Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ntango molongani akosi yo

Ntango molongani akosi yo

Ntango molongani akosi yo

MARGARITA ná mobali na ye Raúl * basalelaki Yehova elongo na mosala ya ntango nyonso bambula mingi. Kasi mwa moke nsima ya kobotama ya mwana na bango ya liboso, Raúl akómaki kotika Yehova mokemoke. Nsukansuka, Raúl akómaki kozwa basi mosusu mpe abimisamaki na lisangá. Margarita alobi boye: “Ntango likambo yango esalemaki, nayokaki lokola nalingi nakufa. Motema na ngai epasukaki mpenza mpe nayebaki ndenge ya kosala te.”

Mwa moke nsima ya kobalana, mobali ya Jane, ye asalaki ndenge mosusu; abebisaki elikya oyo mwasi na ye azalaki kotyela ye mpe bolingo oyo azalaki kopesa ye. Abandaki kobɛta ye. Jane alobi boye: “Mbala ya liboso oyo abɛtaki ngai likofi, nakamwaki, nasambwaki mpenza mpe nayokaki nsɔni. Banda wana akómaki na momeseno ya kobɛta ngai mpe kosɛnga ngai bolimbisi. Nakanisaki ete lokola nazali mokristo, esengeli kolimbisa mpe kobosana. Nazalaki mpe kokanisa ete ezali kozanga bosembo soki nayebisi moto likambo na biso​—ata bankulutu ya lisangá na biso. Esalemaki bongo bambula ebele. Na ntango nyonso wana, nazalaki kokanisa ete mbala mosusu ezali na likambo moko oyo nasengeli kosala mpo mobali na ngai alinga ngai. Ntango nsukansuka atikaki ngai na mwana na biso ya mwasi, nayokaki ete nalongi te, ete nasengelaki kosala to koloba mingi mpo na kobatela libala na biso.”

Lokola Margarita mpe Jane, mbala mosusu ozali konyokwama na makanisi, kozanga mbongo, to kolɛmba na elimo mpo mobali na yo akosá yo. To mpe okoki kozala mobali oyo azali konyokwama na makanisi mpo mwasi na yo azangi bosembo epai na yo. Na ntembe te, tozali kobika na “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano,” kaka ndenge Biblia esakolaki yango. Esakweli yango emonisi ete na “mikolo ya nsuka,” libota ekobundisama makasi mpe na mabota mingi, bolingo na kati ya bato ya libota ekozanga mpenza. Bato mosusu bakomikumisa ete bazali kosalela Nzambe, nzokande ekozala lokuta. (2 Tim. 3:1-5) Likambo yango ekoki mpe kokómela bakristo ya solo; na yango, nini ekosalisa yo oyika mpiko soki molongani akosi yo?

Omimona ndenge Yehova amonaka yo

Na ebandeli, ekoki kozala mpasi ondima ete moto oyo olingi akokaki kozokisa yo mabe ndenge wana. Okoki mbala mosusu komipesa foti mpo na lisumu oyo asali.

Kasi, kobosana te ete ata Yesu, moto ya kokoka, atɛkamaki na moto oyo ye azalaki kotyela motema mpe kolinga. Yesu aponaki baninga na ye ya motema, bantoma, nsima ya kosala libondeli mpe kokanisa malamu. Boye bango nyonso 12 bazalaki basaleli ya Yehova oyo babongi kotyela motema. Na yango, ntembe ezali te ete Yesu ayokaki mpasi mingi ntango Yudasi “atɛkaki ye.” (Luka 6:12-16) Kasi, Yehova apesaki Yesu foti te mpo na misala ya Yudasi.

Ya solo, molongani moko te azali moto ya kokoka. Bango nyonso bakoki kosala mabunga. Na litambwisi ya elimo santu, mokomi ya nzembo moko alobaki solo ete: “Soki otalaka kaka mabunga, Ee Yah, Ee Yehova, nani akotɛlɛma?” (Nz. 130:3) Na ndakisa ya Yehova, balongani yango mibale basengeli kondima kolimbisana mabunga na bango.​—1 Pe. 4:8.

Kasi, “mokomoko na biso akozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na ye moko.” (Rom. 14:12) Soki molongani moko akómi na momeseno ya kofinga to ya kobɛta, ye nde akozongisa monɔkɔ epai ya Yehova. Yehova apekisi mobulu mpe kofinga; na yango likambo moko te ekoki kopesa moto nzela ya konyokola molongani na ye na makambo ya kozanga bolingo mpe limemya ya ndenge wana. (Nz. 11:5; Ef. 5:33; Kol. 3:6-8) Kutu, soki mokristo moko azali mbala na mbala kosala makambo mpo na nkanda mpe abongoli motema te, asengeli kobimisama na lisangá. (Gal. 5:19-21; 2 Yoa. 9, 10) Molongani mosusu asengeli te komona ete akomema ngambo soki ayebisi bankulutu etamboli wana ya mabe. Kutu, Yehova ayokaka mawa mpo na bato oyo bazali konyokwama ndenge wana.

Ntango molongani moko asali ekobo, asaleli kaka molongani na ye lisumu te, kasi mpe Yehova. (Mat. 19:4-9; Ebr. 13:4) Soki molongani oyo asali lisumu te azali kosala makasi ya kotosa mitinda ya Biblia, ezali na ntina te amona ete azali na ngambo mpo na ekobo oyo molongani na ye asali.

Kobosana te ete Yehova ayebi ndenge ozali komiyoka. Amibengi nkolo, mobali ya ekólo Yisraele, mpe Liloba na ye ezali na mikapo ebele ya kosimba motema oyo emonisi mpasi oyo ayokaki mpo na ekobo oyo ekólo yango ezalaki kosala na elimo. (Yis. 54:5, 6; Yir. 3:1, 6-10) Yebá ete Yehova azali komona mpisoli nyonso oyo ozali kotangisa mpo molongani na yo akosá yo na lolenge moko boye. (Mal. 2:13, 14) Ayebi ete ozali na mposa ya kobɔndisama mpe kolendisama.

Ndenge oyo Yehova abɔndisaka

Yehova abɔndisaka mpe na nzela ya lisangá ya bokristo. Jane azwaki lisungi ya ndenge wana. Alobi boye: “Mokɛngɛli ya zongazonga ayaki na ntango oyo makanisi na ngai ezalaki kotungisama mingi. Ayebaki ete nazalaki konyokwama mingi na makanisi mpo mobali na ngai asɛngaki tóboma libala. Azwaki ntango ya kokanisa na ngai na bavɛrsɛ lokola 1 Bakorinti 7:15. Bavɛrsɛ ya Biblia mpe maloba na ye ya boboto esalisaki ngai natika komipesa foti mpe epesaki ngai kimya ya makanisi.” *

Margarita, oyo tolobelaki na ebandeli, ye mpe amonaki ete Yehova asalisaka biso na nzela ya lisangá. Alobaki boye: “Ntango emonanaki polele ete mobali na ngai aboyi kobongola motema, nazwaki bana na ngai mpe tokendaki na engumba mosusu. Ntango tokómaki, nazwaki ndako ya kofutela ya shambrɛ mibale. Mokolo oyo elandaki, na mawa na ngai, nazalaki kofungola basaki na biso, mpe nayokaki moto abɛti na porte. Nakanisaki ete ezali nkolo-lopango, mpo afandaka na porte oyo elandi. Likambo ya kokamwa, ezalaki nde ndeko mwasi oyo ayekolaki Biblia na mama na ngai mpe asalisaki libota na biso tóyeba solo. Ayebaki te ete akokutana na ngai kasi ayaki na ndako yango mpo ayekolaka Biblia na nkolo-lopango. Ebɔndisaki ngai mpenza​—nakokaki te kokanga motema. Nayebisaki ye likambo na ngai, mpe tolelaki elongo. Na mbala moko, azwaki bibongiseli mpo tóyangana na makita mokolo yango. Lisangá eyambaki biso malamu, mpe bankulutu bazwaki bibongiseli mpo na kosalisa ngai nayeba kokokisa bamposa ya elimo ya libota na ngai.”

Ndenge basusu bakoki kosalisa

Ya solo, bandeko ya lisangá bakoki kosalisa na ndenge mingi. Na ndakisa Margarita asengelaki kozwa mosala. Libota moko na lisangá endimaki kobatela bana na ye ntango bauti kelasi, soki esengeli.

Margarita alobi boye: “Nasepelaka mingi nde ntango bandeko mibali mpe basi basɛngi ngai mpe bana na ngai tóbima na bango na mosala ya kosakola.” Ntango bandeko ya lisangá bazali kopesana lisalisi ndenge wana, bazali ‘komemelana kilo,’ mpe bongo kokokisa “mobeko ya Kristo.”​—Gal. 6:2.

Bato oyo bazali konyokwama mpo na masumu ya basusu basepelaka mpenza ya lisalisi ya ndenge wana. Monique, oyo mobali na ye asundolaki ye, mpe atikaki ye na nyongo ya dolare 15 000 mpe bana minei ya mike, alobi boye: “Bandeko na ngai ya elimo bamonisaki mpenza bolingo. Nayebi te ndenge bomoi na ngai elingaki kozala soki lisungi na bango ezalaka te. Namonaki ete Yehova apesaki ngai bandeko ya malamu koleka, oyo bamipesaki mpo na bana na ngai. Nazali na esengo ya komona ndenge bana na ngai bakoli mpe bakomɛli na elimo mpo na lisungi ya bandeko yango. Ntango nazalaki na mposa ya toli, bankulutu bazalaki kosalisa ngai. Ntango nazalaki na mposa ya kosolola na moto, bazalaki koyoka ngai.”​—Mrk. 10:29, 30.

Ya solo, moninga ya malamu akososola ntango oyo esengeli te kolobela likambo ya mawa oyo moninga akutanaki na yango. (Mos. 3:7) Margarita alobi boye: “Mbala mingi, nazalaki kosepela kosolola na bandeko basi ya lisangá na ngai ya sika makambo etali mosala ya kosakola, bato oyo toyekolaka na bango Biblia, mpe bana na ngai​—likambo nyonso, longola kaka makambo oyo nakutanaki na yango. Nasepelaki ndenge batikaki ngai nabosana makambo ya kala mpe basalisaki ngai nabandela bomoi ya sika.”

Pekisá mposa ya kozongisa mabe

Ntango mosusu, na esika omiyoka ete ozali na foti mpo na lisumu ya molongani na yo, okoki koyoka nkanda na ndenge ozali konyokwama makasi mpo na mabunga na ye. Soki otiki makanisi yango ekola, nkanda ekoki kobebisa ekateli na yo ya kotikala sembo epai ya Yehova. Na ndakisa, okoki koluka ndenge ya kozongisela molongani na yo mabe oyo asalaki yo.

Soki omoni ete ozali kobunda na mposa ya kozongisa mabe, kanisá ndakisa ya Yosua ná Kalebe. Mibali yango ya sembo batyaki bomoi na bango na likama mpo na konɔnga Mokili ya Ndaka. Banɔngi mosusu bazangaki kondima mpe batindaki bato báboya kotosa Yehova. Bayisraele mosusu kutu balingaki kobamba Yosua ná Kalebe mabanga ntango bamekaki kolendisa bato bátikala sembo. (Mit. 13:25–14:10) Mpo na makambo oyo ekólo Yisraele esalaki, Yosua ná Kalebe basengelaki koyengayenga mbula 40 na esobe, mpo na mabunga na bango moko te, kasi mpo na mabunga ya bato mosusu.

Atako mbala mosusu Yosua ná Kalebe balɛmbaki nzoto, batikaki te ete masumu ya bandeko na bango ekómisa bango bololo. Batyaki makanisi na bango libosoliboso na mosala ya Nzambe. Na nsuka ya mbula 40 na esobe, bango, elongo na Balevi, bazwaki mbano na ndenge bazalaki bato oyo babikaki na kati ya bato ya ntango wana mpe bakɔtaki na Mokili ya Ndaka.​—Mit. 14:28-30; Yos. 14:6-12.

Makambo mabe oyo molongani na yo asali ekoki kopesa yo mpasi mpo na ntango molai. Libala ekoki kokufa, kasi na nsima okoki kotikala na mpasi na motema mpe na mikakatano ya mbongo. Kasi, na esika otika makanisi ya mabe elɛmbisa yo nzoto, kobosana te ete Yehova ayebi malamu ndenge oyo akosala bato oyo batyolaka mibeko na ye na nko, ndenge makambo oyo ekómelaki Bayisraele oyo bazangaki kondima na esobe emonisi yango.​—Ebr. 10:30, 31; 13:4.

Okoki kolonga!

Na esika otika makanisi ya mabe elɛmbisa yo, tondisá motema na yo na makanisi ya Yehova. Jane alobi boye: “Namonaki ete koyoka bakasɛti ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! esalisaki ngai nayika mpiko. Makita mpe ezalaki kopesa ngai makasi mingi. Kopesa biyano na makita esalisaki ngai nalongola mikakatano na ngai na makanisi. Mosala ya kosakola mpe esalisaki ngai ndenge wana. Kosalisa basusu bakóma kondimela Yehova elendisaki mpe kondima na ngai moko. Mpe kosalisa bato oyo nayekolaka na bango Biblia esalisaki ngai natya makanisi na ngai na makambo oyo eleki ntina.”

Monique, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ mpe kobima na mosala ya kosakola ntango nyonso oyo nakoki, esalisaki ngai nayika mpiko. Tokómi na boyokani makasi na kati ya libota mpe na bandeko ya lisangá. Mikakatano na ngai esalisaki ngai nayeba bolɛmbu na ngai. Namekamaki, kasi na lisalisi ya Yehova, nazali koyika mpiko.”

Yo mpe okoki kolonga mikakatano ya ndenge wana. Atako ozali na mpasi na motema mpo molongani akosi yo, salá makasi olanda toli oyo Paulo akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe ete: “Tótika te kosala oyo ezali malamu, mpo na ntango oyo ekoki tokobuka mbuma soki tolɛmbi te.”​—Gal. 6:9.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 2 Bankombo mosusu ezali ya bango te.

^ par. 13 Mpo na koyeba na mozindo likanisi ya Biblia na oyo etali kokabwana mpe koboma libala, talá buku Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe,” nkasa 125-130, 219-221.

[Elilingi na lokasa 31]

Moto oyo molongani na ye asundoli ye asepelaka na bato oyo basalisaka ye na mosala ya kosakola