Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Pekisá nkanda “mpo na kolonga mabe”

Pekisá nkanda “mpo na kolonga mabe”

Pekisá nkanda “mpo na kolonga mabe”

“Bandeko ya bolingo, moto oyo asali bino mabe, bózongisela ye mabe te . . . kasi [bósalaka] malamu mpo na kolonga mabe.”​—ROM. 12:19, 21.

1, 2. Batatoli oyo bazalaki kosala mobembo bapesaki ndakisa nini ya malamu?

BATATOLI ya Yehova 34 bazalaki kokende na molulu ya bofungoli Betele moko, kasi na nzela mpɛpɔ ezwaki retare mpo ebebaki mwa moke. Bakanisaki ete bakozela kaka ngonga moko mpo na kotya esansi kasi bazelaki ngonga 44 na libándá ya mpɛpɔ moko mosika, epai bilei ya malonga ezalaki te, mai te, twalɛti mpe te. Bato mingi oyo bazalaki na mpɛpɔ yango basilikaki mpe bagangelaki bato oyo basalaka na libándá ya mpɛpɔ. Kasi bandeko mibali mpe bandeko basi wana balobaki eloko te.

2 Nsukansuka, Batatoli yango bakómaki na retare na esika oyo bazalaki kokende mpe balandaki kaka eteni ya nsuka ya molulu yango ya bofungoli ya Betele. Atako balɛmbaki, batikalaki wana mpo na kosolola na bandeko. Nsima ya mikolo, bayokaki ete motema molai mpe komipekisa na bango elekaki kaka boye te. Moto moko oyo azalaki mpe kosala mobembo na mpɛpɔ yango alobaki na bato ya kompanyi yango boye: “Soki ezalaki te mpo na bakristo 34 wana oyo bazalaki na mpɛpɔ, mobulu elingaki kobima na libándá ya mpɛpɔ.”

Tozali na mokili ya nkandankanda

3, 4. (a) Ndenge nini mpe banda ntango nini nkanda ezali komonisa bato mpasi? (b) Kaina akokaki kopekisa nkanda na ye? Limbolá.

3 Mitungisi ya bomoi na mokili oyo mabe ekoki kokómisa bato nkandankanda. (Mos. 7:7) Mbala mingi, nkanda yango ememaka na koyinana ata mpe na mobulu. Bato ya ekólo moko bazali kobunda bango na bango, bikólo ná bikólo ezali kobunda, mpe mitungisi na mabota ezali kobimisa matata na bandako mingi. Nkanda mpe mobulu ya ndenge wana ebandi lelo te. Kaina, mwana mobali ya liboso ya Adama ná Eva, abomaki leki na ye ya mobali Abele mpo na nkanda oyo eutaki na zuwa. Kaina asalaki likambo wana ya mabe atako Yehova alendisaki ye ete apekisa nkanda na ye mpe alakaki ye ete akopambola ye soki asali bongo.​—Tángá Ebandeli 4:6-8.

4 Atako azalaki moto ya kozanga kokoka, Kaina akokaki kopona likambo oyo akosala. Akokaki kopekisa nkanda na ye. Yango wana amemaki ngambo monene mpo na likambo mabe oyo asalaki. Ndenge moko mpe, mpo na kozanga kokoka na biso, ezalaka mpasi tóboya nkanda mpe makambo ya mobulu. Mpe makambo mosusu ya mabe ebakisaka mitungisi na “ntango [oyo] ya mpasi.” (2 Tim. 3:1) Na ndakisa, mikakatano ya mbongo ekoki kotungisa makanisi na biso. Polisi mpe bibongiseli oyo esalisaka mabota emonisi ete mikakatano ya mbongo ezali kobakisa nkanda mpe mobulu na kati ya mabota.

5, 6. Lolenge nini oyo bato ya mokili batalelaka nkanda ekoki mpe kokɔtela biso?

5 Longola yango, bato mingi oyo tozali kokutana na bango bazali “bato oyo bamilingaka,” “bato ya lolendo,” ata mpe “bato ya nko.” Ezali mpasi te bizaleli mabe lokola oyo wana ekɔtela biso mpe tókóma nkandankanda. (2 Tim. 3:2-5) Kutu, mbala mingi bafilme mpe baemisyo ya televizyo emonisaka ete kozongisa mabe ezali malamu mpe kobimisa mobulu ezali mabe te mpe ezali malamu mpo na kobongisa makambo. Bafilme mingi etindaka batali bázela ntango oyo moto mabe “akozwa etumbu oyo ebongi na ye”​—mbala mingi, na nsuka na yango, moto oyo lisolo yango elobeli abomaka mosali-mabe yango na ndenge ya nsɔmɔ.

6 Makanisi ya ndenge wana elendisaka bato bálanda banzela ya Nzambe te, kasi “elimo ya mokili” mpe ya moyangeli na yango ya nkanda, Satana. (1 Ko. 2:12; Ef. 2:2; Em. 12:12) Elimo yango etindaka bato básepelisa nzoto ya kozanga kokoka mpe eyokani ata moke te na elimo santu ya Nzambe mpe mbuma na yango. Ya solo, liteya moko ya ntina mingi ya bokristo ezali ete tosengeli te kozongisa mabe ntango batumoli biso. (Tángá Matai 5:39, 44, 45.) Na yango, ndenge nini tokoki kosalela mateya ya Yesu malamumalamu?

Bandakisa ya malamu mpe ya mabe

7. Likambo nini esalemaki lokola Simeone ná Levi bapekisaki nkanda na bango te?

7 Biblia etondi na batoli oyo etali kopekisa nkanda mpe na bandakisa oyo emonisi makambo oyo ekoki kosalema soki topekisi nkanda na biso to soki topekisi yango te. Tótala likambo oyo esalemaki ntango Simeone ná Levi, bana ya Yakobo bazongiselaki Shekeme mabe na ndenge abebisaki Dina, ndeko na bango ya mwasi. “Bazokaki na mitema na bango mpe bayokaki nkanda makasi.” (Eba. 34:7) Na nsima, bana mosusu ya Yakobo babomaki mibali nyonso na engumba ya Shekeme, bapunzaki engumba yango, mpe bakangaki basi ná bana. Basalaki nyonso wana kaka mpo na Dina te kasi mbala mosusu ezalaki mpe mpo na lofundo, balingaki te lokumu na bango ebeba. Bamonaki ete Shekeme asambwisaki bango ná tata na bango Yakobo. Kasi, Yakobo akanisaki nini mpo na etamboli na bango?

8. Lisolo ya Simeone ná Levi emonisi nini na ntina etali kozongisa mabe?

8 Na ntembe te likambo ya mawa oyo ekómelaki Dina epesaki Yakobo mpasi mingi; atako bongo asepelaki te ndenge bana na ye bazongisaki mabe. Nzokande, Simeone ná Levi balukaki kolongisa likambo oyo basalaki; balobaki boye: “Esengelaki nde básala ndeko na biso ya mwasi lokola mwasi ya ndumba?” (Eba. 34:31) Kasi likambo esukaki wana te, mpo Yehova asepelaki te. Bambula mingi na nsima, Yakobo asakolaki ete mpo na likambo wana ya mobulu mpe ya nkanda oyo Simeone ná Levi basalaki, bakitani na bango bakopalangana na kati ya mabota ya Yisraele. (Tángá Ebandeli 49:5-7.) Ya solo, lokola bapekisaki nkanda na bango te, Nzambe mpe tata na bango Yakobo basepelaki na bango te.

9. Na libaku nini nkanda elingaki mpenza komema Davidi?

9 Mokonzi Davidi asalaki bongo te. Azwaki mabaku mingi ya kozongisa mabe, kasi asalaki yango te. (1 Sa. 24:3-7) Nzokande, mokolo moko, nkanda elingaki komema ye. Mozwi moko na nkombo Nabale agangelaki bato ya Davidi mpe afingaki bango, atako babatelaki bibwɛlɛ mpe babateli ya bampate na ye. Mbala mosusu lokola Davidi ayokaki nkanda, mingimingi nde mpo na bato na ye, alingaki kozongisela Nabale mabe. Ntango Davidi ná bato na ye bazalaki kokende kobundisa Nabale ná libota na ye, elenge mobali moko ayebisaki Abigaile, mwasi ya Nabale oyo azalaki na bokɛngi mingi, makambo oyo esalemaki mpe asɛngaki ye asala nokinoki. Na mbala moko, Abigaile azwaki likabo moko monene mpe akendaki kokutana na Davidi. Na komikitisa nyonso, asɛngaki bolimbisi mpo na kozanga limemya ya Nabale mpe asɛngaki Davidi abanga Nzambe ndenge amesaná. Davidi azongelaki makanisi ya malamu mpe alobaki boye: “Opambwama, yo moto opekisi ngai lelo ete namema ngambo ya makila.”​—1 Sa. 25:2-35.

Ezaleli ya mokristo

10. Bakristo basengeli komonisa ezaleli nini na oyo etali kozongisa mabe?

10 Likambo ya Simeone ná Levi mpe ya Davidi ná Abigaile emonisi polele ete Yehova aboyaka nkanda oyo ezangi ndelo mpe mobulu mpe ete apambolaka milende ya bato oyo balukaka kotya kimya. Ntoma Paulo akomaki boye: “Soki likoki ezali, soki etaleli kaka bino, bózala na kimya na bato nyonso. Bandeko ya bolingo, moto oyo asali bino mabe, bózongisela ye mabe te kasi bótikela nde nkanda esika; mpo ekomamá ete: ‘Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nakozongisa mabe, Yehova alobi bongo.’ Kasi, ‘soki monguna na yo azali na nzala, pesá ye eloko alya; soki azali na mposa ya mai, pesá ye mai amɛla; mpo ntango ozali kosala bongo ozali kotya makala ya mɔtɔ na motó na ye.’ Kotika mabe elonga yo te, kasi saláká malamu mpo na kolonga mabe.”​—Rom. 12:18-21. *

11. Ndenge nini ndeko mwasi moko ayekolaki kopekisa nkanda?

11 Tokoki kosalela toli yango. Na ndakisa, ndeko mwasi moko amilelaki epai ya nkulutu moko mpo na patrɔ na ye ya sika na mosala. Alobaki ete mwasi yango azalaki kosala ye makambo ezangi bosembo mpe boboto. Ndeko yango asilikelaki mwasi yango mpe alingaki kolongwa na mosala. Nkulutu yango alendisaki ndeko mwasi azwa ekateli mbangumbangu te. Amonaki ete lokola ndeko mwasi asilikaki mpo na mabe oyo patrɔ na ye asalelaki, makambo ebebaki koleka. (Tito 3:1-3) Nkulutu ayebisaki ye ete ata soki nsukansuka azwi mosala mosusu, ekosɛnga kaka abongisa ndenge na ye ya kosala makambo ntango basali ye mabe. Ayebisaki ye asala ndenge Yesu ateyaki biso, asalelaka patrɔ na ye makambo ndenge ye moko akolinga básalela ye. (Tángá Luka 6:31.) Ndeko yango andimaki ete akomeka kosala yango. Esukaki boni? Nsima ya mwa ntango, patrɔ akómaki na boboto, kutu apesaki ndeko mwasi longonya mpo na mosala na ye.

12. Mpo na nini matata kati na bakristo ekoki kosala mpasi mingi koleka?

12 Mbala mosusu tokokamwa te soki tozwani likambo ya ndenge wana na moto moko libándá ya lisangá ya bokristo. Toyebi ete mbala mingi bomoi na mokili ya Satana ezalaka sembo te mpe ete tosengeli kobunda mpo basali-mabe básilikisa biso te. (Nz. 37:1-11; Mos. 8:12, 13; 12:13, 14) Nzokande, soki tozwani likambo na ndeko na kati ya lisangá, mpasi ekoki kozala makasi koleka. Motatoli moko alobi boye: “Mokakatano na ngai oyo elekaki monene ntango nayambaki solo ezalaki ya kondima ete basaleli ya Yehova bazali bato ya kozanga kokoka.” Tobimá na mokili oyo ezangi bolingo, epai bakipaka moto te, na elikya ete bato nyonso na lisangá basengeli komoniselana boboto ya bokristo. Na yango, soki ndeko moko mokristo, mingimingi oyo azali na mikumba na lisangá, alobi to asali biso likambo moko ya mabe, ekoki kozokisa biso to kopesa biso nkanda. Tokoki komituna boye: ‘Ndenge nini makambo ya boye ekoki kosalema na kati ya basaleli ya Yehova?’ Kutu, makambo ya ndenge wana esalemaki ata na kati ya bakristo oyo batyamaki mafuta na elimo na mikolo ya bantoma. (Gal. 2:11-14; 5:15; Yak. 3:14, 15) Na yango, tosengeli kosala nini soki likambo moko esali biso mpasi?

13. Mpo na nini mpe ndenge nini tosengeli kosilisa matata?

13 Ndeko mwasi oyo touti kolobela alobaki boye: “Nayekolaki ete nasengeli kobondela mpo na moto nyonso oyo azokisi ngai. Yango esalisaka ntango nyonso.” Ndenge totángaki yango liboso, Yesu ateyaki biso tóbondelaka mpo na baoyo bazali konyokola biso. (Mat. 5:44) Tosengeli kutu kobondela mingi koleka te mpo na bandeko na biso ya elimo? Ndenge kaka tata alingaka bana na ye bálingana, Yehova mpe alingi ete basaleli na ye awa na mabele bázala na boyokani malamu. Tozali kozela ntango oyo tokofanda elongo na kimya mpe na esengo libela na libela, mpe Yehova azali koteya biso tósala bongo banda sikoyo. Alingi tózala na bomoko ntango tozali kosala mosala monene oyo apesá biso. Na yango, tósilisaka matata to mpe ‘tólimbisaka’ kaka na mbala moko mpe tókoba kokende liboso na bomoko. (Tángá Masese 19:11.) Na esika tókima bandeko na biso ntango mikakatano ebimi, tosengeli nde kosalisana mpo tótikala na kati ya basaleli ya Nzambe, epai tobatelami malamu na “mabɔkɔ ya libela” ya Yehova.​—Det. 33:27, haut fleuve.

Kozala na boboto na bato nyonso ebotaka mbuma malamu

14. Ndenge nini tokoki kopekisa bokabwani oyo Satana alingaka kokɔtisa?

14 Mpo na kopekisa biso tópalanganisa nsango malamu, Satana ná bademo na ye bazali koluka mpenza kopanza mabota mpe masangá oyo ezali na esengo. Bazali koluka kokɔtisa bokabwani mpo bayebi ete bokabwani ebebisaka makambo. (Mat. 12:25) Wana tozali kobundisa elimo yango, tosengeli kolanda toli ya Paulo oyo: “Moombo ya Nkolo asengeli kowelana te, kasi asengeli nde kozala na boboto na bato nyonso.” (2 Tim. 2:24) Tóbosana te ete tozali kobunda “ná makila mpe mosuni te, kasi . . . ná mampinga ya bilimo mabe.” Mpo na kolonga na etumba yango, tosengeli kolata molato ya etumba ya elimo, oyo ezali mpe na “bisaleli ya nsango malamu ya kimya.”​—Ef. 6:12-18.

15. Tosengeli kosala nini soki bato oyo bazali libándá ya lisangá babundisi biso?

15 Na libándá ya lisangá, banguna ya Yehova bazali kobundisa makasi basaleli na ye, bato ya kimya. Banguna yango mosusu basimbaka Batatoli ya Yehova na nzoto. Basusu bakoselaka biso makambo na bazulunalo, na televizyo, to na batribinale. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete makambo ya ndenge wana ekokóma. (Mat. 5:11, 12) Tosengeli kosala nini? Tosengeli soki moke te ‘kozongisa mabe na mabe,’ ezala na maloba to na misala.​—Rom. 12:17; tángá 1 Petro 3:16.

16, 17. Lisangá moko ekutanaki na komekama nini?

16 Ata soki Zabolo asali biso nini, soki ‘tozali kosala malamu mpo na kolonga mabe,’ tokoki kopesa litatoli ya malamu. Na ndakisa, lisangá moko na esanga moko ya Pasifike efutelaki ndako moko mpo na kosala Ekaniseli. Ntango bayokaki yango, bakonzi ya lingomba ya esanga yango bayebisaki bandimi na bango báyangana na ndako yango mpo na likita moko ya lingomba na bango na ngonga oyo Ekaniseli esengelaki kosalema. Kasi, mokonzi ya polisi ayebisaki bakonzi ya lingomba yango ete bátikela Batatoli ndako na ngonga wana. Atako bongo, ntango ngonga yango ekokaki, ndako etondaki na bandimi ya lingomba wana mpe babandaki likita na bango.

17 Ntango bapolisi bazalaki komibongisa mpo na kobimisa bango na makasi, prezida ya lingomba yango ayaki epai ya nkulutu moko mpe atunaki ye ete: “Bobongisaki likambo moko ya ntina mpo na mpokwa oyo?” Nkulutu ayebisaki ye ete bazali na Ekaniseli, mpe mobali yango azongisaki ete: “Ah, nayebaki te!” Na ntango yango, polisi moko akamwaki mpe alobaki ete: “Kasi toyebisaki bino na ntɔngɔ oyo!” Moto yango ya lingomba abalukaki epai ya nkulutu mpe na mwa kosɛka ya lokuta, alobaki boye: “Bokosala nini sikoyo? Ndako yango oyo etondi na bato. Bokosɛnga bapolisi babengana biso?” Asalaki mayele mpo ebima ete Batatoli nde bazali konyokola bango! Bandeko na biso balingaki kosala nini?

18. Bandeko wana basalaki nini ntango balukelaki bango makambo, mpe esukaki ndenge nini?

18 Batatoli bandimaki kotikela lingomba wana miniti 30 mpo básala likita na bango, bongo na nsima bango bakosala Ekaniseli. Bato yango balekisaki ngonga, kasi ntango bandimi ya lingomba yango babimaki, Ekaniseli esalemaki. Mokolo oyo elandaki, guvɛrnema eponaki bato básala ankɛtɛ na likambo yango. Nsima ya kotalela makambo ndenge elekaki, bato yango basɛngaki lingomba wana eyebisa ete bato oyo balukaki makambo, ezalaki Batatoli te, kasi prezida ya lingomba wana. Bato yango bapesaki Batatoli ya Yehova mersi na ndenge bamonisaki motema molai na likambo wana ya mpasi. Milende ya Batatoli mpo na ‘kozala na kimya na bato nyonso’ ebotaki mbuma malamu.

19. Nini lisusu elendisaka boyokani ya malamu na basusu?

19 Eloko mosusu ya ntina mpo na kozala na boyokani ya kimya na basusu ezali koyeba koloba na boboto. Lisolo oyo elandi ekomonisa soki koloba na boboto elimboli nini mpe ndenge nini tokoki kozala na maloba ya boboto mpe kosalela yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 10 Kotya “makala ya mɔtɔ” ezali mayele oyo bazalaki kosalela kala mpo na konyangwisa bibende; bazalaki kotya mɔtɔ likoló mpe na nse na yango mpo na kobimisa bibende ya malamu. Soki tozali komonisela bato ya motema mabe boboto, tokoki kolɛmbisa motema na bango mpe kobimisa bizaleli na bango ya malamu.

Okoki kolimbola?

• Mpo na nini lelo bato na mokili bazali nkandankanda?

• Bandakisa nini ya Biblia emonisi makambo oyo ekoki kobima soki topekisi nkanda to topekisi yango te?

• Tosengeli kosala nini soki ndeko mokristo azokisi biso?

• Tosengeli kosala nini soki minyoko euti na libándá ya lisangá?

[Mituna mpo na boyekoli]

[Elilingi na lokasa 16]

Simeone ná Levi bazongaki​—kasi nsima ya kosala makambo na nkanda

[Elilingi na lokasa 18]

Komonisa boboto ekoki kolɛmbisa mabe ya basusu