Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Komipesa na makambo ya elimo epesaka makasi

Komipesa na makambo ya elimo epesaka makasi

Komipesa na makambo ya elimo epesaka makasi

“Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino . . . , mpe milimo na bino ekopema.”​—MAT. 11:29.

1. Ebongiseli nini Nzambe azwaki na Ngomba Sinai, mpe mpo na nini?

NTANGO kondimana ya Mibeko ebandaki na Ngomba Sinai, ezalaki mpe na ebongiseli ya Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ. Na nzela ya molobeli na ye Moize, Yehova apesaki ekólo Yisraele mitindo oyo: “Mikolo motoba okosala mosala na yo; kasi na mokolo ya nsambo okotika kosala, mpo ngɔmbɛ-mobali na yo mpe mpunda na yo epema mpe mwana mobali ya moombo na yo ya mwasi mpe moto oyo afandi mopaya bázwa lisusu makasi.” (Kob. 23:12) Ya solo, lokola azalaki komibanzabanza mpo na bato oyo bazalaki na nse ya Mibeko, na bolingo nyonso, Yehova abongisaki mokolo moko ya kopema mpo basaleli na ye bákoka ‘kozwa lisusu makasi.’

2. Matomba nini Bayisraele bazalaki kozwa na kotosa Sabata?

2 Sabata ezalaki kaka mokolo ya kominanola? Te, ezalaki likambo moko ya ntina mingi na losambo oyo Bayisraele bazalaki kopesa Yehova. Kotosa Sabata ezalaki kopesa batata ya mabota ntango ya koteya mabota na bango “bákoba kobatela nzela ya Yehova mpo na kosala boyengebene.” (Eba. 18:19) Ezalaki mpe kopesa mabota mpe baninga libaku ya kokutana mpo na kokanisa misala ya Yehova mpe kosepela elongo. (Yis. 58:13, 14) Likambo ya ntina koleka, Sabata ezalaki elilingi ya kopema ya solosolo oyo ekoya na nzela ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo. (Rom. 8:21) Bongo na mikolo na biso? Epai wapi mpe ndenge nini bakristo ya solo, oyo basepelaka na banzela ya Yehova, bakoki kozwa makasi?

Kosangana na bakristo mosusu epesaka makasi

3. Ndenge nini bakristo ya ekeke ya liboso bazalaki kopesana makasi, mpe ebimisaki matomba nini?

3 Ntoma Paulo alobaki ete lisangá ya bokristo ezali “likonzí mpe eloko oyo esimbi solo.” (1 Tim. 3:15) Bakristo ya liboso bazalaki kopesana makasi mingi na ndenge bazalaki kolendisana mpe kotongana na kati ya bolingo. (Ef. 4:11, 12, 16) Ntango Paulo azalaki na Efese, bandeko ya lisangá ya Korinti bayaki kotala ye, mpe yango elendisaki ye. Talá ndenge ayokaki: “Nazali kosepela na ndenge Stefanasi mpe Fortunatusi mpe Akaikusi bazali awa . . . mpo balendisi elimo na ngai.” (1 Ko. 16:17, 18) Ndenge moko mpe, ntango Tito akendaki na Korinti mpo na kosalela bandeko kuna, na nsima, Paulo akomelaki lisangá yango ete: “Elimo na ye elendisami mpo na bino nyonso.” (2 Ko. 7:13) Ezali mpe bongo lelo, Batatoli ya Yehova bazwaka makasi mingi ntango basangani elongo mpo na kolendisana.

4. Ndenge nini makita ya lisangá epesaka biso makasi?

4 Yo moko oyebi ete makita ya lisangá epesaka esengo mingi. Kuna, ‘tolendisanaka, kondima ya moko elendisaka ya mosusu.’ (Rom. 1:12) Bandeko na biso bakristo bazali te bato oyo toyebi kaka likolólikoló, oyo tokutanaka na bango kaka na mabaku moko boye. Bazali nde baninga ya solosolo, bato oyo tolingaka mpe topesaka limemya. Tozwaka esengo mingi mpe tobɔndisamaka ntango tosanganaka na bango pɔsɔ na pɔsɔ na makita na biso.​—Flm. 7.

5. Ndenge nini tokoki kolendisana na mayangani ya mike mpe ya minene?

5 Likambo mosusu oyo epesaka biso makasi ezali mayangani ya minene mpe ya mike oyo tosalaka mbula na mbula. Longola mai ya bomoi, elingi koloba mateya ya solo ya Biblia, oyo tozwaka kuna, mayangani yango epesaka biso libaku ya ‘kofungwama’ na boninga na biso. (2 Ko. 6:12, 13) Tokosala nini soki tozali nsɔninsɔni mpe tobangaka kokutana na bato? Lolenge moko ya koyebana na bandeko na biso ezali komipesa mpo na kosala na liyangani. Nsima ya kosala na liyangani oyo esangisaki mikili mingi, ndeko mwasi moko alobaki boye: “Longola libota na ngai mpe mwa baninga, nayebaki bato mingi kuna te. Kasi, ntango napesaki mabɔkɔ na mosala ya kotya bopɛto, nakutanaki na bandeko mibali mpe bandeko basi ebele! Ezalaki esengo mingi!”

6. Wapi lolenge moko oyo tokoki kozwa makasi ntango tozali na konje?

6 Bayisraele bazalaki kosala mibembo na Yerusaleme mpo na koyangana na bafɛti misato ya losambo oyo ezalaki kosalema mbula na mbula. (Kob. 34:23) Mbala mingi, ezalaki kosɛnga bátika bilanga mpe misala na bango mpe básala mobembo ya mikolo mingi na makolo, na banzela oyo etondi na putulu. Atako bongo, kokende na tempelo ezalaki kopesa “esengo monene” mpo bato oyo bazalaki wana bazalaki “kopesa Yehova masanzoli.” (2 Nt. 30:21) Ndenge moko mpe, basaleli mingi ya Yehova lelo bamonaka ete kokende elongo na libota na bango mpo na kotala Betele, biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na mboka na bango, epesaka esengo mingi. Okoki kokana kosala bongo ná libota na yo mbala ya nsima oyo bokozala na konje?

7. (a) Ndenge nini kolekisa ntango elongo na baninga ekoki kosalisa biso? (b) Nini ekoki kosalisa mpo ntango yango eleka malamu mpe elendisa?

7 Kosangana na libota mpe baninga mpo na kolekisa ntango elongo ekoki mpe kolendisa. Salomo, mokonzi ya bwanya alobaki boye: “Eloko oyo eleki malamu mpo na moto ezali te, longola kaka kolya mpe komɛla mpenza mpe komonisa molimo na ye bolamu mpo na mosala na ye ya makasi.” (Mos. 2:24) Kolekisa ntango elongo na baninga esukaka kaka te na kolendisa biso, kasi esalisaka biso tólinga bandeko na biso bakristo makasi mpo epesaka biso libaku ya koyeba bango malamumalamu. Mpo eleka malamu mpe ezala ntango ya kolendisana, mayangani yango esengeli kozala na bato mingi te mpe kokambama malamu, mingimingi soki bopesi mpe masanga.

Mosala ya kosakola epesaka makasi

8, 9. (a) Nsango oyo Yesu azalaki koteya ná oyo ya bakomeli mpe Bafarisai ekesanaki na nini? (b) Matomba nini tozwaka ntango tozali kosakola nsango ya Biblia?

8 Yesu azalaki na molende na mosala ya kosakola, mpe alendisaki bayekoli na ye bázala mpe bongo. Emonani polele na maloba na ye oyo: “Mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke. Yango wana, bósɛnga Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.” (Mat. 9:37, 38) Nsango oyo Yesu azalaki koteya ezalaki kopesa makasi; ezalaki “nsango malamu.” (Mat. 4:23; 24:14) Ekesanaki mpenza na mibeko ya kilokilo oyo Bafarisai bazalaki kotyela bato.​—Tángá Matai 23:4, 23, 24.

9 Ntango tozali kosakola nsango ya Bokonzi, topesaka bato libaku ya kokokisa bamposa na bango ya elimo, mpe biso moko tobakisaka boyebi mpe botɔndi na biso mpo na mateya ya motuya oyo ezali na Biblia. Mokomi ya nzembo azalaki na ntina ya koloba boye: “Bósanzola Yah, mpo ezali malamu kobɛtɛla Nzambe na biso mondule; mpo ezali likambo ya kosepelisa.” (Nz. 147:1) Okoki kobakisa esengo oyo ozwaka na kosanzola Yehova epai ya bazalani na yo?

10. Kolonga na biso na mosala ya kosakola etali nde ndenge oyo bato bazali koyamba nsango na biso? Limbolá.

10 Ya solo, na bateritware mosusu bato balingaka koyoka nsango malamu, kasi na bateritware mosusu ezalaka bongo te. (Tángá Misala 18:1, 5-8.) Soki ofandi na teritware oyo bato balingaka mpenza te koyoka nsango ya Bokonzi, luká kotya makanisi na yo na malamu oyo ozali kosala na mosala ya kosakola. Kobosana te ete milende oyo ozali kokoba kosala mpo na koyebisa nkombo ya Yehova ezali mpamba te. (1 Ko. 15:58) Longola yango, kolonga na mosala ya kosakola etali te ndenge oyo bato bazali koyamba nsango malamu. Tokoki kozala na elikya ete Yehova akosala nyonso mpo bato ya mitema sembo bázwa libaku ya kondima nsango ya Bokonzi.​—Yoa. 6:44.

Losambo na libota epesaka makasi

11. Mokumba nini Yehova apesá baboti, mpe ndenge nini bakoki kokokisa yango?

11 Baboti oyo babangaka Nzambe bazali na mokumba ya koteya bana na bango makambo etali Yehova mpe banzela na ye. (Mib. 11:18, 19) Soki ozali moboti, otyá ntango mpo na koteya bana na yo makambo etali Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo? Mpo na kosalisa yo okokisa mokumba yango monene mpe bamposa ya libota na yo, Yehova apesi yo ebele ya bilei ya elimo na nzela ya babuku, bazulunalo, bavideo, mpe bakasɛti ná ba-CD.

12, 13. (a) Ndenge nini mabota ekoki kosalela malamu mpokwa ya Losambo na libota? (b) Ndenge nini baboti bakoki kosala mpo losambo na libota elendisaka?

12 Longola yango, moombo ya sembo mpe ya mayele azwi bibongiseli mpo mpokwa moko ezala mpo na Losambo na libota. Ezali mpokwa oyo epesami mpo na koyekola Biblia na libota pɔsɔ na pɔsɔ. Bato mingi bamoni ete ebongiseli yango esalisi bango bázala na bomoko, bálingana mingi na libota mpe elendisi boyokani na bango na Yehova. Kasi, ndenge nini baboti bakoki kosala mpo losambo ya libota elendisa libota na bango na elimo?

13 Mpokwa ya Losambo na libota esengeli te kozala ntango moko ya malilimalili to ya makambo makasimakasi. Tosambelaka “Nzambe ya esengo,” mpe alingi tózala na esengo na losambo na biso. (1 Tim. 1:11; Flp. 4:4) Kozala na mpokwa mobimba mpo na kolobela makambo kitoko oyo ezali na Biblia ezali mpenza lipamboli. Baboti bakoki kobongola ndenge na bango ya koteya, kosalela mayele na bango mpe kobimisa mayele ya sika. Na ndakisa, libota moko etikaki Brandon, mwana na bango ya mobali ya mbula 10, asala lisolo oyo motó ya likambo ezalaki “Mpo na nini Yehova asalelaki nyoka mpo na komonisa Satana?” Likambo yango ezalaki kotungisa Brandon mpo alingaka banyoka mingi, mpe azalaki kolɛmba nzoto ndenge bakokanisaka nyoka na Satana. Na bantango mosusu, mabota mosusu basalaka masolo ya Biblia lokola teyatre, moto na moto azwi esika ya moto moko oyo balobeli na lisolo, atángi eteni na ye na Biblia, to asali yango lokola lisano. Koteya na ndenge wana ekoki kosepelisa, mpe kotinda bana bámikɔtisa na lisolo mpo mitinda ya Biblia ekoka kosimba mitema na bango. *

Kimá makambo oyo ekoki kokómisa yo kilo

14, 15. (a) Ndenge nini mitungisi ebakisami mpe bato bakómi mitema likolólikoló na mikolo ya nsuka? (b) Mikakatano nini koleka tokoki kokutana na yango?

14 Na mikolo ya nsuka ya ebongiseli oyo mabe, mitungisi ebakisami mpe bato mingi bakómi mitema likolólikoló. Bamilio ya bato bazangi misala mpe basusu bazali na mikakatano mosusu ya mbongo. Mbala mingi, ata baoyo bazali na mosala bamonaka ete mbongo oyo bazali kozwa ezali kokende na mabenga ya madusumadusu, elingi koloba ekokaka te mpo na kosalisa mabota na bango. (Talá mpe Hagai 1:4-6.) Bato ya politiki mpe bakonzi mosusu bamonaka lokola basili mayele ntango bazali koluka kolongola terorisme mpe makambo mosusu ya mabe. Bato mingi bazali kolɛmba nzoto mpo na mabunga na bango moko.​—Nz. 38:4.

15 Bakristo ya solo mpe bakutanaka na makambo wana mpe mitungisi oyo mokili ya Satana ezali kobimisa. (1 Yoa. 5:19) Na bantango mosusu, bayekoli ya Kristo bakoki kokutana na mikakatano mingi koleka mpo basalaka makasi ya kotikala sembo epai ya Yehova. Yesu alobaki boye: “Soki banyokolaki ngai, bakonyokola mpe bino.” (Yoa. 15:20) Nzokande, ata ntango “tozali konyokwama,” “tosundolami te.” (2 Ko. 4:9) Mpo na nini?

16. Nini ekoki kosalisa biso tóbatela esengo na biso?

16 Yesu alobaki boye: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba, mpe ngai nakopemisa bino.” (Mat. 11:28) Soki tozali na kondima makasi na lisiko oyo Yesu apesaki, ezali lokola tozali komitya na mabɔkɔ ya Yehova. Na ndenge yango, tozali kozwa “nguya oyo eleki makasi.” (2 Ko. 4:7) “Mosungi,” elingi koloba elimo santu ya Nzambe, elendisaka mpenza kondima na biso mpo tókoka kaka te koyika mpiko na mikakatano mpe minyoko oyo tozali kokutana na yango, kasi mpe mpo tóbatela esengo na biso.​—Yoa. 14:26; Yak. 1:2-4.

17, 18. (a) Tosengeli kokeba na elimo nini? (b) Soki tozali komipesa na bisengo ya mokili, tokoki kosuka boni?

17 Lelo, bakristo ya solo basengeli kokeba ete elimo ya mokili oyo elingá bisengo ekɔtela bango te. (Tángá Baefese 2:2-5.) Soki te, tokoki kokangama na motambo ya “mposa ya nzoto mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko ya kobikela.” (1 Yoa. 2:16) To tokoki komikosa na kokanisa ete kokokisa bamposa ya mosuni ekopesa biso esengo. (Rom. 8:6) Na ndakisa, bato mosusu bamipesaka na komɛla bangi mpe masanga, kotala pornografi, kosala masano ya makasimakasi, to makambo ndenge na ndenge oyo ezali kobuka mibeko mpo na kosepelisa nzoto na bango. “Mayele mabe” ya Satana elukaka kobungisa bato nzela mpe kokosa bango ete makambo yango epesaka esengo.​—Ef. 6:11.

18 Ya solo, kolya, komɛla, mpe kominanola ya malamu ezali mabe te soki esalemi na bokatikati. Atako bongo, totikaka te makambo yango ezwa esika ya liboso na bomoi na biso. Tosengeli kozala na bokatikati mpe komipekisa, mingimingi na kotalela mikolo oyo tozali. Koluka kokokisa kaka matomba na biso ekoki kokómisa biso kilo kino kokómisa biso “bato oyo basalaka mosala te to babotaka mbuma te na boyebi ya solosolo ya Nkolo na biso Yesu Kristo.”​—2 Pe. 1:8.

19, 20. Ndenge nini tokoki kozwa makasi ya solosolo?

19 Soki tozali koyokanisa makanisi na biso na malako ya Yehova, tokomonisa ete mpo na biso, bisengo nyonso oyo mokili oyo ekoki kopesa ezali kaka ya ntango mokuse. Moize amonaki yango, biso mpe ndenge moko. (Ebr. 11:25) Likambo ya solo ezali ete kolendisama ya solosolo, oyo epesaka esengo ya molai mpe oyo esepelisaka mpenza, eutaka nde na kosala mokano ya Tata na biso ya likoló.​—Mat. 5:6.

20 Tókoba komipesa na makambo ya elimo mpo tózwa makasi. Soki tozali kosala bongo, ‘tokoboya ezaleli ya kotyola Nzambe mpe bamposa ya mokili . . . awa tozali kozela elikya ya kitoko mpenza mpe komonana ya Nzambe monene na nkembo mpe ya Mobikisi na biso, Kristo Yesu.’ (Tito 2:12, 13) Na yango, tózwa ekateli ya kotikala na ekanganeli ya Yesu, tótosa bokonzi mpe litambwisi na ye. Soki tosali bongo, tokozwa esengo ya solosolo mpe makasi!

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 13 Mpo na kozwa makanisi mosusu na ndenge oyo bokoki kosala mpo boyekoli na libota esepelisa mpe eteya malamu, talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Desɛmbɛ 1990, nkasa 1-2, na Lifalanse.

Okopesa eyano nini?

• Ndenge nini basaleli ya Yehova bazali kozwa makasi lelo?

• Na ndenge nini mosala ya kosakola elendisaka biso mpe baoyo bazali koyoka biso?

• Ndenge nini batata ya mabota bakoki kosala mpo losambo na libota elendisaka?

• Makambo nini ekómisaka biso kilo na elimo?

[Mituna ya boyekoli]

[Bililingi na lokasa 26]

Soki tomemi ekanganeli ya Yesu, makambo mingi ekopesa biso makasi