bókoba kolinga basi na bino mpe bóyokelaka bango nkanda makasi te.”​—Kol. 3:19.

15. Pesá ndakisa oyo emonisi ntina oyo mobali asengeli kosalela mwasi na ye makambo na boboto.

15 Na likambo yango, ndeko mobali moko oyo abalá banda kala amonisaki ntina oyo mobali asengeli kosalela mwasi na ye makambo na boboto, lokola “mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ.” Alobaki boye: “Soki omemi mbɛki moko ya motuya, oyo ekoki kopasuka noki, osengeli kosimba yango makasi mingi te, noki epasuka. Ata soki obongisi yango, esika oyo epasuki ekoki komonana kaka. Soki mobali azali koloba na mwasi na ye maloba ya makasi mingi, akoki kozokisa ye. Ekoki kotika mpota oyo ekosila noki te na boyokani na bango.”​—Tángá 1 Petro 3:7.

16. Ndenge nini mwasi akoki kotonga libota na ye?

16 Mibali mpe bakoki kolendisama to kolɛmba nzoto na maloba ya basusu, ata mpe ya basi na bango. “Mwasi ya mayele,” oyo motema ya mobali na ye ekoki mpenza ‘kondimela ye,’ atyaka likebi na mayoki ya mobali na ye, kaka ndenge alingaka mobali asala mpe mpo na ye. (Mas. 19:14; 31:11) Ya solo, mwasi akoki kozala na bopusi mingi na libota, na ndenge ya malamu to ya mabe. “Mwasi ya bwanya mpenza atongi ndako na ye, kasi oyo ya zoba abukaka yango na mabɔkɔ na ye moko.”​—Mas. 14:1.

17. (a) Ndenge nini bana basengeli koloba na baboti na bango? (b) Ndenge nini mikóló basengeli koloba na bilenge, mpe mpo na nini?

17 Baboti ná bana mpe basengeli kolobanaka na boboto. (Mat. 15:4) Ntango tozali koloba na bana, soki tozali kokanisa bolamu na bango, ekosalisa biso tóboya ‘kosilikisa’ bango to kopesa bango nkanda. (Kol. 3:21; Ef. 6:4) Ata soki bana basengeli kozwa disiplini, baboti mpe bankulutu basengeli koloba na bango na limemya. Na ndenge yango, mikóló bakosalisa bilenge básembola etamboli na bango mpe bábatela boyokani na bango na Nzambe. Koloba na bango na limemya ezali malamu koleka kotinda bango bámona ete tokanisi ete bakobonga te, mpe bango moko bámona ete bakobonga te. Bana bakoki kobosana toli nyonso oyo bazwaki, kasi bakobosana te ndenge oyo bato balobaki na bango.

Lobáká makambo ya malamu oyo euti na motema

18. Ndenge nini tokoki kolongola makanisi mpe mayoki ya mabe?

18 Kopekisa nkanda elimboli kaka te kotya elongi ya kimya. Mokano na biso esengeli kozala kaka te ya kopekisa mayoki na biso. Koluka kolakisa ete tozali na kimya libándá nzokande tozali kotɔka na nkanda na kati ebakisaka mpasi na motema. Ezali lokola konyata frein ya motuka ná accélérateur na mbala moko. Ekopesa motuka mpasi mingi mpe ekoki kobebisa yango. Na yango, kobomba nkanda te bongo na nsima otika yango engala. Bondelá Yehova asalisa yo olongola makanisi ya mabe. Tiká elimo ya Yehova ebongola makanisi mpe motema na yo mpo eyokana na mokano na ye.​—Tángá Baroma 12:2; Baefese 4:23, 24.

19. Tokoki kosala nini mpo tókima makambo oyo ekoki kopesa biso nkanda?

19 Salá makambo oyo ekoki kosalisa yo opekisa nkanda na yo. Soki okutani na likambo moko oyo ekoki kopesa yo nkanda mpe omoni ete obandi kosilika na kati ya motema, ekoki kozala malamu olongwa na esika yango, mpo nkanda na yo ekita naino. (Mas. 17:14) Soki moto oyo ozali kosolola na ye abandi kosilika, salá makasi mpenza mpo oloba na boboto. Kobosana te: “Eyano, ntango ezali ya boboto, elongolaka nkɛlɛ, kasi liloba oyo epesaka mpasi ematisaka nkanda.” (Mas. 15:1) Kokatela moto mangala to koloba maloba ya makasi ekobakisa mafuta na mɔtɔ ata soki olobi yango na mongongo ya malamu. (Mas. 26:21) Na yango, soki likambo moko etye komipekisa na yo na komekama, ‘kowela koloba te, koyoka nkanda noki te.’ Bondelá mpo elimo ya Yehova esalisa yo oloba makambo ya malamu, kasi ya mabe te.​—Yak. 1:19.

Bolimbisi oyo euti na motema

20, 21. Nini ekoki kosalisa biso tólimbisaka basusu, mpe mpo na nini tosengeli kosala bongo?

20 Likambo ya mawa, moko te kati na biso akoki kopekisa lolemo na ye na ndenge ya kokoka. (Yak. 3:2) Ezala basali milende ndenge nini, ata bandeko ya libota to bandeko na biso ya elimo bakoki ntango mosusu kobimisa maloba oyo ezokisi mayoki na biso. Na esika tósilika nokinoki, tózala nde motema molai mpe tóluka koyeba ntina oyo mbala mosusu balobaki likambo yango. (Tángá Mosakoli 7:8, 9.) Bazalaki nde kotungisama, kobanga, kobɛla, to kobunda na likambo moko boye?

21 Makambo ya ndenge wana epesi moto nzela te angala na nkanda. Kasi, koyeba makambo yango ekoki kosalisa biso tósosola ntina oyo ntango mosusu bato balobaka mpe basalaka makambo oyo ebongi te mpe ekoki kotinda biso tóyeba kolimbisa. Biso nyonso tolobá to tosalá likambo oyo ezokisaki basusu, mpe tozali na elikya ete bakolimbisa biso na boboto. (Mos. 7:21, 22) Yesu alobaki ete mpo Nzambe alimbisa biso, tosengeli kolimbisa basusu. (Mat. 6:14, 15; 18:21, 22, 35) Yango wana, tosengeli kosɛngaka bolimbisi nokinoki mpe kolimbisa nokinoki mpo na kobatela bolingo, “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko,” na kati ya libota mpe na kati ya lisangá.​—Kol. 3:14.

22. Mpo na nini ezali malamu tósala milende ya koloba na boboto?

22 Mbala mosusu, makambo oyo ekoki kobebisa esengo mpe bomoko na biso ekobakisama awa mokili oyo ya bato ya nkandankanda ezali kokóma na nsuka na yango. Kosalela mitinda ya Liloba ya Nzambe ekosalisa biso tósalela lolemo na biso mpo na kosala malamu, kasi mabe te. Tokozala na boyokani ya kimya na bandeko na biso ya lisangá mpe ya libota, mpe ndakisa na biso ekopesa basusu litatoli ya malamu mpo na Yehova, “Nzambe ya esengo.”​—1 Tim. 1:11.

Okoki kolimbola?

• Mpo na nini tosengeli kopona ntango oyo ebongi mpo na kolobela makambo?

• Mpo na nini bato ya libota moko basengeli kolobana maloba ya “kitoko”?

• Ndenge nini tokoki kokima koloba makambo ya kozokisa?

• Nini ekoki kosalisa biso tólimbisaka?

[Mituna mpo na boyekoli]

[Bililingi na lokasa 21]

Tiká nkanda na yo ekita naino, mpe na nsima luká ntango oyo ebongi mpo na kosolola

[Elilingi na lokasa 23]

Mobali asengeli ntango nyonso koloba na mwasi na ye na boboto