Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tosangani na kati ya bolingo—Lapolo ya likita ya nsuka ya mbula

Tosangani na kati ya bolingo—Lapolo ya likita ya nsuka ya mbula

Tosangani na kati ya bolingo​—Lapolo ya likita ya nsuka ya mbula

ESENGO ezalaki makasi na Ndako ya Mayangani ya Batatoli ya Yehova na Jersey City, na etúká ya New Jersey, na États-Unis. Na ntɔngɔ ya mokolo ya 3 Ɔkɔtɔbɛ 2009, bato koleka 5 000 bayanganaki mpo na likita ya nsuka ya mbula ya mbala ya 125 ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania. Bankóto ya bato mosusu balandaki programɛ yango na telefone to mpe na video na bisika mosusu misato epai bandako ya Betele ezali na États-Unis mpe na Betele ya Canada. Na bisika yango nyonso, bato 13 235 oyo basanganaki na kati ya bolingo na bango mpo na Yehova basepelaki kozala na likita yango oyo esalaki ngonga misato.

Ndeko Geoffrey Jackson ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi azalaki prezida ya likita yango. Na ebandeli ya programɛ yango, abengaki etuluku ya bandeko ya Betele mpo báyemba banzembo oyo euti na buku na biso ya sika ya banzembo. Moto oyo akambaki etuluku yango ezalaki David Splane, ndeko mosusu ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, mpe alobelaki mwa moke ntina ya miziki na losambo ya pɛto. Basɛngaki bayangani báyemba nzembo misato ya sika; etuluku ya bayembi ya Betele eyembaki banzembo yango liboso, mpe na nsima bayembaki yango elongo na bayangani. Basalelaki etuluku ya bayembi kaka mpo na likita yango; ezali te ndakisa ya kolanda na makita ya masangá, na mayangani ya zongazonga to ya etúká.

Balapolo ya bafiliale

Bandeko ya bakomite ya filiale mitano bapesaki balapolo ya bafiliale na bango. Ndeko Kenneth Little amonisaki ete mosika te, Canada ekobanda konyata pene na bazulunalo nyonso ya États-Unis mpe ya Canada, mpe mpo na yango mikanda oyo banyataka na filiale yango ekobakisama mbala zomi. Mpo mosala yango esalema, masini ya sika ya konyata mikanda ekosala ngonga 16 na mokolo, na esika ya ngonga 8.

Ndeko Reiner Thompson apesaki lapolo ya mosala ya Bokonzi na République dominicaine, mpe Ndeko Albert Olih alobelaki misala na biso na Nigeria. Emile Kritzinger, oyo autaki Mozambique amonisaki ete nsima ya bambula mingi ya minyoko na ekólo yango, Batatoli ya Yehova bandimamaki na Leta na 1992. Na bambula oyo euti koleka, motángo ya basakoli na bikólo yango misato emataki mingi. Ndeko Viv Mouritz, ya filiale ya Australie alobelaki ndenge mosala ezali kokola na Timor oriental, oyo Betele ya Australie etambwisaka.

Bakomite ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Na 1976, misala nyonso ya Batatoli ya Yehova ekómaki kotambwisama na bakomite motoba ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Na nsima, batyaki bandeko oyo bazali na etuluku ya bampate mosusu mpo bázala basungi. Lelo, bandeko 23 bazali kosunga na mosala oyo ezali kosalema. Batunaki bandeko 6 kati na bango mituna. Bango nyonso basali mbula 341 na mosala ya ntango nyonso​—mokomoko asali mbula soki 57.

Don Adams, oyo akɔtaki na Betele na 1943, ayebisaki ete Komite ya Batambwisi esangisi bakambi ya bakomite mosusu wana mitano, mpe etalaka soki bakomite nyonso mitano ezali kosala malamu. Komite yango ezwaka bibongiseli mpo na kosalisa ntango makambo minene ebimi na mbalakaka, minyoko, makambo ya kosamba, makama, mpe makambo mosusu ya mbalakaka oyo ekómeli Batatoli ya Yehova na mokili mobimba.

Dan Molchan alobelaki mosala ya Komite oyo etalelaka bandeko ya Betele; komite yango etalelaka kolɔngɔnɔ ya elimo mpe ya nzoto ya bandeko 19 851 oyo basalaka na Babetele na mokili mobimba. David Sinclair ayebisaki ndenge Komite ya kobimisa mikanda etambwisaka mosala ya kosomba biloko mpo na bafiliale. Na nsima, Robert Wallen, oyo asali mbula pene na 60 na Betele, alobelaki ndenge Komite ya mosala ya kosakola etambwisaka mosala ya Batatoli ya Yehova na teritware mpe na masangá. William Malenfant amonisaki mosala makasi oyo Komite ya mateya esalaka mpo na kobongisa programɛ ya mayangani. Na nsuka, John Wischuk amonisaki ndenge Komite ya bokomi etambwisaka na likebi mosala ya kobongisa mpe kolandela makambo oyo ebimaka na mikanda na biso. *

Mokapo ya mobu 2010 elobeli mingimingi bolingo

Masukulu misato oyo elandaki epesamaki na bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Ndeko Gerrit Lösch abandaki na motuna oyo: “Olingaka basusu bálinga yo?” Alobaki ete bolingo ezali mposa ya moto nyonso, mpe biso nyonso tomiyokaka malamu soki basusu bazali kolinga biso. Bomoi na biso euti na bolingo mpo bolingo oyo ezangi moimi nde etindaki Yehova akela biso. Eloko ya libosoliboso oyo etindaka biso tósakola mpe tóteya bato ezali bolingo mpo na Yehova.

Tomonisaka bolingo oyo esimbami na mitinda kaka epai ya bazalani na biso te kasi mpe epai ya banguna na biso. (Mat. 5:43-45) Alendisaki bayangani bákanisa makambo oyo Yesu akutanaki na yango mpo na biso: babɛtaki ye, basɛkaki ye, babwakelaki ye nsoi, mpe atɔbɔlamaki mpo na biso. Atako bongo, abondelaki mpo na basoda oyo babakaki ye na nzete. Nyonso wana ezali kotinda biso te tólinga ye mingi koleka? Na nsima, Ndeko Lösch ayebisaki mokapo ya mobu 2010: 1 Bakorinti 13:7, 8, ‘Bolingo eyikaka mpiko na makambo nyonso. Bolingo esilaka soki moke te.’ Tozali na elikya ya kozala kaka na bomoi ya seko te, kasi mpe ya kolinga mpe kolingama libela na libela.

Ozali kotambola na motuka oyo ezangi esansi?

Ndeko Samuel Herd abandaki lisukulu na ye na ndakisa moko. Kanisá ete moninga moko amemi yo na motuka na ye mpo bósala mobembo ya kilomɛtrɛ 50. Ofandi liboso pembeni na ye, mpe omoni makɔnga ezali kolakisa ete esansi esili. Oyebisi moninga na yo ete esansi elingi esila. Alobi ete likambo ya kobanga ezali te; litrɛ soki 4 ezali naino na réservoir. Kasi mosika te, esansi esili. Ebongi mpenza kotambola na motuka oyo ezali na esansi mingi te bongo na nsima bótelengana? Te, malamu nde kotondisa réservoir! Na ndenge ya elilingi, tosengeli kotondisa réservoir na biso na esansi, elingi koloba boyebi ya Yehova.

Mpo na yango, tosengeli kotya esansi, mpe kosala yango mbala na mbala. Tokoki kosala yango na ndenge minei. Ya liboso, boyekoli ya biso moko, kotánga Biblia mokolo na mokolo mpo na komesana na yango. Na esika tósuka kaka na kotánga maloba, tosengeli kokanga ntina ya makambo oyo tozali kotánga. Ya mibale, kosalela malamu mpokwa oyo toponá mpo na Losambo na libota. Tozwaka ntango pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kotondisa réservoir to totyaka kaka mwa esansi moke? Ya misato, kobongisa mpe koyangana na makita. Ya minei, komanyola, kokanisa banzela ya Yehova na esika ya kimya, ya makɛlɛlɛ te. Nzembo 143:5 elobi boye: “Nakanisi mikolo ya kalakala; namanyoli mosala na yo mobimba.”

“Bayengebene bakongɛnga”

John Barr asalaki lisukulu ya misato mpe ya nsuka, oyo elimbolaki ndakisa ya Yesu ya blé mpe matiti mabe. (Mat. 13:24-30, 38, 43) Ndakisa yango elobeli “ntango ya kobuka mbuma,” eleko oyo “bana ya bokonzi” bazali koyanganisama mpe matiti mabe ezali kotyama pembeni mpo etumbama.

Ndeko Barr amonisaki polele ete mosala ya koyanganisa ekokoba libela na libela te. Alobelaki Matai 24:34, oyo elobi ete: “Libota oyo ekoleka ata moke te tii makambo wana nyonso ekosalema.” Azongelaki mbala mibale maloba oyo: “Na ntembe te, Yesu alingaki koloba ete bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo mpe bazalaki na bomoi ntango elembo ebandaki komonana polele na 1914 bakozala na bomoi mpo na mwa ntango elongo na bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo, oyo bakomona ebandeli ya bolɔzi monene.” Toyebi te ntango boni “libota oyo” ekoumela, kasi esangisi bituluku wana mibale ya bato oyo bakozala na bomoi elongo mpo na mwa ntango. Atako bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali mbula moko te, baoyo bazali na bituluku mibale oyo esali libota yango bazali na bomoi elongo mpo na mwa ntango na mikolo ya nsuka. Tobɔndisami mpenza na koyeba ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bazalaki na bomoi mpo na mwa ntango elongo na bakristo ya mibange oyo batyamaki mafuta na elimo, oyo basosolaki elembo ntango ebandaki komonana polele na 1914, bakokufa bango nyonso te liboso bolɔzi monene ebanda.

“Bana ya bokonzi” bazali kozela na mposa makasi mbano na bango ya bomoi na likoló, kasi biso nyonso tosengeli kotikala sembo, tóngɛnga makasi tii na nsuka. Ezali mpenza libaku kitoko komona ndenge “blé” ezali koyanganisama na ntango na biso.

Nsima ya loyembo ya nsuka, Theodore Jaracz, ndeko mosusu ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi asukisaki na libondeli. Likita yango ya nsuka ya mbula elendisaki mpenza!

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 10 Mpo na koyeba mosala ya bakomite motoba ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 2008, lokasa 29.

[Etanda na lokasa 5]

ETEYELO MPO NA BANKULUTU

Na likita ya nsuka ya mbula, Anthony Morris, ndeko moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ayebisaki ete bankulutu ya masangá bakobanda kozwa formasyo oyo ekolandana. Eteyelo moko mpo na bankulutu ya États-Unis ebandaki kosalema na ebandeli ya 2008 na esika monene ya mateya na Patterson, na New York. Kelasi ya mbala 72 eutaki kosila, mpe bankulutu 6 720 basili kozwa formasyo. Mosala ezali naino mingi. États-Unis yango moko ezali na bankulutu koleka 86 000. Yango wana, Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki kelasi mosusu esalema na Brooklyn, na etúká ya New York, kobanda mokolo ya 7 Desɛmbɛ 2009.

Na boumeli ya sanza mibale, bakɛngɛli-batamboli minei basengelaki kozwa formasyo na Patterson mpo bákóma balakisi. Na nsima basengelaki kokende koteya na Brooklyn, mpe bakɛngɛli-batamboli mosusu minei basengelaki kozwa formasyo. Na nsima, esengelaki bákende koteya na eteyelo ya Brooklyn, mpe minei oyo bazwaki formasyo liboso bákende koteya na Bandako ya Mayangani mpe na Bandako ya Bokonzi. Esalemaki bongo tii balakisi bakómaki 12 mpo na koteya biteyelo motoba na Lingelesi pɔsɔ na pɔsɔ na États-Unis. Na nsima, balakisi mosusu minei basengelaki kozwa formasyo mpo na koteya na Espagnol. Eteyelo yango ekozwa esika ya Eteyelo mpo na mosala ya Bokonzi te, oyo esalemaka tii sikoyo; mokano na yango ezali ya kosalisa bankulutu bákoba kokende liboso na kati ya solo. Bafiliale ya mokili mobimba ekobanda kosala biteyelo yango na Bandako ya Mayangani mpe Bandako ya Bokonzi na mobu ya mosala 2011.

[Bililingi na lokasa 4]

Na ebandeli ya likita ya nsuka ya mbula, bayembaki nzembo na buku na biso ya sika ya nzembo, “Tóyembela Yehova”